Baklisto bazali komonisa ezaleli ya boyambi bapaya kati na mokili oyo mokabwani
“Bongo, ekoki na biso konyangela bato na motindo yango ete tózala basalani na bango na misala na solo.”—3 YOANE 8.
1. Makabo nini ya kosepelisa Mozalisi asili kopesa bato?
“MOTO azali na likambo lileki oyo na malamu na nsé na moi te, bobele kolya mpe komela mpe kosepela. Zambi yango ekozala na ye elongo kati na mosala na ye na mikolo mikopesa Nzambe ye na nsé na moi.” (Mosakoli 8:15) Na maloba wana mosakoli Moebele ya ntango na kala ayebisi biso ete Yehova Nzambe alingi ete bato bázala bobele na nsai mpe na esengo te kasi lisusu azali kokokisa bamposa na bango kati na likambo yango. Na boumeli ya lisoló ya bato mposa moko ya ntina oyo ezali komonana epai ya bato nyonso ezali bongo mposa ya komisepelisa mpe ya kosakana.
2. (a) Lolenge nini bato babebisaki mokano oyo Yehova abongisaki mpo na bango? (b) Ebimisaki mbuma nini?
2 Lelo oyo tozali kofanda kati na mokili oyo emipesá na bisengo, mokili oyo kati na yango bato bamipesi na bolukiluki ya bisengo mpe mabaku ya kosepela. Bato mingi basili kokóma “balingi na bango moko, . . . balingi na bisengo na esika ya kozala balingi na Nzambe,” lokola Biblia esakolaki yango. (2 Timoté 3:1-4, NW) Ya solo, yango ezali mpenza kobebisama ya mokano oyo Yehova Nzambe abongisaki. Wana bolukiluki ya bisengo ekómi likambo ya ntina mingi, to na ntango mposa ya komisepelisa ekómi mokano bobele moko ya bomoi, bosepeli ya solo ezali lisusu te, mpe ‘nyonso ekómi bobele bisalasala mpe koluka kokwa [“kolanda,” NW] mopɛpɛ.’ (Mosakoli 1:14; 2:11) Mpo na ntina yango mokili motondi na bato oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko mpe básundolami, likambo oyo lizali mpe kobimisa mikakatano mingi kati na bato. (Masese 18:1) Bato bakómi kobangana moko na mosusu mpe bakabwani na ntina na mposo, na bikólo, na etɛlɛmɛlo mpe na ezalela ya nkita.
3. Lolenge nini tokoki kozwa esengo mpe bosepeli ya solo?
3 Oyo nde mbongwana soki bato bamekolaki Yehova kati na lolenge na bango ya kosala epai na basusu—kozala bato na boboto, bakabi, bayambi bapaya! Amonisaki polele ete sɛkɛlɛ́ ya esengo ya solo ezali te kati na milende na biso mpo na koluka kosepelisa bamposa ya biso moko. Nzokande, sɛkɛlɛ́ yango oyo: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Mpo na kozwa esengo mpe bosepeli ya solo, tosengeli kolónga bandelo mpe bokabwani oyo ekoki kopekisa biso. Mpe tosengeli kosunga baoyo bazali kosalela Yehova elongo na biso. Ezali likambo ya ntina mingi ete tólanda toli oyo: “Bongo, ekoki na biso konyangela bato na motindo yango ete tózala basalani na bango na misala na solo.” (3 Yoane 8) Komonisa ezaleli ya boyambi bapaya epai na baoyo babongi kozwa yango, na meko oyo ezalela na biso epesi biso nzela na yango, epesaka litomba na mitindo mibale—epesaka litomba na moto oyo akabi mpe na baoyo bakabɛli bango. Bongo, banani bazali kati na baoyo tosengeli ‘konyangela bango na boyambi malamu’?
“Kotalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali”
4. Mbongwana nini kati na mabota ezali komonana ata epai na basaleli mosusu ya Yehova?
4 Mabota ya makasi mpe mabala ya esengo mazali mingi te na mikolo na biso. Boyikani ya motángo ya mabala makabwani mpe bokóli ya motuya ya bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko esili mpenza kobongola lolenge oyo libota lizalaki liboso. Mpo na yango, mingi oyo bakómaki Batatoli ya Yehova na bambula oyo euti koleka bauti na mabota makabwani. Bazali bato oyo babomaki libala to bato bakabwani na babalani na bango, to lisusu bazali kati na mabota oyo etikali bobele na moboti moko. Lisusu, lokola Yesu asakolaki yango, solo oyo ateyaki biso ebimisaki bokabwani kati na mabota mingi.—Matai 10:34-37; Luka 12:51-53.
5. Maloba nini ya Yesu makoki kozala eutelo ya elendiseli mpo na baoyo bazali kati na mabota makabwani?
5 Ezalaka likambo ya esengo komona bato ya sika bazali kozwa ekateli makasi mpo na solo, mpe mbala mingi tobɔndisaka bango na elaka oyo ya kolendisa ya Yesu: “Nazali koloba na bino solo ete, soko moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala mokama na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.”—Malako 10:29, 30.
6. Lolenge nini tokoki kozala ‘bandeko mibali, bandeko basi, bamama, mpe bana’ epai na “bitike mpe basi bakufeli-mibali” oyo bazali kati na biso?
6 Bongo, banani bazali ‘bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana’ oyo balobelami? Bobele komona ebele na bato na Ndako ya Bokonzi, mbala mingi bato soko mokama to koleka, baoyo bazali komibénga ete bazali bandeko mibali mpe bandeko basi ekosala mbala moko te ete moto amona bango lokola bandeko mibali, bandeko basi, bamama mpe bana na ye. Tótalela likanisi oyo: Moyekoli Yakobo akundoli biso ete mpo na kosambela Yehova na lolenge oyo ekosepelisa ye, tosengeli ‘kotalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛtɔ na makambo na mokili.’ (Yakobo 1:27) Yango emonisi ete tosengeli te kotika ezaleli ya lolɛ́ndɔ ya bato na mokili na ntina na bozwi mpe bokabwani na ntina na etɛlɛmɛlo epekisa motema mawa na biso epai na “bitike mpe basi bakufeli-mibali.” Nzokande tosengeli kozwa likanisi ya kokɔtisa bango kati na boninga mpe boyambi na biso.
7. (a) Wapi mokano mpenza ya komonisa ezaleli ya boyambi epai na “bitike mpe basi bakufeli-mibali”? (b) Banani mpe bakoki kosangana na komonisa ezaleli ya boklisto oyo etali koyamba bapaya?
7 Komonisa boyambi epai na “bitike mpe basi bakufeli-mibali” esɛngaka ntango nyonso te kopesa biloko ya mosuni oyo mbala mosusu bakoki kozanga. Mabota oyo mazali bobele na moboti moko to basangani ya mabota oyo makabwani na makambo ya losambo bazalaka ntango nyonso te na bosɛnga ya mosolo. Nzokande, boninga malamu, esengo ya libota, boninga elongo na bato oyo bazali na mbula ekeseni, mpe kolya esika moko biloko kitoko ya elimo—nyonso wana ezali mitindo mikeseni ya bomoi ya libota oyo ekoki kopesa esengo mingi. Na yango, komikundola ete, ezali te kosala na boye ete bato bákamwa boike ya bilei, kasi elimo ya bolingo mpe ya bomoko nde ezali na motuya monene, oyo nde esengo soki, na bantango mosusu, ata “bitike mpe basi bakufeli-mibali” bakoki kosangana na likambo litali komonisa boyambi epai na baninga baklisto!—Kokanisá na 1 Mikonzi 17:8-16.
Ezali na bapaya kati na biso?
8. Mbongwana nini esili komonana kati na masangá mingi ya Batatoli ya Yehova?
8 Tozali kobika na ntango oyo bato mingi bazali kokenda kofanda na bamboka mosusu. Zulunalo World Press Review elobi ete: “Kati na mokili mobimba bato koleka milió 100 bazali kofanda kati na mikili epai bazali bana-mboka te, mpe milió 23 bakendaki na bitúká mosusu ya mboka na bango moko.” Yango esalaki ete na bisika mosusu, mingi mpenza kati na bingumba minene, masangá ya libota ya Yehova oyo kala masangisaki bato ya lomposo moko to bato ya ekólo moko mazali sikawa na bato bauti na biteni bikeseni ya mokili. Mbala mosusu ezali bongo na esika ozali kofanda. Bongo, lolenge nini tosengeli kotalela “bautá” mpe “bapaya” wana, lokola bato na mokili babéngaka bango, baoyo nkótá, mimeseno, mpe mitindo ya bomoi na bango mbala mosusu mikeseni na oyo ya biso?
