LISOLO YA BOYEKOLI 29
Sepelá na oyo ozali kosala na mosala ya Yehova!
‘Moto na moto . . . azwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.’—GAL. 6:4.
LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo
NA MOKUSEa
1. Mpo na nini Yehova akokanisaka biso te na basusu?
YEHOVA asepelaka na bokeseni oyo ezali kati na bikelamu na ye. Toyebi yango mpo akelá biloko mpe bato ndenge na ndenge. Moto na moto azali na ndenge na ye moko. Na yango, Yehova akokanisaka biso soki moke te na basusu. Atalaka motema na yo, elingi koloba, bomoto na yo ya kati. (1 Sa. 16:7) Ayebi makasi na yo, bolɛmbu na yo, mpe makambo oyo okutaná na yango na bomoi. Mpe asɛngaka yo te osala makambo oyo okokoka te. Tosengeli komitalela ndenge Yehova atalelaka biso. Kosala bongo ekosalisa biso tózala na “makanisi malamu”. Tokokanisa te ete tozali na ntina mingi koleka basusu, to mpe basusu bazali na ntina mingi koleka biso.—Rom. 12:3.
2. Mpo na nini ezali malamu te tómikokanisaka na basusu?
2 Tokoki kozwa mateya na ndakisa malamu ya basusu. Na ndakisa, tokoki koyeba ndeko moko oyo ayebi kosakola malamu. (Ebr. 13:7) Tokoki koyekola epai ya ndeko yango mpe kobongisa lolenge na biso ya kosakola. (Flp. 3:17) Kasi ezali na bokeseni kati na kolanda ndakisa malamu ya moto moko mpe komikokanisa na moto yango. Soki tozali komikokanisa na basusu, tokoki kokóma na likunya, kolɛmba nzoto, to mpe komimona ete tozali na ntina te. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, koluka kowelana na bandeko ya lisangá, ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango wana, na bolingo nyonso Yehova ayebisi biso ete: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”—Gal. 6:4.
3. Makambo nini osalá na losambo ya Yehova oyo epesaka yo esengo?
3 Yehova alingi osepela na oyo ozali kosala na losambo na ye. Na ndakisa, soki ozwá batisimo, okoki kosepela ndenge okokisá mokano yango! Yo moko nde ozwaki ekateli ya kosala yango. Ozwaki ekateli yango mpo olingaka Nzambe. Kanisá makambo nyonso oyo osalá banda ozwá batisimo. Na ndakisa, okómá kosepela mingi kotánga Biblia mpe koyekola yango na mozindo? Okómá kobondela Yehova na motema na yo mobimba? (Nz. 141:2) Okómá kobanda masolo malamu mpe kosalela malamu bisaleli na biso mpo na koteya na mosala ya kosakola? Mpe soki ozali na libota, Yehova asalisi yo okóma mobali malamu, mwasi malamu, to moboti malamu? Okoki kosepela mpenza mpo na mbongwana nyonso oyo osalá.
4. Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Tokoki kosalisa basusu básepela na oyo bazali kosala na losambo ya Yehova. Tokoki mpe kosalisa bango mpo bámikokanisaka na bato mosusu te. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo baboti bakoki kosalisa bana na bango, ndenge oyo mwasi ná mobali bakoki kosalisana, mpe ndenge oyo bankulutu mpe bandeko mosusu bakoki kosalisa bandeko ya lisangá. Na nsuka, tokolobela mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tómityela mikano oyo tokoki kokokisa na kotalela makoki mpe makambo ya bomoi na biso.
