Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mikanda ya Yoane mpe ya Yuda
MIKANDA misato ya Yoane, oyo mbala mosusu ekomamaki na Efese, na mobu 98 T.B., ezali na kati ya mikanda ya nsuka ya Makomami mosantu. Mokanda ya liboso ya Yoane mpe oyo ya mibale ezali kolendisa baklisto bákoba kotambola na pole mpe bákima lipɛngwi. Na mokanda ya misato, Yoane alobeli kotambola na kati ya solo, mpe alendisi baklisto bázala na bomoko.
Na mokanda na ye oyo akomaki na Palestine, na ntembe te na mobu 65 T.B., Yuda, ndeko ya Yesu, akebisi baninga na ye baklisto mpo na bato mabe oyo bakɔtaki na kati ya lisangá, mpe apesi bango batoli mpo na ndenge ya kokima baninga mabe. Kotya likebi na nsango oyo ezali na mikanda misato ya Yoane mpe na mokanda ya Yuda ekoki kosalisa biso tótikala makasi na kati ya kondima ata soki tokutani na mikakatano.—Ebe. 4:12.
TÓKOBA KOTAMBOLA NA KATI YA POLE, YA BOLINGO MPE NA KONDIMA
Mokanda ya liboso ya Yoane, oyo ekomamaki mpo na bato nyonso oyo bazali na bomoko na kati ya Klisto, ezali na batoli ya malamu mpo na kosalisa baklisto bákima lipɛngwi mpe bákangama makasi na solo mpe na boyengebene. Emonisi ntina ya kotambola na kati ya pole, ya bolingo mpe na kondima.
Yoane akomaki boye: “Soki tozali kotambola na kati ya pole lokola [Nzambe] ye moko azali na kati ya pole, tozali na bosangani biso na biso.” Mpe lokola bolingo euti na Nzambe, ntoma yango alobaki ete: “Tiká tókoba kolingana.” “Bolingo ya Nzambe” etindaka biso “tótosaka bakomandema na ye”; nzokande, tozali kolonga mokili na nzela ya “kondima na biso” epai ya Yehova Nzambe, na Liloba na ye, mpe epai ya Mwana na ye.—1 Yoa. 1:7; 4:7; 5:3, 4.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:2; 4:10—Na ndenge nini Yesu azali “mbeka ya mbɔndi”? Kopesa mbɔndi elimboli “kokitisa nkanda.” Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka ya mbɔndi na boye ete liwa na ye ekitisaki nkanda, to ekokisaki likambo oyo boyengebene ya kokoka esɛngaki. Na nzela ya mbeka yango, Nzambe akoki komonisa motema mawa mpe kolimbisa masumu ya bato oyo bamonisi kondima epai ya Yesu.—Yoa. 3:16; Lom. 6:23.
2:7, 8—Komandema nini Yoane abengi “ya kala” mpe “ya sika”? Yoane alobelaki komandema ya kozala na bolingo mpo na bandeko, oyo etindaka moto andima komipimela. (Yoa. 13:34) Abengi yango “ya kala” mpamba te Yesu apesaki yango mbula koleka 60 liboso Yoane akoma mokanda na ye ya liboso. Na yango, bandimi bayebaki yango “banda na ebandeli” ya bomoi na bango lokola baklisto. Komandema yango ezali mpe “ya sika” mpo esɛngi kaka te ‘kolinga moninga lokola yo moko’ kasi esɛngi kondima komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya moninga.—Lev. 19:18; Yoa. 15:12, 13.
3:2—Nini “emonisami naino polele te” epai ya baklisto bapakolami, mpe bakomona nani “ndenge azali”? Likambo oyo emonisami naino polele te epai na bango ezali ndenge oyo bakozala soki basekwi na nzoto ya elimo mpo na kozala na bomoi na likoló. (Filp. 3:20, 21) Nzokande, likambo oyo bayebi ezali ete ‘ntango [Nzambe] akomonisama bakozala lokola ye, mpamba te bakomona ye ndenge azali,’ elingi koloba, “Elimo.”—2 Kol. 3:17, 18.
