Bókeba na Balakisi ya lokuta!
“Balakisi ya lokuta bakozala mpe kati na bino.”—2 PETELO 2:1, NW.
1. Yuda akanaki kokoma na ntina na nini, mpe mpo na nini abongolaki lisoló na ye?
OYO nde likambo ya kokamwa! Balakisi ya lokuta kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso! (Matai 7:15; Misala 20:29, 30) Yuda, ndeko ya Yesu ayebaki likambo yango. Alobaki ete akanaki liboso kokomela baninga na ye bandimi “na ntina na lobiko na biso mpe na bino,” kasi alimbolaki ete: “Namoni ete ekoki na ngai kokomela bino mpo na koyikisa bino mpiko ete bóbunela bindimeli.” Mpo na nini Yuda abongolaki lisoló na ye? Alobi, mpo ete “bato mosusu basili kokɔta na nkuku [kati na masangá] . . . , bakobalolaka ngɔlu na Nzambe na biso kino bosoto.”—Yuda 3, 4.
2. Mpo na nini 2 Petelo mokapo 2 mpe mokanda ya Yuda ekokani?
2 Emonani ete Yuda akomaki mokanda na ye mwa moke nsima wana Petelo akomaki mokanda na ye ya mibale. Na ntembe te Yuda ayebaki mokanda yango malamu. Ɛɛ, kati na mokanda na ye ya nguya oyo akomaki mpo na kolendisa, alobelaki makanisi mingi makokani na oyo mazali na mokanda ya Petelo. Na yango, wana tozali kotalela 2 Petelo mokapo 2, tokomona bokokani na yango na mokanda ya Yuda.
Mbuma ya mateya ya lokuta
3. Likambo nini esalemáká kala oyo Petelo alobi ete ekosalema lisusu?
3 Nsima ya koyebisa bandeko na ye ete bátya likebi na esakweli, Petelo alobi ete: “Kasi basakoli na lokuta bazalaki kati na [Yisalaele ya kala] pelamoko balakisi na lokuta [bakozala, NW] kati na bino.” (2 Petelo 1:14–2:1) Libota ya Nzambe na ntango ya kala bazwaki bisakweli ya solo, kasi basengelaki mpe kobundisa mateya mabe ya basakoli ya lokuta. (Yilimia 6:13, 14; 28:1-3, 15) Yilimia akomaki ete: “Epai na basakoli na Yelusaleme mpe namoni likambo mabe mingi, bazali kosala ekobo mpe kotambola na bokosi.”—Yilimia 23:14.
4. Mpo na nini balakisi na lokuta babongi kobomama?
4 Kolobeláká makambo oyo balakisi ya lokuta bakosala kati na lisangá ya boklisto, Petelo alobi ete: “Bango bakoyeisa mikabwano na libebi, bakowangana ata Mokonzi [Yesu Klisto] oyo asili kosikola bango, bakobenda libebi noki epai na bango mpenza.” (2 Petelo 2:1; Yuda 4) Mbuma ya nsuka oyo ebimaki mpo na mikabwano wana ya ekeke ya liboso ezali bongo mangomba ya boklisto na ndenge toyebi yango lelo. Petelo amonisi ntina oyo balakisi ya lokuta babongi mpenza kokwela libebi: “Mingi bakobila mobulu na bango monene [“etamboli ya mobulu,” NW] mpe mpo na bango, nzela na solo ekotukama.”—2 Petelo 2:2.
