Baklisto babatisami, bolanda komipesa na makambo na Nzambe
‘Nde yo, e moto na Nzambe, . . . luka boyengebene, omipesa na makambo na Nzambe.‘—1 TIMOTE 6:11.
1. Okoyanola nini soko batuni yo mokolo nini elekaki ntina kati na bomoi na yo? Mpo na nini?
MOKOLO nini elekaki ntina na bomoi na yo? Soko ozali Témoin de Jéhovah, na ntembe te okoyanola: ‘Mokolo ya batisimo na ngai!’ Ya solo, batisimo na yo ezalaki likambo ya ntina kati na bomoi na yo. Na kozwaka batisimo, omonisaki ete osili komipesa mobimba epai na Jéhovah mpo na kosala mokano na ye. Date ya batisimo na yo ezali mpe date oyo ozwaki lotomo ya kozala ministre ya Nzambe Aleki-Likoló, Jéhovah.
2. (a) Ndakisa nini emonisi ete batisimo ezali litambe ya nsuka te oyo moklisto asengeli kosala? (b) Matambe nini ya ntina osalaki liboso ya batisimo na yo?
2 Kasi batisimo ezali litambe ya nsuka oyo osalaki kati na bomoi na yo? Te, matambe mosusu ya kosala mazali! Tozwa ndakisa: Na bamboka mingi, feti ya libala ezali nsuka ya eleko ya komilengela mpe ya kotalana mpo na koluka koyebana bizaleli. Ezali mpe ebandeli ya bomoi elongo kati na babalani. Ndenge moko, batisimo na yo ezalaki nsuka ya eleko ya komilengela na boumeli na yango osalaki mwa matambe ya yambo mpe ya ntina: Ozwaki boyebi ya Nzambe mpe ya Klisto (Yoane 17:3); obandaki komonisa kondima epai na jéhovah, Nzambe ya solo, epai na Klisto, Mobikisi na yo mpe na Biblia, Liloba na Nzambe. (Misala 4:12; 1 Batesaloniki 2:13; Baebele 11:6); omonisaki kondima yango na kobongola motema mpo na etamboli na yo ya kala mpe na kolandaka sikawa etamboli ya sembo (Misala 3:19); ozwaki bongo ekateli ya komipesa na Jéhovah mpo na kosala mokano na ye. (Matai 16:24). Na nsuka, oyaki kozwa batisimo.—Matai 28:19, 20.
3. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete batisimo na biso ezalaki ebandeli ya bomoi epesami na mosala ya Nzambe? (b) Mituna nini mitunami, mpe mpo na nini mitali biso mpenza?
3 Nzokande, batisimo na yo ezalaki nsuka te, kasi ebandeli ya bomoi oyo osili kopesa yango na mosala ya Nzambe. Lokola molimboli moko na Biblia amonisaki yango, mpo na kozala na bomoi ya moklisto esengeli bobele te ‘kobanda na elulu, mpo ete na nsuka olɛmba libela’. Ndenge nini okoki komonisa ete batisimo na yo ezalaki ‘ebandeli na elulu’ te? Na kolanda komipesa na makambo na Nzambe kati na bomoi na yo mobimba. Kasi komipesa na makambo na Nzambe ezali mpenza nini? Mpo na nini tosengeli kolanda yango? Ndenge nini okoki kokolisa yango malamu koleka kati na bomoi na yo? Mituna oyo mitali biso mpenza, mpamba te tosengeli komonisa ete ‘tomipesi na makambo na Nzambe’ soko tolingi kobika na mokolo na nkanda na Jehovah oyo esili kobelema.—2 Petelo 3:11, 12.
Komipesa na makambo na Nzambe elimboli nini?
4. Toli nini Paulo apesaki epai na Timoté? Nzokande Timote ezalaki motindo nini na eleko yango?
4 Ntoma Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epemami na Nzambe epai na moyekoli moklisto Timote na 61 mpe 64 ya ntango na biso. Nsima na kolobela makama makoki kobima mpo na mposa na mosolo, akomaki: “Kasi yo, e moto na Nzambe, tika ete okima makambo oyo nyonso. Luka nde . . . komipesa na makambo na Nzambe.” (1 Timote 6:9-11) Tosengeli koyeba ete na eleko wana, Timote azalaki mbala mosusu na mibu 30 to koleka mwa moke. Asilaki kosala mibembo mingi elongo na ntoma Paulo mpe azwaki bokonzi ya kopona bakengeli mpe basaleli na misala kati na masangá (Misala 16:3; 1 Timote 5:22) Kasi Paulo alobaki epai na moklisto oyo asilaki komipesa mpe kobatisama, mpe asilaki kokola na elimo, ete alanda komipesa na makambo na Nzambe.
