Mpo na nini Yesu akɔtaki te na politiki?
MEKÁ komona na makanisi ete tozali na mobu 32 ya ntango na biso, na mpokwa. Yesu, Masiya oyo alakamaki, ayebani mpenza mpo na ndenge azali kobikisa bato ya maladi ata mpe kosekwisa bakufi. Na mokolo yango, ebele ya bato bakamwaki mpo na makambo oyo asalaki mpe mateya ya Nzambe oyo ateyaki bango. Na nsima, afandisaki bato yango oyo bazalaki na nzala na bituluku ya mikemike. Abondelaki Yehova mpe na ndenge ya likamwisi apesaki bango nyonso bilei. Na nsima asangisaki bilei nyonso oyo etikalaki mpo ebeba te. Bato basalaki nini?—Yoane 6:1-13.
Nsima ya komona makamwisi ya Yesu mpe makoki na ye ya kokamba ebele ya bato mpe kokokisa bamposa na bango, bato bamonaki ete Yesu akozala mokonzi ya malamu. (Yoane 6:14) Tokokamwa te na likambo oyo basalaki. Tóbosana te ete bazalaki koluka mokonzi moko ya malamu; mokili na bango oyo bazalaki kolinga mingi ezalaki na nse ya litambwisi ya bokonzi ya bapaya oyo ezalaki konyokola bango. Na yango, balukaki kokɔtisa Yesu na makasi na politiki. Na makanisi wana na motó talá ndenge Yesu asalaki.
Yoane 6:15 elobi ete: “Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.” Ekateli ya Yesu ezalaki polele. Aboyaki komikɔtisa na politiki ya mboka na ye. Ekateli na ye ebongwanaki te. Alobaki ete bayekoli na ye basengelaki mpe kozwa ekateli ya bongo. (Yoane 17:16) Mpo na nini azwaki ekateli yango?
Mpo na nini Yesu aboyaki kokɔta na politiki?
Ekateli ya Yesu ya koboya kokɔta na politiki esimbamaki na mitinda ya Makomami. Tótalela kaka mibale.
“Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Ezali ndenge wana nde Biblia elobeli boyangeli ya bato. Kobosana te ete, Yesu azalaki ekelamu ya elimo na likoló ntango molai liboso aya awa na mabele lokola moto. (Yoane 17:5) Na ndenge yango ayebaki ete moto, atako azali na makanisi ya malamu, azali te na likoki ya kokokisa na ndenge ebongi bamposa ya bamiliare ya bato; Nzambe akelá ye te na likoki ya kosala bongo. (Yirimia 10:23) Yesu ayebaki ete likambo oyo ekosilisa mikakatano ya bato ezali esika mosusu—kasi te baguvɛrnema ya bato.
“Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Maloba yango esali yo mpasi? Bato mingi bakoloba bongo. Bakanisaka bato ya sembo oyo bamikɔtisaka na politiki mpo bazalaka na mposa ya kokómisa mokili malamu mingi mpe kotya kimya. Ata basali nyonso, bakonzi ya sembo bakoki te kokima makambo mabe ya ye oyo Yesu abengaki “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 14:30) Yango wana Yesu alobaki na moto moko ya politiki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Yesu azalaki mpenza mokonzi ya guvernɛma ya Nzambe oyo alakamaki. Soki amikɔtisaki na politiki, Yesu alingaki lisusu kozala sembo te na guvernɛma ya Tata na ye.
Yesu ateyaki nde ete bayekoli na ye bazali na mokumba moko te epai ya bakonzi ya mokili? Kutu, ateyaki bango ndenge ya kozala na bokatikati na mikumba na bango epai ya Nzambe mpe epai ya bakonzi ya mokili.
