Mokapo 18
Salá ete mokano na yo ezala ya kosalela Nzambe libela
1, 2. Longola kozala na boyebi ya Nzambe, nini esɛngami lisusu?
KANISÁ ete otɛlɛmi liboso ya ekuke ekangami makasi oyo ezali komema kino na eteni ya ndako oyo ezali na biloko mingi ya motuya. Moto moko oyo azali na ndingisa apesi yo lifungola mpe alobi na yo ete okɔta kozwa biloko ndenge motema na yo elingi. Lifungola wana ekozala na ntina mpo na yo bobele soki okosalela yango. Bobele bongo, osengeli kosalela boyebi soki olingi ete ezwela yo matomba.
2 Yango ezali mpenza solo mpo na oyo etali boyebi ya Nzambe. Ya solo, boyebi ya sikisiki ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto elimboli bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Nzokande, ekoki te bobele kozala na boyebi yango mpo na kolikya kozwa bolamu yango na ntango ezali koya. Motindo moko osengeli kosalela lifungola ya motuya, bobele bongo osengeli kosalela boyebi ya Nzambe kati na bomoi na yo. Yesu alobaki ete baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe nde “bakokɔta kati na bokonzi.” Bato wana bakozwa libaku ya kosalela Nzambe libela!—Matai 7:21; 1 Yoane 2:17.
3. Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na biso?
3 Nsima na koyekola nini ezali mokano ya Nzambe, esengeli ete tósala yango. Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na yo? Ekoki kolobama na mokuse na maloba oyo ete: Komekola Yesu. Tozali kotánga na 1 Petelo 2:21: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.” Na yango, mpo na kosala mokano ya Nzambe, osengeli kolanda mpenza ndakisa ya Yesu. Ezali lolenge wana nde okosalela boyebi ya Nzambe.
LOLENGE OYO YESU ASALELAKI BOYEBI YA NZAMBE
4. Mpo na nini Yesu ayebi Yehova koleka bikelamu nyonso, mpe lolenge nini asalelaki boyebi yango?
4 Yesu Klisto ayebi Nzambe na malamu mpenza koleka bikelamu nyonso mosusu. Afandaki mpe asalaki elongo na Yehova Nzambe kati na likoló na boumeli ya eleko molai liboso ete aya awa na mabelé. (Bakolose 1:15, 16) Mpe Yesu asalaki nini na boyebi nyonso wana? Asukaki te bobele na kozala na yango. Yesu amitambwisaki na boyokani na boyebi yango. Ntina wana azalaki na boboto, na motema pɛtɛɛ, mpe na bolingo kati na boyokani na ye elongo na baninga na ye bato. Na yango, Yesu amekolaki Tata na ye ya likoló mpe asalaki na boyokani na boyebi azalaki na yango ya banzela mpe ya bomoto ya Yehova.—Yoane 8:23, 28, 29, 38; 1 Yoane 4:8.
5. Mpo na nini Yesu abatisamaki, mpe lolenge nini amitambwisaki na boyokani na ndimbola ya batisimo na ye?
5 Boyebi oyo Yesu azalaki na yango etindaki mpe ye na kosala litambe moko ya ntina mingi. Autaki na Galilea mpo na kokende na Ebale Yordani, epai kuna Yoane abatisaki ye. (Matai 3:13-15) Batisimo ya Yesu emonisaki nini? Lokola Moyuda, abotamaki kati na libota oyo esilaki komipesa epai na Nzambe. Na yango, Yesu asilaki kopesama na Nzambe uta kobotama na ye. (Exode 19:5, 6) Na kozwáká batisimo, amimonisaki ye moko epai na Yehova mpo na kosala mokano ya Nzambe na ntina na ye na ntango wana. (Baebele 10:5, 7) Mpe Yesu amitambwisaki na boyokani na ndimbola ya batisimo na ye. Amipesaki kati na mosala ya Yehova, kokaboláká boyebi ya Nzambe elongo na bato na mabaku nyonso. Yesu azalaki kosepela kosala mokano ya Nzambe, nkutu alobaki ete yango ezalaki lokola bilei mpo na ye.—Yoane 4:34.
6. Lolenge nini Yesu amiboyaki?
6 Yesu ayebaki mpenza ete kosala mokano ya Yehova ekosɛnga ye makambo mingi—ata kino kopesa bomoi na ye. Atako bongo, Yesu amiboyaki, atyaki bamposa na ye moko na esika ya mibale. Kosala mokano ya Nzambe ezalaki ntango nyonso na esika ya liboso. Na likambo oyo, lolenge nini tokoki kolanda ndakisa ya kokoka ya Yesu?
MATAMBE OYO MAZALI KOMEMA NA BOMOI YA SEKO
7. Matambe nini moto asengeli kolanda mpo na kozwa batisimo?
7 Na kokesana na Yesu, biso tozali bato bazangi kokoka mpe tokoki kokóma na litambe monene ya batisimo bobele nsima na koleka na matambe mosusu ya ntina. Yango ebandaka na kozwa boyebi ya sikisiki ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto kati na motema na biso. Tokopusama bongo na komonisa kondima mpe bolingo makasi mpo na Nzambe. (Matai 22:37-40; Baloma 10:17; Baebele 11:6) Kotosa mibeko, mitindá mpe malako ya Nzambe esengeli kopusa biso na kobongola motema, koyoka mpenza mawa na ntina na masumu na biso ya kala. Yango ezali komema na kobongwana, oyo ezali bongo kopesa mokɔngɔ mpe kotika nzela nyonso ya mabe oyo tozalaki kolanda wana tozalaki na boyebi ya Nzambe te. (Misala 3:19) Ya solo, soki tozali naino kosala masumu mosusu na nkuku na esika ya kosala oyo ezali sembo, naino tobongwani mpenza te. Epai mosusu, tokoki kokosa Nzambe te. Yehova azali komona bokosi nyonso.—Luka 12:2, 3.
8. Osengeli kosala nini soki olingi kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi?
8 Sikawa lokola osili kokóma na boyebi ya Nzambe, ebongi ete otalela mpenza makambo ya elimo mpo na oyo etali yo moko, boye te? Ekoki kozala ete ozali na mposa ya koyebisa bandeko na yo, baninga na yo, mpe bato mosusu makambo oyo ozali koyekola. Ya solo, mbala mosusu osili kosala yango, motindo moko Yesu akabolaki nsango malamu elongo na basusu na lolenge ya libaku malamu. (Luka 10:38, 39; Yoane 4:6-15) Sikawa okoki kolinga kosala mingi. Bankulutu baklisto bakosepela kosolola elongo na yo mpo na koyeba soki okokisi masɛngami mpe ozali na makoki ya kosangana sanza nyonso na mosala oyo Batatoli ya Yehova basalaka ya kosakola Bokonzi. Soki ezali boye, bankulutu bakokamata bibongiseli mpo ete obima elongo na Motatoli moko kati na mosala ya kosakola. Bayekoli ya Yesu balandaki malako na ye mpo ete básala mosala na bango na mobulu te. (Malako 6:7, 30; Luka 10:1) Okozwa lisalisi motindo moko ntango okosakola nsango ya Bokonzi ndako na ndako mpe na mitindo misusu.—Misala 20:20, 21.
9. Lolenge nini moto amipesaka epai na Nzambe, mpe lolenge nini komipesa ezalaka na bopusi likoló na bomoi ya moto?
9 Kosakola nsango malamu epai na lolenge nyonso ya bato kati na teritware ya lisangá ezali nzela mpo na kokutana na baoyo balingi boyengebene mpe ezali kati na misala kitoko oyo mizali komonisa ete ozali na kondima. (Misala 10:34, 35; Yakobo 2:17, 18, 26) Koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto mpe kosangana mingi kati na mosala ya kosakola ezali lisusu makambo oyo mazali komonisa ete osili kobongola motema mpe kobongwana mpe ozali sikawa na ekateli ya kozala na bomoi oyo eyokani na boyebi ya Nzambe. Litambe nini elandi? Ezali oyo ya komipesa epai na Yehova Nzambe. Yango elimboli ete kati na libondeli moko euti na motema mpenza, oloba na Nzambe ete olingi na motema mobimba kopesa bomoi na yo epai na ye mpo na kosala mokano na ye. Ezali motindo wana nde okomipesa yo moko epai na Yehova mpe ondimi ekanganeli na Yesu Klisto, oyo ezali ekanganeli na boboto.—Matai 11:29, 30.
BATISIMO—OYO YANGO ELIMBOLI MPO NA YO
10. Mpo na nini osengeli kozwa batisimo nsima na komipesa yo moko epai na Yehova?
10 Engebene Yesu, baoyo nyonso bazali kokóma bayekoli na ye basengeli kobatisama. (Matai 28:19, 20) Mpo na nini yango ezali na ntina nsima wana osili komipesa epai na Nzambe? Lokola osili komipesa yo moko epai na Yehova, ye ayebi ete olingi ye. Kasi osengeli kosala litambe mosusu mpo ete basusu báyeba bolingo oyo ozali na yango mpo na Nzambe. Ee, batisimo epesi yo libaku ya komonisa polele komipesa na yo epai na Yehova.—Baloma 10:9, 10.
