Yehova aleki mitema na biso na monene
MOKOMI ya nzembo akomaki ete: “[Yehova] akosepela na baoyo bakobanga ye.” Ya solo, Mozalisi asepelaka mingi ntango amonaka ndenge mosaleli na ye mokomoko azali kosala makasi mpo na kotosa mibeko na ye ya sembo. Nzambe apambolaka basaleli na ye ya sembo, alendisaka bango mpe abɔndisaka bango na ntango ya mpasi. Ayebi ete basaleli na ye bazali bato ya kozanga kokoka, yango wana atyelaka bango mitinda oyo eleki ndelo te.—Nzembo 147:11.
Ntango mosusu tokakatanaka te mpo na kondima ete Yehova alingaka basaleli na ye nyonso mingi. Nzokande, bato mosusu bamitungisaka mingi mpenza mpo na mabunga na bango ya mikemike mpe bakanisaka ete Yehova akoki kolinga bango ata moke te. Mbala mosusu balobaka ete: “Yehova akoki kolinga ngai te mpo nasali mabe mingi.” Ya solo, makanisi mabe ekómelaka biso nyonso. Kasi emonani lokola bato mosusu bazali ntango nyonso komitungisa na kokanisa ete bazali ata na ntina moko te.
Kolɛmba nzoto
Na ntango ya kala, bato mingi ya sembo bazalaki komitungisa mpe balɛmbaki nzoto. Yobo ayinaki bomoi mpe amonaki ete Nzambe asundoli ye. Hana, mama ya Samwele, atungisamaki mingi na makanisi mpo azalaki kobota te mpe alelaki mingi. Davidi ‘akweaki na nse,’ mpe Epafalodito amitungisaki mpo bandeko na ye bazalaki na mawa ntango bayokaki ete azalaki kobɛla.—Nzembo 38:6; 1 Samwele 1:7, 10; Yobo 29:2, 4, 5; Bafilipi 2:25, 26.
Tokoloba boni mpo na baklisto lelo oyo? Mbala mosusu maladi, konuna, to mikakatano mosusu ya moto na moto ezali kopekisa baklisto mosusu kosala mosala ya Nzambe na ndenge bazali kolinga. Mpo na yango, bakoki kokanisa ete bazali kosalela Yehova mpe bandeko na bango baklisto mabe. Bato mosusu bakoki ntango nyonso komipesa foti mpo na mabe oyo basalá kala, mpe bazali kokanisa ete mbala mosusu Yehova alimbisá bango te. Baoyo bazalaki mbala mosusu na mabota oyo ezali na mikakatano, bakanisaka ete bato mosusu bakoki kolinga bango te. Ndenge nini bakoki kozala na makanisi ya ndenge wana?
Baklisto mosusu bakoli na mabota oyo ezali na bolingo te mpe ezali na moimi, na elimo ya kotyola mpe kobanga. Mbala mosusu, bazwaki libaku te ya kozala na tata oyo alingaka bana na ye, tata oyo akumisaka bana na ye mpe alendisaka bango, oyo alandelaka makambo nyonso te ata ya mikemike oyo bana basalaka mpe oyo alimbisaka bana na ye ata soki basali makambo ya mabe mpenza, mpe oyo asalaka nyonso ete libota na ye mobimba ezala na kimya. Lokola bazalaki na tata oyo azali mpenza kolinga bango te, ekoki kozala mpasi mpo baklisto wana bákanga ntina soki kozala na Tata ya bolingo na likoló elimboli nini.
Na ndakisa, Fritz akomaki ete: “Bomwana na ngai mpe bolenge na ngai ebebisamaki mingi na makambo mabe ya tata na ngai.a Azalaki kopesa longonya te mpe nazalaki ata na mposa ya kozala moninga na ye te. Kutu, mbala mingi nazalaki nde kobanga ye.” Likambo oyo esali ete tii lelo oyo, Fritz amiyokaka ete azali na ntina te atako azali sikoyo na mbula koleka 50. Margarette mpe alobi ete: “Baboti na ngai bazalaki na ezaleli ya mwa kosɛkisa te mpe bazalaki na bolingo te. Ntango nabandaki koyekola Biblia, ezalaki mpasi mpo nandima ete tata moko ya bolingo azalaka.”
Soki tozali na makanisi ya ndenge yango ezala mpo na ntina nini, yango ekoki komonisa ete tozali kosalela Nzambe mpo tolingaka ye te, kasi libosoliboso, mpo tozali komona ete tozali na ngambo epai na ye to mpo tozali kobanga ye. Ata tozali kosala malamu mpenza, tokozala kaka na esengo te. Mposa ya kosepelisa Yehova na bandeko na biso baklisto ekoki mbala mosusu kotinda biso na kokanisa ete tokokoka te kosala makambo nyonso oyo tolingi kosala. Yango ekoki kosala ete mbala mosusu tókokisa te makambo oyo tolingaka kosala, tómipesa foti mpe tólɛmba nzoto.
Tokosala nini? Mbala mosusu tozali na mposa tókanisa lisusu soki motema ya Yehova ezali monene ndenge nini. Ntoma Yoane akangaki ntina ya ezaleli malamu oyo ya bomoto ya Nzambe.
“Nzambe aleki mitema na biso na monene”
Pene na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., ntoma Yoane akomelaki bandeko na ye baklisto ete: “Tokoyeba ete tozali bato na solo na nzela oyo, mpe tokondimisa [“tokokitisa,” NW] mitema na biso liboso na ye; mpo ete, ata mitema na biso mikokweisa biso, Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.” Mpo na nini Yoane akomaki maloba oyo?—1 Yoane 3:19, 20.
Tomoni mpenza ete Yoane ayebaki ete mosaleli ya Yehova akoki koyoka na motema na ye ete azali na ngambo. Ntango mosusu Yoane ye moko mpe azalaki komiyoka bongo. Ntango Yoane azalaki elenge, azalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpe Yesu Klisto asembolaki ye mbala mingi mpo azalaki na mposa ya kosalela bato makambo makasi. Kutu Yesu apesaki Yoane na ndeko na ye Yakobo “nkombo mosusu, Bonelegese, ntina na yango ete: Bana na Nkake.”—Malako 3:17; Luka 9:49-56.
Na boumeli ya mbula 60 oyo elandaki, Yoane akolaki mpe akómaki moklisto ya boboto, akómaki na bokatikati, na bolingo mpe akómaki na motema mawa. Ntango akomaki mokanda na ye ya liboso, Yoane azalaki ntoma bobele moko oyo atikalaki na bomoi, mpe ayebaki ete Yehova alandelaka te mabunga nyonso ya mikemike ya basaleli na ye. Kasi Yehova azali Tata ya malamu, azali na motema boboto, akabaka, ayokelaka bato mawa mpe alingaka mpenza bato nyonso oyo balingaka ye mpe oyo basambelaka ye na solo. Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoane 4:8.
Yehova asepelaka na oyo tosalaka mpo na ye
Nzambe ayebi bolɛmbu mpe mabunga na biso mpe atalelaka yango. Davidi akomaki ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” Yehova ayebi malamu ete makambo oyo tokutaná na yango na bomoi na biso, etindaka biso tózala na bomoto oyo tozali na yango. Kutu ayebi biso koleka biso moko.—Nzembo 103:14.
Ayebi ete mingi kati na biso tolingaka kozala malamu, kasi tokolonga kotika kosala mabunga te. Tokoki kokokanisa makambo na biso na makambo ya ntoma Paulo, ye akomaki ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.” Biso nyonso tozali kobunda etumba moko. Ntango mosusu ekoki kosala ete motema na biso esambisa biso.—Baloma 7:19.
