Zwá motema oyo ekosepelisa Yehova
“Ɛ Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.”—NZEMBO 51:10.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kotalela motema na biso?
MWANA ya liboso ya Yisai azalaki engambe mobali mpe azalaki kitoko. Ntango kaka mosakoli Samwele amonaki ye, abendamaki mbala moko mpe alobaki na nse ya motema na ye ete Yehova aponaki ye mpo akóma mokonzi na esika ya Saulo. Kasi, Yehova alobaki ete: “Talá na elongi ya [mwana yango] te mpe na molai na nzoto na ye te mpo ete naboyi ye. . . . Moto akomonaka lolenge ya libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” Yehova aponaki Davidi, mwana ya nsuka ya Yisai, ‘moto oyo asepelisaki motema na ye.’—1 Samwele 13:14; 16:7.
2 Nzambe akoki kotala na kati ya motema ya moto, ndenge ye moko alobaki yango na nsima ete: “Ngai [Yehova], nakolukaluka kati na motema, nakomeka makanisi, mpo na kopesa epai ya moto na moto lokola ezali nzela na ye.” (Yilimia 17:10) Ya solo, “[Yehova atalatalaka na, NW] mitema ya bato.” (Masese 17:3) Kasi, motema oyo Yehova atalatalaka epai ya moto ezali mpenza nini? Mpe ndenge nini tokoki kozwa motema oyo ekosepelisa ye?
“Bomoto oyo ebombami na motema”
3, 4. Biblia ezali kosalela liloba “motema” libosoliboso na ndimbola nini? Pesá bandakisa.
3 Na kati ya Makomami Mosantu tokoki kokuta liloba “motema” mbala soki nkóto moko. Basaleli liloba yango mingimingi na elobeli ya elilingi. Na ndakisa, Yehova alobaki na mosakoli Mose ete: “Lobelá bato ya Yisalaele ete [bázwa] makabo mpo na ngai. Bokoyamba likabo mpo na ngai na moto na moto oyo akopesa na motema malamu.” Bongo, bato oyo bapesaki makabo “[bayaki], moto na moto na mposa ya motema na ye.” (Exode 25:2; 35:21) Tozali komona ete motema ya elilingi elimboli mpe mposa, bokasi oyo etindaka moto asala likambo moko. Motema na biso ya elilingi emonisaka mpe mayoki na biso, bamposa na biso mpe makambo oyo tolingaka. Motema ekoki kozika na nkanda to kozala na kobanga, ekoki kozala na mawa to na esengo. (Nzembo 27:3; 39:3; Yoane 16:22; Baloma 9:2) Motema ekoki kozala na lolendo to mpe na komikitisa, ekoki kozala na bolingo to na likunya.—Masese 16:5; Matai 11:29; 1 Petelo 1:22.
4 Yango wana, mbala mingi basalelaka “motema” mpo na kolobela bamposa mpe mayoki ya moto, nzokande “makanisi” elimbolaka mbala mingi mayele. Yango nde bandimbola tosengeli kosimba na maloba yango ntango ezali esika moko na kati ya Makomami. (Matai 22:37, NW; Bafilipi 4:7) Kasi, ntango mosusu motema na makanisi elimbolaka kaka eloko moko. Na ndakisa, Mose alendisaki Bayisalaele ete: “Kanisá yango na motema na yo [to, “yebisá yango na makanisi na yo,” NW, maloba na nse ya lokasa] ete [Yehova] azali Nzambe.” (Deteronome 4:39) Yesu alobaki na bakomeli oyo balukaki koboma ye ete: “Mpo na nini bozali kokanisa mabe na mitema na bino?” (Matai 9:4) Bakoki mpe koloba ete motema ezali na “bososoli,” na “boyebi,” to mpe na “kokanisa.” (1 Mikonzi 3:12; Masese 15:14; Malako 2:6) Na yango, motema ya elilingi ekoki mpe kolimbola mayele, elingi koloba makanisi to bososoli na biso.
