Zalá na mposa makasi ya kosakola nsango malamu
“Bópela na elimo. Bósalela Yehova lokola baombo.”—BALOMA 12:11, NW.
1, 2. Makanisi nini baklisto basalaka makasi babatela lokola bazali basakoli ya nsango malamu?
ELENGE mobali moko akómi esengo esengo mpo azwi mosala ya sika. Mokolo ya liboso oyo akómi na esika ya mosala, azali motema likoló mpe azali kozela patrɔ na ye ayebisa ye ndenge oyo akosala. Azali kokanisa ndenge akosala mosala na ye ya liboso mpe azali kozwa makambo na lisɛki te. Mposa na ye ezali ete asala mpenza na ndenge oyo ekoki.
2 Lokola elenge yango, biso baklisto tokoki komitalela lokola bato babandi mosala sika. Lokola tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko, tokoki koloba ete tobandi se kobanda na mosala ya Yehova. Na ntembe te, Mozalisi na biso azali na misala mingi oyo akopesa biso mpe tokosala yango seko na seko. Kasi mosala ya libosoliboso oyo tozwi ezali mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. (1 Batesaloniki 2:4) Ndenge nini totalelaka mosala yango oyo Nzambe apesi biso? Tosengeli kozala lokola elenge mobali wana, tosengeli mpenza kozala na mposa ya kosala mosala yango, elingi koloba tósala yango na makasi na biso nyonso, na molende mpe na esengo!
3. Moto oyo alingi kokokisa malamu mosala na ye ya ministre ya nsango malamu, asengeli kosala nini?
3 Ya solo, ezali pɛtɛɛ te kozala ntango nyonso na makanisi malamu. Longola mosala ya kosakola, tozali na makambo mosusu mingi ya kosala, mpe mosusu kati na yango ekoki kosɛnga biso tózala nzoto makasi to mpe tótyela yango mpenza makanisi mpo na kosala yango. Mbala mingi tosalaka nyonso mpo na kosala makambo yango kozanga kobosana mosala ya kosakola. Atako bongo, ezali etumba ya mokolo na mokolo. (Malako 8:34) Yesu amonisaki ete mpo tólonga na bomoi na biso lokola baklisto, tosengeli mpenza kotya molende.—Luka 13:24.
4. Mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kosala nini na elimo na biso?
4 Lokola tozali na makambo mingi ya kosala, ezali mpasi te tómiyoka ntango mosusu ete makambo eleki biso motó to tolɛmbi nzoto. “Mitungisi ya bomoi” ekoki kolɛmbisa molende na biso mpe esengo na biso mpo na makambo oyo tozali kosala na kati ya lisangá. (Luka 21:34, 35; Malako 4:18, 19) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobungisa ‘bolingo na biso ya liboso.’ (Emoniseli 2:1-4) Na mosala na biso mpo na Yehova, tokoki kokóma kosala makambo mosusu kaka mpo na kosala. Biblia elobi nini mpo na kolendisa biso tózala ntango nyonso na molende na mosala ya kosakola?
Lokola ‘mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa’ na mitema na biso
5, 6. Ndenge nini ntoma Paulo azalaki kotalela libaku malamu ya kosakola oyo bapesaki ye?
5 Yehova apesi biso mosala ya ntina mingi oyo tosengeli te kotalelaka yango lokola eloko mpamba. Ntoma Paulo azalaki kotalela mosala ya kosakola nsango malamu lokola libaku malamu mpenza; kutu, amonaki ete ye abongaki te mpo bápesa ye mosala yango. Alobaki boye: “Nazwi ngɔlu oyo ata naleki moke moke kati na Babulami, ete nasakwela bapakano Nsango Malamu ya bozwi ya Klisto oyo ekoki koyebana te. Namonisa mpe polele epai na bato nyonso mwango ya libombami oyo esili kobombama longwa bikeke ya kalakala kati na Nzambe, ye Mozalisi ya biloko nyonso.”—Baefese 3:8, 9.
6 Paulo azalaki na makanisi oyo ebongi mpo na mosala ya kosakola; mpe yango ezali ndakisa malamu mpo na biso. Na mokanda oyo akomelaki Baloma, alobaki boye: “Nazali na mposa ete nasakola Nsango Malamu.” Azalaki koyokela nsango malamu nsɔni te. (Baloma 1:15, 16) Azalaki na makanisi oyo ebongi mpe azalaki na mposa makasi ya kosala mosala na ye ya kosakola.
7. Likambo nini Paulo akebisaki Baloma na mokanda oyo akomelaki bango?
7 Ntoma Paulo ayebaki ete esengeli kozala ntango nyonso na molende, yango wana apesaki baklisto ya Loma toli oyo: “Bósala misala na bino na bopɔtu te, bópela na elimo, bósalela Yehova lokola baombo.” (Baloma 12:11, NW ) Liloba ya Greke oyo ebongolami na ‘kolɛmba’ ezali kopesa likanisi ya kozala na “gɔigɔi.” Ata soki ekómeli biso mpenza te ete tólɛmba mosala ya kosakola, biso nyonso tosengeli kozala na ekɛngɛ mpe kososola mbala moko makambo oyo ekomonisa biso ete tobandi kolɛmba na elimo mpe kosembola makanisi na biso soki tomoni makambo motindo yango epai na biso.—Masese 22:3.
8. (a) Eloko nini ekómaki lokola ‘mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa’ na motema ya Yilimia, mpe mpo na nini? (b) Makambo oyo Yilimia akutanaki na yango ezali koteya biso nini?
8 Mpe lisusu, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso soki tolɛmbi nzoto. Na ndakisa, na ntango moko boye, mosakoli Yilimia alɛmbaki nzoto mpe akómaki na makanisi ete atika mosala na ye ya mosakoli. Kutu, alobaki boye: “Nakoloba nkombo na [Yehova] te, nakoloba mpo na nkombo na ye lisusu te.” Maloba yango emonisi ete Yilimia alɛmbaki mpenza na elimo? Te. Kutu, lokola Yilimia azalaki makasi na elimo mpe alingaki Yehova mingi, mpe lisusu azalaki na molende mpo na solo, yango elendisaki ye mpo akoba kosakola. Alobaki boye: “[Liloba ya Yehova] ezalaki na motema na ngai lokola mɔ́tɔ na kozikisa, mobombami kati na mikuwa na ngai; nalɛmbaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” (Yilimia 20:9) Na bantango mosusu ekoki mpenza kokóma ete mosaleli ya sembo ya Nzambe alɛmba nzoto. Kasi soki abondeli Yehova asalisa ye, akotánga na kati ya motema na ye mpe akopesa ye elimo santu na ye soki azali lokola Yilimia, elingi koloba soki azali na liloba na ye na motema na ye.—Luka 11:9-13; Misala 15:8.
“Bóboma mɔ́tɔ ya elimo te”
9. Nini ekoki kopekisa elimo santu kosala mosala na yango epai na biso?
9 Ntoma Paulo apesaki Batesaloniki toli ete: “Bóboma mɔ́tɔ ya elimo te.” (1 Batesaloniki 5:19, NW ) Ya solo, misala mpe elimo oyo eyokani na mibeko ya Nzambe te ekoki kopekisa elimo santu kosala mosala na yango epai na biso. (Baefese 4:30) Lelo oyo, mokumba ya baklisto ezali ya kosakola nsango malamu. Tópesaka limemya mingi na libaku malamu yango. Tokamwaka te na komona ete bato oyo bayebi Nzambe te batyolaka mosala na biso ya kosakola. Kasi soki moklisto azali kosala na nko mpe azali kotalela mosala na ye ya kosakola lokola eloko mpamba, yango ekoki koboma mɔ́tɔ ya elimo ya Nzambe oyo epesaka mpiko.
10. (a) Ndenge nini makanisi ya bato mosusu ekoki kobebisa biso? (b) Makanisi nini ya malamu mpo na mosala na biso ezali na 2 Bakolinti 2:17?
10 Bato mosusu oyo bazali na lisangá ya boklisto te bakoki kokanisa ete mosala na biso ezali kaka kokabola mikanda. Bato mosusu bakoki komikosa mpe kokanisa ete tokendaka ndako na ndako mpo na kokɔngɔla mabonza. Soki totiki ete makanisi mabe wana ebebisa elimo na biso, molende na biso na mosala ya kosakola ekoki kokita. Tótika te ete makanisi ya ndenge wana elɛmbisa biso, kasi tózala na makanisi ya Yehova na Yesu mpo na mosala na biso. Ntoma Paulo amonisaki makanisi yango na maloba oyo: “Biso tokeseni na bato mingi baoyo bakotekisaka Liloba ya Nzambe; nde lokola batindami ya Nzambe, tokolobaka na sembo na miso ya Nzambe kati na Klisto.”—2 Bakolinti 2:17.
11. Nini esalisaki baklisto ya liboso bázala ntango nyonso na molende ata na kati ya minyoko, mpe ndenge nini ndakisa na bango ekoki kosalisa biso?
11 Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, bakómaki konyokola bayekoli na ye na Yelusaleme. Bazalaki kokanela bango mpe bapekisaki bango kosakola. Kasi, Biblia elobi ete “batondaki na [elimo santu, NW ], mpe na molende basakoli liloba ya Nzambe.” (Misala 4:17, 21, 31) Maloba oyo Paulo akomelaki Timote mwa bambula na nsima emonisi makanisi malamu oyo baklisto basengeli kozala na yango. Paulo alobaki boye: “Mpo ete Nzambe apesaki biso elimo ya kobangabanga te kasi elimo ya nguya mpe ya bolingo mpe ya komikanga motema. Boye, oyoka nsɔni mpo na kotatwela Nkolo na biso te, mpe mpo na ngai te, mokangami na ye; kasi omema ndambo na yo ya mpasi mpo na Nsango Malamu [lokola] Nzambe akopesa nguya.”—2 Timote 1:7, 8.
Tozali na mokumba nini epai ya bazalani na biso?
12. Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka nsango malamu?
12 Mpo tózala na makanisi malamu mpo na mosala na biso, tosengeli kozala na ntina ya malamu oyo ezali kotinda biso na kosala mosala yango. Mpo na nini tosakolaka? Ntina ya libosoliboso ezali na maloba ya mokomi ya nzembo oyo elobi boye: “Ɛ [Yehova], mpe bato na yo mpenza bakosanzola yo. Bakoloba mpo na nkembo ya bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na ye ya nguya mpe nkembo ya bokonzi na ye.” (Nzembo 145:10-12) Tosakolaka mpo na kokumisa Yehova mpe mpo na kosantisa nkombo na ye na liboso ya bato nyonso. Ata soki bato moke kaka bazali koyoka biso, tokumisaka Yehova ntango tozali kosakola nsango ya lobiko na bosembo nyonso.
13. Nini etindaka biso tóyebisa bato mosusu elikya ya lobiko?
13 Lisusu, tosakolaka mpo tolingaka bato, mpe lisusu mpo tózala na nyongo ya makila te. (Ezekiele 33:8; Malako 6:34) Yango eyokani na maloba ya Paulo, ntango azalaki koloba mpo na bato oyo bazali baklisto te, ete: “Nazali na nyongo epai na [Bagreke, NW ] mpe na Bapakano, epai na bato ya mayele mpe na bato bazangi mayele.” (Baloma 1:14) Paulo amonaki ete azali na mokumba ya kosakwela bato nsango malamu, mpamba te Nzambe alingi ete “bato ya motindo nyonso bábika.” (1 Timote 2:4, NW ) Lelo oyo, biso mpe tozali na bolingo ya ndenge wana mpo na bazalani na biso mpe tozali na mokumba epai ya bango. Yehova alingi bato, yango wana atindaki Mwana na ye awa na mabele akufa mpo na bango. (Yoane 3:16) Likambo oyo asalaki ezali moke te. Tolandaka ndakisa ya bolingo ya Yehova ntango topesaka ntango na biso mpe tosalaka makasi mpo na kokende koyebisa bato mosusu nsango malamu ya lobiko na lisalisi ya mbeka ya Yesu.
14. Ndenge nini Biblia ezali kolobela mokili, elingi koloba, bato oyo bazali na lisangá ya boklisto te?
14 Batatoli ya Yehova batalelaka bazalani na bango lokola bato oyo, lobi to lobi kuna, bakoki kokóma bandeko na bango baklisto. Tosengeli kosakola na molende, kasi molende na biso ezali matumoli te. Kutu, Biblia esaleli maloba ya mabe te mpo na kolobela mokili. Paulo asalelaki liloba “mokili” mpo na kolobela likambo ya mabe ntango alobelaki “mayele ya mokili oyo” mpe “bamposa ya mokili.” (1 Bakolinti 3:19, NW; Tito 2:12) Paulo ayebisaki baklisto ya Efese ete ntango bazalaki kotambola na “[kolanda] nzela ya mokili oyo,” bazalaki “bakufi” na elimo. (Baefese 2:1-3) Maloba yango mpe maloba mosusu ya ndenge yango eyokani na likambo oyo ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.”—1 Yoane 5:19.
15. Mpo na bato oyo bazali baklisto te, tosengeli kosala nini te mpe mpo na nini?
15 Kasi, tóbosana te ete alobaki bongo mpo na bato nyonso oyo balingaka makambo ya Nzambe te, kasi ezalaki te mpo na moto mokomoko. Baklisto bazwelaka moto makanisi liboso te ete akondima to akoboya nsango oyo bazali kosakola. Bazali na likoki te ya koloba ete moto boye azali ntaba. Biso tokoki koloba te ete moto boye akozala na ngámbo boye to boye ntango Yesu akoya kokabola “bampate” na “bantaba.” (Matai 25:31-46) Yesu azali zuzi oyo aponami, kasi ezali biso te. Lisusu, makambo oyo eleká emonisi ete bato mosusu oyo bazalaki na misala ya mabe mpenza bandimaki nsango ya Biblia, babongwanaki, mpe bakómaki baklisto oyo bazali na bizaleli malamu. Yango wana, atako ezali na bato mosusu oyo tolingaka kozala baninga na bango te, tókakatanaka te koyebisa bango elikya ya Bokonzi soki tozwi libaku ya kosala yango. Makomami ezali kolobela bato mosusu oyo, atako bakómaki naino bandimi te, “bazalaki na makanisi mabongi mpo na bomoi ya seko.” Nsukansuka bato yango bakómaki bandimi. (Misala 13:48, NW ) Tokoki koyeba te nani azali na makanisi mabongi soki topesi ye naino litatoli te, mpe ntango mosusu esɛngaka kosala yango mbala mingi. Lokola toyebi likambo yango, tosengeli kozala na “bopɔlɔ” mpe na “limemya mingi,” epai ya bato oyo bandimi naino nsango ya lobiko te mpe tózala na elikya ete bamosusu kati na bango bakoki kondima nsango ya bomoi.—2 Timote 2:25; 1 Petelo 3:15, NW.
16. Yebisá ntina moko oyo tosengeli kobakisa “mayele ya koteya”?
16 Soki tozali kosala makasi mpo tókóma balakisi malamu, yango ekobakisa mposa na biso ya kosakola nsango malamu. Tokoki kolimbola yango na ndakisa oyo: Moto oyo ayebi te ndenge basalaka lisano moko, akosepela na yango mpenza te. Kasi moto oyo ayebi kobɛta yango malamu asepelaka na yango mingi. Ndenge moko mpe, baklisto oyo bazali kosala makasi bákóma na “mayele ya koteya” basepelaka lisusu mingi na mosala ya kosakola. (2 Timote 4:2; Tito 1:9) Paulo apesaki Timote toli ete: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai ya Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo kosembola liloba ya solo.” (2 Timote 2:15) Tokosala nini mpo tókóma bateyi malamu?
17. Ndenge nini tokoki “kokolisa mposa” ya boyebi ya Biblia, mpe ndenge nini boyebi yango ekoki kosalisa biso na mosala na biso ya kosakola?
17 Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso ezali soki tozali koyekola mingi mpo tókóma na boyebi mingi ya solo. Ntoma Petelo alendisi biso na maloba oyo: “Lokola bana oyo babotami sika, bókolisa mposa ya miliki ya sika ya liloba, ete na nzela na yango bókola tii na lobiko.” (1 Petelo 2:2, NW ) Mwana oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ, azalaka na mposa ya mabɛlɛ ye moko. Kasi, ntango mosusu esɛngaka ete moklisto ‘akolisa mposa’ ya boyebi ya Biblia. Akoki kosala yango soki azwi momeseno malamu ya koyekola mpe ya kotánga. (Masese 2:1-6) Mpo na kokóma balakisi malamu ya Liloba ya Nzambe, tosengeli kotya molende mpe koyeba komipekisa; mpe soki tosali bongo, tokozwa mbano. Esengo oyo tokoyoka ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe ekosala ete tópela na elimo ya Nzambe, mpe ekopesa biso mposa ya koyebisa bato mosusu makambo oyo tozali koyekola.
18. Ndenge nini makita ya lisangá ekoki kopesa biso mayele ya kosalela malamu liloba ya solo?
18 Makita ya lisangá mpe esalisaka biso mingi mpo na koyeba kosalela Liloba ya Nzambe malamu. Ntango bazali kotánga bavɛrsɛ ya Biblia na masukulu ya bato banso mpe na makita mosusu, ebongi mpenza tólandaka na kati ya Babiblia na biso. Tosengeli kolandaka masolo nyonso na likebi mpenza, bakisa mpe masolo oyo elobelaka mpenzampenza mosala ya kosakola. Tosengeli kotalelaka bilakiseli lokola masano mpamba te to mbala mosusu kotya makanisi na biso na makambo mosusu. Na nyonso wana, tosengeli mpe koyeba komipekisa mpe kotya makanisi na biso esika moko. (1 Timote 4:16) Makita ya lisangá etongaka kondima na biso, esalisaka biso tózala na mposa ya Liloba ya Nzambe, mpe epesaka biso mayele mpo tózala basakoli ya nsango malamu oyo bazali na molende.
Tokoki kotya motema ete Yehova akosunga biso
19. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tósakolaka pɔsɔ na pɔsɔ?
19 Baklisto oyo bazali ‘kopela na elimo’ mpe bazali na mposa makasi ya kosakola nsango malamu basalaka makasi ete bábimaka na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ. (Baefese 5:15, 16) Ya solo, moto na moto azali na makambo na ye mpe biso nyonso tokoki kolekisa ngonga ndenge moko te na mosala yango ya kobikisa bomoi ya bato. (Bagalatia 6:4, 5) Kasi, mbala mosusu eloko oyo eleki ntina ezali bangonga te oyo tozali kolekisa na mosala ya kosakola, kasi nde mbala boni tolobelaka elikya na biso epai ya bato mosusu. (2 Timote 4:1, 2) Soki tozali kosakola mingi, yango ekosalisa biso tómona mpenza ntina ya mosala yango. (Baloma 10:14, 15) Mbala na mbala ntango tozali kokutana na bato ya mitema sembo oyo bazali kolela mpe kokimela mpe bato oyo bazangi elikya, tokokóma na motema mawa mpe na boboto mingi.—Ezekiele 9:4; Baloma 8:22.
20, 21. (a) Mosala nini ezali naino liboso na biso? (b) Ndenge nini Yehova azali kosunga milende oyo tozali kosala?
20 Yehova apesi biso mosala ya kosakola nsango malamu. Yango nde mokumba ya liboso oyo apesi biso lokola “basalani” na ye. (1 Bakolinti 3:6-9) Tosengeli kozala na mposa makasi ya kokokisa mokumba yango oyo Nzambe apesi biso na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso. (Malako 12:30; Baloma 12:1) Bato oyo bazali na makanisi mabongi mpe bazali na mposa ya mateya ya solo bazali naino mingi na mokili. Mosala ezali mingi, kasi tokoki kotya motema ete Yehova akosunga biso soki tozali kosala mosala ya kosakola na motema mobimba.—2 Timote 4:5.
21 Yehova azali kopesa biso elimo na ye mpe apesi biso “mopanga ya elimo,” elingi koloba Liloba ya Nzambe. Akoki kosalisa biso tófungola monɔkɔ mpe “kosakola na molende libombami ya Nsango Malamu.” (Baefese 6:17-20) Tiká ete maloba ya Paulo epai ya Batesaloniki ekokisama mpe mpo na biso ete: “Nsango Malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te kasi na nguya mpe na [elimo santu, NW ] mpe na bososoli nyonso.” (1 Batesaloniki 1:5) Ɛɛ, tózala na mposa makasi ya kosakola nsango malamu!
Mwa bozongeli moke
• Molende na biso na mosala ya kosakola ekoki kosala nini mpo na mitungisi ya bomoi?
• Ndenge nini mposa na biso ya kosakola nsango malamu esengeli kozala lokola ‘mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa’ na mitema na biso?
• Makanisi nini ya mabe tosengeli koboya na ntina etali mosala na biso ya kosakola?
• Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo tozali na bango lingomba moko te?
• Ndenge nini Yehova asalisaka biso mpo molende na biso na mosala ya kosakola ekita te?
[Bililingi na lokasa 9]
Baklisto balandaka ndakisa ya molende ya Yilimia na Paulo
[Bililingi na lokasa 10]
Tozalaka na mposa ya kosakola mpo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso