“Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
“Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko.”—1 PE. 5:2.
1. Mikakatano nini bakristo bazalaki na yango ntango Petro akomaki mokanda na ye ya liboso?
NA NTANGO moko boye liboso Ampɛrɛrɛ Néron abanda konyokola bakristo na Roma, ntoma Petro akomaki mokanda na ye ya liboso. Azalaki na mposa ya kolendisa baninga na ye bandimi. Zabolo azalaki ‘kotambola epai na epai,’ mpo na koluka kolya bakristo. Mpo na kotɛlɛma ngwi liboso na ye, basengelaki ‘kobatela makanisi na bango’ mpe ‘komikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe.’ (1 Pe. 5:6, 8) Basengelaki mpe kobatela bomoko na bango. Basengelaki te “koswana mino mpe kolyana,” mpo likambo ya ndenge wana ekokaki komema bango na ‘kosilisana.’—Gal. 5:15.
2, 3. Tosengeli kobunda na nani, mpe tokotalela makambo nini na lisolo oyo mpe oyo elandi?
2 Lelo oyo makambo ezali ndenge wana mpo na biso. Zabolo azali koluka mabaku ya kolya biso. (Em. 12:12) Mpe “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá” ezali liboso na biso. (Mat. 24:21) Kaka ndenge bakristo ya ekeke ya liboso basengelaki kokeba mpo báwelana te bango na bango, biso mpe tosengeli kosala bongo. Mpo na yango, na bantango mosusu tozalaka na mposa ya lisalisi ya bankulutu mpo bakɔmɛli na elimo.
3 Tótala oyo bankulutu bakoki kosala mpo básepelaka mingi koleka na mokumba ya kobatela ‘etonga ya Nzambe oyo bapesá na mabɔkɔ na bango.’ (1 Pe. 5:2) Na nsima, tokotalela ndenge nini bakoki kosala mosala yango malamu. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge lisangá ekoki ‘kozala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi mpe kokamba’ etonga. (1 Tes. 5:12) Kotalela makambo yango ekosalisa biso tótɛmɛla Monguna na biso monene, mpo toyebi ete tozali kobunda nde na ye.—Ef. 6:12.
Bóbatela etonga ya Nzambe
4, 5. Ndenge nini bankulutu basengeli kotalela lisangá? Pesá ndakisa.
4 Petro alendisaki bakristo oyo bazalaki bankulutu na ekeke ya liboso ete bátalela etonga oyo bapesi na mabɔkɔ na bango ndenge Nzambe atalelaka yango. (Tángá 1 Petro 5:1, 2.) Atako azalaki kotalelama lokola likonzí na lisangá, Petro alobaki na bankulutu na ndenge ya kokitisa bango te. Ntango akebisaki bango, alobaki na bango lokola nkulutu oyo azali koloba na baninga na ye bankulutu. (Gal. 2:9) Na makanisi ndenge moko na oyo ya Petro, Lisangani ya Mikóló-Bakambi lelo elendisaka bankulutu ya lisangá básala makasi mpo bákokisa mokumba na bango monene ya kobatela etonga ya Nzambe.
5 Ntoma Petro akomaki ete bankulutu basengeli ‘kobatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bango.’ Ezalaki na ntina mingi báyeba ete etonga ezali ya Yehova mpe ya Yesu Kristo. Bankulutu basengelaki kozongisa monɔkɔ mpo na ndenge oyo bazalaki kobatela bampate ya Nzambe. Kanisá ete moninga na yo moko ya motema asɛngi yo obatela bana na ye ntango ye moko azali te. Okobatela bana yango malamu mpe okoleisa bango malamu, boye te? Soki mwana moko abɛli, okozwa bibongiseli te mpo azwa nkisi oyo esengeli? Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli “kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:28) Babosanaka te ete mpate mokomoko asombamaki na makila ya motuya ya Kristo Yesu. Lokola bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, bankulutu baleisaka mpe babatelaka etonga.
6. Mokumba ya babateli ya mpate ya kala ezalaki nini?
6 Kanisá mikumba oyo babateli ya mpate ya ntango ya kala bazalaki na yango. Bazalaki konyokwama na molunge ya moi makasi mpe na malili ya butu mpo na koleisa bampate. (Eba. 31:40) Bazalaki kutu kotya bomoi na bango na likama mpo na bampate. Ntango azalaki mobateli ya mpate na bolenge na ye, Davidi abikisaki etonga na ye na likama ya banyama ya zamba, na ndakisa nkɔsi mpe urse. Mpo na nyama yango mokomoko, Davidi alobaki ete ‘asimbaki yango na mandefu na yango, abɛtaki yango mpe abomaki yango.’ (1 Sa. 17:34, 35) Azalaki na mpiko mpenza! Na ntembe te, akómaki mpenza pene na mbanga ya nyama yango! Atako bongo, azongaki nsima te mpo na kobikisa mpate na ye.