5. Motema ya elilingi ezali mpenza nini?
5 Mokanda moko elobi ete motema ya elilingi ezali “eteni ya ntina to ya kati, mpe na bongo, elimboli bomoto ya kati ndenge azali komimonisa na misala na ye, na bamposa na ye, na makambo oyo alingaka mingi, na mayoki, na bilulela na ye, mikano na ye, na makanisi na ye, na ndenge ya komona makambo, na mabanzo, na mayele, na boyebi, na makoki, na bindimeli mpe kokanisa na ye, na makoki ya kobomba makambo mpe na lisosoli na ye.” Emonisaka oyo tozali mpenza na kati, “bomoto oyo ebombami na motema.” (1 Petelo 3:4, NW) Ezali yango nde motema oyo Yehova amonaka mpe atalatalaka. Yango wana, Davidi alobaki na kati ya libondeli ete: “Ɛ Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Ndenge nini tokoki kozwa motema ya pɛto?
‘Bótya mitema na bino’ na Liloba ya Nzambe
6. Ntango bazalaki na mokili patatalu ya Moaba, Mose alendisaki Bayisalaele na kosala nini?
6 Ntango bana ya Yisalaele basanganaki na mokili patatalu ya Moaba, liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka, Mose apesaki bango toli oyo: ‘Bótya mitema na bino na maloba nyonso oyo elakeli ngai bino lelo oyo, ete bókoka kolakela bana na bino yango, ete bango básɛnzɛla kosala maloba nyonso ya mobeko oyo.’ (Deteronome 32:46) Bayisalaele basengelaki “kofungola matoi.” (Biblia ya Knox [na Lingelesi]) Basengelaki komesana mpenza na mibeko ya Nzambe mpo báteya yango epai ya bana na bango.—Deteronome 6:6-8.
7. ‘Kotya mitema na biso’ na Liloba ya Nzambe esɛngi makambo nini?
7 Sɛkɛlɛ monene mpo na kozwa motema ya pɛto ezali koyeba malamu mokano ya Nzambe. Boyebi yango eutaka esika mosusu te, kaka na Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16, 17) Kasi, koyeba mpamba na motó ekoki kosalisa biso te na kozwa motema oyo esepelisaka Yehova. Mpo boyebi yango ebongola bomoto na biso ya kati, tosengeli ‘kotya mitema na biso’ na makambo oyo tozali koyekola, to ‘kobomba [yango] na motema.’ (Mibeko 32:46, Liloba lya Nzambe) Yango esalemaka ndenge nini? Davidi, mokomi ya nzembo alobi boye: “Nakobanza mikolo ya kalakala; nakokanisa misala na yo nyonso; nakobanza misala ya mabɔkɔ na yo.”—Nzembo 143:5.
8. Mituna nini tosengeli komituna ntango tozali koyekola?
8 Biso mpe tosengeli kozala na botɔndi mpo na mosala ya Yehova mpe komanyola likoló na yango. Ntango tozali kotánga Biblia to mokanda moko oyo elimbolaka Biblia, tosengeli komituna mituna lokola oyo: ‘Mokanda oyo ezali koteya ngai likambo nini mpo na Yehova? Bizaleli nini ya Yehova nazali komona awa? Lisolo oyo ezali koteya ngai makambo nini oyo Yehova alingaka mpe oyo alingaka te? Nakozwa matomba nini soki naponi kolanda nzela oyo Yehova alingaka na esika nalanda nzela oyo ayinaka? Boyokani nini ezali kati na makambo oyo nazali koyekola na makambo oyo nayebi?’