5. “Komipesa na makambo na Nzambe” elimboli nini?
5 Paulo alingaki koloba nini na “komipesa na makambo na Nzambe“? Liloba na greke (eusébéia) oyo asalelaki elimboli “kosambela malamu”. Na ntina na liloba yango, totangi boye: “Na makomi na kala, eusébéia ezali kosalelama mbala mosusu mpo na komonisa bokangami ya moto na lingomba na ye . . . .kasi na greke oyo eyebanaki na bato nyonso na eleko na Baloma, liloba yango elimbolaki mingimingi ‘bosembo’. . . . Mpo na baklisto, eusébéia ezali liloba ebongi mpenza mpo na kolobela bokangami na Nzambe.‘ (Les mots chrétiens (Angl.), ya Nigel Turner). Kati na Makomami, liloba “komipesa na makambo na Nzambe” (la piété) ezali bongo komonisa losambo (vénération) mpo na Jéhovah Nzambe to bokangami ya sembo epai na Ye.
6. Ndenge nini moklisto akomonisa ete amipesi na makambo na Nzambe?
6 Komipesa na makambo na Nzambe ezali liyoki mpamba te oyo etali lingomba. Lokola “kondima ezangi misala esili kokufa”, bobele bongo komipesa na makambo na Nzambe esengeli komonana kati na bomoi na moto. (Yakobo 2:26) Ezali yango William Barclay andimi kati na mokanda na ye Les mots du Nouveau Testament (Angl.): “(Eusébéia mpe maloba mabimi na yango)ezali komonisa liyoki ya kobanga Nzambe mpe ya kosambela, kasi ezali lisusu kolakisa losambo ebongi na kobanga yango, mpe na boumeli na bomoi mobimba, botosi makasi ebongi na losambo yango.” Ndimbola mosusu ya eusébéia ezali “likambo ya koluka ntango nyonso likanisi ya Nzambe kati na makambo nyonso ya bomoi”. (La seconde épitre générale de Pierre etl’épitre générale de Jude (Angl.l, de Michael Green.) Moklisto asengeli bongo komonisa bilembo ya bakangami na ye mpenza epai na Jehovah na motindo ya bomoi na ye.—1 Timoté 2:2; 2 Petelo 3:11.
Esengeli kosala milende makasi
7. Paulo alingaki koloba nini ntango alendisaki Timoté, atako asilaki kobatisama, ete “alanda” komipesa na makambo na Nzambe?
7 Kasi esengeli kosala nini mpo na kokolisa mpe komipesa na makambo na Nzambe? Tomikundola ete atako Timoté asilaki kozwa batisimo, alendisamaki na ‘kolanda yango [ ’kokima nsima na yango’]’.a (1 Timoté 6:11, Traduction interlinéaire du Royaume (Angl.) Ya solo, Paulo alingaki koloba te ete Timote azangaki komipesa na makambo na Nzambe. Te, kasi abendaki likebi na ye likoló na ntina ya kolanda yango ntango nyonso na etingya mpe na molende. (Tala Bafilipi 3:14) Esengeli kolanda yango na bomoi na yo mobimba. Lokola moklisto nyonso abatisami, Timoté akokaki bongo komonisa malamu ntango nyonso komipesa na makambo na Nzambe.
8. Ndenge nini ntoma Petelo amonisaki ete moklisto amipesi mpe abatisami asengeli kosala milende makasi mpo na kolanda komipesa na makambo na Nzambe?