7. Na ndenge ya elilingi, ndenge nini bankulutu bakoki kolongola mpate na mbanga ya Satana?
7 Lelo, bankulutu basengeli kokeba na Zabolo, oyo abundisaka lokola nkɔsi. Ekoki kosɛnga kosala likambo moko ya mpiko oyo ezali lokola kolongola mpate na mbanga ya Zabolo. Soki, na ndenge ya elilingi, basimbi nyama mabe yango na mandefu, bankulutu bakoki kobikisa mpate. Bakoki kosolola na bandeko oyo bazali ekɛngɛ te, oyo bamekami na mitambo ya Satana. (Tángá Yuda 22, 23.) Kasi bankulutu basalaka nyonso wana te kozanga lisalisi ya Yehova. Basalelaka mpate oyo azoki makambo na boboto, bakangaka bampota na ye mpe babɔndisaka ye na nzela ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali lokola mafuta oyo ekitisaka mpasi.
8. Bankulutu bamemaka etonga wapi, mpe ndenge nini?
8 Mobateli ya mpate azalaki mpe kokamba etonga na bisika ya malamu epai matiti mpe mai ezali. Ndenge moko mpe, bankulutu bamemaka etonga na lisangá, balendisaka bandeko báyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo báleisama malamu mpe bázwa “bilei na bango na ntango oyo ebongi.” (Mat. 24:45) Ekoki mpe kosɛnga bankulutu bálekisa ntango mingi lisusu mpo na kosalisa bato oyo bazali kobɛla na elimo mpo bándima bilei oyo euti na Liloba ya Nzambe. Mbala mosusu mpate oyo atangwaki azali koluka kozonga na etonga. Na esika bábangisa ndeko na bango, bankulutu bakolimbwela ye mitinda ya Biblia na boboto mpe bakomonisa ye ndenge akoki kosalela yango na bomoi na ye.
9, 10. Ndenge nini bankulutu basengeli kosalisa bandeko oyo bazali kobɛla na elimo?
9 Soki obɛli, osepelaka na monganga ya ndenge nini? Oyo akoyoka yo kaka mbangumbangu mpe na nsima akomeli yo na mbala moko nkisi mpo azwa ntango ya komona moto ya maladi oyo alandi nsima na yo? To okolinga nde komona monganga oyo akoyoka yo mpenza, akolimbwela yo maladi oyo mbala mosusu ozali na yango, mpe akoyebisa yo bankisi ndenge na ndenge oyo okoki kozwa?
10 Ndenge moko mpe, bankulutu bakoki koyoka ndeko oyo abɛli na elimo mpe kosalisa mpo bampota na ye esila, mpe na ndenge ya elilingi, ‘kopakola ye mafuta na nkombo ya Yehova.’ (Tángá Yakobo 5:14, 15.) Ndenge moko na balsame ya Gileade, Liloba ya Nzambe ekoki kokitisa mpasi ya moto oyo abɛli na elimo. (Yir. 8:22; Ezk. 34:16) Soki moto oyo azali na bolɛmbu asaleli mitinda ya Biblia, ekoki kosalisa ye azwa lisusu makasi na elimo. Ya solo, bankulutu basalisaka mingi ntango bayoki mabanzo ya mpate oyo azali kobɛla mpe babondeli mpo na ye.
Na kotindikama te kasi na motema moko
11. Nini etindaka bankulutu bábatela etonga ya Nzambe na motema moko?
11 Na nsima, Petro akundwelaki bankulutu ndenge oyo mosala ya kobatela bampate esengeli kosalema mpe ndenge oyo esengeli kosalema te. Bankulutu basengeli kobatela etonga ya Nzambe “na kotindikama te, kasi na motema moko.” Nini etindaka bankulutu básalela bandeko na bango na motema moko? Tótala naino: nini etindaki Petro abatela mpe aleisa bampate ya Yesu? Ezalaki mingimingi bolingo na ye mpo na Nkolo. (Yoa. 21:15-17) Bolingo etindaka bankulutu “bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango.” (2 Ko. 5:14, 15) Bolingo yango, bakisa mpe bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bandeko na bango, etindaka bankulutu básalela etonga mpe bápesa makasi na bango, biloko na bango, mpe ntango na bango mpo na kosala yango. (Mat. 22:37-39) Bamipesaka na mitema mibale te, kasi na motema moko.
