Nzambe asalisaka mibange
TOKOKI kokamwa te soki lelo oyo mibange bazali konyokwama mingi. Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka” ya mokili mabe oyo, bato bakozala “bato oyo bamilingaka bango moko, . . . bazangi bolingo ya libota.” (2 Timote 3:1-3) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bolingo ya libota” ekoki mpe kolimbola bolingo oyo ezalaka na mabota. Ndenge Biblia esakolaki yango, lelo oyo bato bazali na bolingo wana te.
Na bokeseni na bato oyo banyokolaka mibange, Yehova Nzambe apesaka mpenza motuya na bato oyo bakómi mikóló mpe akanisaka bango. Tótalela ndenge Biblia emonisi likambo yango.
“Mosungi ya basi-bakufeli-mibali”
Makomami ya Liebele emonisi polele ndenge Yehova amibanzabanzaka mpo na mibange. Na ndakisa, na Nzembo 68:5, Davidi abengi Nzambe “mosungi ya basi-bakufeli-mibali,” mingi mpenza baoyo bazali mibange.a Na Babiblia mosusu, liloba “mosungi” ebongolami na “mobateli,” “molobeli,” mpe “mokɔteli.” Emonani mpenza ete Yehova akanisaka basi bakufelá mibali. Yango wana, Biblia elobi ete nkanda na ye epelaka soki bazali konyokola basi bakufelá mibali. (Exode 22:22-24) Nzambe mpe basaleli na ye bapesaka motuya monene na basi bakufelá mibali mpe mibange nyonso ya sembo. Masese 16:31 (NW) emonisi likanisi ya Yehova mpe ya basaleli na ye: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango ezali na nzela ya boyengebene.”
Tokoki kokamwa te ete kotosa mibange ezalaki moko ya makambo ya ntina mingi na kati ya mobeko oyo Yehova apesaki na Yisalaele. Yehova apesaki Bayisalaele etinda oyo: “Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni mpe okobanga Nzambe na yo. Ngai nazali [Yehova].” (Levitike 19:32) Yango wana, na Yisalaele komemya mibange ezalaki na ntina mingi mpo na boyokani ya moto ná Yehova Nzambe. Moto oyo azali konyokola mibange akokaki koloba te ete alingaka Nzambe.
Baklisto bazali na nse ya mibeko ya Moise te. Kasi, bazali na nse ya “mobeko ya Klisto,” oyo ezali mpenza kotambwisa bomoi na bango, ezala na likambo ya komonisa bolingo mpe kokanisa baboti mpe mibange. (Bagalatia 6:2; Baefese 6:1-3; 1 Timote 5:1-3) Baklisto balingaka kaka te mpo Nzambe asɛngi yango, kasi motema na bango nde etindaka bango. Ntoma Petelo alobaki boye: “Bólinganaka makasi uta na motema.”—1 Petelo 1:22.
Yakobo amonisi biso ntina mosusu ya kokanisa mibange. Akomaki boye: “Motindo ya losambo oyo ezali pɛto mpe ezangi mbindo na likanisi ya Nzambe na biso mpe Tata ezali oyo: kobatela bitike ná basi bakufelá mibali na kati ya bolɔzi na bango, mpe komibatela kozanga litɔnɔ ya mokili.” (Yakobo 1:27) Yakobo amonisi likambo moko ya ntina mingi. Yango esalisi biso tómona ete mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova.
Na yango, tosengeli te kaka koboya konyokola mibange. Tosengeli nde komonisa na misala ete tomibanzabanzaka mpo na bango. (Talá etanda “Bolingo emonanaka na misala,” na nkasa 6-7.) Yakobo akomaki boye: “Kondima oyo ezangi misala ekufi.”—Yakobo 2:26.
Tóbɔndisa mibange “na kati ya bolɔzi na bango”
Maloba ya Yakobo ezali koteya biso likambo mosusu. Tósimba ete Yakobo alobaki na baklisto ete bábatelaka basi bakufelá mibali “na bolɔzi na bango.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bolɔzi” elimboli mpenzampenza mitungisi, minyoko to mpasi oyo euti na mikakatano ya bomoi. Ntembe ezali te ete mibange mingi bazali kokutana na bampasi ya ndenge wana. Bamosusu bazangá bato. Basusu bazali koyoka mpasi mpo bobange ezali kopekisa bango makambo mingi. Ata baoyo bazali kosala mingi na mosala ya Nzambe bakoki kolɛmba. Tózwa ndakisa ya John,b oyo azali mosakoli ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe banda mbula koleka ntuku minei, mpe misato ya nsuka na mosala ya ntango nyonso. Sikoyo, John azali na mbula 80 mpe alobi ete mbala mosusu ayokaka bolɛmbu. Alobi boye: “Mbala mingi soki nakanisi ebele ya mabunga oyo nasalá na bomoi na ngai, namonaka ete nakokaki kosala yango te.”
Mibange oyo bakanisaka bongo bakoki kobɔndisama soki bayebi ete atako Yehova azali moto ya kokoka, asɛngaka te ete biso mpe tózala bato ya kokoka. Atako ayebi mabunga na biso, Biblia elobi ete: “Ɛ [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Ya solo, Yehova amonaka kaka mabunga na biso te, kasi atalaka mpe oyo ezali na motema. Ndenge nini toyebi yango?
Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mokonzi Davidi, oyo azalaki mpe kosala mabunga, akomaki na Nzembo 139:1-3 ete: “Ɛ [Yehova], osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai solo. Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika. Oyebi wana ekotambola ngai mpe wana ekolala ngai; ezaleli na ngai mobimba ezali polele na miso na yo.” Liloba “oyebi” elimboli mpenzampenza “koyungula” ndenge mosali-bilanga asalaka mpo na kokabola mbuma ná mposo. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Davidi amonisi ete Yehova ayungulaka mabunga na biso mpe abombaka na makanisi na ye misala na biso ya malamu.
Tata na biso ya likoló oyo atondá na mawa, akanisaka misala na biso ya malamu ntango tozali kotikala sembo epai na ye mpe asepelaka na yango. Kutu, Biblia elobi ete akoki komona ete azangi boyengebene soki abosani mosala na biso mpe bolingo oyo tomonisaki mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.
“Makambo ya kala esili koleka”
Biblia emonisi ete mikakatano ya bobange ezalaki te na mokano ya Nzambe. Ebandaki ntango baboti na biso ya liboso batombokelaki Mozalisi na bango. (Genese 3:17-19; Baloma 5:12) Kasi, ekozala bongo libela na libela te.
Ndenge tolobaki, bampasi mingi oyo tozali komona lelo, ezala oyo ya mibange, emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli oyo. (2 Timote 3:1) Mokano ya Nzambe ezali ya kolongola mpasi nyonso oyo lisumu ememelá biso, ezala bobange ná liwa. Biblia elobi ete: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”—Emoniseli 21:4.
Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, mitungisi ya bobange ekozala lisusu te. Bakonyokwama mpe lisusu te. (Mika 4:4) Ata baoyo bakufá mpe bazali na makanisi ya Nzambe bakosekwa mpo bango mpe bázwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Yoane 5:28, 29) Na ntango wana, ekomonana polele ete Nzambe akanisaka ná mibange ná bato mosusu nyonso oyo batosaka ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kasi, basi mosusu oyo bakufelá mibali bazali mibange te. Na ndakisa, Levitike 22:13 emonisi ndenge Nzambe akanisaka mpe bilenge basi oyo bakufelá mibali.
b Topesi ye nkombo mosusu.
[Etanda/Bililingi na lokasa 6, 7]
Bolingo emonanaka na misala
Na kati ya Batatoli ya Yehova, bankulutu bazalaka bato ya liboso mpo na kosalisa mibange. Balandaka mpenza toli ya ntoma Petelo oyo: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino.” (1 Petelo 5:2) Kosalisa mibange ezali na kati ya mokumba ya kobatela etonga ya Nzambe. Kasi, yango esɛngi mpenza nini?
Mpo na koyeba malamumalamu makambo oyo basengeli na yango, esengeli kozala motema molai, kotalaka bango, mpe kosololaka na bango lokola baninga. Ntango mosusu azali na mposa básalisa ye mpo na kosomba eloko moko mpe básukola ye, báfutela ye tike mpo na kokende na makita ya lisangá, básalisa ye na kotánga Biblia mpe mikanda mosusu, to mpe na makambo mosusu. Soki likoki ezali, bokoki kozwa bibongiseli ya malamu mpo na kosalisa bango.c
Ezali boni soki ndeko moko ya mobange na kati ya lisangá akutani na mokakatano moko, oyo ekoki kosɛnga básalisa ye na mbongo? Ekozala malamu koluka liboso koyeba soki ndeko yango azali na bana to bandeko mosusu oyo bakoki kosalisa ye. Yango ezali na boyokani na 1 Timote 5:4: “Soki mwasi moko oyo akufelá mobali azali na bana to bana ya bana, tiká ete bango báyekola liboso kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ndako na bango moko mpe bákoba kopesa lifuti oyo ekoki epai ya baboti na bango mpe bankɔkɔ na bango, mpo yango endimami na miso ya Nzambe.”
Ekoki kozala ete mobange moko azali na mposa básalisa ye ayeba soki abongi mpo na kozwa lisalisi ya Leta. Ntango mosusu, bandeko ya lisangá bakoki kosalisa ye. Soki lisalisi moko ya ndenge wana ezali te, bankulutu bakoki kotala soki azali na kati ya bato oyo lisangá ekoki kosalisa. Ntango mosusu, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosalisa mibange ya ndenge wana. Ntoma Paulo akomelaki Timote, moninga na ye ya mosala boye: “Mwasi oyo akufelá mobali oyo nkombo ekotyama na molɔngɔ azala te na bambula na nse ya ntuku motoba, azala mwasi ya mobali kaka moko, azala mwasi oyo bapeseli ye litatoli mpo na misala ya malamu mingi, soki abɔkɔlaki bana, soki ayambaki bapaya, soki asukolaki makolo ya basantu, soki asalisaki baoyo bazalaki na bolɔzi, soki alandaki na molende mpenza mosala nyonso ya malamu.”—1 Timote 5:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na lisolo “Tómonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1994, nkasa 27-30.
[Elilingi na lokasa 5]
Dolokasi azalaki kosunga basi bakufelá mibali.—Misala 9:36-39