9. Motambo nini ya mabe mokoki kobɛtisa biso libaku na ntina na “bautá” mpe “bapaya” oyo bazali koya kati na lisangá ya boklisto?
9 Na mokuse, tosengeli te kotika nzela na mimeseno ya koyina bapaya na lolenge nyonso, oyo ekoki kotinda biso na kokanisa ete tozali na lotómo ya koyeba solo koleka baye bauti na mboka moko ya bopaya oyo ekanisami ete ezali ya bapakano; tosengeli mpe te koyoka lokola nde bato wana oyo bauti kokóma bazali kobuka lotómo na biso ya kosalela Ndako ya Bokonzi to biloko mosusu. Ntoma Paulo asengelaki kokundwela baklisto mosusu ya ekeke ya liboso oyo bazalaki Bayuda, oyo bazalaki na makanisi lolenge yango, ete moto moko te azalaki na lotómo; ezalaki mpo na ngɔlu ya Nzambe nde ata moto nani akokaki kozwa kobikisama. (Baloma 3:9-12, 23, 24) Tosengeli kozala na esengo ete ngɔlu ya Nzambe ezali sikawa kokómela bato mingi oyo, na lolenge moko to mosusu, bapesamelaki libaku te ya koyoka nsango malamu. (1 Timoté 2:4) Lolenge nini tokoki komonisa ete bolingo na biso mpo na bango euti mpenza na motema?
10. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza bayambi ya “bapaya” oyo bazali kati na biso?
10 Tokoki kolanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Bónyangelana pelamoko Klisto asili konyangela bino mpo na nkembo na Nzambe.” (Baloma 15:7) Soki toyebi ete bato bauti na mboka mosusu to bakóli na bisika mosusu mbala mingi bapesamelaka ntómo te, tokomonisela bango boboto mpe tokomibanzabanza mpo na bango wana tozali na makoki ya kosala bongo. Tosengeli koyamba bango kati na biso, kotalela moko moko na bango lokola “moto abotami kati na bino,” mpe “okolinga ye lokola yo mpenza.” (Levitike 19:34) Yango ekoki mbala mosusu kozala likambo ya pɛtɛɛ te, kasi tokolónga soki tomikundoli toli oyo ete: “Bóbilaka makambo na ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.”—Baloma 12:2.
Bókabela babulami
11, 12. Likebi nini ya sikisiki lityamaki likoló na basaleli mosusu ya Yehova (a) na Yisalaele ya kala (b) na ekeke ya liboso?
11 Kati na baoyo tosengeli komonisela bango limemya mpe boyambi ezali bongo baklisto bakɔmɛli oyo bazali kosala mosala makasi mpo na bolamu na biso ya elimo. Na Yisalaele ya kala, Yehova asalaki ebongiseli moko ya sikisiki mpo na banganga mpe Balewi. (Mituya 18:25-29) Na ekeke ya liboso, baklisto balendisamaki mpo na kosunga baoyo bazalaki kosalela bango kati na mikumba minene ya mosala. Lisoló oyo lizali na 3 Yoane 5-8 epesi biso likanisi na ntina na boyokani makasi ya bolingo oyo ezalaki kati na baklisto ya liboso.
12 Ntoma Yoane oyo asilaki kokóma mobangé atalelaki na motuya mingi boboto mpe boyambi oyo Gayo amonisaki epai na bandeko mosusu oyo batindamaki ete batambolatambola mpo na kotala masangá. Bandeko wana—bakisá mpe Demeteli, mbala mosusu momemi ya nkomá yango—bazalaki bango nyonso bapaya to bato oyo liboso bayebanaki na Gayo te. Kasi bayambamaki malamu mpamba te “babimi mpo na nkombo [ya Nzambe].” Yoane amonisaki yango boye: “Bongo, ekoki na biso konyangela bato na motindo yango ete tózala basalani na bango na misala na solo.”—3 Yoane 1, 7, 8.
13. Lelo oyo, nani kati na biso abongi mpenza ‘konyangelama na boyambi’?
13 Lelo oyo, kati na lisangá ya Yehova, mingi bazali kosala mpenza milende makasi mpo na libota mobimba ya bandeko. Kati na bato yango, tokoki kotánga bakɛngɛli-batamboli, oyo bapesaka ntango mpe nguya na bango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kolendisa masangá; bamisionere, oyo batiki mabota na bango mpe baninga na bango mpo na kosakola nsango malamu na bamboka ya bopaya; baoyo bazali kosala na babetele to babiro ya filiale, baye bazali komipesa na bolingo nyonso mpo na kosimba mosala ya kosakola kati na mokili mobimba; mpe baoyo bazali kosala mosala ya babongisi-nzela, oyo bapesaka ntango mpe nguya na bango mingi kati na mosala ya kosakola. Baoyo nyonso basalaka mosala makasi, ezali te mpo na kozwa bango moko lokumu, kasi mpo na bolingo na bango epai na libota mobimba ya boklisto mpe mpo na Yehova. Babongi ete tómekola bango mpo na komipesa na bango na motema mobimba mpe babongi ‘koyambama na boyambi malamu.’
14. (a) Mpo na nini tokokómaka baklisto malamu mingi wana tomonisi ezaleli ya boyambi bapaya epai na basembwi? (b) Mpo na nini Yesu alobaki ete Malia aponaki “oyo malamu”?
14 Ntango “toyambi bato na lolenge yango na boyambi malamu,” lokola ntoma Yoane amonisi yango, “tozali basalani na bango na misala na solo.” Na lolenge mosusu yango ekómisi biso baklisto malamu mingi. Ezali bongo mpamba te misala ya boklisto misangisi mpe kosala malamu epai na baninga bandimi. (Masese 3:27, 28; 1 Yoane 3:18) Ezali mpe na mbano ya motindo mosusu. Ntango Malia mpe Malata bayambaki Yesu na ndako na bango, Malata alingaki komonisa ete azalaki moyambi malamu na kolambáká “biloko mingi” mpo na Yesu. Malia amonisaki ezaleli ya boyambi na motindo mosusu. “Afandaki na makolo na Nkolo koyoka maloba na ye,” mpe Yesu akumisaki ye mpamba te ye aponaki “oyo malamu.” (Luka 10:38-42) Kosolola mpe koyoka masoló ya baoyo basali bambula mingi ezalaka makambo ya ntina mingi ya mpokwa oyo bolekisi elongo na bango.—Baloma 1:11, 12.
Na ntango ya bilambo
15. Mabaku nini makoki kozala ntango ya esengo mpo na basaleli ya Yehova?
15 Atako baklisto ya solo balandaka te mimeseno ya bato to bakumisaka te biyenga mpe bilambo ya mokili oyo, bazalaka na mabaku oyo bakutanaka esika moko mpo na kosepela kati na bango. Na ndakisa, Yesu akendaki na elambo ya libala na Kana mpe abakisaki esengo ya elambo yango na kosaláká likamwisi ya liboso kuna. (Yoane 2:1-11) Bobele bongo lelo oyo, basaleli ya Yehova bazalaka na bantango ya kosepela elongo kati na mabaku motindo wana, mpe molulu oyo ebongi ebakisaka esengo ya bokutani ya lolenge yango. Nzokande, ebongi kosala nini?
16. Litambwisi nini tozali na yango na ntina na etamboli malamu ata na mabaku ya bilambo?
16 Boyekoli na biso ya Biblia eteyaka biso mitindá oyo mibongi na etamboli ya boklisto, mpe tolandaka yango ntango nyonso. (Baloma 13:12-14; Bagalatia 5:19-21; Baefese 5:3-5) Bilambo nyonso, ezala bilambo ya libala to bilambo oyo bisalemi mpo na ntina mosusu, bipesi biso nzela te ya kosundola mitindá ya boklisto to ya kosala likambo oyo tosalaka te; mpe tosɛngisami te kolanda mimeseno nyonso ya mboka epai tozali kofanda. Mingi ya mimeseno lolenge yango ezali na moboko likoló na biyambayamba ya mangomba, mpe mosusu ezalaka bongo na etamboli oyo ebongi soko moke te mpo na baklisto.—1 Petelo 4:3, 4.
17. (a) Makambo nini mamonisi ete elambo ya libala na Kana ebongisamaki mpe ekambamaki malamu? (b) Nini emonisi ete Yesu asepelaki na elambo yango?
