Kelasi ya mbala ya 130 ya Gileade
Mokolo ya esengo mingi mpe ya elikya
MOKOLO oyo bana-kelasi ya mbala ya 130 ya Gileade, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, bazwaki badiplome ezalaki mpenza mokolo ya esengo mingi mpe ya elikya. Mokolo ya pɔsɔ, 12 Marsi 2011, bato koleka 8 500, bana-kelasi ná bandeko mpe baninga na bango, bayanganaki mpo na likita ya kopesa badiplome. Esengo ezalaki monene, kaka mpo na mokolo yango te, kasi mpe mpo na avenire ya bamisionɛrɛ oyo bautaki kozwa formasyo ya solosolo mpe etikalaki moke bátinda bango na mikili ndenge na ndenge mpo na kosakwela bato solo ya Biblia.
“Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela” Yehova
Likanisi wana ya kolendisa oyo euti na Yisaya 30:18 ezalaki motó ya likambo ya lisolo ya prezida ya likita yango, Ndeko Geoffrey Jackson, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Alobaki na bana-kelasi na esengo mpe na mwa kosɛkisa ete atako mateya ezalaki makasi mpe bazalaki mwa motema likoló mokolo wana, babongaki kozwa longonya lokola bakómaki tii na nsuka. Makambo nini bana-kelasi bakoki kolikya mpo na mikolo ekoya? Abimisaki makanisi misato na Yisaya 30:18-21 oyo ekoki mpenza kosalisa bango.
Ya liboso, Ndeko Jackson alobaki boye: “Bokoki kolikya ete Yehova akoyoka mabondeli na bino.” Amonisaki elaka oyo ezali na vɛrsɛ 19: “[Nzambe] akozanga te komonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana.” Ndeko Jackson alobaki ete vɛrsɛ yango emonisi ete Nzambe ayokaka libondeli ya moto mokomoko. “Yehova asalaka makambo ndenge tata asalaka, atunaka te ete, ‘Mpo na nini yo ozali makasi te lokola Songolo?’ Kasi, ayokaka moto na moto na likebi mpenza. Apesaka ye mpe eyano.”
Ya mibale, molobi amonisaki ete tokoki kokutana na mikakatano. “Yehova alaki biso te ete bomoi na biso ekozala pɛtɛɛ, kasi akosalisa biso.” Ndenge vɛrsɛ 20 emonisi yango, Nzambe asakolaki ete ntango banguna balingaki kozinga Yisraele, mpasi mpe monyoko esengelaki komonana mingi ndenge limpa mpe mai emonanaka mingi. Atako bongo, Yehova akozala ntango nyonso wana mpo na kosalisa basaleli na ye. Bana-kelasi ya Gileade bakokutana mpe na mikakatano, atako ntango mosusu ekozala te oyo bakokaki kokanisa! Ndeko Jackson abakisaki boye: “Kasi bokoki kolikya ete Yehova akozala wana mpo na kosalisa bino bólonga mokakatano mokomoko.”
Ya misato, Ndeko Jackson ayebisaki bana-kelasi ete ndenge vɛrsɛ 20 mpe 21 emonisi, “toli ezangi te, yango wana, bóluka yango!” Alobaki ete lelo oyo mokristo mokomoko asengeli koyoka malamumalamu ntango Yehova azali koloba na nzela ya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Molobi alendisaki bana-kelasi bákoba komipesa na kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpamba te yango elimboli bomoi.
“Nsɔmɔ ya Yehova ekwela bino”
Anthony Morris, ndeko oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi alimbolaki maloba “nsɔmɔ ya Yehova,” oyo ezali na Biblia. (2 Ntango 19:7) Maloba yango elimbolaka te kobanga ya mabe, kasi nde mposa makasi ya kosala oyo ezali malamu, limemya makasi mpe ya solosolo, oyo esalaka ete moto alɛnga. Ndeko Morris alendisaki bana-kelasi ete: “Bókóma na nsɔmɔ ya ndenge wana na bisika oyo bakotinda bino bamisionɛrɛ.” Ndenge nini bakoki kosala yango? Molobi amonisaki makanisi mibale ya ntina.