5. Balakisi ya lokuta bazalaki na ngambo ya likambo nini?
5 Kanisá naino! Na ntina na bopusi ya balakisi ya lokuta, mingi kati na masangá bakokóma na etamboli ya mobulu. Liloba ya Greke oyo libongolami awa na “etamboli ya mobulu” ezali komonisa ezaleli ya koboya mibeko, kozanga komipekisa, kozanga mitindá, kozala na etamboli ezangi nsɔni. Petelo alobaki liboso ete baklisto basili ‘kokima libebi lizali kati na mokili mpo na mposa mabe.’ (2 Petelo 1:4) Kasi bamosusu bazalaki kozonga na libebi wana, mpe nyonso wana ezalaki mingimingi mpo na balakisi ya lokuta! Boye nzela ya solo ezalaki kotukama. Oyo nde mawa! Na ntembe te, yango ezali likambo oyo Batatoli nyonso ya Yehova basengeli kotyela mpenza likebi. Tosengeli kobosana soko moke te ete, na ntina na etamboli na biso, tokoki kopesa masanzoli epai ya Yehova Nzambe mpe libota na ye to kofingisa bango.—Masese 27:11; Baloma 2:24.
Kokɔtisama ya mateya ya lokuta
6. Nini ezali kopusa balakisi ya lokuta, mpe lolenge nini bazali koluka kozwa oyo bazali na yango mposa?
6 Ekozala likambo ya mayele na koyeba lolenge oyo balakisi ya lokuta bazali kokɔtisa makanisi na bango ya mabe. Petelo alobi liboso ete bazali kosala yango na kimya, to na malɛmbɛ, kozanga kobenda likebi. Abakisi ete: “Na bilulela na bango bakozwa litomba kati na bino na maloba na kokosa.” Ezali bongo mposa ya moimi nde ezali kotindika balakisi ya lokuta, lokola yango emonisami polele na libongoli Bible de Jérusalem: “Bakomeka kosomba bino na lokoso nyonso na maloba ya lokuta.” Lolenge moko libongoli ya James Moffat elobi na esika yango ete: “Mpo ya mposa mabe bakokosa bino na maloba ya lokuta.” (2 Petelo 2:1, 3) Bilobaloba ya balakisi ya lokuta ekoki komonana ete ezali solo epai na ye oyo azali na bokɛngi te na elimo, kasi maloba na bango malambami malamu mpo na “kosomba” bato, kolɛngoláká bango na ntina ete básalela mikano ya moimi mpe ya bakosi.
7. Mateya nini ya filozofi mapalanganaki mingi na ekeke ya liboso?
7 Na ntembe te, balakisi ya lokuta ya ekeke ya liboso bapusamaki na makanisi ya mokili na eleko wana. Na eleko oyo Petelo akomaki mokanda na ye, mateya ya filozofi ebéngami Gnosticisme ezalaki kopalangana mingi. Balandi na yango bazalaki kokanisa ete makambo nyonso mazali mabe mpe ete bobele makambo ya elimo nde mazali malamu. Yango, bamoko kati na bango balobaki ete moto akoki kosalela nzoto na ye oyo ye alingi. Na nsuka, balobaki ete moto asengelaki kozala na nzoto oyo ya mosuni te. Na yango, basukisaki ete, misala ya nzoto—kati na yango pite—ezali mabe te. Emonani ete bamoko na baoyo bamilobaki ete bazali baklisto bakómaki kozwa bopusi ya makanisi wana.
8, 9. (a) Makanisi mabe nini mazalaki na bopusi epai ya baklisto mosusu ya ekeke ya liboso? (b) Engebene Yuda, bato mosusu bazalaki kosala makambo nini kati na lisangá?
8 Nganga-mayele moko ya Biblia alobaki ete “ezalaki na bato mosusu kati na Lingomba oyo babongolaki liteya ya ngɔlu.” (Baefese 1:5-7) Alobi ete, makanisi ya bato mosusu ezalaki lokola oyo ete: “Bolobi ete [ngɔlu] ya Nzambe ezali monene mingi na boye ete ekoki kozipa masumu nyonso? . . . Boye tósalaka masumu, mpamba te [ngɔlu] ya Nzambe ekoki kolongola masumu nyonso. Ɛɛ, ntango tozali kosala masumu mingi, tozali kopesa libaku na [ngɔlu] ya Nzambe ete esala mosala.” Ozali koyoka bonene ya konyɔngɔtana ya makanisi motindo wana?
