Bópesa baoyo bazali na bokonzi likoló na bino lokumu
“Bópesa bato ya lolenge nyonso lokumu, bólinga lisangani mobimba ya bandeko; bóbanga Nzambe, bópesa mokonzi lokumu.”—1 PETELO 2:17, NW.
1, 2. Ndenge nini bato bazali kotalela bokonzi lelo oyo? Mpo na nini?
MAMA moko azali komilelalela ete: “Bana bakómi kosala nyonso oyo balingi. Botosi epai ya baboti ezali te.” Na esika moko, babaki papye moko oyo ezali na maloba oyo: “Kondima te ete bázala na bokonzi likoló na yo.” Wana ezali kaka ndakisa mibale mpo na komonisa likambo oyo, na ntembe te, oyebi ete ezali komonana mingi lelo oyo. Na mokili mobimba, bato mingi bazali na limemya te epai ya baboti, balakisi, bakóló-misala, mpe bakonzi ya Leta.
2 Moto mosusu akoki koloba ete: ‘Bakonzi bazali kosala eloko moko te oyo ekoki kotinda ngai napesa bango limemya.’ Ntango mosusu ekoki kozala mpasi mpo na koboya kondima likambo yango. Mbala na mbala tozali koyoka na bansango ete bakonzi ya Leta bazali kozwa kanyaka, bakóló-misala mosusu bazali na lokoso, balakisi mosusu bayebi mosala te, mpe baboti mosusu bazali konyokola bana na bango. Kasi, baklisto mingi te bazali na makanisi motindo wana mpo na baoyo bazali kotambwisa lisangá.—Matai 24:45-47.
3, 4. Mpo na nini baklisto basengeli kozala na limemya epai ya baoyo bazali na bokonzi?
3 Biso baklisto tozali na likambo moko oyo ezali kotinda biso mpenza tózala na limemya epai ya bakonzi ya mokili. Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ete ‘bátosaka bango bazali na bokonzi. Zambi bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe. Yango oyo izali ibongisami na Nzambe.’ (Baloma 13:1, 2, 5; 1 Petelo 2:13-15) Paulo ayebisaki mpe ntina mosusu ya malamu oyo tosengeli kotosa bokonzi na kati ya libota: “Bino basi, bótosaka mibali na bino lokola ebongi kati na Nkolo. Bino bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo ekoki bongo kati na Nkolo.” (Bakolose 3:18, 20) Ebongi tópesaka bankulutu ya lisangá lokumu, mpamba te ‘elimo santu eponi bango bázala bakɛngɛli mpo na kobatela lisangá ya Nzambe.’ (Misala 20:28, NW ) Ezali mpo na kotosa Yehova nde tozali kopesa bato oyo bazali na bokonzi lokumu. Kasi toyebi ete na bomoi na biso, Yehova azali mokonzi ya libosoliboso oyo tosengeli kotosa.—Misala 5:29.
4 Kozanga ete tóbosana na makanisi na biso ete Yehova azali mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso, tótalela bandakisa ya bato mosusu oyo baboyaki kotosa baoyo bazalaki na bokonzi mpe bato mosusu oyo batosaki bango.
Nzambe asepelaka te na baoyo bazangi botosi
5. Ndenge nini Mikala azangaki limemya epai ya Davidi, mpe yango esukelaki ye ndenge nini?
5 Lisolo ya Mokonzi Davidi ezali komonisa biso ndenge oyo Yehova atalelaka baoyo batyolaka moto oyo ye apesi bokonzi. Ntango Davidi asɛngaki bámema sanduku ya kondimana na Yelusaleme, mwasi na ye Mikala “atalaki na lininisa mpe amonaki Davidi wana ezalaki ye kopumbwapumbwa mpe kobinabina liboso ya [Yehova]; boye atyolaki ye na motema na ye.” Mikala asengelaki kobosana te ete Davidi azali mokonzi ya libota, mpe lisusu mokonzi ya ekólo mobimba. Kasi, Mikala atyolaki ye na maloba oyo: “Mokonzi ya Yisalaele azalaki na nkembo boni lelo! Ye oyo amimonisi na miso ya basi na baombo na ye lokola moto ya mpamba akomimonisa nde koyoka nsɔni te!” Mikala azwaki etumbu na likambo oyo asalaki: abotaki ata mwana moko te.—2 Samwele 6:14-23.
6. Ndenge nini Yehova atalelaki kozanga limemya ya Kola mpo na moto oyo Ye aponaki?
6 Moto mosusu oyo apesaki ndakisa mabe ya kozanga limemya epai ya motambwisi oyo Nzambe aponaki na ebongiseli ya Teokrasi ezali Kola. Lokola azalaki na libota ya Keata, azalaki kosalela Yehova na hema; yango ezalaki libaku malamu mpenza! Kasi, amonaki ete Mose na Alona, bato oyo Nzambe aponaki mpo na kotambwisa Yisalaele, bazalaki kosala malamu te. Kola asanganaki na bankumu mosusu ya Yisalaele mpe balobaki mabe mpo na Mose na Alona; balobaki boye: “Bato nyonso ya lingomba bazali bulɛɛ, moto na moto na bango, mpe [Yehova] azali kati na bango. Na bongo bozali [komitombola] na likoló na koyangana ya bato ya [Yehova] mpo na nini?” Ndenge nini Yehova atalelaki likambo oyo Kola na bato na ye basalaki? Yehova amonaki ete likambo oyo basalaki ezalaki nde kozanga limemya epai na ye moko. Kola na bankumu 250 bamonaki naino ndenge oyo mabele emelaki bato oyo baponaki komitya na ngámbo na bango, mpe na nsima Yehova atindaki mɔ́tɔ oyo ebomaki bango moko.—Mituya 16:1-3, 28-35.
7. “Bantoma mineneminene” bazalaki mpenza na ntina ya koloba mabe mpo na bokonzi oyo Nzambe apesaki Paulo?
7 Na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, bato mosusu bazalaki kotyola bato oyo Nzambe apesaki bango bokonzi. Na lisangá ya Kolinti, “bantoma mineneminene” bazalaki na limemya te epai ya Paulo. Bazalaki kotyola ye ete ayebi koloba malamu te, bazalaki koloba boye: “Motindo ya nzoto na ye ezali na bolɛmbu mpe koloba na ye ezali mpamba.” (2 Bakolinti 10:10; 11:5) Ezala ete Paulo azalaki molobi malamu to te, esengelaki bápesa ye limemya lokola azalaki ntoma. Kasi, ezali mpenza solo ete Paulo ayebaki koloba malamu te? Masukulu oyo Paulo asalaki oyo ekomami na kati ya Biblia ezali komonisa ete ayebaki koloba malamu mpe kondimisa bato. Na ndakisa, nsima ya kosolola mwa moke na Elode Akilipa II, moto oyo ‘ayebaki malamu ntembe ya Bayuda,’ maloba ya Paulo etindaki mokonzi yango aloba ete: “Etikali moke obongola makanisi na ngai mpo nakoma mokristo”! (Misala 13:15-43; 17:22-34; 26:1-28, Boyokani ya Sika) Kasi, bantoma mineneminene na Kolinti bazalaki koloba ete ayebaki koloba malamu te! Ndenge nini Yehova atalelaki ezaleli na bango? Na maloba oyo atindelaki bankulutu ya lisangá ya Efese, Yesu Klisto akumisaki bato oyo baboyaki kolanda ‘baoyo bakolobaka ete bazali Bantoma, nde bazali bongo te.’—Emoniseli 2:2.
