Batoli ya bwanya mpo na babalani
“Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo. Mibali, bókoba kolinga basi na bino.”—BAEFESE 5:22, 25.
1. Wapi lolenge malamu ya kotalela libala?
YESU alobaki ete ntango mobali ná mwasi babalani, Nzambe nde asangisaka bango mpe bakómaka “mosuni moko kaka.” (Matai 19:5, 6) Libala esangisaka bato mibale oyo bazali na bomoto ekeseni, kasi bazali koyekola kosala makambo na bomoko mpo na kokokisa mikano oyo bamityeli. Libala ezali ebongiseli oyo esengeli koumela bomoi mobimba, kasi te boyokani ya mwa ntango mokuse, oyo moto akoki kokata ntango nyonso oyo alingi. Na bikólo mingi, koboma libala ezali likambo ya mpasi te, kasi mpo na moklisto, libala ezali mosantu. Ezali kaka mpo na ntina moko monene nde moto akoki koboma libala.—Matai 19:9.
2. (a) Lisalisi nini ezali mpo na babalani? (b) Mpo na nini ezali na ntina tósala makasi mpo libala na biso elonga?
2 Mopesi-toli moko na makambo ya libala alobaki boye: “Libala ya malamu esɛngaka kondima mbongwana nyonso oyo ezali kobima mpe kosalela bibongiseli oyo ezali mpo na kosilisa yango.” Mpo na babalani baklisto, bibongiseli yango ezali toli ya Biblia, lisalisi ya bandeko baklisto mpe boyokani ya malamu mpenza na Nzambe na kati ya mabondeli. Libala ya malamu ekufaka te ata mikakatano ezali, mpe ntango bambula ezali koleka, babalani bakómaka koyokana malamu mpe bazalaka na esengo na kati ya libala na bango. Likambo ya ntina mingi ezali ete libala ya ndenge wana ekumisaka Yehova Nzambe, mobandisi ya libala.—Genese 2:18, 21-24; 1 Bakolinti 10:31; Baefese 3:15; 1 Batesaloniki 5:17.
Bólanda ndakisa ya Yesu mpe ya lisangá na ye
3. (a) Lobelá na mokuse toli oyo Paulo apesaki babalani. (b) Ndakisa nini ya malamu Yesu atikelá biso?
3 Eleki lelo mbula 2000, ntoma Paulo apesaki babalani baklisto toli ya bwanya oyo: “Ndenge lisangá etosaka Klisto, tiká basi mpe bátosaka mibali na bango ndenge wana na makambo nyonso. Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:24, 25) Mokapo oyo esaleli ndakisa moko malamu mpenza! Basi baklisto oyo batosaka mibali na bango balandaka ndakisa ya lisangá na ndenge bandimaka bokonzi ya mobali, ndenge Nzambe abongisá na kati ya libala. Mibali baklisto oyo bazali kokoba kolinga basi na bango, ezala na ntango ya esengo to na ntango ya mpasi, bamonisaka ete bazali kolanda mpenza ndakisa ya Klisto na ndenge alingaka lisangá mpe abatelaka yango.
4. Ndenge nini mibali bakoki kolanda ndakisa ya Klisto?
4 Mibali baklisto bazali bakonzi ya mabota na bango, kasi bango mpe bazali na mokonzi, Yesu. (1 Bakolinti 11:3) Yango wana, mibali basengeli kokokisa na bolingo nyonso bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya mabota na bango, ata soki yango ekosɛnga bango bámipimela makambo mosusu, ndenge Yesu asalaki mpo na lisangá. Batyaka bolamu ya mabota na bango liboso ya bamposa na bango moko. Yesu alobaki boye: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Toli yango esengeli kosalelama mingimingi na kati ya libala. Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. . . . Moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.” (Baefese 5:28, 29) Mobali asengeli koleisa mwasi na ye mpe kolinga ye ndenge amileisaka mpe amilingaka ye moko.
