“Motema na yo ezali sembo epai na ngai?”
“Yaká na ngai elongo mpe sosolá mposa na ngai ete nandimi bombanda na Yehova te.”—2 MIKONZI 10:16, NW.
1, 2. (a) Lolenge nini makambo ya losambo na Yisalaele mazalaki sé kobeba? (b) Na mobu 905 L.T.B., mbongwana nini monene ekómaki pene na kosalema na Yisalaele?
MOBU 905 L.T.B. ezalaki eleko ya mbongwana monene na Yisalaele. Pene na mbula 100 liboso, Yehova asalaki ete bokonzi ya Yisalaele oyo ezalaki na bomoko ekabwana na ntina na lipɛngwi ya Salomo. (1 Mikonzi 11:9-13) Na ntango yango, Yuda, bokonzi ya súdi, eyangelamaki na Lehobama, mwana ya Salomo mpe Yisalaele, bokonzi ya nɔ́rdi, eyangelamaki na Mokonzi Yelobama, moto na Efelaima. Likambo ya mawa, bokonzi ya nɔ́rdi ebandaki mabe mpenza. Yelobama alingaki te ete bayangelami na ye básalaka mobembo kino na bokonzi ya súdi mpo na kosambela na tempelo, abangaki ete bakokóma na likanisi ya kozonga na ndako ya Davidi. Na yango, abandisaki losambo ya mwana ngɔmbɛ na Yisalaele mpe na kosaláká bongo atyaki moboko ya losambo ya bikeko oyo ekóbaki pene na ntango nyonso oyo bokonzi ya nɔ́rdi eumelaki.—1 Mikonzi 12:26-33.
2 Makambo mabebaki lisusu mingi na ntango Ahaba, mwana na Omili, akómaki mokonzi. Yezabele, mwasi na ye, ye mopaya, alendisaki losambo ya Baala mpe abomaki basakoli ya Yehova. Atako mosakoli Eliya apesaki makebisi ya polele, Ahaba asalaki eloko te mpo na kopekisa ye. Nzokande, na mobu 905 L.T.B., Ahaba akufaki, mpe Yolama, mwana na ye, abandaki koyangela. Ntango ekokaki mpo ete ekólo epɛtolama. Elisa, mokitani ya Eliya ayebisaki Yehu, mokonzi ya basodá ete, Yehova apakoli ye mpo na kozala mokonzi oyo akoyangela Yisalaele. Mokumba na ye ezalaki nini? Koboma bato ya ndako ya Ahaba oyo batondaki na masumu mpe kobekola mpo na makila ya basakoli oyo Yezabele asopaki!—2 Mikonzi 9:1-10.
3, 4. Lolenge nini Yonadaba amonisaki ete motema na ye ezalaki ‘sembo na motema ya Yehu’?
3 Kotosáká etindá ya Nzambe, Yehu abomisaki Yezabele, mwasi mabe, mpe na nsima abimaki mpo na kopɛtola Yisalaele na kobomáká bato ya ndako ya Ahaba. (2 Mikonzi 9:15–10:14, 17) Na ntango yango akutanaki na mosungi moko. “Azwanaki na Yonadaba, mwana na Lekaba, oyo azalaki koya epai na ye. Apesaki ye mbote, ye ete, Motema na yo ezali malamu [“sembo,” NW] lokola motema na ngai ezali esika moko na motema na yo? Yonadaba alobaki ete, Ezali bongo. Ye ete, Soko boye, pesá ngai lobɔkɔ na yo. Apesaki ye lobɔkɔ na ye mpe akamataki ye esika moko na ye kati na likalo. Alobaki ete, [Yaká na ngai elongo mpe sosolá mposa na ngai ete nandimi bombanda na Yehova te, NW]. Mpe atambolisaki ye kati na likalo na ye.”—2 Mikonzi 10:15, 16.
4 Yehonadaba (to, Yonadaba) azalaki Moyisalaele te. Atako bongo, na boyokani na nkombo na ye (oyo elimboli “Yehova alingi,” “Yehova azali na lokumu,” to “Yehova azali na bokabi”) azalaki mosambeli ya Yehova. (Yilimia 35:6) Na ntembe te asepelaki mingi mpenza komona ete Yehu ‘andimaki bombanda te na Yehova.’ Toyebi yango ndenge nini? Mpamba te bokutani na ye na mokonzi na Yisalaele oyo apakolamaki na Nzambe ezalaki likambo ya mbalakaka te. Yonadaba azalaki “koya epai na ye,” mpe ezalaki nsima wana Yehu asilaki koboma Yezabele mpe bato mosusu ya ndako ya Ahaba. Yonadaba ayebaki likambo oyo elingaki kosalema ntango andimaki libyangi ya Yehu ete amata na likalo na ye. Ntembe ezali te ete amityaki na ngambo ya Yehu—mpe ya Yehova—na kowelana oyo ezalaki kati na losambo ya solo mpe losambo ya lokuta.
Yehu mpe Yonadaba na mikolo na biso
5. (a) Mbongwana nini ekosalema mosika te mpo na bato nyonso? (b) Nani azali Yehu Monene, mpe banani bazali bamonisi na ye awa na mabelé?
5 Lelo oyo, mosika te makambo makobongwana mpenza mpo na bato nyonso lolenge moko makambo mabongwanaki mpo na Yisalaele na mobu 905 L.T.B. Ntango oyo Yehova akopɛtola mabelé na mbuma mabe ya bopusi ya Satana mpe losambo ya lokuta ekómi pene. Nani azali Yehu na mikolo na biso? Ezali bongo Yesu Klisto, ye oyo ayebisameli maloba oyo ya esakweli ete: “Kangá mopanga na yo na ebɛlo na yo, ɛ moto makasi! yo na nkembo, yo na bokonzi! Kati na bokonzi na yo, bimá na kolónga, mpo na makambo na sembo mpe kobundela bayengebene.” (Nzembo 45:3, 4) Awa na mabelé, Yesu amonisami na “Yisalaele na Nzambe,” baklisto bapakolami ‘baoyo bazali kotosa malako na Nzambe mpe bazali kopesa litatoli na ntina na Yesu.’ (Bagalatia 6:16; Emoniseli 12:17, NW) Banda 1922, bandeko bapakolami yango ya Yesu, na kozanga bobangi, bazali kokebisa na ntina na misala ya kosambisa oyo Yehova akosala mosika te.—Yisaya 61:1, 2; Emoniseli 8:7–9:21; 16:2-21.
6. Banani bautaki na mabota mpo na kosunga baklisto bapakolami, mpe na elobeli ya elilingi, lolenge nini bamataki na likalo ya Yehu Monene?
6 Baklisto bapakolami bazali bango moko te. Lolenge moko Yonadaba abimaki kokutana na Yehu, bato mingi bauti na mabota basili kobima mpo na kosunga Yesu, Yehu Monene, na bamonisi na ye awa na mabelé na komityáká na ngambo ya losambo ya solo. (Zekalia 8:23) Na 1932, “bampate mosusu,” lolenge Yesu abéngi bango, bayebanaki ete bakokani na Yonadaba ya kala mpe babyangamaki ete ‘bámata na likalo’ ya Yehu ya mikolo na biso. (Yoane 10:16) Lolenge nini? Na ‘kotosáká malako na Nzambe’ mpe kosanganáká na mopakolami na ‘mosala ya kopesa litatoli na ntina na Yesu.’ Na mikolo na biso, yango esangisi kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama mpe ezali kotambwisama na Yesu lokola Mokonzi. (Malako 13:10) Na 1935, “Bayonadaba” yango bakokanisamaki na “ebele monene” ya Emoniseli 7:9-17.
7. Lolenge nini baklisto bazali komonisa lelo oyo ete ‘mitema na bango mizali ntango nyonso sembo’ na motema ya Yesu?
7 Banda na bambula ya 1930, ebele monene mpe bandeko na bango bapakolami bamonisaki lisungi na bango mpo na losambo ya solo. Na mikili mosusu ya Mpótó ya Ɛ́sti mpe ya Wɛ́sti, na Azia ya Ɛ́sti, mpe na Afrika, mingi bakufaki mpo na kondima na bango. (Luka 9:23, 24) Na mikili mosusu, bakɔtaki bolɔ́kɔ, basalaki bango mabe, mpe banyokolaki bango na ndenge mosusu. (2 Timoté 3:12) Ya solo, bamonisaki kondima na bango! Mpe lapólo ya mobu ya mosala 1997 ezali komonisa ete bazali ntango nyonso na ekateli ya kosalela Nzambe, ezala makambo nini makokómela bango. ‘Motema na bango ezali ntango nyonso sembo’ na motema ya Yesu. Yango emonisamaki na boumeli ya 1997, ntango basakoli 5 599 931 ya Bokonzi, oyo motuya moleki monene kati na bango bazali na kelasi ya “Yonadaba,” balekisaki ngonga 1 179 735 841 na mosala ya kopesa litatoli na ntina na Yesu.
