Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova akitisi lolendo ya Tulo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • 32. Likebisi nini Yoane apesaki, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?

      32 Ezala ata tozali na biloko mingi to te, Bokonzi ya Nzambe esengeli kozala ntango nyonso na esika ya liboso na bomoi na biso. Ezali na ntina mingi ete tóbosana soki moke te maloba oyo ya ntoma Yoane: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te.” (1 Yoane 2:15) Ezali solo ete, tosengeli kosalela ebongiseli ya makambo ya nkita ya mokili mpo na kobikela. (2 Batesaloniki 3:10) Yango wana, ‘tosalelaka mokili’—kasi tosalelaka yango “na makambo nyonso te.” (1 Bakolinti 7:31, NW) Soki tolingi biloko ya mosuni koleka ndelo—biloko oyo ezali na kati ya mokili—tokolinga lisusu Yehova te. Komipesa na “mposa mabe ya nzoto mpe mposa mabe ya miso mpe nzombo na bizaleli” eyokanaka te na likambo ya kosala mokano ya Nzambe.d Kosala mokano ya Nzambe nde ememaka na bomoi ya seko.—1 Yoane 2:16, 17.

  • Yehova akitisi lolendo ya Tulo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • d “Nzombo na bizaleli” ezali kobongolama ya liloba ya Grɛki alazonia, oyo elimbolami lokola “lolendo ya mabe mpe ezangi ntina oyo etyaka motema na biloko ya mabele.”—The New Thayer’s Greek-English Lexicon.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto