‘Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi’
“Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.”—SEFANIA 1:14.
1, 2. (a) Baklisto bazali kozela mokolo nini ya ntina mingi? (b) Mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?
ELENGE mwasi moko azali kozela mokolo ya libala na ye na esengo mpenza. Mwasi moko ya zemi azali kozela mokolo oyo akobota. Moto moko oyo asali mosala basanza ebele mpe alɛmbi azali kozela mokolo oyo akobanda konje. Bato misato wana bakokani na likambo nini? Mokomoko na bango azali kozela mokolo moko ya ntina mingi. Bango nyonso bazali kozela, kasi moto na moto likambo na ye. Nsukansuka, mokolo oyo moto na moto azali kozela ekoya, mpe ntango ekoya, ekokuta ye amilɛngɛli.
2 Lelo oyo, baklisto ya solo mpe bazali kozela mokolo moko ya ntina mingi. Yango ezali “mokolo ya Yehova,” mokolo na ye monene. (Yisaya 13:9; Yoele 2:1; 2 Petelo 3:12) “Mokolo ya Yehova” ezali nini, mpe ndenge nini koya na yango ekobongola bomoi ya bato? Ndenge nini tokoki komilɛngɛla mpo na mokolo yango? Ezali na ntina mingi tóluka biyano na mituna yango sikoyo mpamba te makambo oyo ezali koleka na mokili ezali komonisa ete Biblia esakolaki solo ete: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi mpe eyei mbangu mpenza.”—Sefania 1:14.
“Mokolo monene ya Yehova”
3. “Mokolo monene ya Yehova” ezali nini?
3 “Mokolo monene ya Yehova” ezali nini? Na Biblia, maloba “mokolo ya Yehova” emonisaka ntango moko oyo Yehova apesi banguna na ye etumbu mpe akumisi nkombo na ye monene. “Mokolo ya Yehova” ekómelaki bato ya Yuda mpe Yelusaleme oyo bazalaki sembo te; ekómelaki mpe bato ya Babilone mpe ya Ezipito, baoyo bazalaki konyokola bikólo mosusu. (Yisaya 2:1, 10-12; 13:1-6; Yilimia 46:7-10) Nzokande, “mokolo ya Yehova” oyo eleki monene eyei naino te. Ezali “mokolo” oyo Yehova akopesa bato oyo bazali kotyola nkombo na ye etumbu. Na mokolo yango, Yehova akoboma naino “Babilone Monene,” elingi koloba mangomba nyonso ya lokuta; na nsima, na etumba ya Armagedona, akoboma bibongiseli mosusu ya mokili ya Satana.—Emoniseli 16:14, 16; 17:5, 15-17; 19:11-21.
4. Mpo na nini bato basengeli koyoka nsɔmɔ mpo na mokolo ya Yehova oyo ezali koya nokinoki?
4 Esengeli mpenza bato mingi awa na mabelé báyoka nsɔmɔ mpo na mokolo yango oyo ezali koya nokinoki. Mpo na nini? Na nzela ya mosakoli Sefania, Yehova alobi boye: “Mokolo yango ezali mokolo ya nkanda, mokolo ya mpasi mpe mikakatano; mokolo ya mobulu mpe libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole; mokolo ya mapata mpe molili tuu.” Tomoni ete ekozala mpenza mokolo ya nsɔmɔ! Sefania abakisi boye: “Nakoyeisa mikakatano likoló ya bato . . . zambi basaleli [Yehova] mabe.”—Sefania 1:15, 17.
5. Ndenge nini bamilio ya bato mosusu batalelaka mokolo ya Yehova, mpe mpo na nini?
5 Nzokande, ezali na bamilio ya bato oyo bazali kozela mokolo yango na mposa makasi. Mpo na nini? Mpamba te bayebi ete yango ekozala mokolo ya lobiko, mokolo oyo Yehova akobikisa bato ya sembo, ye moko akozwa nkembo mingi mpe nkombo na ye monene ekosantisama. (Yoele 3:16, 17; Sefania 3:12-17) Makambo oyo moto na moto azali kosala lelo oyo nde ezali kokata soki asengeli kobanga mokolo yango to kozela yango na mposa makasi. Ezali boni mpo na yo? Omilɛngɛli mpo na mokolo yango? Lokola mokolo ya Yehova ebɛlɛmi ezali kotinda yo otalela malamu makambo oyo ozali kosala mokolo na mokolo?
“Basɛki bakoya ná kosɛka na bango”
6. Ndenge nini bato mingi batalelaka “mokolo ya Yehova,” mpe mpo na nini baklisto ya solo bazali kokamwa likambo yango te?
6 Atako “mokolo ya Yehova” ezali koya mbangu mpenza, bato mingi na mokili bazali kokipe te. Bazali kosɛka mpe kotyola bato oyo bazali koyebisa bango ete mokolo yango ebɛlɛmi. Baklisto ya solo bazali kokamwa likambo yango te. Bayebi malamu makambo oyo ntoma Petelo akomaki ete: “Boyebi libosoliboso likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, kotamboláká engebene bamposa na bango moko mpe kolobáká ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na kati ya liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’”—2 Petelo 3:3, 4.
7. Nini ekosalisa biso tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga?
7 Nini ekoki kosalisa biso mpo makanisi mabe wana ekosa biso te mpe tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga? Petelo alobi na biso boye: “Nazali kolamwisa makoki na bino ya kokanisa polele na nzela ya bokundoli, mpo bókanisa lisusu maloba oyo elobamaki kala na basakoli basantu mpe komandema ya Nkolo mpe Mobikisi na nzela ya bantoma na bino.” (2 Petelo 3:1, 2) Kotyela maloba ya basakoli likebi ekosalisa biso ‘tólamwisa makoki na biso ya kokanisa polele.’ Ekoki kozala ete toyoká makebisi yango mbala na mbala; kasi, sikoyo ezali mpenza na ntina mingi tókoba kotyela maloba yango likebi.—Yisaya 34:1-4; Luka 21:34-36.
8. Mpo na nini bato mingi bazali kotyela makebisi ya Biblia likebi te?
8 Mpo na nini bato mosusu bazali kotyela maloba ya basakoli likebi te? Petelo alobaki lisusu boye: “Engebene mposa na bango, likambo oyo ezali kokima bango, ete ezalaki na likoló moko banda kala mpe na mabelé moko oyo ebimaki lokola liboke makasi likoló ya mai mpe na katikati ya mai na nzela ya liloba ya Nzambe; mpe na nzela ya myango yango mokili ya ntango wana ezwaki libebi ntango ezindisamaki na mai.” (2 Petelo 3:5, 6) Tomoni ete ezali na bato mosusu oyo bazali na mposa te ete mokolo ya Yehova eya. Balingi eloko moko te ebongola bomoi na bango. Bato yango bamipesi na bamposa na bango moko mpe balingi te ete Yehova atuna bango! Ndenge Petelo alobaki yango, bazali komitambwisa “engebene bamposa na bango.”
9. Ezaleli nini bato bamonisaki na mikolo ya Noa mpe ya Lota?
9 Mpo na “bamposa na bango,” basɛki yango balingi kutu kokanisa te ete na ntango ya kala, Yehova apesaki bato ya mokili oyo etumbu. Yesu Klisto ná ntoma Petelo balobelaki “mikolo ya Noa” mpe “mikolo ya Lota.” (Luka 17:26-30; 2 Petelo 2:5-9) Liboso Mpela eya, Noa akebisaki bato, kasi bazalaki kokipe te. Ndenge moko mpe, liboso Yehova aboma engumba Sodoma ná Gomola, babokilo ya Lota bamonaki ye lokola moto oyo “azali kosala masɛki.”—Genese 19:14, NW.
10. Makambo nini Yehova akosala bato oyo bazali kotyela maloba na ye likebi te?
10 Lelo oyo mpe bato bazali kaka ndenge wana. Kasi, yoká makambo oyo Yehova akani kosala bato oyo bazali kotyela maloba na ye likebi te: “Nakopesa bato bitumbu, baoyo bazali kofanda na mbindo na bango, baoyo bazali koloba na mitema na bango ete, [Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te. Biloko na bango ekopunzama, ndako na bango ekobebisama, ata bakotonga ndako, bakofanda wana te; ata bakokona bilanga ya [vinyo], bakomɛla vinyo na yango te.” (Sefania 1:12, 13) Bato bakoki kosala makambo na bango ndenge bamesaná, kasi misala oyo bazali kobomela nzoto ekomemela bango litomba moko te oyo ekoumela libela. Mpo na nini? Mpamba te mokolo ya Yehova ekoya na mbalakaka, mpe bozwi nyonso oyo bazali konduka ekobikisa bango te.—Sefania 1:18.
“Kobá kozela yango”
11. Toli nini tosengeli kobosana te?
11 Biso tosengeli kokesana na bato ya mokili oyo, tosengeli te kobosana toli ya mosakoli Habakuku oyo elobi boye: “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, [kobá kozela yango, NW]; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Ata soki tomoni lokola mokolo yango ezali koumela, tóbosana te ete Yehova azali koumisa makambo te. Mokolo na ye ekoya na ntango mpenza oyo abongisaki, na ngonga oyo bato bazali kokanisa te.—Malako 13:33; 2 Petelo 3:9, 10.
12. Yesu asakolaki likambo nini, mpe ndenge nini yango ekeseni na misala ya bayekoli ya sembo ya Yesu?
12 Yesu amonisaki ete ezali na ntina mingi tókoba kozela mokolo ya Yehova mpe alobaki ete ata bayekoli na ye mosusu bakobosana ete mikolo etikali ya kotánga. Asakolaki mpo na bango boye: “Soki moombo wana ya mabe alobi na motema na ye ete, ‘Nkolo na ngai azali koumela,’ mpe abandi kobɛta baninga na ye baombo mpe alei mpe amɛli elongo na balangwi minene ya masanga, nkolo ya moombo wana akoya na mokolo oyo ye azali kokanisa na yango te mpe na ngonga oyo ye ayebi te, mpe akopesa ye etumbu na ndenge ya makasi koleka.” (Matai 24:48-51) Nzokande, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga. Moombo ya sembo atiki kokɛngɛla te mpe amilɛngɛli. Yesu atye ye “likoló ya biloko na ye nyonso” awa na mabelé.—Matai 24:42-47.
Tosengeli kolekisa ntango te
13. Ndenge nini Yesu amonisaki bayekoli na ye ete basengelaki kolekisa ntango te?
13 Baklisto ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kobosana te ete na ntango wana, mikolo etikalaki ya kotánga. Ntango kaka bamonaki ete Yelusaleme “ezingelami na mampinga oyo esalisali milako,” esengelaki bákima nokinoki. (Luka 21:20, 21) Likambo yango esalemaki na mobu 66 ya ntango na biso (T.B.) Yoká ndenge Yesu alobaki mpo na komonisa ete baklisto ya ntango wana basengelaki kolekisa ntango te: “Tiká moto oyo azali likoló ya ndako akita te mpo na kokamata biloko oyo ezali na ndako na ye; mpe tiká moto oyo azali na kati ya bilanga azonga na ndako na ye te mpo na kokamata elamba na ye ya likoló.” (Matai 24:17, 18) Lokola masolo ya kala emonisi ete mbula minei elekaki lisusu liboso Yelusaleme ebomama, mpo na nini na mobu 66 T.B., baklisto basengelaki kosala nokinoki likambo oyo Yesu alobaki?
14, 15. Mpo na nini baklisto ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kokima nokinoki soki bamoni basoda ya Loma bazingi Yelusaleme?
14 Atako basoda ya Loma babomaki engumba Yelusaleme na mobu 70 T.B., yikiyiki ezalaki makasi na boumeli ya mbula minei oyo elekaki. Mobulu ezalaki makasi mpe bato bazalaki kobomana mingi. Moto moko ya mayele na masolo ya kala alobi ete na ntango wana bato ya Yelusaleme bazalaki “kobunda bango na bango mpe makambo ya nsɔmɔ ezalaki kosalema kuna.” Bakómaki kozwa bilenge mibali mpo na kobakisa bango na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki kobatela mboka, kokɔtisa bango na mosala ya soda mpo bango mpe bábunda mpo na mboka. Bazalaki kozwa formasyo ya mosala ya soda mokolo na mokolo. Soki moto aboyi kosangana na makambo ya mabe, bazalaki koloba ete azali kotɛka mboka. Nyonso wana emonisi ete soki baklisto baumelaki lisusu na engumba yango, balingaki kozwa mikakatano makasi.—Matai 26:52; Malako 12:17.
15 Tóbosana te ete Yesu alobaki kaka te ete bato ya Yelusaleme nde basengelaki kokima, kasi mpe “baoyo bazali na Yudea.” Yango ezalaki na ntina mingi mpamba te mwa basanza nsima ya kolongwa na Yelusaleme, basoda ya Loma bazongelaki bitumba. Balongaki naino etúká ya Galilai na mobu 67 T.B., mpe na mbula oyo elandaki, balongaki Yudea mobimba. Likambo yango ekɔtisaki mpasi makasi na bamboka. Ekómaki mpe mpasi mpo moto abima na Yelusaleme mpo na kokima. Basoda bazalaki kokɛngɛla baporte ya engumba, mpe moto nyonso oyo ameki kokima, bazalaki koloba ete alingi kokende na ngámbo ya Baloma.
16. Baklisto ya siɛklɛ ya liboso basengelaki komonisa ezaleli nini mpo bábika na ntango wana ya mpasi?
16 Nsima ya kotalela makambo nyonso oyo, tomoni sikoyo ntina oyo Yesu amonisaki ete baklisto basengelaki kolekisa ntango te. Baklisto basengelaki kobosana makambo mosusu, basengelaki kotika te ete mitema na bango ebendama na biloko ya mokili. Basengelaki kondima “kopesa biloko na [bango] nyonso mokɔngɔ,” ndenge Yesu alobaki. (Luka 14:33) Baoyo batosaki mbala moko mpe bakimaki na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani, babikaki.
Tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga
17. Mpo na nini tosengeli mpenza kotya na mitó na biso ete mikolo etikali ya kotánga?
17 Bisakweli ya Biblia ezali komonisa polele ete nsuka ezali lisusu mosika te. Sikoyo, tosengeli mpenza kotya na mitó na biso ete mikolo etikali ya kotánga. Na ntango mboka ezali kimya, soda azalaka motema likoló te mpo na nsɔmɔ ya etumba. Nzokande, soki ezaleli yango ememi ye na kobosana ete asengeli kozala ekɛngɛ, mpe soki bayei kozwa ye na mbalakaka mpo akende etumba, ntango mosusu bakokuta ye amilɛngɛli te, mpe yango ekozala likama mpo na ye. Ezali mpe bongo na elimo. Soki tobosani ete mikolo etikali ya kotánga, mbala mosusu tokoyeba komilɛngɛla te mpo na kokima makama oyo ezali koyela biso mpe tokoki kosutuka ntango mokolo ya Yehova ekoya. (Luka 21:36; 1 Batesaloniki 5:4) Soki ezali na baoyo ‘bazongi nsima mpe batiki kolanda Yehova,’ esengeli mpenza ete báluka ye sikoyo.—Sefania 1:3-6, NW; 2 Batesaloniki 1:8, 9.
18, 19. Nini ekosalisa biso tóbatela na makanisi “kozala ya mokolo ya Yehova”?
18 Yango wana ntoma Petelo alendisi biso ete tóbatela na makanisi “kozala ya mokolo ya Yehova”! Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokosala yango, na ndakisa, na “misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petelo 3:11, 12) Komipesa na misala ya ndenge wana ekosalisa biso tózelaka “mokolo ya Yehova” na mposa makasi. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela na makanisi’ elimboli mpenza “kobakisa mbangu.” Ya solo, biso tokoki te kolekisa mikolo mbangumbangu mpo mokolo ya Yehova eya noki. Kasi, ntango tozali kozela mokolo yango, soki tomipesi na mosala ya Nzambe, tokomona ete ntango ekoleka noki.—1 Bakolinti 15:58.
19 Komanyola Liloba ya Nzambe mpe makebisi na yango ekosalisa biso mpe tóbatela na makanisi “kozala ya mokolo ya Yehova,” na maloba mosusu, tózela yango na mposa makasi. (2 Petelo 3:12) Makebisi na yango mosusu ezali bisakweli ndenge na ndenge oyo ezali kolobela koya ya mokolo ya Yehova; mosusu mpe ezali ebele ya mapamboli oyo Yehova akopesa na baoyo bazali ‘kozela Ye.’—Sefania 3:8.
20. Elendiseli nini tosengeli kotya na makanisi na biso?
20 Sikoyo mpenza nde ntango oyo biso nyonso tosengeli kotya na makanisi na biso elendiseli ya mosakoli Sefania oyo elobi ete: “Naino nkanda monene ya [Yehova] eyeli bino te, naino mokolo ya nkanda ya [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soki nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].”—Sefania 2:2, 3.
21. Basaleli ya Yehova bazali na ekateli nini mpo na mobu 2007?
21 Yango wana, mokapo oyo eponami mpo na mobu 2007 ebongi mpenza; elobi ete: ‘Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi.’ Basaleli ya Yehova bandimisami ete mokolo ya Yehova “ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.” (Sefania 1:14) “Ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Yango wana, tiká tózala na ekɛngɛ wana tozali kozela mokolo yango; tóbosana te ete tozali na mikolo ya nsuka mpe ete etikali moke bisakweli nyonso wana ekokisama.
Okoki kopesa eyano?
• “Mokolo monene ya Yehova” ezali nini?
• Atako mikolo etikali ya kotánga, mpo na nini bato mingi bazali kokipe te?
• Mpo na nini baklisto ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kolekisa ntango te?
• Ndenge nini tokoki kobatela na makanisi ete mikolo etikali ya kotánga?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Mokapo mpo na mobu 2007: ‘Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi.’—Sefania 1:14.
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Lokola na mikolo ya Noa, basɛki bakosutuka ntango Yehova akopesa bato mabe etumbu
[Elilingi na lokasa 18]
Baklisto basengelaki kokima nokinoki ntango kaka bamoni Yelusaleme “ezingami na basoda basalisali milako”