Yesu azalaki kotosa bakonzi ya mokili
Ntango Yesu azalaki koteya na tempelo, batɛmɛli balukaki kotya ye na motambo mpo aloba likambo moko ya mabe; batunaki ye soki bato basengeli kofuta mpako. Soki Yesu alobaki “te,” eyano na ye elingaki komonisa botomboki mpe kotinda bato oyo balɛmbaki na minyoko ya Baroma bátomboka. Kasi, soki Yesu alobaki “ɛɛ,” bato mingi balingaki kokanisa ete azali kokanga miso na makambo mabe oyo bazalaki kosalela bango. Eyano oyo Yesu apesaki emonisaki mpenza bokatikati. Alobaki boye: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Luka 20:21-25) Na yango, bayekoli na ye bazali na mokumba epai ya Nzambe mpe epai ya Kaisala—elingi koloba bakonzi ya mokili.
Bakonzi ya mokili babongisaka mwa makambo. Bazali na lotomo ya kosɛnga bana-mboka bázala sembo, báfutaka bampako mpe kotosa mibeko. Ndakisa nini Yesu atikaki na likambo etali ‘kozongiselaka Kaisala biloko ya Kaisala’? Yesu abɔkɔlamaki na baboti oyo bazalaki kotosa mibeko ata ntango kosala bongo ezalaki mpasi. Na ndakisa, Yozefe ná mwasi na ye Maria oyo azalaki na zemi, basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 150 na Beteleme ntango mobeko moko ya Baroma esɛngaki yango. (Luka 2:1-5) Na ndakisa na bango, Yesu azalaki mpe kotosa mibeko, ata mpe kofuta mpako oyo asengelaki kofuta te. (Matai 17:24-27) Azalaki mpe kozwa esika ya bakonzi te. (Luka 12:13, 14) Tokoki koloba ete Yesu azalaki kotosa lolenge oyo bakonzi bazalaki kotambwisa makambo na bango atako aboyaki kokɔta na politiki. Kasi, Yesu alingaki mpenza koloba nini na likambo etali kozongisela “Nzambe biloko ya Nzambe”?
Ndenge oyo Yesu apesaki “Nzambe biloko ya Nzambe”
Mokolo moko batunaki Yesu soki mobeko nini eleki mibeko nyonso oyo Nzambe apesaki bato. Kristo ayanolaki boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Matai 22:37-39) Yesu ateyaki ete ntango esɛngi kozongisela “Nzambe biloko ya Nzambe,” mokumba na biso ya liboso epai na ye ezali bolingo—oyo esɛngaka tómipesa epai na ye na motema mobimba.
Bolingo yango ekoki kozala ya mitema mibale? Bosembo na biso ekoki kozala ya mitema mibale, mosusu epai ya Yehova Nzambe mpe guvɛrnema na ye mpe ndambo mosusu epai ya bakonzi ya mokili? Yesu ye apesaki etinda oyo: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu.” (Matai 6:24) Na vɛrsɛ wana, Yesu azalaki kolobela kozala sembo epai ya Nzambe mpe biloko ya mokili, kasi amonisaki polele ete toli yango ekoki mpe kosalelama na likambo etali komikɔtisa na makambo ya politiki ndenge bayekoli na ye ya ekeke ya liboso basalaki.
Masolo ya kala emonisi ete bayekoli ya Yesu na ntango ya kala bamikɔtisaki ata moke te na politiki. Lokola bazalaki kopesa losambo na bango mobimba epai ya Ye oyo Kristo azalaki kosambela, baboyaki komipesa na Roma mpe amperɛrɛ na yango, kokɔta na mosala ya soda mpe kondima misala mosusu ya politiki. Lokola basalaki bongo, banyokwamaki na balolenge nyonso. Na bantango mosusu banguna na bango bazalaki kofunda bango ete “bayinaka bato.” Efundeli yango ezalaki mpenza ya solo?
Bakristo ya solo bamibanzabanzaka mpo na bato
Kobosana te mobeko ya mibale ya monene na Mibeko ya Nzambe oyo Yesu alobelaki—“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Emonani polele ete moyekoli ya solosolo ya Kristo asengeli te koyina bato. Yesu azalaki kolinga bato, azalaki komipesa mpo na bango, kosalisa bango ata mpe kosunga bango na mikakatano ya mokolo na mokolo.—Marko 5:25-34; Yoane 2:1-10.
Kasi, Yesu ayebanaki mpenzampenza mpo na likambo nini? Ayebanaki te lokola Mobikisi ya bamaladi, Moleisi ya ebele ya bato, ata mpe te lokola Mosekwisi ya bato—atako akokisaki mikumba wana nyonso ya minene. Kasi, bato bazalaki kobenga ye Moteyi, mpe abongaki kobengama bongo. (Yoane 1:38; 13:13) Yesu amonisaki ete ntina monene oyo ayaki awa na mabele, ezalaki mpo na koteya bato bokonzi ya Nzambe.—Luka 4:43.
Yango wana, bayekoli ya solo ya Kristo bamipesaka na mosala oyo Nkolo na bango amipesaki na yango ntango azalaki awa na mabele—koteya bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu Kristo apesaki bakristo nyonso ya solo etinda ya koteya bato ya mokili mobimba bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bokonzi wana ya likoló oyo ekozala seko ekoyangela biloko nyonso oyo Nzambe akelá na kolanda mobeko ya bolingo. Ekokokisa mokano ya Nzambe, ata mpe kolongola mpasi mpe liwa. (Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4) Okoki kokamwa te ete Biblia elobeli nsango ya Kristo lokola “nsango malamu”!—Luka 8:1.
Na yango, soki ozali koluka bayekoli ya solo ya Yesu Kristo lelo oyo, ndenge nini okoki koyeba bango? Bandimaka kokɔta na politiki ya mokili oyo? To basalaka ete kosakola mpe koteya Bokonzi ya Nzambe ezala mokumba na bango ya libosoliboso ndenge kaka Yesu asalaki?
Okosepela koyekola makambo mingi na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe oyo ekoki kosala na bomoi na yo lelo oyo? Tosɛngi yo okutana na Batatoli ya Yehova na esika ofandi to otala na internet na adrɛsi na bango oyo: www.jw.org.
[Etanda/Bililingi na nkasa 24, 25]
Batatoli ya Yehova basalisaka bato?
Batatoli ya Yehova bakɔtaka na politiki te. Kasi bamipesaka na kosalisa bato ya mposo nyonso mpe ya mimeseno nyonso oyo bazali na mboka na bango. Tótalela mwa makambo oyo emonisi likambo yango:
◼ Batatoli ya Yehova oyo bazali bato koleka milio 7 balekisaka mbula na mbula ngonga koleka miliare moko na ndambo mpo na koteya makambo oyo ezali na Biblia mpe ndenge ekoki kosalisa bato yango bátika bizaleli mpe misala mabe, bázala na mabota ya esengo, mpe bábongisa bomoi na bango.
◼ Babimisaka mikanda na minɔkɔ koleka 500, ata mpe na minɔkɔ oyo mikanda ezalaka te mpe batɛkaka yango te.
◼ Bateyaka ndenge ya koloba malamu liboso ya bato, yango esalisi bamilio ya bato báyeba koloba na ndenge ya polele mpe na mayele.
◼ Basalaka bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma oyo esalisi bankóto ya bato ya mokili mobimba báyekola kotánga mpe kokoma.
◼ Na mokili mobimba, babongisá Bakomite ya botongi koleka 400 mpo na kosalisa bandeko oyo bazali koya mpo na kotonga báyeba malamu kotonga bisika ya koyekola Biblia. Na mbula zomi oyo euti koleka, batongaki bandako ya losambo, to Bandako ya Bokonzi koleka 20 000.
◼ Bamipesaka na kosalisa bato bisika ndenge na ndenge na mokili ntango makama ebimi, basungaka bato oyo bazali Batatoli ata mpe bato oyo bazali Batatoli te. Na mipɛpɛ makasi oyo eutaki kobɛta na États-Unis na mbula mibale oyo euti koleka, Batatoli bamipesaki mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi koleka 90 mpe bandako mosusu 5 500.
[Elilingi na lokasa 23]
Ntango bato balukaki kokɔtisa Yesu na makasi na politiki alongwaki ‘akendaki na ngomba kaka ye moko’