OYO BABOTI MPE BABALANI BAKOKI KOSALA
5. Na kotalela Baefese 6:4, likambo nini baboti basengeli kosalaka te?
5 Baboti basengeli kokeba ete bákokanisaka te mwana moko na mosusu, to mpe básɛngaka ete mwana moko asala likambo moko oyo akokoka kosala te. Soki baboti bazali kosala bongo, yango ekoki kolɛmbisa mwana na bango. (Tángá Baefese 6:4.) Ndeko mwasi moko na nkombo Sachikob alobi boye: “Balakisi na ngai bazalaki kolinga ete nasala nyonso mpo naleka bana-kelasi mosusu. Lisusu, mposa ya mama na ngai ezalaki ete nazwaka bapwɛ mingi na kelasi mpo napesa litatoli epai ya molakisi na ngai mpe epai ya tata na ngai oyo azalaki Motatoli te. Mpo na koloba solo, mama azalaki kolinga ete nazwaka bapwɛ nyonso na ekzamɛ; likambo oyo nakokaki kosala te. Atako nasilisá kelasi eleki bambula mingi, na bantango mosusu nakobaka komituna soki Yehova asepelaka na ngai ata soki nazali kosala oyo ekoki na mosala na ye.”
6. Nzembo 131:1, 2, ekoki koteya baboti nini?
6 Liteya ya ntina mingi oyo baboti bakoki kozwa ezali na Nzembo 131:1, 2. (Tángá.) Mokonzi Davidi alobaki ete ‘atambolaki te na makambo mineneminene,’ na maloba mosusu alukaki te kosala makambo oyo elekaki makoki na ye. Komikitisa mpe bopɔlɔ oyo azalaki na yango esalisaki ye azala “kimya.” Liteya nini baboti bakoki kozwa na maloba wana ya Davidi? Mpo baboti bázala na komikitisa, basengeli te koluka kosala makambo oyo bakokoka te; basengeli mpe te kosɛnga mwana na bango asala bongo. Baboti bakoki kosalisa mwana na bango amiyoka ete azali na ntina, soki bayebi makasi mpe bolɛmbu na ye mpe basalisi ye amityela mikano oyo akoki kokokisa. Ndeko mwasi moko na nkombo Marina alobi boye: “Mama na ngai azalaki kokokanisa ngai soki moke te na bandeko na ngai misato to mpe na bana mosusu. Ateyaki ngai ete moto nyonso azali na makoki na ye mpe mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Yehova. Yango esalisaka ngai namikokanisaka na basusu te.”
7-8. Ndenge nini mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu?
7 Mobali mokristo asengeli kopesaka mwasi na ye lokumu. (1 Pe. 3:7) Kopesa moto lokumu elimboli kotyela ye mpenza likebi mpe kopesa ye limemya. Na ndakisa, mobali akopesa mwasi na ye lokumu soki azali kosalela ye makambo na limemya. Asengeli te kosɛnga ye asala makambo oyo akokoka te. Mpe asengeli te kokokanisa ye na basi mosusu. Mwasi akomiyoka ndenge nini soki mobali na ye azali kokokanisa ye na basi mosusu? Mobali ya ndeko mwasi Rosa oyo azali Motatoli te akokanisaka ye mbala mingi na basi mosusu. Maloba na ye ya kozanga boboto esalaka ete ndeko Rosa amiyoka mabe, mpe etindaka ye amituna soki balingaka ye mpenza. Alobi boye: “Nazalaka ntango nyonso na mposa moto moko ayebisaka ngai ete Yehova azwaka ngai na motuya.” Nzokande, mobali mokristo apesaka mwasi na ye lokumu. Ayebaka ete kosala bongo ekosalisa ye azala na boyokani ya malamu ná mwasi na ye mpe ná Yehova.c
8 Mobali oyo akumisaka mwasi na ye, alobaka malamu mpo na ye liboso ya bato nyonso, ayebisaka ye ete alingaka ye, mpe ete azali na motuya mingi. (Mas. 31:28) Yango nde mobali ya Katerina, oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, asalaki mpo na kosalisa ye alonga ezaleli ya komimona ete azali na ntina te. Ntango Katerina azalaki mwana, mama na ye azalaki kotyola ye, mpe mbala mingi azalaki kokokanisa ye na bana basi mosusu ata mpe baninga na ye. Yango esalaki ete Katerina akóma komikokanisa na bato mosusu mpe akobaki kosala bongo ata nsima ya kokóma Motatoli ya Yehova. Nzokande, mobali na ye oyo azalaki Motatoli ya Yehova, asalisaki ye abundisa ezaleli yango ya mabe, mpe amitalelaka na ndenge ya malamu. Katerina alobi boye: “Mobali na ngai alingaka ngai, apesaka ngai longonya mpo na makambo oyo nasalaka, mpe abondelaka mpo na ngai. Asalisaka ngai nabosanaka te bizaleli kitoko ya Yehova mpe nasembola makanisi na ngai ya mabe.”
OYO BANKULUTU YA BOBOTO MPE BANDEKO MOSUSU BAKOKI KOSALA
9-10. Ndenge nini bankulutu ya boboto basalisaki ndeko mwasi moko alonga ezaleli na ye ya komikokanisa na basusu?
9 Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko oyo bazalaka na ezaleli ya komikokanisa na basusu? Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Hanuni, oyo ntango azalaki mwana moke, bazalaki kopesa ye longonya te. Alobi boye: “Nazalaki nsɔninsɔni mpe nazalaki komona ete bana mosusu bazalaki na ntina mingi koleka ngai. Nakómaki komikokanisa na basusu ntango nazalaki naino mwana moke mpenza.” Ata ntango akómaki Motatoli ya Yehova, Hanuni akobaki kaka komikokanisa na basusu. Mpo na yango akómaki komimona ete azali na ntina te na kati ya lisangá. Lelo oyo azali mobongisi-nzela mpe azali na esengo. Nini esalisaki ye abongola makanisi na ye?
10 Hanuni alobi ete bankulutu ya boboto nde basalisaki ye. Bayebisaki ye ete azalaki na ntina mingi na kati ya lisangá mpe bapesaki ye longonya mpo na ndakisa na ye ya malamu. Akomi boye: “Mwa moke na nsima, bankulutu basɛngaki ngai nalendisa bandeko basi mosusu oyo bazalaki na mposa ya lisalisi. Mokumba yango esalisaki ngai namona ete nazalaki na ntina. Nabosanaka te ndenge bankulutu yango ya boboto bapesaki ngai matɔndi ndenge nalendisaki bandeko basi mosusu ya bilenge. Mpe batángelaki ngai 1 Batesaloniki 1:2, 3. Yango esimbaki mpenza motema na ngai! Na lisalisi ya bankulutu yango, nayebi sikoyo ete nazali na ntina na kati ya lisangá.”
11. Ndenge Yisaya 57:15 emonisi yango, ndenge nini tokoki kosalisa ‘baoyo batutani mpe baoyo bazali na elimo ya komikitisa?’
11 Tángá Yisaya 57:15. Yehova atyaka mpenza likebi na ‘baoyo mitema etutani mpe baoyo bazali na elimo ya komikitisa.’ Biso nyonso tokoki kolendisa bandeko yango. Lolenge moko oyo tokoki kolendisa bango, ezali ya kotyela bango likebi. Yehova alingi ete tómonisa bandeko yango ete alingaka bango mingi. (Mas. 19:17) Tokoki mpe kosalisa bandeko na biso soki tozali na komikitisa mpe tozali komikumisa te mpo na makoki oyo tozali na yango. Tosengeli te kobendaka likebi epai na biso moko mpo yango ekoki kokolisa ezaleli ya likunya epai ya basusu. Kasi, tosengeli nde kosalela mayele mpe makoki na biso mpo na kolendisa bandeko na biso.—1 Pe. 4:10, 11.
12. Mpo na nini bato mpamba bazalaki kolinga kozala elongo na Yesu? (Talá elilingi ya ezipeli.)
12 Ndenge oyo Yesu asalelaki bayekoli na ye makambo ekoki koteya biso ndenge ya kosalela basusu makambo. Azalaki moto oyo alekaki bato nyonso awa na mabele. Atako bongo, azalaki na “ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Mat. 11:28-30) Amikumisaki te mpo na boyebi mpe mayele mingi oyo azalaki na yango. Ntango azalaki koteya, azalaki kosalela elobeli ya pɛtɛɛ mpe bandakisa oyo ezalaki kosimba mitema ya bato ya komikitisa. (Luka 10:21) Na kokesana na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na lolendo, Yesu alukaki soki moke te komonisa ete bato mosusu bazalaki na ntina te na miso ya Nzambe. (Yoa. 6:37) Kutu, azalaki nde kopesa bato mpamba lokumu.