8 Moklisto oyo amipesi mpe abatisami asengeli kosala milende makasi mpo na kolanda komipesa na makambo na Nzambe. Yango wana ntoma Pierre akomaki epai na baklisto babatisami oyo bazalaki na elikya ya ‘kozala na lolenge na Nzambe’: “Na ntina oyo mpenza, botye etingya nyonso mpo na komizwela molende kati na kondima na bino mpe mayele kati na molende, mpe komipekisa kati na mayele, mpe mpiko kati na komipekisa, mpe komipesa na makambo na Nzambe kati na mpiko.” (2 Petelo 1:4-6). Ya solo, esengeli kozala na kondima mpo na kozwa batisimo. Kasi, nsima na batisimo na biso, tokoki kolemba te, komonisaka bobele na libanda ete tozali baklisto. Lokola tozali kokola na ezaleli na boklisto, tosengeli kokolisa ntango nyonso bizaleli mosusu, lokola komipesa na makambo na Nzambe, oyo ekoki kobakama na kondima na biso. Lokola Pierre alobi yango, ezali kosɛnga milende makasi epai na biso.
9. (a) Ndenge nini liloba na greke ebongolami na “kobakisa” elimboli bonene ya makasi esengeli mpo na kokolisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe? (b) Ntoma Petelo alendisi biso na kosala nini.
9 Verbe na greke oyo Pierre asaleli mpe oyo ebongolami na ‘kobakisa’ (épikhoregéo) ezali na ndimbola moko malamu oyo ezali komonisa bonene ya molende oyo esengeli. Euti na liloba (khoregos) oyo elimboli “chorege”. Ba choreges bazalaki bato oyo bazalaki kobongisa mpe kosombela bayembi biloko oyo bazalaki na yango mposa mpo na ba théatres. Bazalaki kosala yango na bolingo na bango moko, mpo na lokumu ya mboka na bango, mpe bazalaki kofuta ba dépenses. Mpo na bango ezalaki lokumu na kopesa nyonso esengelaki mpo na kosalisa lisano monene. Liloba yango ekomaki na ndimbola ya “kokaba, kopesa mingi mpenza”. (Tala 2 Petelo 1:11.) Ntoma Pierre alendisi biso ete tobakisa na bizaleli na biso, ezaleli ya komipesa na makambo na Nzambe, bobele mwa moke te, kasi na kokolisaka mingi mpenza ezaleli yango ya motuya.
10, 11. (a) Mpo na nini esengeli kosala milende mpo na kolona mpe komonisa ezaleli na komipesa na makambo mi Nzambe? (b) Ndenge nini tokoki kolonga na etumba yango?
10 Kasi, mpo na nini tosengeli kosala milende mingi mpo na kokolisa mpe komonisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe? Ya liboso, tosengeli kobundisa nzoto na biso oyo ebebi na lisumu. Lokola “makanisi na motema na moto mazali mabe longwa na bolenge na ye”, ezali petee te mpo na komonisa na bomoi mobimba botosi makasi epai na Nzambe. (Genese 8:21; Baloma 7:21-23). Ntoma Paulo alobi: ’’Baoyo nyonso balingi komipesa na makambo na Nzambe elongo na Klisto Yesu bakonyokolama” (2 Timoté 3:12). Ya solo, moklisto oyo azali kotya makasi mpo na kozala na bomoi malamu na miso na Nzambe asengeli kokesena na mokili. Akotalela makambo na ndenge ya mokili te mpe akozala na mikano motindo moko na mokili te. Lokola Yesu asakolaki yango, kosala boye ezali kobakisa nkanda ya mokili oyo ya mabe.—Yoane 15:19: 1 Petelo 4:4.”
11 Ata bongo tokoki kolonga, mpamba te “Jéhovah ayebi kobikisa bango bakosambelaka [bakobangakal ye”. (2 Petelo 2:9) Kasi tosengeli kokokisa mokumba na biso na kolandaka ntango nyonso ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe.
Ndenge nini tokoki kolona ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe
12. Ndenge nini ntoma Petelo amonisi makambo masengeli mpo na kokolisa mpenza ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
12 Ndenge nini okoki kokolisa mpenza ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe? Kati na 2 Petelo 1:5, 6, ntoma apesi ndambo na eyano. Kati na bizaleli oyo tosengeli kobakisa na kondima na biso, atangi boyebi liboso na komipesa na makambo na Nzambe. Mpe mwa liboso bobele na mokapo yango, akomi: “Nguya na ye Nzambe esili kopesa biso biloko nyonso bikoki na bomoi mpe na ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe, mpo na boyebi na oyo abyangi biso.” (2 Petelo 1:3). Na yango, ntoma Pierre atye ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe esika moko na boyebi ya solo ya Jéhovah.
13. Mpo na nini esengeli kozala na boyebi ya solo mpo na kokolisa ezaleli ya komipesa na makambo na Nzambe?
13 Na yango, kozanga boyebi ya solo moto akoki kokolisa te ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe. Mpo na ntina nini? Tomikundola ete komipesa na makambo na Nzambe etali bomoto ya Jéhovah mpe esengeli komonana na lolenge ya bomoi na biso. Ezali na ntina mpo na kozala na boyebi ya solo ya Jéhovah, mpamba te yango elimboli ete toyebi ye mpenza, na ndenge ya penepene, tomeseni na bizaleli na ye mpe na mitindo na ye mpe lisusu, tozali komekola ye. (Baefese 5:1) Soko toyebi makambo mingi na ntina na Jéhovah mpe tozali komekola mitindo na ye mpe bizaleli na ye kati na bomoi na biso, wana tokoyeba ye malamu koleka. (2 Bakolinti 3:18; tala 1 Yoane 2:3-6). Yango ekosalisa biso na kozala na botondi mozindo mpo na bizaleli malamu ya Jéhovah, na komonisa mingi koleka ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe.
14. Soki tolingi kozwa boyebi ya solo, eloko nini tosengeli kokɔtisa na programme ya boyekoli na biso mpe mpo na nini?
14 Boyebi oyo ya solo bokozwamaka ndenge nini? Nzela ya mokuse to ya kokata ezali te; mpo na kozwa yango, tosengeli koyekola na etingya Liloba na Nzambe mpe mikanda mikolimbolaka Biblia. Na boyekoli yango oyo moto na moto akosala, tosengeli kolanda programme ya kotanga Biblia mokolo na mokolo, lokola oyo ebongisami mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. (Nzembo 1:2) Lokola Biblia ezali likabo ya Jéhovah, esika oyo tokopesa na boyekoli na biso na mokanda yango esengeli komonisa motuya ya likabo yango na miso na biso. Mimeseno na yo mpo na boyekoli emonisi nini mpo na bozindo ya botondi na yo na ntina na bilei ya elimo oyo Jéhovah azali kopesa biso?—Nzembo 119:97.
15, 16. (a) Eloko nini ekoki kosalisa biso na kokolisa mposa na biso ya kolya na elimo, na kosepela na boyekoli na biso ya Biblia? (b) Soki tolingi ete boyekoli na biso moko ya Biblia esalisa biso na kokolisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe, tosengeli kosala nini ntango totangi mokapo moko na Liloba na Nzambe?
15 Bamoko bazali kokoka te kotanga mpe koyekola Kasi nsima na mikolo mpe na kotyaka molende okoki kokolisa mposa na yo ya kolya na elimo, mpe kosepela na boyekoli na yo moko ya Biblia (1 Petelo 2:2). Soko okanisi na botondi nyonso mpo na makambo oyo Jehovah asalaki, mpe na oyo azali kosala mpe akosala lisusu mpo na yo, motema na yo ekopusa yo na koyekola makambo nyonso oyo okoki koyeba na ntina na ye.—Nzembo 25:4.
16 Nzokande, mpo ete boyekoli na yo ya Biblia ekolisa epai na yo ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe, mokano na yo esengeli te kozala bobele ya kosilisa kotanga bankasa oyo okanaki to kotondisa elimo na yo na makambo Ntango ozali kotanga verset moko ya Biblia, zwa ntango ya kokanisa, ya komituna mituna lokola oyo: ‘Likanisi yango elakisi ngai nini mpo na bizaleli mpe mitindo ya Jéhovah? Ndenge nini nakoki komekola lisusu malamu Jéhovah na makambo yango?’
17. (a) Toyekolaki nini kati na mokanda na Hosea mpo na oyo etali motema mawa na Jéhovah? (b) Soki tokanisi na motema mawa na Jéhovah, yango ekozala na bopusi nini epai na biso?