Ya liboso, Ndeko Morris alendisaki bana-kelasi básalela toli ya Yakobo 1:19: ‘Bóyokaka noki, bówelaka koloba te.’ Amonisaki ete bana-kelasi bayekolaki makambo mingi na boumeli ya sanza mitano oyo bazalaki na kelasi, kasi basengelaki kokeba ete bákende te komilakisa na teritware oyo bakotinda bango. Alobaki boye: “Bosengeli liboso koyoka. Bóyoka bandeko ya masangá na bino mpe baoyo bazali kokamba mosala na ekólo oyo bakotinda bino; bóyoka makambo oyo bakoloba mpo na mboka mpe mimeseno ya bato. Bóyokaka nsɔni te koloba ete, ‘Nayebi te.’ Ntango bozali koyekola makambo ya sika, soki bozali kaka komona ete boyebi mingi te, yango ekomonisa ete bozwi formasyo oyo ebongi mpenza.”
Ya mibale, Ndeko Morris atángaki Masese 27:21: “Nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe litumbu mpo na wolo; mpe na lokumu ya moto nde bayebaka ye.” Alimbolaki ete ndenge esɛngaka kopɛtola wolo mpe palata, lokumu mpe ekoki kobongisa biso. Na ndenge nini? Bomoto na biso ekoki komekama na lokumu oyo bazali kopesa biso. Ekoki kolamwisa lolendo na biso mpe kokweisa biso na elimo, to mpe ekoki kotinda biso tóndima ete tosengeli kozongisa lokumu nyonso epai ya Yehova mpe kozwa ekateli makasi ya kobuka mibeko na ye te. Na yango, Ndeko Morris alendisaki bana-kelasi bátalela na ndenge ya malamu lokumu nyonso oyo bakoki kopesa bango, bátalela yango lokola libaku ya komonisa ete bazali na “nsɔmɔ ya Yehova.”
“Bósepela na mosala na bino ya misionɛrɛ”
Guy Pierce, ndeko mosusu oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki diskur ya monene ya likita yango. Motó ya likambo na yango ezalaki “Bósepela na mosala na bino ya misionɛrɛ” mpe amonisaki ete liloba “misionɛrɛ” elimboli “moto oyo atindami mpo na mosala moko.” Alobaki ete tokoki kokamwa te ete bamisionɛrɛ bazali ndenge mingi mpe batindamaka mpo na misala ndenge na ndenge. Mingi bamipesaka na mosala ya kosalisa bato ya maladi mpe koluka kosilisa mikakatano ya mokili na nzela ya politiki. Alobaki ete: “Bino bokeseni na bango.” Na ndenge nini?
Na boyekoli na bango ya Biblia, bana-kelasi batángaki masolo mingi oyo elobeli kobikisa bato. Ntango Yesu asekwisaki elenge mwasi moko, baboti na ye “bazalaki na esengo makasi.” (Marko 5:42) Ndenge moko mpe, ntango bato oyo bakufá miso babikisamaki na ndenge ya likamwisi, bazalaki na esengo makasi. Moko na bantina oyo Kristo asalaki makamwisi wana ezalaki mpo na komonisa makambo oyo akosala na mokili ya sika, ntango “ebele mpenza ya bato” ya sembo oyo bakobika ntango ebongiseli oyo mabe ekobebisama, bakobikisama na maladi nyonso. (Emoniseli 7:9, 14) Bandeko mpe baninga na bango oyo bakosekwa bakozala mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Kanisá esengo oyo ekozala na ntango wana!
Nzokande, ndenge Ndeko Pierce alimbolaki ete kobika na maladi ekozala te lobiko oyo eleki ntina. Bato ya maladi oyo Yesu abikisaki babɛlaki lisusu. Bato oyo asekwisaki bakufaki lisusu. Ata mpe bakufi miso oyo abikisaki bakufaki lisusu miso, ntango bakufaki. Lobiko oyo elekaki ntina ezalaki lobiko ya elimo oyo Yesu apesaki bango. Bamisionɛrɛ ya Gileade bazali na mosala ya kobikisa bato na elimo. Basalisaka bato bázonga na boyokani na Tata na biso ya likoló mpo bázonga na bomoi na elimo. Kaka baoyo babikisami na elimo nde bakozwa bomoi ya seko. Ndeko Pierce alobaki ete: “Lobiko ya elimo nde epesaka Nzambe nkembo. Yango nde emonisaka ete bosali mosala malamu.”