Tóbosana likambo oyo te: Eloko oyo eleki ntina ezali nde ndenge oyo Yehova amonaka biso kasi te ndenge oyo biso moko tomimonaka. Ntango nyonso oyo amonaka biso tozali kosala makasi mpo na kosepelisa ye, asepelaka mwa moke te kasi azalaka nde na esengo mingi mpenza. (Masese 27:11) Ata soki tozali komona ete makambo oyo tozali kosalela ye ezali moke, Yehova asepelaka ntango amonaka mposa na biso mpe makanisi malamu oyo tozali na yango. Atalaka kaka oyo tosali te, kasi ayebaka nini tolingaki kosala; ayebaka bamposa na biso. Yehova akoki kotánga makambo oyo ezali na kati ya mitema na biso.—Yilimia 12:3; 17:10.
Na ndakisa, na kati ya Batatoli ya Yehova, ezali na bato mingi oyo bazali bato ya nsɔninsɔni mpe balobaka mingi te, bazali bato oyo balingaka kobenda likebi ya bato mosusu te. Mpo na bato ya ndenge wana, kosakola nsango malamu ndako na ndako ekoki kozala mokakatano monene. Kasi, lokola bazali na mposa ya kosalela Nzambe mpe kosalisa bazalani na bango, ata bato oyo bazalaka nsɔninsɔni bazali kosala makasi ya kokutana na bazalani na bango mpo na kosolola na bango masolo ya Biblia. Batatoli yango bakoki kokanisa ete bazali kosala mingi te mpe yango ekoki kolongola bango esengo. Motema na bango ekoki kotinda bango bákanisa ete mosala na bango ya kosakola ezali na ntina te. Kasi tondimi mpenza ete Yehova asepelaka na milende makasi oyo bazali kosala na mosala ya kosakola. Lisusu, bakoki koyeba te ntango nini mpe epai wapi mbóto ya solo oyo baloni ekokola mpe ekobota mbuma.—Mosakoli 11:6; Malako 12:41-44; 2 Bakolinti 8:12.
Batatoli mosusu bazali na maladi oyo esilaka te to bakómi mibange. Mpo na bato yango, kokende mbala na mbala na makita na Ndako ya Bokonzi ekoki kozala mpasi mingi. Ntango bazali kolanda lisukulu moko oyo ezali kolobela mosala ya kosakola, ekoki kotinda bango bákanisa ndenge bazalaki kosala liboso mpe ndenge balingi kosakola sikoyo, kasi mikakatano ya nzoto ezali kopekisa bango. Batatoli yango bakoki komona lokola nde bazali na ngambo mpo bazali kosala te ndenge oyo bazali kolinga. Kasi, bosembo na bango mpe ndenge bazali koyika mpiko ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Soki batikali sembo, akobosana soki moke te misala na bango ya sembo.—Nzembo 18:25; 37:28.
‘Tókitisa mitema na biso’
Ntango Yoane akómaki mobange, na ntembe te akangaki mpenza ntina ya boboto ya Nzambe. Kanisá lisusu makambo akomaki ete: “Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.” Lisusu, Yoane alendisi biso ete “[tókitisa] mitema na biso.” Yoane alingaki koloba nini?
Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi ete liloba ya Greke oyo ebongolami na “kokitisa motema” elimboli “kolongola moto kobanga, to kolongisa, to kosala ete moto mosusu andima makanisi na yo, to kondimisa moto likambo.” Na maloba mosusu, mpo na kokitisa mitema na biso, tosengeli kolongisa mitema na biso, tosengeli kondimisa yango ete Yehova alingaka biso. Ndenge nini?
Fritz, ndeko oyo tolobelaki liboso, azalaki nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na boumeli ya mbula koleka 25 mpe amonaki ete boyekoli ya moto ye moko ekoki kokitisa motema na ye ete Yehova alingaka ye. Alobi ete: “Nayekolaka Biblia mpe mikanda na biso mbala na mbala mpe na likebi mpenza. Yango esalisaka ngai natalelaka makambo ya kala te kasi namonaka polele na makanisi na ngai, bomoi malamu oyo ezali liboso. Ntango mosusu nalɛmbaka soki nakanisi makambo oyo eleká kala, mpe namonaka lokola Nzambe akoki kolinga ngai ata moke te. Kasi, mbala mingi, namonaka ete koyekola Biblia mbala na mbala elendisaka motema na ngai, ekolisaka kondima na ngai mpe esalisaka ngai nabatela esengo na ngai mpe natɛngatɛnga te.”