5. Ndenge nini basi baklisto bakoki kolanda ndakisa ya lisangá ya boklisto?
5 Basi oyo basambelaka Nzambe balandaka ndakisa ya lisangá ya boklisto. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bayekoli na ye bakakatanaki te kotika misala na bango mpo na kolanda ye. Nsima ya liwa na ye, bakobaki kotosa ye, mpe ata lelo oyo, pene na mbula soki 2 000, baklisto ya solo bazali kaka kotosa Yesu mpe kolanda litambwisi na ye na makambo nyonso. Ndenge moko, basi baklisto bakitisaka te mibali na bango to bamonaka mpamba te ebongiseli ya bokonzi na kati ya libala ndenge Makomami emonisi. Nzokande, basalisaka mibali na bango, batosaka bango, bapesaka bango mabɔkɔ; na ndenge yango balendisaka bango. Soki mobali ná mwasi bazali kolanda toli oyo, libala na bango ekozala malamu mpe bakozala na esengo.
Bókoba kofanda ná bango
6. Toli nini Petelo apesaki mibali, mpe mpo na nini toli yango ezali na ntina mingi?
6 Ntoma Petelo mpe apesaki babalani toli, kasi toli oyo apesaki mibali ezalaki na nguya makasi. Alobaki boye: “bókoba kofanda ná bango mpe ndenge moko engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpamba te bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.” (1 Petelo 3:7) Bokasi ya toli ya Petelo emonani na maloba ya nsuka ya vɛrsɛ yango. Soki mobali azali kopesa mwasi na ye lokumu te, boyokani na ye na Yehova ekobeba. Mabondeli na ye ekokangisama nzela.
7. Ndenge nini mobali asengeli kopesa mwasi na ye lokumu?
7 Ndenge nini mibali bakoki kopesa basi na bango lokumu? Mobali akopesa mwasi na ye lokumu soki azali kolinga ye, komemya ye mpe kopesa ye kilo. Lolenge wana ya kosalela mwasi makambo na boboto ekokaki kokamwisa bato mingi. Moto moko ya mayele ya Grèce akomi boye: “Na mibeko ya Baloma, mwasi azalaki na lotomo ata moko te. Bazalaki kotalela ye bomoi na ye mobimba lokola mwana. . . . Asengelaki kotosa mobali na ye na makambo nyonso, mpe mobali akokaki kosala ye likambo nyonso oyo alingi.” Oyo nde bokeseni na mateya ya boklisto! Mobali moklisto azalaki kokumisa mwasi na ye. Azalaki kosalela ye makambo oyo eyokani na mitinda ya boklisto, kasi te kaka ndenge eyeli ye na motó. Lisusu, azalaki kofanda na ye “engebene boyebi,” koyebáká ete azali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ.
“Mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ,” na ndenge nini?
8, 9. Na makambo nini basi bakokani na mibali?
8 Ntango Petelo alobaki ete mwasi azali “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ,” yango elingi koloba te ete mibali baleki basi na mayele to na makambo ya elimo. Ya solo, mibali baklisto mingi bazali na mikumba na kati ya lisangá, oyo bandeko basi bakozwa te, mpe na kati ya libota basi batosaka mibali na bango. (1 Bakolinti 14:35; 1 Timote 2:12) Atako bongo, mibali ná basi basengeli komonisa kondima, mpiko, mpe bizaleli malamu kaka ndenge moko. Mpe ndenge Petelo alobaki, mibali mpe basi bazali “bazwi-ya-libula . . . ya boboto monene ya bomoi.” Mpo na oyo etali lobiko, bazali ndenge moko na miso ya Yehova Nzambe. (Bagalatia 3:28) Maloba oyo, Petelo akomelaki yango baklisto bapakolami ya ekeke ya liboso. Na bongo, maloba ya Petelo ekundwelaki mibali baklisto ete lokola bazali “bazwi-ya-libula elongo na Klisto,” bango ná basi na bango bazali na elikya ndenge moko ya kokende na likoló. (Baloma 8:17) Mokolo ezali oyo bango nyonso, mibali ná basi, bakosala elongo lokola banganga mpe bakonzi na Bokonzi ya Nzambe!—Emoniseli 5:10.
9 Mibali baklisto bapakolami balekaki basi na bango te oyo mpe bazalaki bapakolami. Ezali mpe ndenge moko mpo na mibali ná basi oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé. Mibali mpe basi oyo bazali na molɔngɔ ya “ebele ya bato” basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate. Mibali ná basi bazali koganga “moi ná butu” na mokili mobimba mpo na kosanzola Yehova. (Emoniseli 7:9, 10, 14, 15) Mibali ná basi, bazali kozela “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo,” ntango bakosepela na “bomoi ya solosolo.” (Baloma 8:21; 1 Timote 6:19) Ezala baklisto bapakolami to bampate mosusu, baklisto nyonso bazali kosalela Yehova elongo lokola “etonga moko” na litambwisi ya “mobateli kaka moko.” (Yoane 10:16) Talá ntina oyo mobali ná mwasi moklisto basengeli komoniselana lokumu!
10. Na ndenge nini basi bazali ‘mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ’?
10 Kasi, na lolenge nini basi bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ? Ekoki kozala ete Petelo alingaki nde komonisa ete mbala mingi mibali balekaka basi na monene mpe na makasi. Lisusu, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, libaku malamu oyo mwasi azali na yango ya komema zemi mpe kobota, esilisaka ye makasi na nzoto. Basi oyo bazali na likoki ya kobota bakoki kokutana na makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa nzoto na bango. Bazali mpenza na mposa ya lisalisi mpe likebi ntango bakutani na mikakatano ya ndenge wana to ntango bazali kobunda na mpasi ya kobota. Soki mobali azali kopesa mwasi na ye lokumu, mpe azali koyeba bamposa na ye, yango ekosala mpenza ete libala ezala malamu.
Soki babalani bazali na lingomba moko te
11. Na ndenge nini libala ekoki kolonga ata soki babalani bazali na lingomba moko te?
11 Kasi, ezali boni soki babalani bazali na bindimeli ekeseni, mpo moko na bango andimaki solo nsima ya libala na bango mpe mosusu aboyaki? Libala ya ndenge wana ekoki kolonga? Mabala mingi ya ndenge wana elongá. Babalani oyo bazali na bindimeli ekeseni bakoki kozala na libala ya malamu, oyo ekoki koumela mpe komemela bango nyonso esengo. Mpe lisusu, na miso ya Yehova libala na bango ekufi te mpe bazali kaka “mosuni moko.” Yango wana, bapesi babalani baklisto toli ya kofanda na molongani na bango oyo azali moklisto te soki ye alingi báfanda. Soki bazali na bana, ndakisa ya moboti oyo azali moklisto ekoki kosalisa bango.—1 Bakolinti 7:12-14.
12, 13. Na kotalela toli ya Petelo, ndenge nini basi baklisto bakoki kosalisa mibali na bango oyo bazali bandimi te?
12 Petelo apesaki basi baklisto oyo bazali na mibali oyo bazali baklisto te toli ya malamu mpenza. Mibali baklisto oyo bazali na basi oyo bazali baklisto te, basengeli mpe kosalela toli yango. Petelo akomaki boye: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.”—1 Petelo 3:1, 2.