Tópesa bango limemya atako bazali bato ya kozanga kokoka
8. Ndenge nini Davidi amonisaki ete azalaki kopesa lokumu na bokonzi oyo Yehova apesaki Saulo?
8 Biblia elobeli bato mingi oyo bapesaki bato oyo bazalaki na bokonzi lokumu, ata ntango bato yango basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe. Na kati ya baoyo bapesaki ndakisa malamu, tokoki kotánga moto lokola Davidi. Davidi azalaki kosalela Mokonzi Saulo, kasi Saulo akómaki koyokela Davidi zuwa mpo na makambo minene oyo azalaki kosala, yango wana alukaki koboma ye. (1 Samwele 18:8-12; 19:9-11; 23:26) Atako Davidi azwaki mabaku mingi ya koboma Saulo, kasi alobaki boye: “[Yehova] apekisa ngai kosembola lobɔkɔ na ngai epai ya mopakolami ya [Yehova].” (1 Samwele 24:3-6; 26:7-13) Davidi ayebaki ete Saulo azalaki kosala mabe, kasi atikaki ete Yehova ye moko apesa ye etumbu. (1 Samwele 24:12, 15; 26:22-24) Alobaki mabe mpo na Saulo te, ezala epai ya bato mosusu to epai na ye moko.
9. (a) Ntango Saulo azalaki konyokola ye, Davidi azalaki kokanisa ndenge nini? (b) Mpo na nini tokoki mpenza koloba ete limemya ya Davidi epai ya Saulo ezalaki ya liso na nse ya lokasa te?
9 Davidi azalaki nde komitungisa ntango bazalaki konyokola ye? Davidi amilelaki epai ya Yehova ete: “Mpo ete . . . bato na makasi balingi kobebisa bomoi na ngai.” (Nzembo 54:3) Alobaki na Yehova ete: “Ɛ Nzambe na ngai, bikisá ngai na bayini na ngai . . . Bato ya nkanda, bamiyanganisi kobunda na ngai. Nasali nde soko mabe te soko libunga te, ɛ [Yehova]. Bapoti mbango mpe baselingwi, ata nazali na likambo mabe te; lamuká ete oya kozwana na ngai mpe komona.” (Nzembo 59:1-4) Oyoká naino ndenge yango te, ete mokonzi moko boye, osali ye mabe moko te, kasi alingi kotika yo nyɛ te? Atako bongo, Davidi atikaki kopesa Saulo limemya te. Ntango Saulo akufaki, na esika ayoka esengo, Davidi asalaki nzembo moko ya mawa oyo elobaki boye: “Saulo mpe Yonatana bazalaki na kitoko mpe na bolingo na ntango na bomoi na bango . . . Balekaki mpongo na mbangu, balekaki nkosi na nguya. Bino baseka ya Yisalaele, lelá mpo na Saulo.” (2 Samwele 1:23, 24) Talá ndakisa ya limemya ya solosolo mpo na moponami ya Yehova; Davidi asalaki bongo atako Saulo asalaki ye mabe!
10. Na ndenge atosaki bokonzi oyo Nzambe apesaki na lisangani ya mikóló-bakambi, ndakisa nini ya malamu Paulo apesaki, mpe esukelaki ye ndenge nini?
10 Na ntango ya baklisto, ezali mpe na bato oyo bapesaki ndakisa malamu ya kopesa lokumu epai ya bato oyo Nzambe apesaki bango bokonzi. Tókamata ndakisa ya moto lokola Paulo. Ye atosaki bikateli ya lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso. Na mbala ya nsuka oyo Paulo akendaki na Yelusaleme, bandeko oyo bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi bapesaki ye toli ete alanda molulu ya komipɛtola mpo Bayuda bámona ete azali koyina Mibeko ya Mose te. Paulo akokaki mbala mosusu kokanisa na kati ya motema na ye boye: ‘Kaka bandeko yango, liboso bayebisaki ngai nalongwa na Yelusaleme mpo bomoi na ngai ezalaki na likama. Sikoyo bazali kotinda ngai nalakisa na miso ya bato ete nazali kotosa Mibeko ya Mose. Nakomelaki Bagalatia mokanda mpe napesaki bango toli ete bátika kolanda makambo ya Mibeko. Lelo oyo soki nakei na tempelo, bato mosusu bakoyeba te mpo na nini nasali boye, mbala mosusu bakokanisa ete nandimi makanisi ya bato oyo bakatami ngenga.’ Kasi, tomoni mpenza ete Paulo akanisaki ndenge yango te. Lokola likambo yango ekokaki komema ye na kobuka mibeko ya boklisto te, atosaki mpe andimaki toli ya lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso. Mwa moke na nsima nini esalemaki? Babikisaki Paulo na mabɔkɔ ya ngulupa ya Bayuda oyo balingaki kosala ye mabe, mpe na nsima alekisaki mbula mibale na bolɔkɔ. Nsukansuka, mokano ya Nzambe esalemaki. Paulo apesaki bakonzi minene ya Leta litatoli na mboka Kaisalia mpe na nsima, bamemaki ye na Loma na mbongo ya Leta, mpe kuna apesaki Kaisala ye moko litatoli.—Misala 9:26-30; 21:20-26; 23:11; 24:27; Bagalatia 2:12; 4:9, 10.
Ozalaka na limemya?
11. Ndenge nini tokoki kolakisa limemya epai ya bakonzi ya mokili?
11 Opesaka bakonzi limemya oyo esengeli? Basɛngi na baklisto ete ‘báfutela bango nyonso nyongo na bango, . . . lokumu epai na bango bakoki kozwa lokumu.’ Kasi, mpo na biso, kotosa “bakonzi oyo bazali liboso” esuki kaka te na kofuta mpako kasi esɛngi mpe kozala na bizaleli mpe na maloba oyo ezali kolakisa ete tozali kopesa bakonzi lokumu. (Baloma 13:1-7, NW ) Tokosala nini liboso ya bakonzi ya Leta oyo mbala mosusu bazali na makambo mabe? Na ekólo Mexique, na etúká ya Chiapas, bakonzi ya mboka moko babɔtɔlaki mabele ya mabota 57 ya Batatoli ya Yehova mpo baboyaki kosangana na bafɛti ya mangomba. Ntango bazalaki kobengisa bango mpo na kokata likambo yango, Batatoli bazalaki kokende balati malamu mpe bazali pɛto, bazalaki ntango nyonso koloba na kimya mpe na limemya. Koleka mbula moko na nsima, bakataki likambo ete bázongisela bango mabele na bango. Kutu, bato mosusu oyo balandaki likambo yango bakómaki kopesa bango limemya mpo na ezaleli na bango mpe balobaki ete balingi ete bango mpe bákóma Batatoli ya Yehova!
12. Mpo na nini ezali na ntina ete mwasi azala na limemya epai ya mobali na ye ata soki azali mondimi te?
12 Ndenge nini okoki kolakisa ete otosaka bokonzi oyo Nzambe atii na kati ya libota? Nsima ya kolobela ndakisa ya Yesu mpe ndenge oyo ayikelaki mabe mpiko, ntoma Petelo alobaki boye: “Bobele bongo bino basi, bótosa babali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bázwana na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na pɛto mpe na limemya.” (1 Petelo 3:1, 2; Baefese 5:22-24) Na bavɛrsɛ yango, Petelo amonisi ntina oyo basi basengeli mpenza kotosa mibali na bango ata soki mibali mosusu bazali kosala makambo oyo ekoki kotinda basi yango ete bátosa bango te. Mwasi oyo azali na limemya akoki komema mobali na ye oyo azali mondimi te ete abongola motema.
13. Ndenge nini basi bakoki kopesa mibali na bango lokumu?
13 Na lisolo epai vɛrsɛ yango euti, Petelo apesi biso ndakisa ya Sala. Mobali na ye Abalayama azalaki ndakisa malamu mpo azalaki moto ya kondima mingi. (Baloma 4:16, 17; Bagalatia 3:6-9; 1 Petelo 3:6) Basi oyo mibali na bango bazali bandimi basengeli nde kopesa bango lokumu mingi te, bongo basi oyo mibali na bango bazali bandimi te bápesa bango lokumu koleka? Okosala nini soki na likambo moko boye, yo na mobali na yo bozali koyokana te? Yesu apesaki toli oyo ekoki kopesa biso liteya ete: “Ye nani [oyo azali na bokonzi, NW ] akangi yo ete okenda na ye kilomɛtɛlɛ moko, kendá na ye mibale.” (Matai 5:41) Okokisaka bamposa ya mobali na yo mpo na komonisa ete opesaka ye lokumu? Soki omoni ete ezali mpasi mingi mpo na yo, sololá na ye likambo yango. Koloba kaka na motema na yo te ete ayebi makanisi na yo. Kasi zalá na limemya ntango ozali koyebisa ye bamposa na yo. Biblia epesi toli oyo: “Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.”—Bakolose 4:6.
14. Kokumisa baboti esɛngi makambo nini?
14 Tokoloba boni mpo na bino bana? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bino bana, bótosaka baboti na bino kati na Nkolo zambi yango ezali sembo. Kumisá tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako ya liboso lizali na elaka.” (Baefese 6:1-3) Bomoni? Awa bamonisi ete kotosa baboti na yo ezali ndenge moko na ‘kokumisa tata na yo mpe mama na yo.’ Liloba ya Greke oyo ebongolami na “lokumu” elimboli “kopesa valɛrɛ” to “kotya motuya na.” Na yango, kozala mwana ya botosi esuki te na kondima na mitema mibale mibeko ya baboti na yo oyo mbala mosusu ozali komona ete ezali makasi. Nzambe alingi ete bópesa baboti na bino motuya mingi mpe toli na bango ezala na motuya na miso na bino.—Masese 15:5.
15. Ndenge nini bana bakoki kozala ntango nyonso na limemya ata soki baboti basali libunga?
15 Kasi, bokosala nini soki baboti na bino basali likambo moko oyo esilisi bino mposa ya kotosa bango? Bómeka komitya na esika na bango. Ezali bango nde ‘babotaki bino’ mpe babɔkɔlaki bino, lokuta? (Masese 23:22) Bomoni te ete nyonso oyo bazali kosala ezali mpo balingi bino? (Baebele 12:7-11) Bózala na bonkonde ntango bozali koloba na baboti na bino, mpe bókitisa mitema ntango bozali koyebisa bango makanisi na bino. Ata soki bapesi bino eyano oyo esepelisi bino te, bóloba na bango maloba ezangi limemya te. (Masese 24:29) Bókanisa lisusu ndenge oyo Davidi azalaki ntango nyonso komemya Saulo ata ntango Saulo atikaki kolanda toli ya Nzambe. Bósɛnga Yehova asalisa bino mpo bóyeba ndenge ya kosala liboso ya makambo oyo ezali kotungisa bino. Davidi alobaki boye: ‘Zipolá mitema na bino liboso na ye. Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.’—Nzembo 62:8; Bileli 3:25-27.
Tópesa baoyo bazali kokamba biso lokumu
16. Ndakisa ya balakisi ya lokuta na baanzelu ekoki koteya biso nini?
16 Elimo santu nde eponaka bankulutu na kati ya masangá. Atako bongo, bazali kaka bato ya kozanga kokoka mpe basalaka mabunga. (Nzembo 130:3; Mosakoli 7:20; Misala 20:28; Yakobo 3:2) Yango wana, bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kozwa bankulutu mabe. Tokosala nini ntango tomoni ete likambo moko na kati ya lisangá esalami malamu te, to tozali kokanisa bongo? Talá bokeseni oyo emonanaki na kati ya balakisi ya lokuta na ekeke ya liboso na baanzelu: “[Basakoli ya lokuta] bazali ata na nsɔmɔ te, bazali motó makasi, balɛngaka te liboso ya bato ya nkembo, kasi balobaka mabe, nzokande baanzelu, atako baleki na makasi mpe na nguya, bafundaka bango na maloba mabe te, basalaka yango te mpo bazali na limemya epai ya Yehova.” (2 Petelo 2:10-13, NW ) Balakisi ya lokuta bazalaki koloba mabe mpo na “bato ya nkembo,” elingi koloba bankulutu oyo Nzambe apesaki bango bokonzi na kati ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, nzokande baanzelu bazalaki koloba mabe mpo na balakisi ya lokuta te atako bazalaki kokabola bandeko. Lokola baanzelu bazali na nguya mpe na bosembo mingi koleka bato, bayebaki malamu makambo oyo ezalaki koleka na kati ya lisangá. Kasi, “mpo bazali na limemya epai ya Yehova,” batikaki Nzambe ye moko asambisa bango.—Baebele 2:6, 7; Yuda 9.