5:5-8—Na ndenge nini mai, makila, mpe elimo epesaki litatoli ete “Yesu azali Mwana ya Nzambe”? Mai epesaki litatoli mpamba te ntango Yesu azwaki batisimo na mai, Yehova ye moko alobaki ete andimi ete azali Mwana na Ye. (Mat. 3:17) Makila ya Yesu, to bomoi na ye, oyo apesaki lokola “lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso” emonisaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. (1 Tim. 2:5, 6) Mpe elimo santu emonisaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe na ndenge ekitelaki ye ntango azwaki batisimo, mpe esalisaki ye akende na “mokili yango mobimba kosaláká malamu mpe kobikisáká baoyo nyonso banyokolami na Zabolo.”—Yoa. 1:29-34; Mis. 10:38.
Mateya mpo na biso:
2:9-11; 3:15. Soki moklisto atiki ete likambo to moto moko abebisa bolingo oyo azali na yango mpo na bandeko na ye, azali kotambola na kati ya molili, kozanga ete ayeba epai azali kokende.
TÓKOBA “KOTAMBOLA NA KATI YA SOLO”
Yoane abandaki mokanda na ye ya mibale na maloba oyo: “Mokóló epai ya mwasi moponami mpe epai ya bana na ye.” Alobaki ete azali kosepela mingi mpamba te amonaki ete “bamosusu na kati ya bana [ya mwasi yango] bazali kotambola na kati ya solo.”—2 Yoa. 1, 4.
Nsima ya kolendisa baklisto bálona bolingo, Yoane akomaki boye: “Talá oyo bolingo elakisi, ete tókoba kotambola engebene bakomandema na ye.” Yoane alendisaki bango mpe bákeba na “mokosi mpe motɛmɛli ya Klisto.”—2 Yoa. 5-7.
Biyano na mituna ya Biblia:
1, 13—“Mwasi moponami” azali nani? Mbala mosusu Yoane akomelaki mwasi moko oyo abengaki Kyria, liloba ya Grɛki oyo elimboli “mwasi.” Mbala mosusu mpe asalelaki liloba yango mpo na kobenga lisangá moko, mpo batɛmɛli báyeba te soki alingi kolobela nini. Soki asalelaki liloba yango mpo na kobenga lisangá moko, boye bana ya mwasi yango ezalaki bandeko ya lisangá yango mpe “bana ya ndeko na [ye] ya mwasi,” ezalaki bandeko ya lisangá mosusu.
7—‘Koya’ ya Yesu oyo Yoane alobelaki na vɛrsɛ yango ezali nini, mpe ndenge nini bakosi “bazali te koyambola” yango? Alobelaki te ‘koya’ ya Yesu lokola Mokonzi, oyo esengelaki komonana na miso ya bato te. Kasi, alobelaki nde koya na ye na mosuni mpe kopakolama na ye lokola Klisto. (1 Yoa. 4:2) Bakosi bandimaka te ete Yesu ayaki na kati ya mosuni. Mbala mosusu, bawanganaka ete ayaki awa na mabelé to baboyaka kondima ete apakolamaki na elimo santu.
Mateya mpo na biso:
2, 4. Koyeba “solo,” elingi koloba mateya nyonso ya boklisto oyo ezali na Biblia, mpe kondima yango ezali na ntina mingi mpo na lobiko na biso.—3 Yoa. 3, 4.
8-11. Mpo tóbungisa te ‘boboto monene, ná motema mawa, ná kimya ya Nzambe Tata mpe ya Yesu Klisto’ mpe tótikala na lisangá ya bandeko, tosengeli ‘kokeba’ mpo na elimo na biso mpe koboya baoyo bazali “kotikala te na kati ya liteya ya Klisto.”—2 Yoa. 3.
TÓKÓMA “BANINGA YA MOSALA NA KATI YA SOLO”
Yoane atindaki mokanda na ye ya misato epai ya moninga na ye Gayusi. Akomaki boye: “Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”—3 Yoa. 4.
Yoane apesaki Gayusi longonya mpo azalaki “kosala mosala moko ya sembo” na ndenge azalaki kosalisa bandeko oyo bazalaki bapaya. Alobaki boye: “Tosengeli koyamba bato ya ndenge wana malamu, mpo tókóma baninga ya mosala na kati ya solo.”—3 Yoa. 5-8.
Biyano na mituna ya Biblia:
11—Mpo na nini bato mosusu bakómaka kosala mabe? Lokola bayebi motuya ya mateya ya boklisto te, bato mosusu bayebi Nzambe te, bayebi mpe bizaleli na ye te. Lokola Nzambe amonanaka na miso te, bato yango basalaka makambo lokola nde Nzambe azali komona bango te.—Ezek. 9:9.
14—Banani babengami “baninga”? Na vɛrsɛ oyo, liloba “baninga” elimboli kaka te bato oyo bazali na boyokani makasi. Yoane asaleli liloba yango mpo na kolobela bandeko nyonso bandimi.
Mateya mpo na biso:
4. Bato oyo bakɔmeli na elimo bayokaka esengo mingi ntango bazali komona bilenge bazali “kokoba kotambola na kati ya solo.” Baboti mpe bayokaka esengo koleka ntango balongi kosalisa bana na bango bákóma bato oyo balingaka Nzambe!
5-8. Na kati ya bato oyo basalaka mosala makasi mpo na bandeko na bango mpo balingaka bango mpe balingaka Yehova tokoki kotánga bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ, bandeko oyo basalaka na Betele, mpe babongisi-nzela. Ebongi mpenza tómekola kondima na bango, mpe tósungaka bango na bolingo nyonso.
9-12. Tosengeli komekola ndakisa ya Demeteliusi, moto ya sembo, kasi te oyo ya Diotelefe, oyo azalaki kotɔnga bandeko.
“BÓMIBATELA NA KATI YA BOLINGO YA NZAMBE”
Yuda abengaki bato oyo bakɔtaki na mayele mabe na lisangá ete “baimaimi, bato ya komilelalela mpo na ndenge bomoi na bango ezali, batambolaka engebene bamposa na bango moko.” Bato yango ‘balobaka makambo ya lolendo, wana bazali kokumisa bato.’—Yuda 4, 16.
Ndenge nini baklisto bakoki kokima baninga mabe? Yuda akomaki boye: “Balingami, bókanisa lisusu maloba oyo bantoma ya Nkolo na biso Yesu Klisto balobaki liboso.” Abakisaki boye: “Bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.”—Yuda 17-21.
Biyano na mituna ya Biblia:
3, 4—Mpo na nini Yuda alendisaki baklisto ‘bábunda etumba makasi mpo na kondima’? Mpamba te ‘bato oyo batyolaka Nzambe bamikɔtisaki na kati ya lisangá na mayele.’ Bato yango bazalaki ‘kokómisa boboto monene ya Nzambe ntina na bango ya kozala na etamboli ya mbindo.’
20, 21—Ndenge nini tokoki ‘komibatela na kati ya bolingo ya Nzambe’? Makambo misato ekosalisa biso: (1) soki tozali komitonga likoló ya ‘kondima na biso ya bosantu koleka’ na nzela ya boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe soki tozali na molende na mosala ya kosakola; (2) soki tozali kobondela “na elimo santu,” to na kolanda litambwisi na yango; mpe (3) soki tozali komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, oyo epesi biso likoki ya kozwa bomoi ya seko.—Yoa. 3:16, 36.
Mateya mpo na biso:
5-7. Moto mabe akoki nde kokima etumbu ya Yehova? Bandakisa misato oyo ezali kokebisa, oyo Yuda atángi emonisi ete akoki kokima yango te.
8-10. Tosengeli kolanda ndakisa ya Mikaele anzelu-mokonzi mpe kozala na limemya na bato oyo Yehova apesi bokonzi.
12. Bapɛngwi oyo bamonisaka bolingo ya lokuta bazali likama mpo na kondima na biso ndenge mabanga oyo ebombaná na nse ya mai ezalaka likama mpo na masuwa to bato oyo bazali kosukola na mai. Bateyi ya lokuta bakoki komonana lokola bato ya boboto, kasi bazali lokola mapata ezangá mai mpamba te bazali na eloko te na elimo. Bato yango babotaka mbuma te lokola banzete na nsuka ya eleko ya otɔnɛ. Libebi ezali kozela bato yango, lokola banzete oyo epikolami. Tosengeli mpenza kokima bapɛngwi.
22, 23. Baklisto ya solo bayinaka oyo ezali mabe. Bandeko oyo bakɔmeli na elimo—mingimingi bankulutu—basalisaka na elimo “baoyo bazali na bantembe” mpo na koluka kobikisa bango na mɔtɔ ya kobomama ya seko.
[Bililingi na lokasa 28]
Mai, elimo, mpe makila epesaki litatoli ete “Yesu azali Mwana ya Nzambe”