Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Lobiko ebelemi mpo na bato bazali kobanga Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 4
    • 2, 3. (a) Mpo na nini bozali kozua elendiseli kati na maloba mazwami na 2 Petelo 2:9? (b) Misala nini na kobikisa likoló na yango Biblia ezali kobenda likebi na biso mpo na kolendisa biso?

      2 Makambo mazali kosalama lelo mazali kokundwela biso bileko mosusu na mpasi ya lisolo na bato. Ntoma Petelo azali kobenda likebi na biso likoló na misala na kobikisa oyo Nzambe akokisaki na bileko yango, mpe asukisi na maloba oyo na kolendisa “Jéhovah ayebi kobikisa bato bazali kobanga Nzambe wana ezali bango kati na komekama.” (2 Petelo 2:9). Totalela oyo ezali zingazinga na yango, na 2 Petelo 2:4-10:

      3 “Mpo ete Nzambe atikaki baanzelu te baoyo basalaki masumu, kasi, abwakaki bango kati na (Tartare), atyaki bango na mabulu na molili tuu, ete babatelama mpo na kosambisama. Atikaki mokili na kalakala te, kasi abateli Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likolo na batyoli. Azikisi mpe mboka na Sodome mpe Gomore kino mputulu; akweisaki bango, atiaki bango elakiseli mpo na bamosusu bakolinga kotyola. Abikisi mpe Lota moyengebene, oyo azalaki komitungisa mingi mpo na etamboli na mobulu na bato oyo bazalaki kotyola mibeko. Mpamba te efandaki moyengebene kati na bango, amoni mpe ayoki misala na bango na kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami na molimo na ye sembo (mpo na misala na bango na kotyola mibeko), Jehovah ayebi kobikisa bato bazali kobanga Nzambe wana ezali bango kati na komekama nde kobomba bato mabe kino mokolo na kosambisa mpo babomama. Eleki mpe bongo na ntina na bango bakobilaka makanisi na nzoto mpo na mposa na bosoto mpe bazali kotyola bokonzi.” Lokola emonisami na baverset oyo, makambo malekaki na ntango na Noa mpe na eleko na Lota mazali na ndimbola monene mpo na biso.

  • Lobiko ebelemi mpo na bato bazali kobanga Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 4
    • 4. Na eleko ya Noa, mpo na nini mokili ebebaki na miso na Nzambe? (Nzembo 11:5)

      4 Lisolo ya bomoi na bato kati na Genese mokapo 6 eyebisi biso ete na ntango na Noa mokili ebebaki na miso na Nzambe. Mpo na likambo nini? Ezali mpo na mobulu. Ezalaki te mwa mabe na epai na epai. Genese 6:11 elobi polele ete “mokili etondaki na mobulu”.

      5. (a) Na mikolo ya Noa, ezalela nini bato bazalaki na yango oyo ekolisaki mobulu? (b) Likebisi nini Enoka apesaki mpo na batyoli ma Nzambe?

      5 Ndenge nini makambo makomaki lolenge wana? Eteni touti kotanga na mokanda ya mibale ya Petelo elobeli mpo na batyoli. Na yango, kotyola mibeko ekotaki makasi epai na bato, baoyo bamonisaki bobele ezaleli ya kotyola mibeko na Nzambe te, kasi lisusu batombokelaki Nzambe ye moko’.a Tokoki mpenza komizela ete bato oyo batombokeli Nzambe bakoka kozala na boboto epai na bazalani na bango? Nkutu liboso ete Noa abotama, kotyola mibeko epalanganaki mingi kino ete Jéhovah aponaki Enoke mpo na kosakola nsuka na likambo wana. (Yuda 14, 15). Botomboki na bato epai na Nzambe ebendaki kosambisa na Nzambe likolo na bango.

  • Lobiko ebelemi mpo na bato bazali kobanga Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 4
    • a “Anomia elimboli kotyola mibeko na Nzambe, to kozanga kokokisa yango; aseibéia (lolenge na liloba oyo ezali kobongola ‘kotuka’) esalelami mpo na komonisa ezalela motindo yango epai na Nzambe ye moko.” Dictionnaire interprétatif des mots de l’Ancien et du Nouveau Testament (angl.) ya Vine, tome 4, lokasa 170.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto