Totambola lokola basalani elongo kati na solo
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya mibale mpe mokanda ya misato na Yoane
BOYEBI ezali elembo ekesenisi basambeli na Jéhovah. (Yoane 8:31, 32; 17:17) Mpo na kobika, esengeli kotambola kati na solo na Nzambe. Basaleli na Nzambe basengeli mpe kotambola kati na solo.
Mokanda ya mibale mpe mokanda ya misato ya ntoma Yoane, oyo epemamaki na Nzambe, nyonso mibale elobeli “Kotambola kati na solo.” (2 Yoane 4; 3 Yoane 3, 4) Mokanda ya misato mozali mpe kolendisa biso na kozala “basalani elongo kati na solo.” (3 Yoane 5-8) Mikanda wana mibale mikomamaki mingi mpenza na Efese to na bamboka ya zingazinga na yango, pene na mobu 98. Kasi na eleko na biso, libota na Jéhovah lizali kozwa matomba mingi na makambo oyo mazali kati na yango.
Mokanda ya mibale na Yoane elobeli mingi likoló na solo
Mokanda ya mibale na Yoane elobeli liboso solo mpe bolingo, mpe ezali kopesa makebisi mpo na “motemeli na Klisto.” (Versets 1-7) Mokanda yango motindami epai na “mwasi moponami,” etindamaki mbala mosusu epai na moto moko. Nzokande, soko yango etindamaki na lisangá moko, “bana” ya mwasi yango ezali bongo baklisto oyo babotamaki na elimo, ‘baponami’ na Nzambe mpo na kozala na bomoi na likoló. (Baloma 6:16, 17; Bafilipi 3:12-14) Yoane azali na esengo mpo ete bamoko bazali ‘kotambola kati na solo’ mpe na bongo bazali kotemela lipengwi. Basengeli mpe komibatela na “motema na Klisto,” oyo azali koangana ete Yesu azalaki na bomoi kati na mosuni te. Na mikolo na biso, ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda makebisi oyo mazali kolobela lipengwi.
Na nsima, Yoane apesi batoli likoló na lolenge na kosala epai na bapengwi mpe asukisi na litómbeli mpo na moto na moto mpe apesi mbote. (Versets 8-13) Na nzela na misala lokola mosala ya kosakola, ye mpe bamosusu babotaki mbuma, oyo emonisami na kobongwana ya baoyo ye azali kokomela mokanda. Ezali bobele na ‘komisenzelaka’ bango moko kati na elimo nde ‘bakozwa mbano monene,’ oyo kati na yango ezali na “motólé” ya likoló oyo mobómbami mpo na baklisto bapakolami na sembo. (2 Timoté 4:7, 8) Soki moto oyo azali “koumela te kati na mateya na Klisto” ayei epai na bango, basengeli ‘koyamba ye na ndako te, mpe bakopesa ye mbote te,’ ete basangana na ye te kati na “misala na ye mabe.” Nsima na koyebisa elikya na ye ya kokende kotala bango mpe kolobana na bango na monoko, Yoane asukisi mokanda na ye na mboke.
Mokanda ya misato na Yoane elobeli mingi likoló na kosalana elongo
Mokanda ya misato na Yoane etindami epai na Gayo mpe ezali liboso kolobela misala na ye epai na baninga na ye kati na kondima. (3Yn Versets 1-8) Gayo azali ‘kotambola kati na solo’ na kokangamáká na mateya na boklisto na mobimba na yango. Azali mpe kosala “mosala na sembo” na kosalisáká bandeko oyo bazali bapaya. Yoane alobi ete: “Ekoki na biso koyamba bato na motindo yango ete tozala basalani elongo na bango kati na solo.” Na mikolo na biso, ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa boyambi motindo moko epai na bakengeli ya zongazonga.
Nsima na kokesenisa etamboli mabe ya Diotrefese mpe etamboli ya Demeteli, Yoane asukisi mokanda na ye. (Versets 9-14) Diotrefese, ye oyo azali na mposa na lokumu, azali ata na limemya moke te mpo na Yoane mpe azali nkutu komeka kobimisa na lisangá, baoyo bazalaki koyamba bandeko na boboto. Na kokesena, Demeteli azali ndakisa malamu mpo na kolanda. Mosika te, Yoane azali kolikya kozwa Gayo mpe asukisi mokanda na ye na mbote, na kotombeláká ye ete azala na kimya.
[Etanda/Elilingi na lokasa 30]
Na mai na mokanda mpe na ekomeli: Yoane: azalaki na mposa ya kokende kolala “mwasi moponami” mpe “bana” na ye na esika ete akomela bango makambo mingi “na mai na mokanda mpe na ekomeli.’’ Ntóma azalaki mpe na mposa ya komona lisumu Gayo na mikolo mizali koya, na esika ete akóba kokomela ye “na mai na mokanda mpe na ekomeli.” (2 Yoane 1, 12; 3 Yoane 1, 13, 14) Liloba na greke libóngolami na “ekomeli” (ka las mos) elimboli nzeté moke, to mbanzi moke, mpe mbala mosusu “mbanzi oyo esili kobongisama malamu.” Epai na Bagreke mpe Baboma, ekomeli wana ya mbanzi oyo ebongisamaki mwa nsongé mpe etyamaki nzelanzela lokola bansálá na ndeke. Liloba na greke mé lan, oyo libóngolami na “mai na mokanda,” ezali adjectif masculin mé las, oyo ekoki kopesama na moto moko to na eloko moko, mpe elimboli “moïndo.” Na ntango na kala, mai na mokanda mazalaki langi ya moïndo ya makála, to motindo na putulu oyo ezwami na mafuta matumbami to na nkóni oyo etumbami, ezala likála liuti na nzete to na nyama ezikisami. Mingimingi, mai na mokanda mazalaki kokaukisama makasi mpo na kobómba yango na lolenge na nzete to limpa; mpo nakosalela yango, mokomeli azalaki kokómisa yango maimai mpe azalaki kosalela mwa bolósi moke (pinceau) to mwa mbanzi moke mpo na kokoma. papier ya eleko wana ezali papalá mpe esalemaki na kosangisama ya ndambo mike na papyrus lokola nkasá. Baklisto ya liboso bazalaki kosalela Papier yango mpo na kotinda mikanda, kokoma barulo mpe ba codex.