17 Tozwa ndakisa: Eleki mbula moko, programme ya Eteyelo ya mosala na Nzambe esengaki biso totanga mokanda ya Hosea. Nsima na botangi, tokokaki komituna: ‘Mokanda yango emonisi ngai nini na ntina na Jéhovah—na ntina na bizaleli na ye mpe misala na ye?’ Maloba na Hosea oyo ezongelamaki na bakomi mosusu ya Biblia ezali kolakisa biso mingi mpenza na ntina na motema mawa na Jéhovah. (Kokanisa Matai 9:13 na Hosea 6:6; Baloma 9:22-26 na Hosea 1:10 mpe 2:21-23). Mposa oyo Jéhovah azalaki na yango mpo na komonisa motema mawa epai na Yisraele emonisamaki na ezaleli na Hosea epai na Gomere, mwasi na ye. (Hosea 1:2; 3:1-5). Atako bosopi makila, moyibi, pite mpe losambo na bikeko epalanganaki na Yisraele, Jéhovah ‘alobaki na motema’ na libota yango. (Hosea 2:13, 14; 4:2). Asengamaki na makasi te mpo na kolimbisa Bayisraele, kasi azalaki pene na kosala yango ‘na bolingo na ye’ soko babongoli solo motema mpe batiki ezaleli na bango ya mabe. (Hosea 14:4; tala Hosea 3:3). Soko okanisi na motema mawa ya Jéhovah, motema na yo ekobeta mpe boyokani kati na yo na Ye ekoya makasi koleka.
18. Nsima na kokanisa na motema mawa na Jéhovah oyo emonisami na mokanda na Hosea, mituna nini okoki komituna yango?
18 Kasi osengeli kosuka wana te, mpamba te Yesu alobaki: “Mapamboli epai na bango bakoyokela bamosusu mawa, mpamba te bakoyokela bango mawa.” (Matai 5:7). Na yango, nsima na kokanisa na motema mawa na Jehovah oyo emonisami na mokanda na Hosea, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komonisa motema mawa lokola Jéhovah kati na boyokani na ngai elongo na bamosusu? Soko ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko asaleli ngai mabe to azokisi ngai kasi asɛngi lilimbisi. nalimbisaka “na esengo”?’ (Baloma 12:8; Baefese 4:32). Soko ozali nkulutu kati na lisangá, okoki komituna: ‘Ntango natalelaka makambo ya kosambisa, ndenge nini nakoki komekola malamu mpenza Jéhovah, Ye oyo azali ntango nyonso “pene mpo na kolimbisa”, mpenzampenza soko mosumuki amonisi ete abongoli solo motema?’ (Nzembo 86:5; Masese 28:13) ‘Bantina nini ya komonisa mawa nasengeli koluka?’—Tala Hosea 5:4 mpe 7:14.
19, 20. (a) Litomba nini ekozwamaka na boyekoli mozindo ya Biblia? (b) Tokozwa lisalisi epai na nani lisusu mpo na kokolisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
19 Okozwa litomba mpenza na boyekoli na yo ya Biblia soko ezali mozindo lokola touti kolakisa. Motema na yo ekofuluka na botɔndi mpo na bizaleli malamu ya Jéhovah. Mpe na kotyaka makasi ntango nyonso mpo na komonisa bizaleli yango kati na bomoi na yo, okoyeisa makasi bikanganeli bikangisi yo na ye. Okozala bongo mosaleli na Jéhovah amipesi mpe abatisami oyo azali kolanda ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe.—1 Timote 6:11.
20 Mpo na kolona ezaleli yango ya motuya, tokoki mpe kozwa lisalisi epai na Yesu Klisto, ndakisa ya kokoka ya ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe. Ndenge nini ndakisa na Yesu ekoki kosalisa yo na kolona mpe komonisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe? Lisolo oyo ezali na page 18 ekoyanola na motuna oyo mpe na mituna misusu mitali likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Engebene Nouveau Dictionnaire international de la théologie du Nouveau Testament (Angl.), na makomi mosusu, liloba na greke dioko (“kolanda”) “elimboli kobengana, kolanda kokima nsima, . . . mpe elobeli na elilingi, yango elimboli kobanda eloko moko na molende, koluka kokokisa koluka kozwa eloko”.
Bozongeli
◻ Mpo na nini batisimo ezali litambe ya nsuka te oyo osengeli kosala na bomoi na yo ya moklisto?
◻ ’’Komipesa na makambo na Nzambe” elimboli nini mpe ekomonisamaka ndenge nini?
◻ Mpo na nini esengeli kosala milende makasi mpo na kokolisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
◻ Ndenge nini tokoki kokolisa mingi mpenza ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?