Bazali kokóba kosakola na molende
8. Lolenge nini Batatoli ya Yehova bazali komonisa molende mpo na losambo ya solo?
8 Yehu ayebanaki ete azalaki kotambwisa likalo mbangumbangu—elembo ya molende na ye mpo na kokokisa mokumba na ye. (2 Mikonzi 9:20) Yesu, oyo azali Yehu Monene, alobelami ete molende ‘elei’ ye. (Nzembo 69:9) Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete baklisto ya solo báyebana mpo na molende na bango. Ezala kati na lisangá to epai ya bato nyonso, bazali ‘kosakola liloba . . . na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te.’ (2 Timoté 4:2) Molende na bango emonanaki mpenza na ebandeli ya 1997 nsima wana lisoló moko kati na Mosala na biso ya Bokonzi elendisaki ete mingi kati na bango básangana na mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na ekólo mokomoko bapesamelaki motuya oyo basengelaki kokóma. Lolenge nini bayanolaki? Na lolenge ya kokamwa! Na bafiliale mingi, balekaki motuya oyo esɛngamaki. Na ekólo Équateur batyelaki bango motuya ya 4 000 kasi na Mársi bapesaki lapólo ya babongisi-nzela basungi 6 936. Ekólo Japon epesaki lapólo mobimba ya babongisi-nzela basungi 104 215 na boumeli ya sanza yango misato. Na ekólo Zambie, mokano ezalaki ya 6 000, nzokande bandeko 6 414 basalaki mosala ya mobongisi-nzela na Mársi; 6 532 na Apríli; mpe 7 695 na Máí. Soki tosangisi nyonso, motuya ya sika ya babongisi-nzela basungi mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza ezalaki ya 1 110 251, bokóli ya 34,2 likoló na monkámá koleka na 1996!
9. Longola mosala ya kosakola ndako na ndako, na mitindo nini mosusu Batatoli ya Yehova bazali kokutana na bato mpo na koyebisa bango nsango malamu?
9 Ntoma Paulo ayebisaki bankulutu bautaki na Efese ete: “Nabangaki te kosakwela bino makambo makoki kosunga bino, mpe kolakisa bino na kati na koyangana mpe na ndako na ndako.” (Misala 20:20) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali komekola ndakisa ya Paulo mpe bazali kosakola na molende nsango malamu ndako na ndako. Nzokande, ekoki kozala mpasi kokuta bato na bandako na bango. Mpo na yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kolendisa basakoli ya Bokonzi na kosolola na bato na bisika na bango ya mombongo, na balabála, na mabongo ya mai, na baparke—ɛɛ, bisika nyonso oyo bakoki kozwama. (Matai 24:45-47) Mbuma na yango ezali malamu mingi mpenza.
10, 11. Lolenge nini basakoli na mikili mibale bamonisaki makanisi malamu mpo na koluka bato oyo bazali komonisa bosepeli oyo, ntango mosusu bakoki kozwama te na bandako na bango?
10 Na engumba Copenhague, na ekólo Danemark, mwa etuluku moko ya basakoli bazalaki kopesa litatoli na balabála na libándá ya bisika ya bozeli engbunduka. Banda Yanuáli kino Yúni, bakabolaki bazulunalo 4 733, basololaki malamu na bato, mpe basalaki bozongeli ya sika mingi. Basakoli mingi na ekólo yango basili kofungola nzela ya bokaboli bazulunalo na bamagazini. Na engumba moko ezalaka na zando monene mokolo nyonso ya mitano, mpe bato bayaka mingi. Na yango, lisangá ezwaki ebongiseli ya kopesa litatoli na zando mbala na mbala. Na etúká moko, bandeko bazali kokende na biteyelo na maboke ya mikanda oyo mizali kosepelisa balakisi.
11 Na Hawaï milende misalemaki mpe mpo na kokutana na baoyo bakoki kozwama te na bandako na bango. Bateritware ya sipesiale oyo esangisi bisika ya bato banso (balabála, baparke, bisika ya kotɛlɛmisa mituka, mpe bisika ya bozeli bísi), na bamagazini mpe babiro, bisika ya kosomba biloko, zingazinga ya libándá ya mpɛpo, litatoli na telefone, kati na babísi, mpe na biteyelo minene. Bazali kokeba ete bátinda motuya ya Batatoli oyo ekoki na teritware moko mpe baoyo batindami kuna bazali naino kolakisama malamu. Balapólo ezali kouta na mikili mingi emonisi ete bazali kosala milende na kozwáká bibongiseli malamu. Lokola litomba, bato oyo bazali komonisa bosepeli bazali kozwama, baoyo mbala mosusu bakokaki kozwama te na mosala ya ndako na ndako.
Batikali ngwi
12, 13. (a) Mwango nini Satana asalelaki mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova na boumeli ya mobu ya mosala 1997? (b) Na lolenge nini bifundeli ya lokuta ezongelaki babimisi na yango na ekólo moko?
12 Na 1997, na mikili mwa mingi, balobaki mabe na ntina na Batatoli ya Yehova na bipanzelo ya bansango na mokano ya kofunda bango na bisambiselo. Kasi Batatoli bazongaki nsima te! (Nzembo 112:7, 8) Bamikundolaki libondeli ya mokomi na nzembo ete: “Bato na ngambo babuki lokuta na ntina na ngai, kasi nakobatela bilakeli na yo na motema na ngai mobimba.” (Nzembo 119:69) Bifundeli ya lokuta motindo wana ezali bobele elembeteli ete baklisto ya solo bazali koyinama lokola Yesu asakolaki yango. (Matai 24:9) Mpe ntango mosusu bifundeli yango ezongelaki babandisi na yango. Mobali moko na ekólo Belgique atángaki lisoló moko oyo elobaki mabe na ntina na Batatoli ya Yehova na zulunalo moko eyebani mingi. Lokola abulunganisamaki na maloba ya kotuka oyo masalelamaki, na mokolo ya lomingo oyo elandaki ayanganaki na makita na Ndako ya Bokonzi. Azwaki bibongiseli mpo na koyekola Biblia na Batatoli mpe akólaki nokinoki. Liboso, moto yango azalaki mosangani ya etuluku moko ya basáli na mobulu. Boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ye na koyokanisa bomoi na ye na mateya ya Biblia, mpe bato ya zingazinga na ye bamonaki mbongwana yango. Na ntembe te, mokomi ya lisoló yango ya kotuka akanisaki te ete ekokaki kobimisa litomba motindo yango!
13 Bato mosusu ya motema sembo na ekólo Belgique balobaki mpo na kotɔndɔla bifundeli mabe oyo esalemaki mpo na kobebisa lokumu ya Batatoli. Moko kati na bango ezali bongo ministre-mokonzi ya kala oyo andimaki ete azali kosepela na makambo oyo Batatoli ya Yehova basili kokokisa. Mpe depité moko akomaki ete: “Na bokeseni na makambo ya lokuta oyo malobamaki na mabaku mosusu, mpo na ngai [Batatoli ya Yehova] bazali kotya Letá na likama ata moke te. Bazali banamboka oyo balingi kimya, bakokisaka mikumba na bango, mpe batosaka bakonzi.” Ya solo, maloba ya ntoma Petelo mazali mpenza maloba ya mayele ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”—1 Petelo 2:12.
Molulu monene ya Ekaniseli
14. Wapi mwa balapólo oyo ezali kosepelisa na ntina na koyangana na Ekaniseli na 1997?
14 Ebongi mpenza ete baoyo bazali kopesa litatoli na ntina na Yesu bátalela Ekaniseli ya liwa na ye lokola likambo ya ntina mingi kati na mobu. Na 1997, bato 14 322 226 bayanganaki na mokolo ya 23 Mársi mpo na kosala molulu yango. Elingi koloba ete bato koleka 1 400 000 babakisami likoló ya motuya ya bayangani na 1996. (Luka 22:14-20) Na bikólo mingi, motuya ya bayangani na Ekaniseli ezalaki mingi mpenza koleka motuya ya basakoli ya Bokonzi, yango ezali komonisa bilikya ya bokóli na mikolo mizali koya. Na ndakisa, na 1997 na ekólo Haïti, motuya ya basakoli ekómaki 10 621, nzokande bato 67 259 bayanganaki na Ekaniseli. Okoki kotala lapólo ya mobu na nkasa 18 kino 21 mpo na komona mikili boni mizwaki bayangani ebele bongo na bokokanisi na motuya ya basakoli.
