Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
“Osengeli . . . kotánga yango butu na moi.”—YOSUA 1:8, NW.
1. Yebisá mwa matomba ya kotánga mikanda mpe mingimingi kotánga Biblia.
KOTÁNGA mikanda ya malamu ezalaka na matomba. Montesquieu, moto ya filozofi mpe moto ya France akomaká boye: “Koyekola ezalaka nkisi na ngai ya liboso na makambo ya bomoi oyo elɛmbisaka nzoto. Motungisi moko te eyelá ngai, oyo ezangaki te kosila nsima ya kolekisa ngonga moko na kotánga.” Koleka mikanda mosusu nyonso, likambo yango emonanaka mingi soki moto azali kotánga Biblia. Elimo santu etindaki mokomi ya nzembo na koloba boye: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli ya [Yehova] izali alima, ikosepelisa motema.”—Nzembo 19:7, 8.
2. Mpo na nini Yehova abatelaki Biblia na boumeli ya bambula ebele, mpe alingi ete basaleli na ye básala na Biblia nini?
2 Yehova Nzambe akomisaki Biblia mpe abatelaki yango na boumeli ya bankama ya bambula mpo banguna oyo bazalaki kotɛmɛla yango makasi, ezala bato ya mangomba to bato mosusu, bábebisa yango te. Lokola mokano ya Yehova ezali ete ‘bato ya lolenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi mpenza ya solo,’ asalaki ete bato nyonso bázala na likoki ya kotánga Liloba na ye. (1 Timote 2:4, NW) Lelo oyo, bato ya mayele balobi ete soki bayebisi nsango moko na minɔkɔ 100, pene na bato 80 likoló ya monkama na mokili mobimba bakoyoka nsango yango. Nzokande Biblia mobimba ebongolami na minɔkɔ 370, mpe mikanda na yango mosusu ebongolami na minɔkɔ 1 860. Yehova alingi ete basaleli na ye bátángaka Liloba na ye. Apambolaka basaleli na ye oyo batyelaka Liloba na ye likebi, oyo batángaka yango mokolo na mokolo.—Nzembo 1:1, 2.
Bakɛngɛli basengeli mpenza kotángaka Biblia
3, 4. Yehova asɛngaki bakonzi ya Yisalaele likambo nini, mpe likambo yango ezali na ntina nini mpo na baklisto oyo bazali bankulutu lelo oyo?
3 Bambula mingi liboso, Yehova alobelaki makambo oyo ekosalema ntango libota ya Yisalaele bakopona moto mpo azala mokonzi na bango na maloba oyo: “Wana ekofanda ye na kiti ya bokonzi na ye, akokoma mpo na ye mpenza kati na buku maloba ya Mobeko oyo, longwa na oyo ezali na mabɔkɔ ya banganga, Balevi. Yango ekozala na ye elongo mpe akotánga kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye, ete ayekola [kobanga Yehova, NW] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso ya lilako oyo mpe na mibeko oyo, mpe na kosala yango, ete motema na ye ezala na lolendo na likoló ya bandeko na ye te, mpe ete apɛngwa na lilako, to epai na lobɔkɔ ya mobali to epai na lobɔkɔ ya mwasi te.”—Deteronome 17:18-20.
4 Talá malamu bantina oyo Yehova asɛngaki ete mokonzi nyonso oyo akoyangela na Yisalaele atángaka mokanda ya mibeko ya Nzambe mokolo na mokolo: (1) “ete ayekola kobanga Yehova Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso ya lilako oyo mpe na mibeko oyo, mpe na kosala yango”; (2) “ete motema na ye ezala na lolendo na likoló ya bandeko na ye te”; (3) “ete apɛngwa na lilako, to epai na lobɔkɔ ya mobali to epai na lobɔkɔ ya mwasi te.” Lelo oyo, esengeli mpenza ete bakɛngɛli baklisto bábanga Yehova, bátosa mibeko na ye, báboya komitombola likoló ya bandeko na bango, mpe bápɛngwa te na mibeko ya Yehova, boye te? Yango wana kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali mpenza na ntina mpo na bango ndenge ezalaki na ntina mpo na bakonzi ya Yisalaele.
5. Mokanda oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi eutaki kokomela basangani ya bakomite ya filiale elobaki nini na likambo ya kotánga Biblia, mpe mpo na nini ebongi ete baklisto nyonso oyo bazali bankulutu bálanda toli yango?
5 Baklisto oyo bazali bankulutu bazali na makambo mingi ya kosala lelo oyo, yango wana ezali likambo moke te mpo bázwa ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Na ndakisa, bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpe bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale na mokili mobimba, bazalaka na makambo mingi mpenza ya kosala. Kasi, na mikolo oyo euti koleka, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindelaki bakomite ya filiale nyonso mokanda oyo emonisaki mpenza ete basengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo mpe basengeli mpenza koyekolaka. Mokanda yango emonisaki ete soki tozali kotánga Biblia mpe koyekola, tokolinga lisusu Yehova mpe mateya ya solo mingi, mpe “ekosalisa biso tózala ntango nyonso na kondima, na esengo, mpe tólendendela tii na nsuka ntango tokozwa nkembo.” Likambo yango ezali mpe na ntina mpo na bankulutu nyonso na masangá ya Batatoli ya Yehova. Soki bazali kotánga Makomami mokolo na mokolo, yango ekosalisa bango ‘básala makambo na mayele.’ (Yosua 1:7, 8, NW) Mingimingi mpo na bango, kotánga Biblia ezali na “litomba na mateya, na mpamela, mpe na kosembola mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene.”—2 Timote 3:16.
Ezali na ntina mingi mpo na bilenge mpe mikóló
6. Mpo na nini Yosua atángaki maloba ya Mibeko ya Yehova liboso ya mabota ya Yisalaele mpe bapaya oyo bayanganaki?
6 Na ntango ya kala, moto na moto azalaki na Biblia na ye moko te, yango wana bazalaki kotánga Makomami liboso ya bato nyonso ntango bayangani esika moko. Ntango Yehova asalisaki ye mpe alongaki engumba Ai, na nsima Yosua ayanganisaki mabota ya Yisalaele na esika oyo bazalaki kotala Ngomba Ebali na ngámbo mosusu mpe na Ngomba Gelizimi na ngámbo mosusu. Na nsima, lisolo elobi na biso ete: “Atángaki maloba nyonso ya Mobeko, lipamboli mpe elakeli mabe, lokola na yango nyonso ekomami na mokanda ya Mobeko. Liloba ezalaki te na yango nyonso elakaki Mose, oyo Yosua atángaki te liboso ya koyangana nyonso ya Yisalaele, mpe basi mpe bana, mpe bapaya bafandaki kati na bango.” (Yosua 8:34, 35) Bilenge na mikóló, banamboka na bapaya, basengelaki koyeba malamumalamu makambo oyo basengeli kosala mpo Yehova apambola bango mpe makambo nini ekosala ete aboya bango. Na ntembe te soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, ekosalisa biso na likambo yango.
7, 8. (a) Banani bazali lokola “bapaya” lelo oyo mpe mpo na nini basengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo? (b) Na makambo nini “bana” na kati na basaleli ya Yehova bakoki kolanda ndakisa ya Yesu?
7 Lelo oyo, na elobeli ya elimo, bamilio ya basaleli ya Yehova bazali lokola “bapaya” wana. Kala, bazalaki kolanda makambo ya mokili, kasi sikoyo babongoli bizaleli na bango. (Baefese 4:22-24; Bakolose 3:7, 8) Basengeli ntango nyonso koyebaka makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe na miso ya Yehova. (Amosa 5:14, 15) Soki bazali kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, ekosalisa bango na kosala yango.—Baebele 4:12; Yakobo 1:25.
8 Lisusu, na kati ya basaleli ya Yehova “bana” mpe bazali mingi; baboti na bango bateyaki bango mibeko ya Yehova, kasi bana yango basengeli bango moko komindimisa ete mokano ya Yehova ezali mpenza malamu. (Baloma 12:1, 2) Ndenge nini bakoki kosala yango? Na Yisalaele, bayebisaki banganga na bankumu boye: “Okotánga mobeko oyo liboso ya Yisalaele nyonso, na miso na bango. Yanganisá bato, mibali mpe basi mpe bana, mpe mopaya na kati na mboka na yo, ete báyoka mpe báyekola [kobanga Yehova, NW] Nzambe na bino, mpe básɛnzɛla ete bátosa maloba nyonso ya mobeko oyo, mpe ete bana na bango, baoyo bayebaki yango te, báyoka mpe báyekola [kobanga Yehova, NW] Nzambe na bino.” (Deteronome 31:11-13) Lokola Yesu akolaki na ntango oyo bazalaki kotosa Mibeko, ntango azalaki na mbula 12, amonisaki mpenza ete alingaki koyeba malamu mibeko ya Tata na ye. (Luka 2:41-49) Na nsima, azalaki na momeseno ya koyoka mpe kotánga Makomami na kati ya eyanganelo. (Luka 4:16; Misala 15:21) Lelo oyo, bilenge basengeli kolanda ndakisa ya Yesu, basengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe koyanganaka na makita epai totángaka mpe toyekolaka Biblia.
Kotánga Biblia esengeli kozala na esika ya liboso
9. (a) Mpo na nini tosengeli koponaka mikanda ya kotánga? (b) Moto oyo abandaki kokoma zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli alobaki nini na likambo ya kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia?
9 Salomo, mokonzi ya mayele, akomaki ete: “Opamelama na yango. Ezali na nsuka na kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.” (Mosakoli 12:12) Moto mosusu akoki kobakisa ete kotánga ebele ya mikanda oyo ezali kobima lelo oyo ezali kaka kolɛmbisa nzoto te, kasi ezali mpenza likama mpo na elimo. Yango wana ezali na ntina mpenza ete tóponaka mikanda ya kotánga. Longola kotánga mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, tosengeli mpe kotángaka Biblia yango moko. Moto oyo abandaki kokoma zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli akomelaki batángi na yango boye: “Bóbosana te ete Biblia ezali Mokanda na biso oyo eleki ntina, mpe ete ata mikanda mosusu nini oyo Nzambe apesi biso mpo na kosalisa biso, ezali bobele ‘lisalisi’ kasi ezwi esika ya Biblia te.”a Yango wana, atako tokobosana te kotánga mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, tosengeli mpe kotángaka Biblia yango moko.
10. Ndenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” amonisaki mpenza ntina ya kotánga Biblia?
10 Lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” ayebi ntina yango, kobanda bambula mingi sikoyo, akɔtisá botángi ya Biblia na programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi oyo esalemaka na lisangá mokomoko. (Matai 24:45) Programɛ ya kotánga Biblia oyo tozali kolanda sikoyo ezali kosalisa biso tósilisa kotánga Biblia mobimba na mbula soki nsambo. Programɛ yango ezali na litomba mpo na bato nyonso, kasi mingimingi mpo na bato ya sika, baoyo batángá naino Biblia mobimba te. Ntango bandeko bakɔtaka na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watch Tower mpo na mateya ya Biblia, to na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, to mpe ntango bandeko bakɔtaka sika na Betele, basɛngaka bango bátánga Biblia mobimba na mbula moko. Ezala oponi kolanda programɛ nini, ezala yo moko to libota mobimba, mpo na kolanda programɛ yango malamumalamu, esɛngaka ete kotánga Biblia ezala na esika ya liboso.
Otángaka ndenge nini?
11. Ndenge nini mpe mpo na nini tosengeli kokɔtisaka maloba ya Yehova na bɔɔngɔ na biso mokolo na mokolo?
11 Soki ozali kokoka kolanda malamu programɛ na yo ya kotánga Biblia te, mbala mosusu ekozala malamu omituna motuna oyo: ‘Nazali kokoka kotánga Liloba ya Yehova te mpo ete nazali komipesa mingi na kotánga mikanda mosusu to kotala televizyo?’ Kobosana te likambo oyo Mose akomaki—likambo oyo mpe Yesu azongelaki yango—ete “moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.” (Matai 4:4; Deteronome 8:3) Lokola mokolo na mokolo tozalaka na mposa ya kolya mpo tózala nzoto makasi, ndenge moko mpe, tosengeli kokɔtisaka makanisi ya Yehova na bɔɔngɔ na biso mokolo na mokolo mpo tózala ntango nyonso makasi na elimo. Tokoki koyoka makanisi ya Nzambe mokolo na mokolo soki tozali kotánga Makomami.