9 Ntoma Paulo akweisaki makanisi mabe na ntina na motema mawa ya Nzambe ntango atunaki ete: “Tóumela na masumu mpo ete ngɔlu efuluka?” Atunaki lisusu ete: “Tósala masumu mpo ete tozali na nsé na Mibeko te, kasi na nsé na ngɔlu?” Na mituna nyonso wana Paulo ayanolaki na nguya nyonso ete: “Soko moke te!” (Baloma 6:1, 2, 15) Ya solo, lokola Yuda amonisi yango, basusu bazalaki ‘kobalola ngɔlu ya Nzambe na biso kino bosoto.’ Nzokande, Petelo alobi ete mpo na bato yango ‘libebi ekolala mpɔngi te.’—Yuda 4; 2 Petelo 2:3.
Bandakisa mpo na kokebisa
10, 11. Bandakisa nini misato Petelo apesi mpo na kokebisa?
10 Mpo na komonisa polele ete Nzambe akopesa etumbu na baoyo bazali kosala mabe na nkó, Petelo apesi ndakisa misato ya Makomami mpo na kokebisa. Ya liboso, akomi ete: “Nzambe atikaki [baanzelu, NW] te baoyo basalaki mabe.” Yuda alobi na ntina na bango ete, “babatelaki motindo na bango na liboso te kasi batikaki ezaleli na bango mpenza” na likoló. Bayaki awa na mabelé liboso ya Mpela mpe balataki nzoto ya mosuni mpo na kosangisa nzoto na bana basi ya bato. Lokola etumbu mpo na etamboli mabe na bango, ya mbindo, babwakamaki na “Tartare,” to engebene lisoló ya Yuda, basili “kobatela bango na nkanga na seko kati na molili kino bakosambisama na Mokolo yango monene.”—2 Petelo 2:4; Yuda 6; Genese 6:1-3.
11 Ya mibale, Petelo alobeli bato ya eleko ya Noa. (Genese 7:17-24) Alobi ete na eleko ya Noa, Nzambe “atikaki mokili na kalakala te, . . . wana eyeisi ye mpela na mokili likoló na batyoli.” Ya nsuka, Petelo akomi ete Nzambe apesaki “elakiseli mpo na bamosusu bakolinga kotyola Nzambe” na ‘kozikisáká mboka Sodomo mpe Gomola kino mputulu.’ Yuda abakisi makambo mosusu na kolobáká ete bato wana “basalaki pite na koleka mpe balandaki mposa ya nzoto mpo na kosalela yango makambo mabongi te.” (2 Petelo 2:5, 6; Yuda 7, NW) Mibali basalaki pite bobele na basi te kasi lisusu bazalaki kokokisa na lokoso nyonso mposa na bango ya nzoto elongo na mibali mosusu, mpe mbala mosusu ata na banyama.—Genese 19:4, 5; Levitike 18:22-25.
12. Engebene Petelo, lolenge nini etamboli ya sembo ezali kopesamela mbano?
12 Kasi, bobele na libaku yango, Petelo amonisi ete Yehova apesaka mbano epai na baoyo basalelaka ye na bosembo. Na ndakisa, alobeli lolenge oyo Nzambe ‘abatelaki Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo’ ntango ayeisaki Mpela. Lisusu, alobeli lolenge Nzambe asikolaki “Lota moyengebene” na ntango ya Sodomo, mpe asukisi boye: “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakeseni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu.”—2 Petelo 2:5, 7-9.