13. Ndenge nini boboto mpe bolingo ya Yesu emonanaki na ndenge asalelaki bayekoli na ye makambo?
13 Boboto mpe bolingo ya Yesu emonanaki na ndenge azalaki kosalela bayekoli na ye makambo. Ayebaki ete bazalaki na makoki ndenge moko te mpe makambo ya bomoi na bango ekesanaki. Na yango, bango nyonso te nde bakokaki kokokisa mikumba ndenge moko to kozwa matomba ndenge moko na mosala ya kosakola. Kasi asepelaki ndenge mokomoko na bango azalaki kosala oyo akoki. Yesu amonisaki yango na ndakisa oyo apesaki ya batalanta. Na ndakisa yango, nkolo apesaki moombo mokomoko mosala “na kotalela makoki na ye.” Na baombo mibale ya malamu, moko azwaki koleka mosusu. Kasi nkolo apesaki bango nyonso mibale longonya na maloba oyo: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo!”—Mat. 25:14-23.
14. Ndenge nini tokoki komekola lolenge oyo Yesu azalaki kosalela basusu makambo?
14 Boboto mpe bolingo ya Yesu emonanaka na ndenge asalelaka biso makambo. Ayebi ete biso nyonso tozalaka na makoki ndenge moko te, mpe makambo ya bomoi na biso ekeseni, mpe asepelaka ntango tosalaka oyo tokoki. Tosengeli kosalelaka basusu makambo ndenge Yesu azalaki kosala. Tosengeli soki moke te kosala ete ndeko moko ayoka nsɔni to amiyoka ete azali na ntina te mpo azali na makoki te ya kosala lokola bandeko mosusu. Kasi, tólukaka nde mabaku ya kopesa bandeko na biso longonya ndenge bazali kosala oyo bakoki mpo na kosalela Yehova.
TYÁ MIKANO OYO EBONGI
15-16. Matomba nini ndeko mwasi moko azwaki ndenge amityelaki mikano oyo ebongi?
15 Soki tomityeli mikano ya elimo, bomoi na biso ekozala na ntina mpe tokosalela yango malamu. Kasi tosengeli komityela mikano oyo tozali na likoki ya kokokisa. Tosengeli kaka te komityela mikano ndenge moko na basusu. Soki tosali bongo, tokoki kolɛmba nzoto. (Luka 14:28) Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na nkombo Midori.
16 Ntango Midori azalaki mwana moke, tata na ye oyo azali Motatoli te azalaki koyokisa ye nsɔni ndenge azalaki kokokanisa ye na bandeko na ye mosusu mpe baninga na ye ya kelasi. Midori alobi boye: “Nazalaki komimona ntina te.” Kasi ntango akómaki mokóló, akómaki komimona ete azalaki na ntina. Alobi boye: “Nazalaki kotánga Biblia mokolo na mokolo mpo nazala na kimya ya motema mpe yango esalisaki ngai namona ete Yehova alingaka ngai.” Lisusu amityelaki mikano oyo ebongi mpe asalaki mabondeli ya sikisiki mpo Yehova asalisa ye akokisa yango. Yango esalaki ete Midori asepela na bokoli na ye moko ya elimo.
KOBÁ KOPESA YEHOVA OYO ELEKI MALAMU
17. Ndenge nini tokoki ‘kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso,’ mpe matomba nini tokozwa?
17 Esɛngaka ntango mpo tóbongola lolenge oyo tomitalelaka. Na yango, Yehova ayebisi biso ete: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.” (Ef. 4:23, 24) Kasi mpo na kosala yango, tosengeli kobondelaka, koyekolaka Liloba ya Nzambe, mpe komanyolaka. Na yango, kobá kosala makambo yango mpe kosɛnga Yehova apesa yo makasi. Elimo santu na ye ekosalisa yo olonga ezaleli ya komikokanisa na basusu. Yehova akosalisa yo oyeba soki okómi na likunya to na lolendo. Lisusu, akosalisa yo opikola bizaleli yango nokinoki na motema na yo.
18. Ndenge nini maloba oyo ezali na 2 Ntango 6:29, 30 ekoki kolendisa yo?
18 Tángá 2 Ntango 6:29, 30. Yehova ayebi makambo oyo ezali na motema na biso. Ayebi ndenge oyo tozali kobunda mpo na kolonga makanisi mabe ya mokili oyo, ayebi mpe mabunga na biso. Ntango Yehova amonaka milende oyo tozali kosala mpo na kobundisa bizaleli yango, bolingo na ye mpo na biso ekómaka makasi.
19. Ndakisa nini Yehova apesi mpo na komonisa ndenge oyo ayokaka mpo na biso?
19 Mpo na komonisa ndenge oyo alingaka biso, Yehova asaleli ndakisa ya bolingo makasi oyo ezalaka kati na mama ná mwana na ye ya moke. (Yis. 49:15) Tótalela ndakisa ya mama moko na nkombo Rachel. Akomi boye: “Mwana na ngai Stephanie abotamaki matsombe. Mbala ya liboso oyo namonaki ye, azalaki mpenza moke mpe azalaki makasi te. Alekisaki sanza na ye ya liboso na lopitalo na masini oyo batyaka bana matsombe. Minganga bapesaki ngai nzela namemaka ye mikolo nyonso. Bantango wana oyo tolekisaki esalaki ete ngai ná ye tókóma na boyokani ya makasi. Sikoyo azali na mbula motoba mpe azali moke mpenza koleka bana ya mbula na ye. Atako bongo, nalingaka ye mingi mpo abundaki mingi mpo na kozala na bomoi, mpe asali ete bomoi na ngai ezala na esengo mingi!” Ezali esengo koyeba ete Yehova alingaka biso mingi ntango amonaka ete tozali kobunda mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela ye na motema mobimba!
20. Lokola ozali mosaleli ya Yehova, nini esalaka ete ozala na esengo?
20 Lokola ozali mosaleli ya Yehova, ozali na motuya na kati ya libota na ye, mpe ezali na moto mosusu te oyo akokani na yo. Soki Yehova abendaki yo epai na ye, ezali te mpo ozalaki na ntina mingi koleka bato mosusu. Abendaki yo mpo ntango atalaki motema na yo, amonaki ete ozali na komikitisa, okondima ete ateya mpe abongisa yo. (Nz. 25:9) Yebá ete asepelaka ntango osalaka oyo okoki mpo na kosalela ye. Ezaleli na yo ya koyika mpiko mpe bosembo na yo emonisi ete “ozali na motema ya kitoko mpe ya malamu.” (Luka 8:15) Na yango, kobá kopesa Yehova oyo eleki malamu. Yango ekosala ete ozala na ntina ya kosepela ‘mpo na yo moko.’
LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi
a Yehova akokanisaka biso na bato mosusu te. Kasi tokoki komikokanisa na basusu mpe komona ete tozali na ntina te. Na lisolo oyo, tokomona mpo na nini ekoki kozala likama komikokanisa na basusu. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kosalisa bandeko ya libota na biso mpe bandeko ya lisangá mpo bámitalelaka ndenge Yehova atalelaka bango.
b Topesi bango bankombo mosusu.
c Atako batoli oyo tozali kolobela awa etaleli mingi mobali, mitinda yango mingi etaleli mpe mwasi.
d ELILINGI: Na ntango ya losambo na kati ya libota, baboti bazali komonisa ete basepeli na oyo mwana mokomoko asali mpo na kosala masuwa ya Noa.
e ELILINGI: Mama moko oyo abɔkolaka mwana ye moko azali komityela mokano ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi mpe azali kosepela ndenge akokisi mokano yango.