12. Ntoma Paulo amipesaki tii wapi?
12 Bankulutu basengeli komipesa tii wapi? Ntango bazali kobatela bampate, bamekolaka ntoma Paulo, kaka ndenge ye amekolaki Yesu. (1 Ko. 11:1) Lokola bazalaki kolinga bandeko ya Tesaloniki, Paulo ná baninga na ye basepelaki mingi kopesa bango ‘kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na bango moko.’ Ntango bazalaki kosala bongo, bakómaki bato ya boboto “lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza.” (1 Tes. 2:7, 8) Paulo ayebaki ndenge mama oyo azali komɛlisa ayokaka mpo na mwana na ye. Akoki kosala nyonso mpo na ye, ata mpe kolamuka na katikati ya butu mpo na koleisa ye.
13. Bankulutu basengeli kozala na bokatikati na makambo nini?
13 Bankulutu basengeli koluka kozala na bokatikati na oyo etali mikumba na bango ya kobatela etonga mpe mikumba na bango na libota. (1 Tim. 5:8) Ntango oyo bankulutu balekisaka na makambo ya lisangá ezali ntango oyo bakokaki kolekisa na libota na bango. Ndenge moko oyo bankulutu bakoki komonisa bokatikati na mikumba yango mibale ezali kobengisa bandeko mosusu na bampokwa mosusu oyo basalaka Losambo na libota na bango. Na boumeli ya bambula mingi, Masanao, nkulutu moko na Japon, azalaki kobengisa bandeko oyo bazali minzemba mpe mabota oyo tata akufá na boyekoli ya libota na ye. Nsima ya bambula, bandeko yango mosusu bakómaki mpe bankulutu mpe balandaki ndakisa malamu ya Masanao.
Bóboya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe—Bóbatela etonga na motema ya esengo
14, 15. Mpo na nini bankulutu basengeli kosala kebá na ‘bolingo ya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,’ mpe ndenge nini bakoki komekola Paulo na likambo yango?
14 Petro alendisaki mpe bankulutu ete bábatela etonga te mpo na bolingo ya “litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo.” Mosala ya bankulutu elyaka ntango mingi kasi bazelaka te báfuta bango mbongo mpo na mosala yango. Petro amonaki ete ezali ntina akebisa baninga na ye bankulutu na likama ya kobatela etonga mpo na bolingo ya “litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe.” Emonanaka polele ete bakonzi ya mangomba ya “Babilone Monene” bakweá na likama yango mpo bazali kosepela na bomoi ya bomɛngo nzokande bato mingi basengeli konyokwama na bobola. (Em. 18:2, 3) Na yango, bankulutu lelo basengeli kokeba mpo bákwea te na ezaleli nyonso oyo ekoki komema bango kuna.
15 Paulo atikelaki bakristo oyo bazali bankulutu ndakisa moko malamu. Atako azalaki ntoma mpe akokaki komemisa bakristo ya Tesaloniki “kilo monene,” ‘alyaki eloko ya moto mpamba te.’ Kasi, ‘asalaki nde mosala makasi mpe na mitoki butu moi.’ (2 Tes. 3:8) Bankulutu mingi lelo, ata mpe baoyo bazali bakɛngɛli-batamboli, bapesaka ndakisa malamu na likambo yango. Atako basepelaka soki baninga na bango bandimi bayambi bango, ‘batyelaka moto moko te kilo monene.’—1 Tes. 2:9.
16. Kobatela etonga na “motema ya esengo” elakisi nini?
16 Bankulutu babatelaka etonga na “motema ya esengo.” Motema ya esengo yango emonanaka polele na ndenge bandimaka komipimela makambo mosusu mpo na kosalisa etonga. Kasi elingi koloba te ete batindaka etonga na makasi mpo esalela Yehova; bankulutu yango ya bolingo balendisaka mpe te baninga na bango bakristo básalela Nzambe na elimo ya kowelana. (Gal. 5:26) Bankulutu bayebi malamu ete mpate nyonso azalaka na ndenge na ye. Balingaka nde kosalisa bandeko na bango básalela Yehova na esengo.