12, 13. (a) Elakiseli nini ntoma Petelo apesaki mpo na komonisa mposa oyo tosengeli kozala na yango mpo na Liloba ya Nzambe? (b) Elakiseli ya Paulo oyo elobelaki mabɛlɛ ekeseni na elakiseli ya Petelo na nini?
12 Soki tozali kotalela Biblia “lokola maloba ya bato te, kasi na ndenge ezali mpenza, lokola maloba ya Nzambe,” tokozala na mposa na yango ndenge mwana azalaka na mposa ya mabɛlɛ ya mama na ye. (1 Tesalonika 2:13, Boyokani ya Sika) Ntoma Petelo akokanisaki bamposa yango ntango akomaki boye: “Lokola bana oyo babotami sika, bókóma na mposa ya mabɛlɛ ya sika ya liloba, ete na nzela na yango bókola tii bokozwa lobiko, soki nde bosili komeka ete Nkolo azali na boboto.” (1 Petelo 2:2, 3, NW) Soki mpenza tosili komeka biso moko mpe tomoni ete “Nkolo azali na boboto,” tokokóma mpenza na mposa makasi ya kotánga Biblia.
13 Tosengeli koyeba ete na vɛrsɛ yango, ndenge oyo Petelo akokanisaki mabɛlɛ ekeseni na ndenge oyo ntoma Paulo asalelaki yango. Mabɛlɛ ekokisaka bamposa nyonso ya nzoto ya mwana oyo abotami sika. Elakiseli ya Petelo emonisi ete Liloba ya Nzambe ezali na nyonso oyo tozali na yango mposa mpo na ‘kokola kino lobiko.’ Nzokande Paulo asaleli liloba mabɛlɛ mpo na komonisa momeseno mabe ya kolya epai ya bato mosusu oyo bazali koloba ete bazali mikóló na elimo. Na mokanda na ye epai ya Baebele oyo bakómaki baklisto, Paulo akomaki boye: “Ata na ntango oyo ebongi na bino kozala balakisi na bamosusu, bozali naino na bosɛnga ete moto alakisa bino lisusu makambo mikemike ya liboso na mateya ya Nzambe. Bozali na bosɛnga ya mabɛlɛ nde ya bilei makasi te. Mpo ete moto na moto oyo akomelaka mabɛlɛ akososolaka liloba na boyengebene te, azali naino mwana. Kasi bilei makasi izali mpo na bato bakómi [mikóló]; mpo na bango basili kolakisa [bososoli] na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Baebele 5:12-14) Soki tozali kotánga Biblia na likebi nyonso, ekoki mpenza kosalisa biso tókola na bososoli mpe mposa na biso ya makambo ya elimo ekobakisama.
Ndenge nini kotánga Biblia?
14, 15. (a) Mokomisi ya Biblia apesi biso libaku malamu nini? (b) Mayele ya Nzambe ekoki komemela biso matomba nini? (Pesá bandakisa.)
14 Mpo ete botángi ya Biblia epesa mpenza matomba, tosengeli kobanda na kotánga te, kasi na kobondela. Libondeli ezali mpenza libaku malamu. Ezali lokola nde liboso otánga mokanda moko oyo elobeli likambo moko ya mpasi obandi naino na kosɛnga na mokomi na yango asalisa yo okanga ntina ya makambo oyo olingi kotánga. Yango ekozala mpenza na litomba mingi! Yehova, Ye oyo akomisaki Biblia, apesi yo libaku malamu wana. Moto moko oyo azalaki na lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso akomelaki bandeko na ye boye: “Soko moko na bino azangi mayele, [asɛnga] Nzambe oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te. Bongo akozwa yango. Kasi [asɛnga] na kondima, abɛta ntembe te.” (Yakobo 1:5, 6) Lisangani ya Mikóló-Bakambi na mikolo na biso elendisaka biso ntango nyonso ete tómipesa na kotánga Biblia mpe tóbondelaka mpo na yango.