11. Batisimo ezali na ndimbola nini?
11 Batisimo ezali na ndimbola monene. Wana ezali yo kozindisama to “kokundama” na nsé ya mai, ezali lokola osili kokufa na makambo matali bomoi na yo ya kala. Ntango ozali kobima na mai, ezali lokola ozongi na bomoi ya sika, mpo na kosala mokano ya Nzambe kasi oyo ya yo moko te. Ya solo, yango elimboli te ete okosala mabungá lisusu te, mpamba te biso banso tozangi kokoka mpe na yango tosalaka masumu mokolo na mokolo. Atako bongo, lokola okokóma mosaleli ya Yehova, oyo amipesi mpe azwi batisimo, okokɔta na boyokani ya ntina mingi elongo na ye. Mpo ete obongoli motema mpe ondimi na komikitisa nyonso kozwa batisimo, Yehova akondima kolimbisa masumu na yo na moboko ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Na yango, batisimo ememaka na kozala na lisosoli ya pɛto liboso na Nzambe.—1 Petelo 3:21.
12. Elimboli nini kobatisama (a) “na nkombo ya Tata”? (b) ‘na nkombo ya Mwana’? (c) ‘na nkombo ya elimo santu’?
12 Yesu apesaki bayekoli na ye etindá ya kobatisa bayekoli ya sika “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19, NW) Yesu alingaki koloba nini? Batisimo “na nkombo ya Tata” emonisi ete moto oyo alingi kobatisama andimi na motema mobimba Yehova Nzambe lokola Mozalisi mpe Mokonzi aleki monene na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. (Nzembo 36:9; 83:18; Mosakoli 12:1) Kobatisama ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli ete moto wana andimi Yesu Klisto—mpe mingimingi mbeka oyo apesaki mpo na lisiko—ete ezali nzela bobele moko mpo na lobiko oyo Nzambe asili kobongisa. (Misala 4:12) Batisimo ‘na nkombo ya elimo santu’ elimboli ete moto oyo alingi kozwa batisimo andimi elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, lokola esaleli ya Nzambe mpo na kokokisa mikano na Ye mpe mpo na kopesa nguya epai na basaleli na Ye ete básala mokano na Ye ya sembo elongo na lisangá na Ye oyo etambwisami na elimo santu.—Genese 1:2; Nzembo 104:30; Yoane 14:26; 2 Petelo 1:21.
OSILI KOMILƐNGƐLA MPO NA BATISIMO?
13, 14. Mpo na nini osengeli te kobanga kopona kosalela Yehova Nzambe?
13 Mpo ete batisimo ezali na ndimbola mozindo mpe ezali na ntina monene kati na bomoi ya moto, ezali nde litambe oyo osengeli kobanga? Soko moke te! Atako ekateli ya kozwa batisimo ezali likambo ya lisɛki te, nzokande ezali ekateli eleki mayele oyo okoki kozwa.
14 Batisimo ezali elembeteli ete oponi kosalela Yehova Nzambe. Kanisá na ntina na bato oyo oyebi. Moko na moko azali na nkolo na ye oyo asalelaka, boye te? Bamoko bazali baombo ya bozwi. (Matai 6:24) Na molende nyonso, basusu bamipesi na misala na bango to bazali komisalela bango moko kosaláká ete kokokisama ya bamposa na bango moko ezala likambo lileki ntina kati na bomoi na bango. Basusu mpe bazali kosalela banzambe ya lokuta. Kasi yo osili kopona kosalela Nzambe ya solo, Yehova. Ezali na moto mosusu te oyo akoki komonisa boboto, motema mawa mpe bolingo lokola Yehova azali komonisa. Nzambe azali kokumisa bato mpo ete apesi bango mosala moko ya ntina oyo ezali komema bango na lobiko. Akopesa basaleli na ye mbano ya bomoi ya seko. Na yango, kobanga te kolanda ndakisa ya Yesu mpe kopesa bomoi na yo epai na Yehova. Ya solo, yango ezali nzela bobele moko oyo ezali kosepelisa Nzambe mpe oyo ezali kopesa ntina na bomoi.—1 Mikonzi 18:21.