9. Boyekoli ya biso moko mpe komanyola ezali na ntina nini?
9 Lisa,a elenge mwasi ya mbula 32 ayebisi biso ndenge oyo akómaki kosepela koyekola mpenza na ndenge ya solo mpe komanyola: “Nsima ya kozwa batisimo na 1994, nazalaki na molende na kati ya lisangá na boumeli ya mbula soki mibale. Nazalaki koyangana na makita nyonso, sanza na sanza nazalaki kolekisa ngonga 30 to 40 na mosala ya kosakola, mpe baninga na ngai ezalaki kaka bandeko baklisto. Na nsima, nakómaki kopɛngwa mokemoke. Nsukansuka, nazindaki mpenza kozinda, tii nabukaki kutu mobeko ya Nzambe. Na nsima nalamukaki na mpɔngi mpe nazwaki ekateli ya kobongisa bomoi na ngai. Nazali kotɔnda Yehova mingi na ndenge andimi ngai ete nabongoli motema mpe ayambi ngai lisusu! Mbala mingi namitunaka: ‘Mpo na nini nakweaki?’ Eyano moko kaka eyelaka ngai: natikaki koyekola mpenza na ndenge ya solo mpe komanyola. Mateya ya Biblia esimbaki mpenza motema na ngai te. Sikoyo, koyekola ngai moko mpe komanyola ekobanda kozala kaka na esika ya liboso na kati ya bomoi na ngai.” Ntango boyebi na biso ya Yehova, ya Mwana na ye mpe ya Liloba na ye ezali kobakisama, ezali na ntina mingi tózwaka ntango ya kofanda mpe kokanisa na bozindo!
10. Mpo na nini tosengeli kosala nokinoki ete tóbomba ntango mpo na koyekola biso moko mpe komanyola?
10 Na mokili oyo bato bazali na ebele ya makambo ya kosala, kozwa ntango ya koyekola mpe komanyola ezali likambo moke te. Kasi, lelo oyo baklisto bakómi pene mpenza ya Mokili ya Ndaka ya kitoko koleka: mokili ya sika ya sembo oyo Nzambe alaki. (2 Petelo 3:13) Makambo minene ezali koya liboso, lokola kobomama ya “Babilone Monene” mpe etumba ya ‘Gogo ya mokili ya Magogo’ oyo akobundisa basaleli ya Nzambe. (Emoniseli 17:1, 2, 5, 15-17; Ezekiele 38:1-4, 14-16, NW; 39:2) Makambo oyo ezali liboso ekoki kozala komekama mpo na bolingo na biso epai ya Yehova. Tosengeli kosomba ntango nokinoki mpe kotya mitema na biso na Liloba ya Nzambe!—Baefese 5:15, 16.
‘Bongisá motema na yo mpo na koyekola Liloba ya Nzambe’
11. Ndenge nini mitema na biso ekoki kokokana na mabele?
11 Tokoki kokokanisa motema ya elilingi na mabele oyo bakoki kolona mateya ya solo kati na yango. (Matai 13:18-23) Bakataka elanga mpe babongisaka mabele mpo ete milona oyo bakolona ekola malamu. Ndenge moko mpe, tosengeli kobongisa motema na biso mpo eyamba malamu Liloba ya Nzambe. Nganga Ezela “abongisaki motema na ye mpo na koyekola mibeko ya Yehova mpe kosalela yango.” (Ezela 7:10, NW) Ndenge nini biso mpe tokoki kobongisa motema na biso?
12. Nini ekosalisa biso na kobongisa motema na biso mpo na koyekola?
12 Lolenge moko malamu mpenza ya kobongisa motema ntango tolingi kotánga Liloba ya Nzambe ezali ya kosala libondeli oyo euti mpenza na motema. Makita ya basambeli ya solo ebandaka mpe esukaka na libondeli. Ebongi tóbondelaka na bosembo mpenza liboso tóbanda koyekola Biblia mpe, ntango tozali koyekola, tótikala ntango nyonso na ezaleli oyo ebongi na moto oyo azali koyekola makambo ya Nzambe!
13. Tosengeli kosala nini mpo tókóma na motema oyo ekosepelisa Yehova?
13 Tosengeli kobongisa motema ya elilingi mpo na kolongola makanisi mabe oyo tozali na yango. Bakonzi ya mangomba ya ntango ya Yesu bandimaki kosala ndenge yango te. (Matai 13:15) Nzokande, makambo ya solo oyo Malia mama ya Yesu ayokaki, etindaki ye asosola “na motema na ye.” (Luka 2:19, 51) Malia akómaki moyekoli ya sembo ya Yesu. Tozali mpe na ndakisa ya Ludia, mwasi moko ya engumba Twatila, ye ayokaki Paulo mpe ‘Nkolo azipolaki motema na ye ete ayamba makambo.’ Ye mpe akómaki mondimi. (Misala 16:14, 15) Biso mpe tótingamaka te na makanisi na biso moko to na mateya mosusu mpo tolingaka yango mingi. Tózalaka nde pene ya kondima ete “Nzambe azali sembo ata bato nyonso bazali na lokuta.”—Baloma 3:4.
14. Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na koyoka na makita ya lisangá?
14 Ezali mpenza na ntina tóbongisa motema na biso mpo na koyoka makambo oyo bazali koloba na makita. Makambo yango ekoki koleka biso lokola mopɛpɛ soki makanisi na biso ezali koyengayenga. Tokozwa litomba moko te na makambo oyo tozali koyoka soki makanisi na biso ezali na makambo oyo elekaki na moi to tozali kokanisa makambo oyo tokosala lobi. Soki tolingi kozwa litomba na makambo oyo bazali koloba na makita, tosengeli kozala na ekateli ya koyoka mpe koyekola. Tokozwa matomba mingi soki tozali na mposa makasi ya kokanga ntina ya mikapo oyo ezali kotángama mpe ndenge oyo ezali kolimbolama!—Nehemia 8:5-8, 12.
15. Ndenge nini komikitisa esalisaka biso tózala motó libanga te ntango bazali koteya biso?
15 Mabele ekómaka malamu koleka soki babakisi engrais oyo ebongi kati na yango; ndenge moko mpe, soki toloni bizaleli lokola komikitisa, mposa ya makambo ya elimo, elikya, kobanga Nzambe mpe kolinga ye, motema na biso ya elilingi ekokóma malamu koleka. Komikitisa elɛmbisaka motema, esalisaka biso tózala motó libanga te ntango bazali koteya biso. Yehova alobaki na Yosiya, mokonzi ya Yuda ete: “Mpo ete motema na yo ezalaki na motau mpe omisɔkisi liboso ya [Yehova] wana eyoki yo likambo lilobaki ngai . . . mpe oleli liboso na ngai; boye [Yehova] alobi ete, Ngai nayoki yo.” (2 Mikonzi 22:19) Yosiya azalaki na motema ya komikitisa mpe ya koyoka noki. Komikitisa esalisaki bayekoli ya Yesu bákanga ntina ya mateya ya solo mpe básalela yango, atako bazalaki “bato bameseni na mikanda te mpe bato bayekoli makambo te,” nzokande “bato ya mayele mpe bato ya kokanisa” bakokaki koyeba yango te. (Misala 4:13; Luka 10:21) “Tómisɔkisa liboso ya Nzambe na biso” wana tozali koluka kozwa motema oyo ekosepelisa Yehova.—Ezela 8:21.
16. Mpo na nini tosengeli kosala molende mpo na kolona mposa ya kolya bilei ya elimo?
16 Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Tozali na mposa ya koyekola makambo ya elimo, kasi makambo ya mokili oyo mabe to bizaleli lokola goigoi ekoki kosala ete tóbosana mposa yango. (Matai 4:4) Tosengeli kolona mposa oyo ebongi ya kolya bilei ya elimo. Ata soki na ebandeli kotánga Biblia mpe koyekola biso moko ezali kosepelisa biso te, soki tolendendeli, tokomona ete boyebi ‘ekoyokama malamu na molimo na biso’ mpe tokokóma na mposa ya koyekola mbala na mbala.—Masese 2:10, 11.
17. (a) Mpo na nini ebongi na biso kotyela Yehova motema mobimba? (b) Ndenge nini tokoki kolona elikya epai ya Nzambe.
17 Mokonzi Salomo apesaki toli ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” (Masese 3:5) Moto oyo motema na ye ezali na elikya epai ya Yehova ayebaka ete likambo nyonso oyo Yehova azali kosɛnga biso mpe oyo azali kotinda biso na nzela ya Liloba na ye ezalaka kaka malamu. (Yisaya 48:17) Yehova abongi mpenza tótyela ye motema na biso mobimba. Akoki kolɛmba eloko moko te na nyonso oyo akani. (Yisaya 40:26, 29) Nkombo na ye elimboli ete “Akómisaka”; yango ezali kopesa elikya ete azali na makoki ya kokokisa bilaka na ye! “Azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe sembo na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Kasi, mpo tókoka kolona elikya epai na ye, tosengeli ‘komeka mpe kososola ete [Yehova] azali malamu,’ elingi koloba ete na bomoi na biso, tosengeli kosalelaka makambo oyo tozali koyekola na kati ya Biblia mpe tosengeli kozwaka ntango ya kokanisa mbuma malamu oyo yango ezali kobota.—Nzembo 34:8.
18. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaka biso na kondima koyoka toli ya Nzambe?
18 Salomo amonisaki ezaleli mosusu oyo ebongisaka motema na biso mpo na koyoka toli ya Nzambe ntango alobaki ete: “[Bangá Yehova, NW] mpe longwá na mabe.” (Masese 3:7) Mpo na Yisalaele ya kala, Yehova alobaki boye: “Soko bazalaki bobele na motema boye seko, mpo na kobanga ngai mpe mpo na kotosa malako na ngai nyonso, ete bátikala malamu, mpe bana na bango libela!” (Deteronome 5:29) Ya solo, bato oyo babangaka Nzambe, batosaka mpe ye. Yehova azali na makoki ya ‘komonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye’ mpe kopesa etumbu na baoyo bazali kotosa ye te. (2 Ntango 16:9) Tiká ete kobanga Nzambe mpe limemya na biso epai na ye oyo ezali kotinda biso tóyokisa ye mawa te, etambwisa misala, makanisi mpe mayoki na biso nyonso.
‘Lingá Yehova na motema na yo mobimba’
19. Bolingo ezali na ntina nini mpo na kobongisa motema na biso ete endima toli ya Yehova?
19 Ezaleli ya libosoliboso oyo ebongisaka motema na biso na koyoka toli ya Yehova ezali bolingo. Moto oyo azali na motema oyo elingaka Nzambe alukaka koyeba makambo nini esepelisaka Nzambe mpe makambo nini esepelisaka ye te. (1 Yoane 5:3) Yesu alobaki ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37) Tókanisaka malamu na ye, tólobaka na ye lokola na moninga ya motema mpe tóyebisaka bato mosusu makambo na ye mpo bolingo na biso mpo na ye ekóma lisusu makasi.
20. Ndenge nini tokoki kozwa motema oyo ekosepelisa Yehova?
20 Na mokuse tokoloba boye: Kozwa motema oyo ekosepelisa Yehova esɛngi kotika ete Liloba ya Nzambe ebongola bomoto na biso ya kati. Koyekola Makomami na ndenge oyo esengeli mpenza mpe komanyola likoló na yango ezali na ntina mingi. Tokosala yango malamu mpenza soki tozali na motema oyo ebongisami, elingi koloba motema oyo ezali na makanisi ya mabe te, motema oyo ezali na bizaleli oyo ekosala ete tózala motó makasi te ntango tozali koteyama! Ya solo, na lisalisi ya Yehova, tokoki kozwa motema ya malamu. Kasi, makambo nini tokoki kosala mpo na kobatela motema na biso?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
Okopesa eyano nini?
• Motema ya elilingi oyo Yehova atalaka ezali nini?
• Ndenge nini tokoki ‘kotya mitema na biso’ na Liloba ya Nzambe?
• Ndenge nini tosengeli kobongisa motema na biso liboso ya koyekola Liloba ya Nzambe?
• Nsima ya koyekola lisolo oyo, okómi na mposa ya kosala nini?
[Elilingi na lokasa 17]
Davidi azalaki na botɔndi mpo na makambo ya elimo mpe azalaki komanyola likoló na yango. Yo mpe osalaka bongo?
[Bililingi na lokasa 18]
Bongisá motema na yo liboso ya koyekola Liloba ya Nzambe?