Ya solo, kotánga Biblia mpe komanyola likoló na makambo oyo tozali kotánga ekoki mbala mosusu kosilisa mikakatano na biso sikoyo te. Kasi ekoki kobongola lolenge na biso ya kotalela mikakatano yango. Soki totii makanisi ya Liloba ya Nzambe na kati ya mitema na biso, yango ekosalisa biso tókanisaka ndenge Nzambe akanisaka. Lisusu, soki tozali koyekola Biblia, yango ekosalisa biso tókola mpe tókanga ntina ya boboto ya Nzambe. Mokemoke, tokoki kondima ete Yehova apesaka biso foti te mpo na makambo oyo tosalaki na bomwana na biso mpe apesaka biso foti te mpo na mikakatano ya nzoto oyo tozali na yango. Ayebi ete mitungisi oyo tozali na yango, ezala ya makanisi to ya nzoto, biso moko bato tosalaki yango te mpe atalelaka mpenza likambo yango na bolingo nyonso.
Tokoloba boni mpo na Margarette oyo tolobelaki mwa liboso? Ntango ayebaki Yehova, boyekoli ya Biblia ememelaki ye mpe matomba mingi. Lokola Fritz, ye mpe ayebaki sikoyo soki kozala na tata elimboli nini. Kobondela esalisaki Margarette akɔtisa makambo oyo ayekolaki na motema. Alobaki ete: “Ya liboso, natalelaki Yehova lokola moninga na ngai ya motema, mpo namesanaki na baninga oyo bazalaki na bolingo, kasi namesanaki na tata ya bolingo te. Mokemoke, nayekolaki koyebisa Yehova ndenge oyo nazali koyoka na motema na ngai, mituna oyo nazalaki komituna, mitungisi na ngai mpe mikakatano na ngai mosusu. Nazalaki kosolola na ye mbala na mbala na kati ya libondeli mpe, nazalaki kosangisa makambo nyonso oyo nazalaki koyekola esika moko, na esika ezala na mobulu na motó na ngai. Nsima ya mwa ntango, ndenge na ngai ya kotalela Yehova ebongwanaki mpenza mpe lelo oyo nakakatanaka mpenza te mpo na kotalela ye lokola Tata na ngai ya bolingo.”
Mitungisi nyonso ekosila
Ntango nyonso oyo mokili oyo mabe ekoumela, moto moko te akoki kotya elikya ete mitungisi na ye nyonso ekosila. Mpo na baklisto mosusu, bakozala ntango nyonso na mitungisi to na makanisi ya komimona ete bazali na ntina te mpe bakozala ntango nyonso kolɛmba nzoto. Kasi tokoki komindimisa ete Yehova ayebi makanisi na biso malamu mpe mosala makasi oyo tozali kosalela ye. Akobosana soki moke te bolingo oyo tozali na yango mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.
Na mokili ya sika oyo ekoya mosika te, mokili oyo Bokonzi ya Masiya ekoyangela, bato nyonso ya sembo bakoki kolikya ete mitungisi nyonso ya mokili ya Satana ekosila. Ekozala mpenza kosikwama monene! Na ntango wana, tokomona makambo mosusu mingi oyo ekondimisa biso ete Yehova azali mpenza na boboto. Liboso ete ntango yango eya, tóndima ete “Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.”—1 Yoane 3:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
Yehova azali mokonzi ya makambo makasi te, kasi azali Tata ya bolingo, ya boboto mpe ya mawa.
[Elilingi na lokasa 31]
Koyekola Liloba ya Nzambe esalisaka biso tókanisa ndenge oyo ye akanisaka.