Misala oyo mibongi kopesamela etumbu
13. Banani babatelami mpenza mpo na lisambisi, mpe emonani ete bazali komipesa na bandɔ́tɔ ya lolenge nini?
13 Petelo atɔndɔli baoyo babatelami mpenza mpo na lisambisi ya Nzambe, elingi koloba, “bango bakobilaka makanisi na nzoto mpo na mposa na bosoto mpe [bakotyolaka bokonzi, NW].” Tokoki mpenza koyoka nkanda lokola Petelo wana alobi ete: “Bazali bato na mitó makasi, bato na komikumisa, bakolɛngaka te wana ezali bango kotuka [bato ya nkembo, NW].” Yuda akomi ete bato yango “balɔ́ti oyo bakobebisaka nzoto . . . bakotukaka [“bato na,” NW] nkembo.” (2 Petelo 2:10; Yuda 8) Bandɔ́tɔ na bango ekoki kozala na makanisi mpamba ya kosangisa nzoto oyo mazali kolendisa ezaleli na bango ya kokokisa mposa ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Kasi, na ndimbola nini “bakotyolaka bokonzi” mpe “bakotuka bato ya nkembo”?
14. Na ndimbola nini balakisi ya lokuta “bakotyolaka bokonzi” mpe “bakotuka bato ya nkembo”?
14 Bazali kosala yango na lolenge bazali kotyola bokonzi oyo etyami na Nzambe. Yehova Nzambe mpe mwana na ye bazali na nkembo mpe lokola bankulutu baklisto bazali bamonisi na bango, bango mpe bazali na mwa nkembo oyo epesameli bango. Ya solo, basalaka mabunga, lokola Petelo asalaki yango, kasi Makomami mazali kosɛnga na bato nyonso kati na lisangá ete bátosa bato wana ya nkembo. (Baebele 13:17) Mabunga na bango mazali te ntina ya koloba mabe mpo na bango. Petelo alobi ete baanzelu “bakotukaka te [balakisi ya lokuta],” atako yango ebongi mpenza na bango. Petelo alobi lisusu ete: “Nde bango, lokola banyama bazangi mayele, babotami bobele mpo na kokangama mpe kobomama, bakotukaka makambo mayebi bango ntina te. Bakozwa lifuti na bokesene.”—2 Petelo 2:10-13.
“Wana ezali bango kolya esika moko na bino”
15. Wapi myango ya balakisi ya lokuta, mpe na bisika nini bazali kolɛngola bato?
15 Atako bato yango oyo bamibebisi “bakanisi ete ezali esengo kolya na lokoso na ntango na moi” mpe “bazali matɔnɔ mpe mpota,” bazali mpe bato babungi nzela. Bazali kosala “na kimya,” kosaleláká “maloba na kokosa,” lokola Petelo amonisaki yango liboso. (2 Petelo 2:1, 3, 13) Ekoki kozala ete bazali kotɛmɛla na polele te milende oyo bankulutu bazali kosala mpo na kobatela mitindá ya etamboli malamu to mpe bazali komonisa polele te etamboli na bango ya pite. Nzokande, Petelo alobi ete “bakosepelaka na bokosi na bango wana ezali bango kolya esika moko na bino.” Mpe Yuda akomi ete: “Bango bazali mabanga mabombani na nsé ya mai na bilambo na bino ya bolingo.” (Yuda 12, NW) Ɛɛ, lokola mabanga oyo ezali na nsɔ́ngɛ́ na kati ya mai makoki kotɔbɔla masuwa, kosaláká ete batamboli na masuwa oyo bazangi bokɛngi bázinda, balakisi ya lokuta bazalaki kobebisa bato bazangi bokɛngi oyo bamonisaki na bokosi nyonso ete balingi bango na ntango ya “bilambo ya bolingo.”
16. (a) “Bilambo ya bolingo” ezalaki nini, mpe na mabaku nini ya lolenge yango bato mabe bakoki kosalela myango na bango lelo oyo? (b) Balakisi ya lokuta bazali kotya likebi likoló ya banani, mpo na yango bato yango basengeli kosala nini?
