Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge oyo Gayusi asalisaki bandeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2017 | Sanza ya 5
    • Ekoki kozala ete Gayusi azalaki nkulutu na lisangá, kasi mokanda yango emonisi yango polele te. Ntoma Yoane akumisaki Gayusi mpo na ndenge oyo azalaki koyamba bandeko na ndako na ye, atako ayebaki bango te. Ntoma Yoane amonaki yango lokola elembeteli oyo emonisaki ete Gayusi azalaki sembo, mpamba te koyamba bapaya ezali elembo oyo ekesenisaka basaleli ya Nzambe ná bato mosusu.​—Ebandeli 18:1-8; 1 Timote 3:2; 3 Yoane 5.

      Ndenge oyo ntoma Yoane akumisaki Gayusi mpo na ezaleli na ye ya koyamba bapaya emonisi ete bakristo bazalaki mbala na mbala kosala mibembo kolongwa na esika oyo ntoma Yoane azalaki tii na masangá mosusu. Na ntembe te, bandeko wana oyo bazalaki kosala mibembo bayebisaki Yoane makambo oyo bakutanaki na yango. Ekoki kozala na nzela wana nde ntoma Yoane azwaki nsango ya masangá yango.

      Kozanga ntembe, bakristo oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kolinga kofanda elongo na bandeko na bango bakristo. Bandako ya koyamba bapaya ezalaki na lokumu malamu te, bazalaki koyamba bato malamu kuna te, mpe eyebanaki ete ezali bisika ya bato ya pite mpe ya ekobo. Yango wana, soki likoki ezali, bato ya mobembo oyo bazalaki na bwanya bazalaki kofanda epai ya baninga na bango; bakristo oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kofanda epai ya bakristo mosusu.

  • Ndenge oyo Gayusi asalisaki bandeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2017 | Sanza ya 5
    • Ya misato, tosengeli komitya na esika ya bandeko na biso bakristo oyo bazali kosalela Yehova na bosembo atako bazali kokutana na botɛmɛli mpe tosengeli kopesa bango longonya mpo na bosembo na bango. Ntoma Yoane alendisaki mpenza Gayusi mpe akitisaki ye motema ete azalaki kosala oyo ezali malamu. Ndenge moko mpe, lelo oyo bankulutu basengeli kolanda ndakisa ya ntoma Yoane mpe kolendisa bandeko na bango mpo ‘básila makasi te.’​—Yisaya 40:31; 1 Batesaloniki 5:11.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto