Basi
Ndimbola: Bato oyo bakómi mikóló kasi bazali na biboteli oyo ekeseni na oyo ya mibali. Na Ebre liloba mwasi ezali ’ishshah, oyo elimboli “moto ya mwasi.”
Biblia ekitisaka basi to ezwaka bango nde lokola bato mpamba?
Eba. 2:18: “Yehova Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.’” (Awa, Nzambe alobi te ete mobali aleki mwasi. Kutu, Nzambe amonisi nde ete mwasi azali na bizaleli mosusu oyo ekokisaka oyo ya mobali na kati ya libala. Balobaka ete eloko boye ebongi na eloko boye soki eloko yango ezali kokokisa makambo oyo ezangi epai ya mosusu. Na yango, basi bazalaka na bizaleli mpe makoki mosusu ya malamu oyo mibali bazali na yango te; ezali mpe bongo mpo na mibali. Talá 1 Bakorinti 11:11, 12.)
Eba. 3:16: “[Nzambe] alobaki na mwasi ete: ‘ . . . mposa na yo ekozala epai ya mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.’” (Nzambe alobaki maloba wana nsima ya lisumu ya Adama ná Eva. Maloba yango emonisaki te oyo mibali basengeli kosala, kasi nde oyo Yehova ayebaki ete mibali bakosala, lokola bakómi sikoyo koluka matomba na bango moko. Masolo ya Biblia elobeli mpe makambo ya mawa mpenza oyo esalemaki mpo mibali babandaki kosalela bokonzi na bango mabe. Kasi, Biblia emonisi te ete Nzambe andimaka likambo ya ndenge wana, emonisi mpe te ete likambo yango ezali ndakisa oyo bato basengeli kolanda.)
Mwasi azali lisusu na valɛrɛ te mpo mobali azali mokonzi na ye?
Kotosa mokonzi elimboli te ete moto azali lisusu na valɛrɛ te. Soki mokonzi azali, yango esalaka ete makambo etambola na molɔngɔ, mpo Yehova azali “Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” (1 Ko. 14:33) Yehova Nzambe azali mokonzi ya Yesu Kristo, mpe Yesu asepelaka mingi mpenza ndenge Yehova azali mokonzi na ye.—Yoa. 5:19, 20; 8:29; 1 Ko. 15:27, 28.
Nzambe apesi mpe mobali mwa bokonzi, mingimingi na kati ya libota mpe na lisangá ya bokristo. Nzambe apesi mobali bokonzi likoló ya mwasi na makambo nyonso te; mobali akozongisa monɔkɔ epai ya mokonzi na ye, Yesu Kristo, mpe epai ya Nzambe na lolenge oyo azali kosalela bokonzi yango. (1 Ko. 11:3) Lisusu, Nzambe asɛngi mibali ‘bálinga basi na bango lokola nzoto na bango moko’ mpe ‘bápesaka bango lokumu.’ (Ef. 5:28; 1 Pe. 3:7) Na kati ya libala, Nzambe asalá te ete bamposa ya kosangisa nzoto ya mobali ezala na ntina mingi koleka oyo ya mwasi. (1 Ko. 7:3, 4) Biblia emonisi ete mwasi oyo akoki azali na ntina mingi na kati ya libota mpe na mboka. Emonisi mpe ete mwasi akoki kozwa likanisi ya kosala makambo mosusu mpe kosala yango, kasi asengeli kotosa bokonzi ya mobali na ye. (Mas. 31:10-31) Biblia esɛngi bana bákumisaka kaka tata na bango te, kasi mpe mama na bango. (Ef. 6:1-3) Ebɛti mpe nsɛtɛ ete esengeli kobosana te kosalisa basi oyo mibali na bango bakufá. (Yak. 1:27) Na yango, epai ya bakristo ya solo, basi bakoki komiyoka ete bazali kobatelama, ete bazali na valɛrɛ, mpe mokomoko akoki kosepela na mosala na ye.
Lisusu, mpo na komonisa ete mwasi azali na esika ya lokumu na kati ya ebongiseli ya libala ndenge Nzambe abandisaki, Yehova akokanisi eteni ya lisangá na ye oyo ezali na likoló na mwasi, mwasi na ye, mama ya bana na ye. (Em. 12:1; Gal. 4:26) Lisusu, lisangá ya Yesu Kristo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ebengami mwasi ya Kristo. (Em. 19:7; 21:2, 9) Mpe lisusu, na miso ya Nzambe, basi ná mibali oyo babengami mpo na kozala bakonzi elongo na Kristo na likoló bakeseni te.—Gal. 3:26-28.
Basi bakoki kozala bakambi ya lingomba? Bakoki nde kozala basakoli ya nsango malamu?
Biblia emonisi ete mibali nde bazalaki na mokumba ya kokɛngɛla masangá. Bantoma 12 ya Yesu Kristo bazalaki bango nyonso mibali, mpe baoyo baponamaki na nsima mpo na kozala bakɛngɛli to basaleli na misala na masangá ya bokristo bazalaki mpe mibali. (Mat. 10:1-4; 1 Tim. 3:2, 12) Biblia epesi basi toli ‘báfanda nyɛɛ mpe báyekola na komikitisa mpenza’ na makita ya lisangá, elingi koloba, bapesi bango nzela te ya kobimisa mituna oyo ekomonisa ete bazali kotosa bokonzi ya mibali te na kati ya lisangá. Basi basengeli ‘koloba te’ na makita yango soki makambo oyo bakoloba ekomonisa ete bazangi komikitisa. (1 Tim. 2:11, 12; 1 Ko. 14:33, 34) Na yango, atako basi bapesaka mabɔkɔ na misala mingi ya lisangá, Nzambe aponá bango te mpo bákambaka lisangá to báteyaka yango ntango mibali oyo bakokisi masɛngami bazali.
Longola makita ya lisangá, basi bakoki nde kozala basakoli to baministre ya nsango malamu? Na Pantekote ya mobu 33 T.B., mibali ná basi bazwaki elimo santu. Mpo na kolimbola likambo yango, ntoma Petro atángaki Yoele 2:28, 29 mpe amonisaki ete: “Nzambe alobi boye: ‘Na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli mpe mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ; ata mpe baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi nakosopela bango ndambo ya elimo na ngai na mikolo wana, mpe bakosakola.’” (Mis. 2:17, 18) Ndenge moko mpe lelo, basi basengeli kosakola nsango malamu ndako na ndako mpe koyekola na bato Biblia.—Talá mpe Nzembo 68:11; Bafilipi 4:2, 3.
Mpo na nini na mabaku mosusu basi bakristo bazipaka motó?
1 Ko. 11:3-10: “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe. . . . Mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola motó na ye ezipami te azali koyokisa mokonzi na ye nsɔni . . . Mpo mobali asengeli te kozala na motó oyo ezipami, mpo azali elilingi mpe nkembo ya Nzambe; kasi mwasi azali nkembo ya mobali. Mpo mobali auti na mwasi te, kasi mwasi auti na mobali; mpe, lisusu, mobali azalisamaki te mpo na mwasi, kasi mwasi mpo na mobali. Yango wana mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na motó na ye mpo na baanzelu.” (Soki mwasi mokristo azipi motó na ye na ntango oyo esengeli, yango ekomonisa ete azali komemya ebongiseli ya bokonzi oyo Nzambe atyá. Kristo atosaka ebongiseli oyo Nzambe atyá; mwasi ná mobali mpe basengeli kosala bongo. Adama, mobali ya liboso, abotamaki na mwasi te kasi akelamaki na Nzambe. Ntango Nzambe asalaki Eva, asalelaki mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya Adama mpe alobaki ete Eva akozala mosungi ya Adama. Yango wana, lokola mobali akelamaki liboso, Nzambe apesaki ye mokumba ya kozala mokonzi. Mobali asengeli kozipa motó na ye te ntango azali ‘kobondela to kosakola,’ mpo na likambo ya bokonzi, mobali azali “elilingi ya Nzambe,” mpe na kati ya libota azali na mokonzi te awa na mabele. Kasi, soki mwasi azali ‘kobondela to kosakola’ kozanga ete azipa motó na ye, akomonisa ete azali komemya te bokonzi oyo Nzambe apesá mobali mpe azali koyokisa mokonzi na ye nsɔni. Ata baanzelu, oyo bazali na eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló, oyo bakokanisi yango na mwasi, bamonaka “elembo ya bokonzi” oyo basi bakristo ya sembo balataka mpe yango ekundwelaka bango ete bango mpe basengeli komemya Yehova.)
Ntango nini mpenza mwasi asengeli kozipa motó?
Ntango azali “kobondela to kosakola” ndenge mokanda ya 1 Bakorinti 11:5 elobi. Yango elingi koloba te ete asengeli kozipa motó ntango azali kobondela ye moko to ntango azali koyebisa bato bisakweli ya Biblia. Nzokande, asengeli kozipa motó mpo na kotosa bokonzi ya mobali kaka soki azali kokokisa mikumba ya losambo oyo mobali na ye to ndeko mobali mosusu asengelaki kosala. Ntango azali kobondela na mongongo makasi mpo na ye moko mpe mpo na bato mosusu to azali kotambwisa boyekoli ya Biblia, na mokuse ntango azali koteya, mpe soki mobali na ye azali wana, ezala mobali na ye azali Motatoli ya Yehova to te, asengeli kozipa motó. Kasi, lokola Nzambe apesi ye nzela ya koteya bana na ye, ezali na ntina te azipa motó ntango azali kobondela mpe koyekola na bana na ye oyo bazwi naino batisimo te, mpe soki mobali na ye azali wana te. Soki ayekolaka Biblia na moto moko, mpe esalemi ete ndeko mobali moko azali wana to akendaki na mokɛngɛli-motamboli moko na boyekoli yango, asengeli kozipa motó ntango azali koyekola na moto yango, kasi ndeko mobali nde akosala libondeli.
Ezali malamu basi bálataka babiju mpe básalaka monzɛlɛ?
1 Pe. 3:3, 4: “Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki mpe na kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema, na molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.” (Yango elingi koloba ete basi basengeli te kolata babiju to biloko mosusu ya kobongisa nzoto? Ezali bongo te; mpo ndenge kaka Biblia epekisi bango te kolata bilamba, epekisi bango mpe te kobongisa nzoto. Kasi, balendisi bango nde ete bálataka mpe bábongisaka nzoto na ndenge ya kolekisa ndelo te, mpe bámibanzabanzaka libosoliboso na kitoko ya elimo to ya kati.)
1 Tim. 2:9, 10: “Nalingi mpe ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu, kasi na midɛlɛ ya kokanga nsuki te mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi te, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na misala ya malamu.” (Nini ezali mpenza na motuya mingi na miso ya Nzambe—ndenge tomonanaka na miso ya bato to ndenge motema na biso ezali? Nzambe akosepela na mwasi oyo asalelaka biloko ya monzɛlɛ te to alataka babiju te kasi azali ndumba? To akosepela nde na basi oyo balekisaka ndelo te mpe bazali na makanisi ebongi na likambo ya kosalela biloko ya monzɛlɛ mpe kolata babiju mpe oyo balukaka libosoliboso kobongisa bizaleli na bango liboso ya Nzambe? Yehova alobi ete: “Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.”—1 Sa. 16:7.)
Mas. 31:30: “Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpamba; kasi mwasi oyo abangaka Yehova ye nde azwaka lokumu.”