Masolo mosusu misato
“Mokolo oyo ekozala mokolo malamu?” Robert Rains, ndeko oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis, atunaki bana-kelasi motuna yango. Alendisaki bango ete básala nyonso mpo ete bipai oyo bakotinda bango bamisionɛrɛ bábebisaka ntango na bango te, kasi bálukaka lisalisi ya Liloba ya Nzambe soki bakutani na mitungisi mpe bábondelaka Yehova mpo ete mokolo nyonso ezalaka mokolo malamu.
“Bokokómisa sika eloko ya kala?” Ndeko Mark Noumair, moko ya balakisi na Gileade, atunaki motuna yango na diskur na ye. Alimbolaki 1 Yoane 2:7, 8, epai ntoma Yoane alobelaki “mobeko ya kala” oyo ezalaki mpe “mobeko ya sika.” Maloba yango nyonso etaleli kaka mobeko moko oyo elobi ete bayekoli ya Kristo basengeli kozala bolingo ya solo kati na bango mpe na elimo ya komipimela. (Yoane 13:34, 35) Mobeko yango ezalaki ya kala mpamba te Kristo ye moko apesaki yango bayekoli na ye bambula mingi liboso; kasi ezalaki mpe ya sika mpamba te bakristo bazalaki kokutana na mikakatano oyo bakutanaki na yango liboso te, mpe basengelaki komonisa bolingo na ndenge ya sika mpe oyo eleki. Bamisionɛrɛ mpe bakokutana na makambo oyo bakutaná na yango naino te mpe basengeli koyekola ndenge ya sika ya komonisa bolingo. Ndenge nini bakolonga kosala yango?
Ndeko Noumair alendisaki bango na maloba oyo: “Bókóma te eloko oyo bozali koyina.” Alobaki ete soki moto amoniseli biso ezaleli oyo toyinaka, kasi biso mpe tozongiseli ye yango, tokómi eloko oyo toyinaka, mpe yango ekozala mabe mpo na biso moko. Nzokande, soki toluki ndenge ya komonisa bolingo ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tokongɛngisa “pole ya solosolo” mpe tokobengana molili ya elimo.
“Bómema mokumba.” Ndeko Michael Burnett, oyo mpe azali molakisi na Gileade, asalaki diskur wana oyo ebongaki mpenza mpo na bana-kelasi. Apesaki ndakisa ya bato ya Afrika oyo bamemaka mikumba na motó. Basalelaka kata, elingi koloba mwa elamba oyo balíngi mpe batye na motó mpo báyoka mpasi mingi te mpe mokumba efanda malamu, mpe esalisaka moto atambola malamu. Bamisionɛrɛ ya Gileade bakomema mikumba mingi na bateritware na bango na mboka mopaya, kasi bapesi bango eloko moko oyo tokoki kokokanisa yango na kata: formasyo ya solosolo na lisalisi ya Biblia. Ntango bazali kosalela makambo oyo bayekoli, mokumba na bango ekokwea te mpe bakomema yango malamu.
Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna epai ya bandeko mosusu
Ntango bana-kelasi bazali kozwa formasyo na Gileade, bazwaka mpe ntango ya kobima na mosala ya kosakola ná bandeko ya masangá ya Batatoli ya Yehova oyo ezali zingazinga ya eteyelo. William Samuelson, mokɛngɛli ya Departema ya biteyelo ya Teokrasi, alobelaki mwa makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango, na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Kopemisa lobɔkɔ na yo te.” (Mosakoli 11:6) Bana-kelasi basalaki bilakiseli ya makambo oyo bakutanaki na yango mpo na komonisa molende oyo bazalaki na yango na mosala ya kosakola, mpe bazwaki mabaku ya kosakola nsango malamu na mpɛpɔ, na barestora, mpe na bisika oyo batɛkisaka esansi. Bapesaki litatoli ndako na ndako, mpe na mabaku malamu, mpe na kokoma mikanda. Ya solo mpenza, bapemisaki mabɔkɔ na bango te, mpe babukaki mbuma malamu mingi.
Na nsima, Ndeko Kenneth Stovall, oyo asalaka na biro ya eteyelo ya Gileade, atunaki bandeko misato oyo bazalaká bamisionɛrɛ bambula ebele: Barry Hill, oyo asalaki na ekólo Équateur mpe République dominicaine; Eddie Mobley, na Côte d’Ivoire; mpe Tab Honsberger, na Sénégal, Bénin, mpe Haïti. Lisolo na bango ezalaki na motó ya likambo oyo elobi: “Bómeka Yehova mpe bózwa mapamboli.” (Malaki 3:10) Na ndakisa, Ndeko Hill alobaki ndenge oyo ye ná mwasi na ye banyokwamaki mpo na komesana na molunge, putulu, mpe pɔtɔpɔtɔ ya ekólo Équateur. Alobaki ete na boumeli ya mbula mibale na ndambo, bazalaki kosukola na katini. Kasi, bakanisaki ata mokolo moko te kotika; bazalaki komona ete teritware yango ezalaki lipamboli ya Yehova. Alobaki ete “ezalaki bomoi na biso.”
Na nsuka ya likita, mwana-kelasi moko atángaki mokanda oyo ezalaki na maloba ya kosimba motema oyo bakomaki mpo na kozongisa matɔndi ndenge batángaki na eteyelo ya Gileade. Mokanda yango elobaki boye: “Kondima na biso elendisami lisusu, kasi toyebi ete tozali naino kaka na makambo mingi ya koyekola.” Bana-kelasi nyonso bazwaki badiplome, mpe bayebisaki bato na bato mboka oyo batindi bango. Ndeko Jackson asukisaki likita na kolendisa bana-kelasi ete bakoki kotya motema ete Yehova akosalisa bango, mingimingi ntango bakokutana na mikakatano. Bayangani nyonso bazongaki na elikya mpe esengo mingi. Na ntembe te, Yehova akosalela bamisionɛrɛ yango ya sika mpo na kosala makambo ya malamu mingi.
[Etanda/Karte na lokasa 31]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 9
Mwayene ya mbula ya kobotama: 34
Mwayene ya mbula ya batisimo: 19
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindami na mikili oyo ezali awa na nse
EPAI BAMISIONƐRƐ BATINDAMI
ARGENTINE
ARMÉNIE
BURKINA FASO
BURUNDI
CONGO (KINSHASA)
HAÏTI
HONG-KONG
INDONÉSIE
KENYA
LITHUANIE
MALAISIE
MOZAMBIQUE
NÉPAL
PAPOUASIE NOUVELLE-GUINÉE
RÉPUBLIQUE TCHÈQUE
ROUMANIE
SÉNÉGAL
TANZANIE
OUGANDA
ZIMBABWE
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 130 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Molina, Z.; Bassolino, S.; Alatsis, C.; Arroyo, A.; Niño, L.; Merkling, S.; Clark, M.
(2) Little, C.; Tibaudo, S.; Jakobsson, S.; Moreno, J.; Rodriguez, A.; Lee, K.; Cárdenas, H.; Aguilar, L.
(3) Clairbush, A.; Polley, A.; Caldwell, S.; Adame, J.; Hildebrandt, S.; Shoemaker, I.; Grohman, N.; Galvez, G.
(4) Clark, J.; Bassolino, A.; Packham, K.; Adame, J.; Knaus, M.; Niño, M.; Moreno, R.; Galvez, J.
(5) Rodriguez, D.; Geynes, M.; Molina, J.; Aguilar, A.; Alatsis, I.; Manno, A.; Grohman, R.; Packham, J.
(6) Geynes, S.; Cárdenas, M.; Arroyo, C.; Manno, C.; Merkling, J.; Lee, H.; Clairbush, X.; Jakobsson, P.
(7) Little, J.; Hildebrandt, B.; Shoemaker, M.; Knaus, K.; Caldwell, J.; Tibaudo, F.; Polley, C.