15. Mbala mingi, makambo nini mapekisaka moto na kozwa batisimo?
15 Nzokande, batisimo ezali te litambe oyo osengeli kosala mpo ete bato mosusu bapusi yo. Ezali nde likambo litali sé yo moko elongo na Yehova. (Bagalatia 6:4) Lokola osili kokóla na elimo, mbala mosusu okomituna ete: “Nini ezali kopekisa ngai kozwa batisimo?” (Misala 8:35, 36, NW) Okoki komituna yo moko ete: ‘Botɛmɛli ya libota na ngai ezali nde kopekisa ngai? Nakangami naino nde na likambo moko oyo liyokani na Makomami te? Nazali naino nde kosalaka makambo mabe? Ekoki kozala ete nazali kobanga noki nakotyolama na bato nameseni kofanda na bango?’ Wana ezali mwa ndambo na makambo oyo osengeli kotalela, kasi talelá yango na lolenge lobongi.
16. Matomba nini okozwa soki okosalela Yehova?
16 Ekozala malamu te kotalela bobele matomba oyo okoki kobungisa kozanga kotalela matomba oyo mazali kozwama na kosalela Yehova. Na ndakisa, talelá likambo litali botɛmɛli ya libota. Yesu alakaki ete ata soki bayekoli na ye babungisi bandeko na bango mpo ete bazali kolanda ye, bakozwa libota lileki monene na elimo. (Malako 10:29, 30) Baninga na yo baklisto bakomonisela yo bolingo ya bondeko mpenza, bakosalisa yo na koyikela minyoko mpiko, mpe bakosunga yo na nzela ya bomoi. (1 Petelo 5:9) Mingimingi bankulutu ya lisangá bakosalisa yo na kosilisa mikakatano mpe kolónga makambo mosusu ya mpasi. (Yakobo 5:14-16) Mpo na oyo etali koboyama na mokili oyo, okoki komituna malamu yo moko ete: ‘Eloko nini mokili ekoki kopesa ngai oyo eleki kondimama epai na Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba mpe kosepelisa motema na ye na lolenge ya bomoi oyo naponi?’—Masese 27:11.
ZALÁ NA BOMOI OYO EYOKANI NA KOMIPESA NA YO MPE NA BATISIMO NA YO
17. Mpo na nini osengeli kotalela batisimo lokola ebandeli, kasi lokola nsuka te?
17 Ezali likambo ya ntina komikundola ete batisimo ezali nsuka ya bokóli na yo na elimo te. Ezali nde ebandeli ya mosala ya bomoi mobimba mpo na Nzambe na motindo na ministre andimami mpe moko na Batatoli ya Yehova. Atako batisimo ezali likambo ya ntina mingi, ezali ndanga mpo na lobiko te. Yesu alobaki te ete: ‘Moto nyonso oyo abatisami akobika.’ Kasi, alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Na yango, ezali likambo ya ntina ete olukaka liboso Bokonzi ya Nzambe na kokómisáká yango lobanzo na yo ya liboso kati na bomoi.—Matai 6:25-34.
18. Nsima ya batisimo, mikano nini mosusu osengeli komityela?
18 Mpo na kolendendela kati na mosala oyo ozali kosalela Yehova, okolinga komityela mikano ya elimo. Mokano moko oyo ebongi ezali bongo ya kokólisa boyebi na yo ya Nzambe na nzela ya boyekoli na yo moko ya Liloba na ye mbala na mbala. Salá ebongiseli ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. (Nzembo 1:1, 2) Yanganá mbala na mbala na makita ya boklisto, mpamba te baninga oyo okokuta kuna bakosalisa yo na kozwa makasi na elimo. Mpo na nini te komityela mokano ya kopesa biyano na makita ya lisangá mpe bongo kosanzola Yehova mpe koluka kolendisa basusu? (Baloma 1:11, 12) Mokano mosusu ekoki kozala bongo kobongisa lolenge ya mabondeli na yo.—Luka 11:2-4.