15 Kozala na mayele elimboli koyeba kosalela boyebi na ndenge oyo ebongi. Yango wana liboso ofungola Biblia na yo, sɛngá Yehova asalisa yo ete ntango okotánga oyeba komona makambo oyo okosalela na kati ya bomoi na yo. Yokanisá makambo oyo oyekoli sika na makambo oyo oyebaki liboso. Bakisá yango na kati ya “ndakisa ya maloba ya sembo” oyo okangi ntina na yango. (2 Timote 1:13) Kanisá makambo oyo basaleli ya Yehova na ntango ya kala bakutanaki na yango na bomoi na bango, mpe omituna soki olingaki kosala nini na makambo ya ndenge yango.—Genese 39:7-9; Danyele 3:3-6, 16-18; Misala 4:18-20.
16. Makanisi nini ya malamu bapesi biso mpo botángi ya Biblia epesa litomba mpe ezala na ntina mingi?
16 Koluka kaka te ete otikala nsima te na programɛ na yo. Kokende mbangumbangu te. Zwá ntango ya kokanisa makambo oyo ozali kotánga. Soki okangi ntina ya likambo moko malamu te, talá mitindami soki ezali na Biblia na yo. Soki likambo yango ezali kaka polele te, komá yango na mwa papye mpo ete na nsima oluka ndimbola na yango na mikanda mosusu. Ntango ozali kotánga, tyáká mwa bilembo na bavɛrsɛ oyo olingi kobosana te mpe komáká yango. Okoki mpe kobakisa banɔti na yo moko mpe mitindami mosusu na pembeni. Soki otángi vɛrsɛ moko oyo omoni ete ekoki kosalisa yo na mosala ya kosakola mpe ya koteya, simbá maloba na yango ya ntina mpe luká na index ya maloba ya Biblia na nsuka ya Biblia na yo.b
Sepelá na kotánga Biblia
17. Mpo na nini tosengeli kosepela kotángaka Biblia?
17 Mokomi ya nzembo alobaki ete “mposa” ya moto ya esengo, “ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.” (Nzembo 1:2) Esengeli te ete kotánga Biblia mokolo na mokolo ezalaka motungisi kasi esengeli nde kosepelisa biso. Mpo tózala na esengo ya kotánga Biblia, tosengeli koyeba ntango nyonso ntina ya makambo oyo toyekoli. Salomo, mokonzi ya mayele, akomaki ete: “[Esengo, NW ] epai na moto oyo azwi mayele . . . Nzela na ye izali nzela ya esengo mpe bilekelo na ye nyonso ezali kimya. Ye azali lokola nzete ya bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.” (Masese 3:13, 17, 18) Molende oyo tosengeli kosala mpo na kozwa mayele ezali mpenza na ntina, mpamba te banzela na yango ezali banzela ya esengo, ya kimya, ya bolamu, mpe na nsuka, ya bomoi.
18. Longola kotánga Biblia, likambo nini lisusu ezali na ntina, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Ya solo, kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo. Kasi, esuki kaka wana? Esali sikoyo bambula ebele mpenza, bandimi ya mangomba ya boklisto batángaka Biblia, “bazali ntango nyonso koyekola kasi bazali kokóma na boyebi mpenza ya solo te.” (2 Timote 3:7, NW) Mpo botángi ya Biblia ebota mbuma, tosengeli kosala yango na mokano ya kosalela boyebi oyo tokozwa na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Matai 24:14; 28:19, 20) Yango esɛngi molende mpe koyekola na ndenge ya malamu; yango ekoki mpe kozala likambo ya esengo mpe ekoki kopesa matomba, lokola tokomona yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 241, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1995, nkasa 16-17, “Batoli mpo na kobongisa lisusu botángi na yo ya Biblia.”
Mituna ya bozongeli
• Toli nini bapesaki bakonzi ya Yisalaele oyo ebongi mpe na bakɛngɛli lelo oyo, mpe mpo na nini?
• Lelo oyo, banani bazali lokola “bapaya” mpe “bana,” mpe mpo na nini basengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo?
• Bibongiseli nini ya malamu “moombo ya sembo mpe ya mayele” azwi mpo na kosalisa biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo?
• Ndenge nini tokoki kozwa litomba ya solosolo mpe esengo na kotánga Biblia?
[Elilingi na lokasa 9]
Mingimingi bankulutu basengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo
[Elilingi na lokasa 10]
Yesu azalaki na momeseno ya kotánga Makomami na eyanganelo