15. Na bikólo mosusu, lolenge nini bandeko na biso balóngaki mikakatano makasi mpo na kosala molulu ya Ekaniseli?
15 Mpo na bamoko, koyangana na Ekaniseli ezalaki mpenza mokakatano. Na ekólo Albanie, na ntina na mobulu ya banamboka, batyaki mobeko ete moto abima na lopango te banda ngonga ya 7 ya mpokwa. Mpo na bituluku mikemike 115 kati na ekólo yango, Ekaniseli ebandaki na ngonga ya 5:45 ya mpokwa. Kolala ya moi na ngonga ya 6:08 ya mpokwa, emonisi ebandeli ya 14 Nisana. Bilembo ya Ekaniseli bitambwisamaki pene na ngonga ya 6:15 ya mpokwa. Na bisika mingi, libondeli ya nsuka esalemaki na 6:30 ya mpokwa, mpe bayangani bazongaki nokinoki na ndako liboso ete ngonga ya 7 ebɛta. Atako bongo, bayangani na Ekaniseli bazalaki 3 154, nzokande basakoli bazali 1 090. Na ekólo moko ya Afrika, mobulu ya banamboka esalaki ete likoki ezalaki te ya kokóma na Ndako ya Bokonzi, na yango bankulutu mibale bazwaki ekateli ya kokutana na ndako ya nkulutu mosusu mpo na kozwa bibongiseli ya kosala molulu na bituluku mikemike. Mpo na kokóma na ndako na ye, basengelaki kokatisa talasé moko. Nzokande, masasi mazalaki kobɛtama zingazinga, mpe bato oyo bazalaki kobɛta yango babombamaki mpe bazalaki kobɛta na moto nyonso oyo akomeka kokatisa talasé. Nkulutu moko akatisaki mbangu kozanga likama. Nzokande mosusu, wana azalaki kokatisa ayokaki lokito ya masasi. Amibwakaki na nsé mpe amibendaki na libumu mpo na kobombana wana masasi mazalaki koleka ye likoló ya motó. Likita ya bankulutu esalemaki malamu, mpe mposa ya lisangá ekokisamaki.
“Bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso . . . na minɔkɔ nyonso”
16. Lolenge nini kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele esalaki bibongiseli mpo ete nsango malamu esakolama epai ya bituluku mikemike oyo balobaka nkota mosusu?
16 Ntoma Yoane alobaki ete ebele monene ekouta na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi ete mikanda mikomama na nkota mingi koleka—ata na nkota oyo elobamaka na bituluka mikemike ya bato bafandi mosika. Na ndakisa, na ekólo Mozambique, trakte Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika ebimisamaki na nkota misusu mitano. Na ekólo Nicaragua, mwa búku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! ebongolamaki na lokota Miskito—ezali mokanda ya liboso ya la Société Watch Tower na monɔkɔ wana. Baɛndyɛ́ mingi balobaka lokota Miskito bandimaki mwa búku yango na esengo na komonáká mokanda ekomami na lokota na bango mpenza. Na 1997, la Société apesaki ndingisa mpo na kobimisama ya mikanda na nkota mosusu 25 ya sika mpe bazulunalo koleka miliare moko enyatamaki.
17. Etuluku ya bato balobaka lokota nini basalisamaki na ekólo Corée, mpe lolenge nini bakasɛti-video esalisaki mingi etuluku yango?
17 Na ekólo Corée, etuluku ya bato balobaka lokota mosusu esalisamaki. Na 1997, mpo na mbala ya liboso liyangani esalemaki na elobeli ya bilembo ya ekólo Corée. Na Corée ezali na masangá 15 ya elobeli ya bilembo oyo ezali na basakoli 543, kasi bato 1 174 bazalaki na liyangani, mpe bato 21 bazwaki batisimo. Mpo na kosalisa bakufi-matoi oyo bazali na mikakatano ya kokanga ntina to kotánga, mikanda mizali kotyama na kasɛti-video na elobeli 13 ya bilembo. Na lolenge yango, bakufi-matoi bazali kozwa lisungi mpo na “kotánga” mpe ata koyekola nsango malamu, mpe ezali kobota mbuma malamu. Kala na États-Unis, ezalaki kosɛnga kino mbula mitano mpo ete mokufi-matoi akóla kino kozwa batisimo. Sikawa, lokola bakasɛti-video na elobeli ya bilembo ya ekólo Amerika ebimisamaki, mpo na bakufi-matoi mosusu, ntango yango ekiti kino na mbula moko.
‘Batikali kati na likalo’
18. Nsima ya kokutana na Yonadaba, Yehu abandaki mosala nini?
18 Na mobu 905 L.T.B., nsima ya kokutana na Yonadaba, Yehu abandaki mosala ya kosilisa losambo ya lokuta. Abyangaki basambeli nyonso ya Baala ete: “Bongisá koyangana na bulɛɛ mpo na Baala.” Na nsima atindaki yango na ekólo mobimba mpo na komindimisa ete mosambeli moko te ya Baala atikalaki. Wana ebele ya bato batondanaki na tempelo monene ya nzambe ya lokuta, bakebaki ete mosambeli ata moko ya Yehova azala na kati te. Na nsuka, Yehu na basodá na ye babomaki basambeli ya Baala. “Boye Yehu alongolaki Baala na kati na Yisalaele.”—2 Mikonzi 10:20-28.
19. Na kotalela makambo mazali kozela bato liboso, tosengeli komonisa elimo nini, mpe tosengeli komipesa na mosala nini?
19 Lelo oyo, kosambisama ya nsuka mpo na mangomba ya lokuta ezali koya. Na nsé ya litambwisi ya baanzelu, baklisto bazali kosakola nsango malamu epai ya bato nyonso, kolendisáká bango ete bábanga Nzambe mpe bábima na mangomba ya lokuta. (Emoniseli 14:6-8; 18:2, 4) Basɔkɛmi balendisami na kondima Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto, Mokonzi atyami na Yehova. (Emoniseli 12:10) Na ntango oyo, wana makambo minene mazali kosalema, tosengeli te kotika nzela ete molende na biso elɛmba ndenge totɛlɛmi ngwi mpo na losambo ya solo.
20. Okozala na ekateli ya kosala nini na boumeli ya mobu ya mosala 1998?
20 Na libaku moko, ntango Mokonzi Davidi atungisamaki makasi, abondelaki ete: “Ɛ Nzambe, motema na ngai elendisami; motema na ngai elendisami; nakoyemba, nakoyemba nzembo. Nakotɔ́nda yo, Nkolo, kati na bato.” (Nzembo 57:7, 9) Tiká ete biso mpe tózala ngwi. Na boumeli ya mobu ya mosala 1997, atako mikakatano mizalaki ebele, lokito makasi ya masanzoli ebimaki mpo na nkembo ya Yehova Nzambe. Tiká ete lokito lolenge moko, ata koleka, eyokama na boumeli ya mobu oyo ya mosala. Mpe tiká ezala bongo ata soki Satana ameki kosala nini mpo na kolɛmbisa biso to kotɛmɛla biso. Na bongo, tokomonisa ete motema na biso ezali sembo na motema ya Yesu Klisto, Yehu Monene, mpe tokoyanola na molimo mobimba na elendiseli oyo epemami: “Bino bayengebene, bósepela kati na [Yehova] mpe bózala na esengo; bóyemba na esengo bino nyonso na mitema sembo.”—Nzembo 32:11.
Okoki kolimbola?
◻ Mbongwana nini ekɔtaki na Yisalaele na mobu 905 L.T.B.?
◻ Nani azali Yehu na mikolo na biso, mpe lolenge nini “ebele monene” basili komonisa ete ‘motema na bango ezali sembo’ na motema na ye?
◻ Mitángo nini miuti na lapólo ya mobu ezali komonisa molende oyo Batatoli ya Yehova bamonisaki na boumeli ya mobu ya mosala 1997?
◻ Atako makambo nini Satana akoki kosala biso, elimo nini tokomonisa na boumeli ya mobu ya mosala 1998?
[Etanda na lokasa 18-21]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 1997
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 15]
Motuya ya kokamwa ya bayangani na Ekaniseli emonisi ete bokóli mingi ezali na mikolo mizali koya
[Elilingi na lokasa 16]
Lolenge moko Yonadaba asungaki Yehu, lelo oyo “ebele monene” bazali kopesa mabɔkɔ na Yesu Klisto, Yehu Monene, mpe na bandeko na ye bapakolami