13 Ekozala malamu mingi soki mwasi azali koyebisa bindimeli na ye epai na mobali na ye na mayele mpenza. Kasi, akosala nini soki mobali na ye aboyi koyoka? Wana ezali lisusu likambo ya mwasi te. Atako bongo, elikya ezali kaka, mpamba te etamboli ya moklisto epesaka mpe litatoli ya malamu. Mibali mingi oyo bazalaki liboso kosepela te na bindimeli ya basi na bango to bazalaki kotɛmɛla yango, bakómaki na nsima “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” ntango bamonaki etamboli malamu ya basi na bango. (Misala 13:48) Ata soki mobali andimi solo te, etamboli malamu ya mwasi na ye ekoki kosepelisa ye mpe yango ekosala ete libala elonga. Mobali moko oyo mwasi na ye azali Motatoli ya Yehova alobaki ete ye akokoka te mibeko ya Batatoli ya Yehova. Kasi, amibengaki ye moko “mobali ya esengo oyo azali na mwasi ya malamu” mpe na mokanda oyo akomaki na zulunalo moko, akumisaki mwasi na ye ná baninga na ye Batatoli.
14.Ndenge nini mibali baklisto bakoki kosalisa basi na bango oyo bazali bandimi te?
14 Mibali baklisto oyo basaleli toli ya Petelo, balongi mpe basi na bango na nzela ya etamboli na bango. Basi oyo bazali baklisto te, bamoni ete mibali na bango bakómi kokokisa malamu mikumba na bango, basilisaka lisusu mbongo te na komɛla makaya, na masanga, na kobɛta masano ya mbongo mpe bákatelaka bango lisusu mangala te. Basi yango mosusu bayebanaki na bandeko mosusu ya lisangá. Bakamwaki mingi na bolingo oyo esangisi baklisto esika moko, mpe makambo oyo bamonaki na kati ya bandeko, etindaki bango bápusana penepene na Yehova.—Yoane 13:34, 35.
“Bomoto ebombaná ya motema”
15, 16. Mpo na kolonga mobali oyo azali mondimi te, mwasi moklisto asengeli kozala na etamboli ya motindo nini?
15 Etamboli ya motindo nini ekoki kobenda mobali na kati ya solo? Ezali etamboli oyo Nzambe asɛngi mwasi moklisto azala na yango. Petelo alobi boye: “Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki mpe na kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto ebombaná ya motema na kati ya molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe. Mpo ezali mpe bongo nde, na ntango ya kala, basi basantu oyo bazalaki kolikya epai ya Nzambe bazalaki kobongisa nzoto, kotosáká mibali na bango moko, ndenge Sala azalaki kotosa Abalayama, kobengáká ye ‘nkolo.’ Mpe bino bokómi bana na ye, soki bokobi kosala malamu mpe bozali te kobanga ata eloko moko ya nsɔmɔ.”—1 Petelo 3:3-6.
16 Petelo apesi mwasi moklisto toli ete atalelaka kaka te kitoko ya libanda. Nzokande, asengeli kosala ete mobali na ye amona ndenge mateya ya Biblia ebongoli bomoto na ye ya kati. Akosala ete mobali na ye amona ete mwasi na ye alati bomoto ya sika. Mbala mosusu akomona bokeseni kati na etamboli oyo mwasi na ye azalaki na yango liboso ná oyo akómi na yango. (Baefese 4:22-24) Na ntembe te, “elimo ya kimya mpe ya boboto,” oyo mwasi na ye azali na yango, ekokitisa ye motema mpe ekobenda ye. Elimo motindo oyo ekosepelisa kaka mobali te, kasi ezali na “motuya monene na miso ya Nzambe.”—Bakolose 3:12.
17. Na ndenge nini Sala azali ndakisa malamu mpenza mpo na basi baklisto?
17 Sala alobelami lokola ndakisa malamu mpenza mpo na basi baklisto, mibali na bango bázala baklisto to te. Kozanga ntembe, Sala azalaki kotalela Abalayama lokola mokonzi na ye. Azalaki kobenga Abalayama “nkolo” na ye, ata na kati ya motema. (Genese 18:12) Kosala bongo ekitisaki valɛrɛ na ye te. Soki totali kondima makasi oyo azalaki na yango epai ya Yehova, tokomona ete azalaki makasi na elimo. Kutu, azali na kati ya ‘lipata monene ya batatoli’ oyo ndakisa na bango esengeli kotinda biso “tópota na koyika mpiko mpenza momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso.” (Baebele 11:11; 12:1) Kolanda ndakisa ya Sala ekokitisa valɛrɛ ya mwasi moklisto te.