19. Bizaleli nini elimo santu ekoki kosalisa yo na komonisa?
19 Soki olingi kozala na bomoi oyo eyokani na ndimbola ya batisimo na yo, osengeli ntango nyonso kotya likebi na makambo oyo ozali kosala, kopesáká nzela na elimo santu ya Nzambe ete ebimisa kati na yo bizaleli lokola bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23; 2 Petelo 3:11) Kobosana te ete Yehova akopesaka elimo santu na ye epai na baoyo nyonso bazali kobondela mpo na kozwa yango mpe bazali kotosa ye lokola basaleli na ye ya sembo. (Luka 11:13; Misala 5:32) Na bongo, bondelá Nzambe mpo na kozwa elimo na ye mpe sɛngá ye ete asalisa yo na komonisa bizaleli oyo bizali kosepelisa ye. Bizaleli yango bikomonana polele na maloba na yo mpe na etamboli na yo na meko oyo okomitika kopusama na elimo ya Nzambe. Moto nyonso kati na lisangá ya boklisto azali kosala makasi na kokólisa “bomoto ya sika” mpo na kokóma mpenza lokola Klisto. (Bakolose 3:9-14, NW) Moko na moko kati na biso akutanaka na mikakatano mikeseni mpo na kosala yango, mpamba te tokeseni mpo na oyo etali bokóli na elimo. Lokola ozangi kokoka, osengeli kosala milende mingi mpo na kolata bomoto bokokani na oyo ya Klisto. Kasi kolɛmba te, mpamba te okoki kolónga na lisalisi ya Nzambe.
20. Lolenge nini okoki komekola Yesu kati na mosala ya kosakola?
20 Moko kati na mikano ya elimo oyo osengeli komityela ezali bongo ndakisa ya esengo oyo Yesu azalaki na yango. (Baebele 12:1-3) Yesu alingaki mosala ya kosakola. Soki ozwi libaku ya kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi, kosala te ete ezala lokola bisalasala. Luká kozwa bosepeli na koteyáká basusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe lokola Yesu asalaki yango. Salelá malako oyo lisangá ezali kopesa mpo na kosalisa yo na kokóma moteyi malamu mingi. Na ntembe te, Yehova akoki kopesa yo makasi mpo na kokokisa mosala na yo.—1 Bakolinti 9:19-23.
21. (a) Lolenge nini toyebi ete Yehova azali kotalela bato na sembo oyo babatisami ete bazali na motuya mingi? (b) Nini emonisi ete batisimo ezali na ntina mingi mpo na kobikisama na biso na ntango bikateli ya Nzambe bikokwela ebongiseli ya biloko oyo mabe?
21 Moto oyo amipesi na Nzambe mpe abatisami, oyo azali kosala makasi na bosembo nyonso mpo na kolanda ndakisa ya Yesu, azali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Yehova azali kotala mitema ya bato nyonso, oyo lelo bazali na motángo ya bamiliare mpe ayebi ete bato ya motindo oyo bazali mingi te. Yango wana, azali kotalela bango ete bazali biloko na motuya, “biloko kitoko.” (Hagai 2:7, NW) Bisakweli ya Biblia bimonisi ete Nzambe azali kotalela bato wana lokola ete bazwi elembo mpo na kobika na ntango akoyeisa mosika te bikateli na ye likoló na ebongiseli mabe ya biloko ya lelo. (Ezekiele 9:1-6; Malaki 3:16, 18) Ozali kati na baoyo “babongi mpo na bomoi ya seko”? (Misala 13:48, NW) Mposa na yo makasi ezali ya kozwa elembo lokola moto oyo azali kosalela Nzambe? Komipesa mpe batisimo esangani na elembo yango, mpe ezali na ntina mingi mpo na kobika.
22. “Ebele monene” bakoki kolikya nini?
22 Nsima na Mpela oyo ekwelaki mokili mobimba, Noa mpe libota na ye babimaki na masuwa mpo na kofanda na mabelé oyo mapɛtolamaki. Bobele bongo lelo, “ebele monene” oyo bazali kosalela boyebi ya Nzambe kati na bomoi na bango mpe bandimami epai na Yehova, bazali na elikya ya kobika na nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko ya lelo mpe kosepela na bomoi ya seko na mabelé oyo makopɛtolama mpo na libela. (Emoniseli 7:9, 14) Bomoi ekozala lolenge nini?
MEKÁ BOYEBI NA YO
Lolenge nini Yehova alingi ete osalela boyebi oyo ozwi na ntina na ye?
Wapi matambe oyo mazali komema na batisimo?
Mpo na nini batisimo ezali nsuka te, kasi ezali nde ebandeli?
Lolenge nini okoki kozala na bomoi eyokani na komipesa na yo epai na Nzambe mpe na batisimo?
[Elilingi na lokasa 172]
Osili komipesa epai na Nzambe na nzela na libondeli?
[Bililingi na lokasa 174]
Nini ezali kopekisa yo kozwa batisimo?