17 Na kotángáká Yoane 2:1-11, ezali mpasi te komona ete elambo wana ezalaki monene mpe ete babyangami bazalaki mpenza mingi. Nzokande, Yesu mpe bayekoli na ye ‘babyangamaki’; bayaki te bobele na mokano na bango, atako ekoki kozala ete basusu kati na bango bayebanaki na moto oyo asalaki elambo. Tozali lisusu komona ete ezalaki na baoyo bazalaki “basáli” elongo na “mokóló na elambo,” oyo azalaki na mokumba ya kokabola bilei to kosala makambo mosusu. Nyonso wana emonisi ete makambo mabongisamaki malamu mpe makambamaki malamu. Lisoló yango lisuki na kolobáká ete na likambo oyo asalaki na elambo, Yesu “amonisi nkembo na ye.” Alingaki kopona libaku yango mpo na kosala bongo soki ezalaki elambo ya mobulu? Soko moke te.
18. Na makambo nini ebongi kokanisa malamu mpo na oyo etali bokutani nyonso oyo esangisi bato mingi?
18 Bongo, ezali boni soki tosengeli koyamba bato na mwa elambo moko? Tosengeli komikundola ete mokano ya koyamba basusu ezali ete “tózala basalani na bango na misala na solo.” Na yango, ebongi te koloba bobele ete elambo moko ezali bokutani ya “Batatoli.” Motuna mosengeli kotuna mozali oyo: Yango ezali solo litatoli na ntina na biso mpe na mateya oyo tondimaka? Tosengeli soko moke te kotalela bilambo motindo yango lokola mabaku mpo na komona kino wapi tokoki komekola mokili kati na banzela na yango, na komipesáká na “mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli.” (1 Yoane 2:15, 16) Na esika ete ezala bongo, mabaku wana masengeli komonisa na lolenge lobongi mokumba na biso ya Batatoli ya Yehova, mpe tosengeli kondimisama ete makambo oyo tozali kosala mazali kopesa nkembo mpe lokumu epai na Yehova.—Matai 5:16; 1 Bakolinti 10:31-33.
‘Bónyangelana na koimaima te’
19. Mpo na nini tosengeli “konyangelana na koimaima te”?
19 Lokola ezalela ya makambo ya mokili ezali sé kobeba mpe bato bazali kokabwanakabwana, tosengeli kosala nyonso ekoki na biso kosala mpo na koyeisa makasi bokangami kati na baklisto ya solo. (Bakolose 3:14) Mpo na ntina wana tosengeli “kolingana makasi,” lokola Petelo alendisi biso. Bongo, mpo na komonisa yango polele, alobi lisusu ete: “Bónyangelana na koimaima te.” (1 Petelo 4:7-9) Tozwaka likanisi ya kobyanga bandeko na biso, ya komipimela mpo na komonisa boboto mpe kosunga bango? To toimaimaka ntango libaku lolenge yango emonani? Soki toimaimi, tokolongola esengo nyonso oyo tokokaki kozwa mpe tokobungisa bolamu oyo ezwamaka na kosala malamu.—Masese 3:27; Misala 20:35.
20. Mapamboli nini mazali kozela biso soki tomonisi ezaleli ya boyambi bapaya kati mokili ya lelo oyo ekabwanikabwani?
20 Kosala mosala na boyokani elongo na baninga na biso baklisto, komonisana boboto mpe ezaleli ya boyambi, ekomema mapamboli mazangi nsuka. (Matai 10:40-42) Yehova alakaki na bato lolenge yango ete “akozipa bango. Bakoyoka nzala lisusu te, soko mposa na mai lisusu te.” Kozala na nsé ya hema ya Yehova elimboli kozwa libateli mpe boyambi na ye. (Emoniseli 7:15, 16; Yisaya 25:6) Ee, mosika te tokozala na libaku ya kosepela na boyambi ya Yehova mpo na libela.—Nzembo 27:4; 61:3, 4.
Okoki kolimbola?
◻ Nini tosengeli kobosana te soki tolingi kozwa esengo mpe bosepeli ya solo?
◻ Banani bazali “bitike mpe
basi bakufeli-mibali,” mpe lolenge nini tosengeli “kotalaka” bango?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela “bautá” mpe “bapaya” oyo bazali kati na biso?
◻ Lelo oyo banani babongi kopesamela likebi ya ntina mingi?
◻ Lolenge nini mabaku ya bilambo mazali komonisa elimo ya boyambi ya solosolo?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Na mabaku ya bilambo tokoki komonisa ezaleli ya boyambi epai na bapaya, bana bazangi batata, baoyo bazali kati na mosala ya ntango nyonso mpe babyangami mosusu