17. Ndenge nini kondima na yo ekoki komekama na likambo moko oyo omoni ete bankulutu basali yango malamu te?
17 Ata soki likambo moko esalami na ndenge oyo esengeli te, tosengeli kozala na kondima epai ya Yesu Klisto, ye azali Mokonzi ya lisangá ya boklisto mpe azali na bomoi! Ayebi malamu makambo nyonso oyo ezali koleka na kati ya lisangá na ye na mokili mobimba! Tosengeli kozala na limemya na ndenge oyo azali kotambwisa makambo mpe kondima ete amonaka makambo nyonso! Tómituna naino, ‘biso nde banani mpo tósambisa mozalani na biso?’ (Yakobo 4:12; 1 Bakolinti 11:3; Bakolose 1:18) Bondelá Yehova mpo na koyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa yo!
18, 19. Okosala nini soki omoni ete nkulutu moko asali libunga?
18 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mwa kwokɔsɔ to mikakatano ekoki kobima. Ntango mosusu kutu nkulutu moko akoki kosala libunga mpe likambo yango ekoki kotungisa bandeko mosusu. Na likambo ya bongo, soki tokómi motema mɔ́tɔmɔ́tɔ, tokobongisa mpe eloko moko te. Mbala mosusu kutu tokobebisa lisusu koleka. Baoyo bazali na bososoli ya elimo bakozela Yehova abongisa likambo yango mpe apesa disipilini oyo esengeli na ntango mpe na ndenge oyo ye moko alingi.—2 Timote 3:16; Baebele 12:7-11.
19 Okosala nini soki likambo moko etungisi yo? Na esika okómisa yango nzembo na matoi ya bandeko mosusu na lisangá, ezali malamu okutana na bankulutu mpe, na limemya nyonso, osɛnga bango básalisa yo. Kozala na makanisi ya kosambisa te, yebisá bango ndenge likambo yango esali yo mpasi. Zalá ntango nyonso na “boboto mpo na bandeko” mpe zalá na limemya ntango ozali kosolola na bango. (1 Petelo 3:8) Kozala na maloba ya kotyola te, kasi tyá motema ete bazali baklisto oyo bateli na elimo. Ndimá elendiseli nyonso oyo euti na Makomami oyo bakoki kopesa yo na boboto mpenza. Mpe soki emonani ete ezali na bikateli mosusu oyo esengeli kozwama mpo na kosembola makambo, zalá na elikya ete Yehova akotambwisa bankulutu mpo básala oyo ezali malamu mpe sembo.—Bagalatia 6:10; 2 Batesaloniki 3:13.
20. Tokotalela likambo nini na lisolo oyo elandi?
20 Kasi, ezali na eloko mosusu oyo tosengeli kotalela na likambo etali kokumisa mpe kozala na limemya epai ya baoyo bazali na bokonzi. Bato oyo bazali na bokonzi basengeli mpe kozala na limemya epai ya bandeko oyo bango bazali kobatela? Tótalela likambo yango na lisolo oyo elandi.
Okopesa eyano nini?
• Wapi ntina malamu oyo tosengeli kopesa baoyo bazali na bokonzi lokumu?
• Ndenge nini Yehova na Yesu batalelaka bato oyo bazali na limemya te mpo na baoyo Nzambe apesi bango bokonzi?
• Tángá bandakisa malamu ya bato oyo bapesaki baoyo bazali na bokonzi lokumu.
• Tokosala nini soki moto moko oyo azali na bokonzi likoló na biso asali libunga?
[Elilingi na lokasa 12]
Sala azalaki na limemya mingi mpo na bokonzi ya Abalayama mpe azalaki na esengo
[Elilingi na lokasa 13]
Mikala amemyaki Davidi te lokola mokonzi ya libota mpe mokonzi ya mboka
[Elilingi na lokasa 15]
‘Yehova apekisa ngai kosembola lobɔkɔ na ngai epai ya mopakolami ya Yehova’
[Elilingi na lokasa 16]
Bondelá Yehova mpo na koyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa yo!