16 Emonani ete ‘bilambo yango ya bolingo’ ezalaki mabaku ya bokutani epai baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki koyangana mpo na kolya mpe kosepela elongo. Lelo oyo mpe na bantango mosusu Batatoli ya Yehova bakutanaka, ekoki kozala na elambo ya libala, na pikiniki, to na kolekisa ntango elongo na mpokwa. Lolenge nini bato bamibebisi basalelaka mabaku yango mpo na kozimbisa basusu? Petelo akomi ete: “Miso na bango matondi na pite. . . . Bakolɛngolaka bato oyo bazangi mpiko.” Batyaka ‘mitema na bango mimesani na bilulela’ epai na bato oyo bazali na bolɛmbu na elimo baoyo balóngi te komipesa mobimba na solo. Na yango, zwá likebisi na makambo oyo masalemaki na mikolo ya Petelo, mpe lalá mpɔngi te! Tɛmɛlá masɛnginya nyonso ya mbindo, mpe komitika te kozimbisama na kitoko to bonzenga ya nzoto ya moto oyo azali kobimisa maloba ya kolɛngola!—2 Petelo 2:14.
“Nzela na Balama”
17. “Nzela ya Balama” ezalaki nini mpe yango ezalaki na bopusi nini likoló na Bayisalaele 24 000?
17 Bato yango “balakelami mabe” bayebaki solo na boumeli ya mwa ntango. Ekoki komonana ete bazali kosangana na misala ya lisangá. Kasi Petelo alobi ete: “Basili kobunga nzela na sembo. Bapɛngwi mpe babili nzela na Balama, mwana na Beolo, oyo alingaki lifuti na bokesene.” (2 Petelo 2:14, 15) Nzela ya mosakoli Balama ezalaki bongo kopesa toli ya kosala mwango ya kolɛngola ya mbindo mpo ete akoka kozwa litomba na ye moko. Alobaki na Balaka, mokonzi ya Moaba ete Nzambe akolakela Yisalaele mabe soki bato babendami na kosala pite. Mpo na yango, mingi kati na basangani ya libota ya Nzambe balɛngolamaki na basi ya Moaba, mpe bato 24 000 babomamaki mpo na etamboli na bango ya mbindo.—Mituya 25:1-9; 31:15, 16; Emoniseli 2:14.
18. Balama azalaki na etingya ya ndenge nini, mpe nsuka ya likambo na ye ezali kosakola nini mpo na balakisi ya lokuta?
18 Petelo amonisi ete Balama apekisamaki ntango mpunda na ye elobaki na ye, kasi Balama “alingaki lifuta ya bokesene” mingi na boye ete na ntango likambo yango lisalemaki, atikaki te “bolema” na ye. (2 Petelo 2:15, 16) Azalaki mpenza moto mabe! Mawa na ye oyo, lokola Balama, akomeka kobebisa basaleli ya Nzambe na kopusaka bango ete básala makambo ya mbindo! Balama akufaki mpo na mabe na ye, yango ezali elakiseli ya oyo ekokómela bato nyonso bakolanda nzela na ye.—Mituya 31:8.
Kolɛngola na bango mabe
19, 20. (a) Baoyo bazali lokola Balama bakokisami na nini, mpe mpo na nini? (b) Bazali kolɛngola banani, mpe lolenge nini? (c) Mpo na nini tokoki koloba ete kolɛngola na bango euti na Zábolo, mpe ndenge nini tokoki komibatela mpe kobatela bamosusu?
19 Kolobeláká bato bakokani na Balama, Petelo akomi ete: ‘Bazali maziba [to, mabulu] mazangi mai, to mpe londende [to, mapata] ekotambolatambola na mopɛpɛ makasi.’ Mpo na mosáli mobembo oyo azali na mposa ya mai kati na mokili mokauki, libulu lizangi mai likoki kolimbola liwa mpo na ye. Tosengeli kokamwa te ete “moindo na molili ebombameli” baoyo bakokani na biloko yango! Petelo alobi lisusu ete: “Zambi ezali bango kobimisa maloba mabimbi mpamba mpenza, na mposa mabe na nzoto, mpe makambo na mobulu, bakolɛngolaka bango bazali kokima bobele sika sika kati na bato na bizaleli na wayawaya.” Bazali kolɛngola bato ya sika na “kopesáká bango bilaka na bonsomi, ata bango mpenza bazali baombo na libebi.”—2 Petelo 2:17-19; Bagalatia 5:13.