18. Mitinda nini mobali ná mwasi oyo bazali na lingomba moko te basengeli kosalela?
18 Ata na kati ya libota oyo mobali ná mwasi bazali na lingomba moko te, mobali azali kaka mokonzi. Soki mobali nde azali moklisto, asengeli te kotyola bindimeli ya mwasi na ye atako akotika te ete yango ebebisa kondima na ye moko. Soki mwasi nde azali moklisto, ye mpe asengeli te kobebisa kondima na ye. (Misala 5:29) Kasi, asengeli mpe te kowela bokonzi na mobali na ye. Asengeli kotosa bokonzi na ye mpe kozala na nse ya “mibeko ya mobali na ye.”—Baloma 7:2.
Batoli ya malamu ya Biblia
19. Wapi mwa mikakatano oyo ekoki kobebisa libala, kasi ndenge nini babalani bakoki kolonga yango?
19 Lelo oyo, makambo mingi ekoki kobimisa mindɔndɔ na libala. Mibali mingi bakokisaka te mikumba na bango. Basi mingi baboyaka kotosa bokonzi ya mibali na bango. Mibali mingi bakómaka tii na kosimba basi na bango na nzoto to na kokatela bango mangala. Longola wana, mikakatano ya mbongo, ezaleli ya kozanga kokoka, mpe elimo ya mokili na misala na yango ya mbindo mpe kobeba ya bizaleli ekoki kotya bosembo ya baklisto na komekama. Atako bongo, Yehova apambolaka baklisto oyo balandaka mitinda ya Biblia, ata bazali na mokakatano nini. Ata soki moko kaka ya babalani azali kosalela mitinda ya Biblia, makambo ekoki kotambola malamu. Lisusu, Yehova alingaka mpe asalisaka basaleli na ye oyo bazali kotikala sembo na ndai na bango ya libala ata na ntango ya mikakatano. Abosanaka te bosembo na bango.—Nzembo 18:25; Baebele 6:10; 1 Petelo 3:12.
20. Toli nini Petelo apesi baklisto nyonso?
20 Nsima ya kopesa babalani toli, ntoma Petelo asukisaki na maloba ya kolendisa mpenza. Alobaki boye: “Mpo na kosukisa, bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa, bózongisaka mabe na mabe te to mafinga na mafinga te, kutu bino bópesaka nde lipamboli, mpamba te bobengamaki na nzela yango, mpo bókoka kozwa libula ya lipamboli.” (1 Petelo 3:8, 9) Oyo nde toli ya malamu mpo na bato nyonso, kasi mingimingi mpo na babalani!
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini mibali baklisto balandaka ndakisa ya Yesu?
• Ndenge nini basi baklisto balandaka ndakisa ya lisangá?
• Ndenge nini mibali bakoki kopesa basi na bango lokumu?
• Wapi ezaleli eleki malamu mwasi moklisto oyo mobali na ye azali mondimi te akoki kozala na yango?
[Elilingi na lokasa 16]
Mobali moklisto alingaka mwasi na ye mpe akokisaka bamposa na ye
Mwasi moklisto atosaka mobali na ye mpe apesaka ye lokumu
[Elilingi na lokasa 17]
Na bokeseni na mibeko ya Baloma, mateya ya boklisto esɛngaka mobali apesa mwasi na ye lokumu
[Elilingi na lokasa 18]
Ezala mibali, ezala basi oyo bazali na kati ya “ebele ya bato,” bango nyonso bazelaka bomoi ya seko na Paladiso
[Elilingi na lokasa 20]
Sala azalaki kotalela Abalayama lokola nkolo na ye