Bómikómisa bakonzi ya etonga te kasi bandakisa
17, 18. (a) Mpo na nini, na bantango mosusu, bantoma bazalaki kokoka te kosimba liteya ya Yesu na ntina etali komikitisa? (b) Ndakisa na bango etali biso na nini?
17 Ndenge touti komona yango, bankulutu basengeli kobosana te ete etonga oyo bazali kobatela ezali nde ya Nzambe, kasi ya bango te. Bakebaka mpo ‘bámikómisa bakonzi te ya baoyo bazali libula ya Nzambe.’ (Tángá 1 Petro 5:3.) Na bantango mosusu, bantoma ya Yesu balukaki mikumba, kasi na makanisi ya mabe. Ndenge moko na bato oyo bazalaki koyangela bikólo, balukaki kozwa bisika ya lokumu.—Tángá Marko 10:42-45.
18 Lelo oyo, bandeko oyo bazali “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli” basengeli komituna ntina oyo bazali koluka mosala yango. (1 Tim. 3:1) Baoyo bazali bankulutu bakoki komituna na bosembo soki bazalaka na mposa ya kozwa bokonzi to lokumu, ndenge bantoma mosusu basalaki. Lokola likambo yango ekómelaki ata bantoma, bankulutu basengeli kosala makasi mpo báboya elimo ya koluka kokonza baninga, oyo bato ya mokili bazalaka na yango.
19. Ntango bazali kosala makambo mpo na kobatela etonga, likambo nini bankulutu basengeli kobosana te?
19 Ya solo, na bantango mosusu esɛngaka bankulutu básalela bokonzi na bango mpo na kopesa toli ya makasi, na ndakisa ntango bazali koluka kobatela etonga na “bambwa mabe ya zamba.” (Mis. 20:28-30) Paulo ayebisaki Tito akoba “kolendisa mpe kopamela na bokonzi.” (Tito 2:15) Kasi ata ntango esɛngi básala ndenge wana, bankulutu balukaka kopesa bato oyo bazali na makambo lokumu. Bayebi malamu ete na esika ya koloba kaka mabe ya moto, mbala mingi maloba ya boboto mpe ya kondimisa nde esalisaka mingi na kosimba motema mpe kotinda moto alanda nzela oyo ebongi.
20. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu na oyo etali kopesa ndakisa malamu?
20 Ndakisa malamu ya Kristo etindaka bankulutu bálinga etonga. (Yoa. 13:12-15) Toyokaka esengo mingi ntango tozali kotánga ndenge oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Ndakisa malamu ya komikitisa oyo apesaki esimbaki mitema ya bayekoli na ye, mpe etindaki bango bámonisa na bomoi na bango ete bazali na ‘elimo ya komikitisa mpe bamonaka bamosusu ete baleki bango.’ (Flp. 2:3) Lelo mpe bankulutu balingaka kolanda ndakisa ya Yesu, mpe yango etindaka bango bálinga kozala “bandakisa ya etonga.”
21. Bankulutu bakoki kolikya kozwa mbano nini?
21 Petro asukisaki elendiseli na ye epai ya bankulutu na elaka moko mpo na mikolo ekoya. (Tángá 1 Petro 5:4.) Bakɛngɛli oyo batyamá mafuta na elimo ‘bakozwa motole ya nkembo oyo ebebaka te’ elongo na Kristo na likoló. Babateli ya mpate-basungi oyo bazali “bampate mosusu” bakozwa libaku ya kobatela etonga ya Nzambe awa na mabele na boyangeli ya “mobateli ya mpate mokonzi.” (Yoa. 10:16) Lisolo oyo elandi ekolobela makambo ndenge na ndenge oyo bandeko mosusu na lisangá bakoki kosala mpo na kosalisa bandeko oyo batyamá mpo na kokamba lisangá.
Bozongeli
• Mpo na nini ezalaki malamu Petro alendisa baninga na ye bankulutu bábatela etonga ya Nzambe oyo bapesaki na mabɔkɔ na bango?
• Ndenge nini bankulutu basengeli kobatela bato oyo bazali kobɛla na elimo?
• Eloko nini etindaka bankulutu bábatela etonga ya Nzambe oyo bapesá na mabɔkɔ na bango?
[Elilingi na lokasa 21]
Lokola babateli ya mpate na ntango ya kala, bankulutu basengeli kobatela “bampate” oyo bapesi na mabɔkɔ na bango