20 Kolɛngola ya balakisi yango bamibebisi euti mpenza na Zábolo. Na ndakisa, bakoki koloba ete: ‘Nzambe ayebi ete tozali bato ya bolɛmbu mpe tozali na mposa mabe. Soki tomipesi mpe tokokisi mposa na biso ya kosangisa nzoto, Nzambe akoyokela biso mawa. Soki toyamboli lisumu na biso, akolimbisa biso lolenge asalaki yango ntango toyambaki solo.’ Omikundola ete Zábolo asalelaki mwango motindo wana epai ya Eva, kolakáká ye ete akokaki kosala lisumu kozanga kozwa etumbu. Na likambo ya Eva, alobaki ete kosalela Nzambe lisumu ekofungola ye miso mpe ekopesa ye bonsomi. (Genese 3:4, 5) Soki toyebi moto oyo amibebisi lolenge wana mpe azali kosangana na lisangá, tozali na mokumba ya komibatela mpe ya kobatela basusu na kofundáká moto yango epai na baoyo bazali kokamba lisangá.—Levitike 5:1.
Babatelami na boyebi ya sikisiki
21-23. (a) Wapi matomba mabe ya kozanga kosalela boyebi ya sikisiki? (b) Likambo nini mosusu Petelo alobeli oyo tokotalela na lisoló lilandi?
21 Petelo asukisi eteni oyo ya mokanda na ye na kolimboláká matomba mabe ya kozanga kosalela boyebi oyo alobaki liboso ete ezali na ntina mingi mpo na “bomoi mpe kosambela Nzambe.” (2 Petelo 1:2, 3, 8) Akomi ete: “Mpo ete, ata basili kokima longwa na makambo na bosoto na mokili [na nzela ya boyebi ya sikisiki ya, “NW”] Nkolo mpe Mobikisi Yesu Klisto, bamitii lisusu kati na yango; makambo na nsuka na bango maleki yango na liboso na mabe.” (2 Petelo 2:20) Oyo nde mawa! Bato lolenge yango na mikolo ya Petelo babwakaki elikya kitoko ya bomoi ezangi kufa na likoló mpo na komisepelisa ya ntango moke na kosangisa nzoto.
22 Na yango Petelo alobi: “Soko bayebaki nzela na boyengebene te, mbɛ eleki malamu na bango. Kasi eleki mabe mpo bayebaki yango mpe bazongi nsima, kotika likabo na bulɛɛ lipɛsami na bango. Ekweli bango pelamoko na lisese na solo lilobi ete, Mbwa azongi kolya biloko bisili ye kosanza; mpe ete, Ngulu asukoli mai mpe akei kolala na bosoto.”—2 Petelo 2:21, 22; Masese 26:11.
23 Mokakatano mosusu oyo emonani ete ebandaki kobebisa baklisto ya liboso ekokanaki na oyo ezali kobebisa bamosusu lelo oyo. Na ntango yango, bamoko babandaki komilelalela na ntina na kozala ya Klisto oyo elakamaki emonanaki lokola ete ezali koumela. Tótalela sikawa lolenge Petelo alobeli likambo yango.
Ozali komikundola?
◻ Wapi ndakisa misato Petelo atángi mpo na kokebisa?
◻ Lolenge nini balakisi ya lokuta “bakotyolaka bokonzi”?
◻ Nzela ya Balama ezali nini, mpe ndenge nini baoyo bazali kolanda yango bakoki komeka kolɛngola basusu?
◻ Wapi matomba mabe ya kozanga kosalela boyebi ya sikisiki?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Balama azali ndakisa mpo na kokebisa biso