Tosengeli kosala nini mpo ete tóbikisama?
MOKOLO mosusu moto moko atunaki Yesu ete: “Nkolo, bato bakobikisama bazali mingi te?” Yesu ayanolaki nini? Alobaki: ‘Ndimá bobele ngai lokola Nkolo mpe Mobikisi na yo, mpe okobikisama’? Te! Yesu alobaki ete: “Meká makasi kokɔta na ekuke na nkaká, mpo ete nalobi na bino ete, bato mingi bakomeka kokɔta mpe bakokoka te.”—Luka 13:23, 24.
Yesu azangaki kopesa eyano na motuna ya moto wana? Ezali bongo te, moto yango atunaki te soki ekozala mpasi mpo na kobikisama; atunaki nde soki motángo na bango bakobikisama mokozala moke. Na yango, Yesu amonisaki bobele ete na kokesana na oyo tokokaki mbala mosusu kokanisa, bato mingi te bakosala milende makasi mpo na kozwa mapamboli wana kitoko.
Batángi mosusu bakoki koloba ete, ‘Ezali yango te makambo oyo bayebisaki ngai.’ Bakoki kotánga maloba oyo mazwami na Yoane 3:16 oyo elobi ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami bobele moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” Nzokande toyanoli ete: ‘Bongo, tosengeli kondima nini? Ete Yesu azalaki solo na bomoi? Ezali bongo. Ete azali Mwana ya Nzambe? Ya solo! Mpe lokola Biblia ezali kobyanga Yesu “Moteyi” mpe “Nkolo,” tosengeli kondima mpe mateya na ye, kotosa ye, mpe kolanda ye, boye te?’—Yoane 13:13; Matai 16:16.
Kolanda Yesu
Ah, ezali awa nde mokakatano mozali kobima! Bato mingi oyo balobaki na bango ete “basili kobikisama” bazali mpenza komonisa mposa makasi te ya kolanda to ya kotosa Yesu. Ee, mokonzi moko ya lingomba ya Protestá akomaki ete: “Ya solo, kondima na biso kati na Klisto esengelaki kolandana. Kasi koloba ete yango esengeli kolandana mpenzampenza, kozanga ntembe, endimami soko moke te kati na Biblia.”
Na kokesana, Biblia etángi misala ya mbindo oyo mizali kosalema mingi epai na bato mosusu oyo bakanisaka ete “basilá kobikisama.” Na ntina na moto moko oyo akóbaki na etamboli lolenge yango, epesaki baklisto etindá ete: “Benganá moto yango mabe na kati na bino.” Ya solo, Nzambe alingaki te ete bato mabe bábebisa lisangá na ye ya boklisto!—1 Bakolinti 5:11-13.
Bongo, kolanda Yesu elimboli nini, mpe lolenge nini tokoki kosala yango? Yesu asalaki nini? Azalaki moto na mbindo? moto na pite? molangwi masanga? mobuki na nkuta? moto na mombongo oyo azangi kolongobana? Soko moke te! Okoki kotuna ete, ‘Kasi, nasengeli bongo kolongola makambo oyo nyonso na bomoi na ngai?’ Mpo na kozwa eyano, tótalela Baefese 4:17 kino 5:5. Yango elobi te ete Nzambe akondima biso ata soki tosalaka makambo motindo nini. Nzokande, eyebisi biso ete tosengeli kokesana na mabota ya mokili oyo mazali ‘koyoka mawa te, . . . Bino boyekolaki Klisto bongo te . . . Bólongola motindo na bino oyo ekangami na ezaleli na bino na liboso . . . Moyibi ayiba lisusu te . . . Tiká te ete bóloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na Babulami . . . Bóyeba likambo oyo solo ete, moto na pite mpe moto na bosoto mpe moto na elulela (ye mosambeli na bikeko) azali na libula te kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe.’
Tozali bongo kolanda Yesu awa tomeki komitambwisa ata moke te engebene ndakisa na ye? Tosengeli bongo kosala makasi mpo ete bomoi na biso ezala lokola ya Klisto, boye te? Motuna wana ya ntina mingi motunamaka mbala mokomoko to mpe soko moke te na bato oyo balobaka, lokola trakte moko ya lingomba elobaki ete: “Yaká epai na Klisto sikawa—bobele lokola ozali.”
Moko na bayekoli ya Yesu akebisaki ete bato na kotuka Nzambe oyo “bakobalolaka ngɔlu na Nzambe na biso kino bosoto, bakoangana ye Mokonzi moko mpenza mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.” (Yuda 4) Bongo, lolenge nini tokoki kobalola ngɔlu na Nzambe “kino bosoto”? Tokoki kosala bongo na kokanisáká ete mbeka ya Klisto ekozipa masumu oyo tozali kokóba kosala na nkó na esika ete elongola masumu oyo mauti na kozanga kokoka oyo tozali kosala milende mpo na kotika yango. Ya solo, tokolinga te kondima makanisi ya moko ya bapalanganisi ya nsango malamu oyo ayebani mingi na Amerika, oyo alobaki ete ezali na ntina te ete “omipɛtɔla, otika, to obongwana.”—Kesenisá na Misala 17:30; Baloma 3:25; Yakobo 5:19, 20.
Kondima epusaka na mosala
Bayebisaki bato mingi ete mpo na “kondima Yesu” esengeli kosala bobele eyambweli moko mpamba mpe esɛngi te ete kondima na biso ezala makasi mpo ete ekoka kopusa biso na komonisa botosi. Kasi Biblia endimi likanisi yango te. Yesu alobaki te ete bato oyo babandi bomoi ya boklisto nde bakobika. Nzokande, alobaki ete: “Ye oyo akoumela kino nsuka akobika.” (Matai 10:22) Biblia ezali kokokanisa bomoi na biso ya boklisto na emekaneli ya mbangu, oyo mbano na yango ya nsuka ezali bongo kobikisama. Mpe ezali kopesa elendiseli oyo: “Bópota mbangu ete bózwa na solo.”—1 Bakolinti 9:24.
Na yango, “kondima Klisto” ezali kosɛnga makambo mingi koleka likambo ya kondima bobele mapamboli oyo mbeka ya motuya monene ya Yesu ezali kopesa. Ezali kosɛnga botosi. Ntoma Petelo alobi ete kosambisa ezali kobanda “na Ndako na Nzambe,” mpe abakisi ete: “Soko nde ebandi awa na biso, nsuka na bango baboyi Nsango Malamu na Nzambe ekozala nini?” (1 Petelo 4:17) Na yango tosengeli te kosuka bobele na koyoka mpamba mpe kondima mpamba. Biblia elobi ete tosengeli “kozala nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, komizimbisa [biso] mpenza.”—Yakobo 1:22.
Nsango euti na Yesu ye moko
Emoniseli, búku ya Biblia ezali na bansango euti na Yesu, oyo epesamaki na nzela ya Yoane epai na masangá nsambo ya ekeke ya liboso. (Emoniseli 1:1, 4) Yesu alobaki ete lokola basangani ya masangá wana basilaki “kondima” ye, ekoki bobele bongo? Te. Akumisaki misala na bango, molende mpe mpiko na bango mpe alobelaki bolingo, kondima mpe mosala na bango ya kosakola. Kasi alobaki ete Zábolo akotya bango na komekama mpe ete basengelaki kozwa libonza “lokola ebongi na misala na moto na moto.”—Emoniseli 2:2, 10, 19, 23.
Bongo Yesu alobelaki mokumba monene koleka oyo ntálo monene ya bato basosolaki yango ntango bayebisaki bango ete kobikisama na bango ezalaki “mosala oyo mosili” nokinoki nsima wana “bandimaki” ye na likita moko ya lingomba. Yesu alobaki ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tiká ete amiboya ye moko mpe atombola [nzeté na ye ya mpasi, NW] mpe abila ngai. Zambi ye nani alingi kobikisa bomoi na ye akobebisa yango. Nde ye nani akobebisa bomoi na ye mpo na ngai, akozwa yango.”—Matai 16:24, 25.
Komiboya biso moko? Kolanda Yesu ntango nyonso? Yango ekosɛnga milende. Ekobongola bomoi na biso. Nzokande, Yesu alobaki mpenza ete basusu kati na biso tokoki nkutu ‘kobungisa milimo na biso’—kokufa mpo na ye? Ee, kondima lolenge yango ekouta bobele na boyebi ya makambo kitoko oyo okoki koyeba na boyekoli ya Liloba ya Nzambe. Yango emonanaki polele na mokolo oyo Sɛtɛfanɔ abomamaki na mabángá na bato ya milende mabe ya lingomba oyo “bakokaki koleka mayele na [elimo ezalaki] ye koloba na yango te.” (Misala 6:8-12; 7:57-60) Mpe kondima lolenge yango esili komonisama na ntango na biso epai na bankóto ya Batatoli ya Yehova oyo bakufaki na bakáa ya bakangami ya Nazi na esika ya kobebisa lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia.a
Molende ya boklisto
Tosengeli kokangama makasi na kondima na biso ya boklisto, mpamba te, na bokeseni na oyo osili mbala mosusu koyoka na bandakonzambe mosusu to na baemisyó ya televizyó oyo elobelaka makambo ya losambo, Biblia ezali koloba ete tokoki kopɛngwa. Ezali kolobela baklisto oyo babungaki “nzela na sembo.” (2 Petelo 2:1, 15) Tosengeli bongo ‘koluka nzela na kobika na biso na nsɔ́mɔ mpe na kolɛnga.’—Bafilipi 2:12; 2 Petelo 2:20.
Baklisto ya ekeke ya liboso, bato oyo bayokaki mpenza Yesu mpe bantoma na ye, bateyaki lolenge wana, basosolaki likambo yango na lolenge wana? Ee. Bayebaki ete basengelaki kosala likambo. Yesu alobaki ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
Sanza mibale nsima wana Yesu alobaki makambo oyo, bato 3000 babatisamaki bobele na mokolo moko. Motángo na bandimi mobakisamaki nokinoki kino 5000. Baoyo bandimaki bateyaki basusu. Ntango monyoko mosalaki ete bápalangana epai na epai, yango esungaki bobele na kopalanganisama ya nsango na bango. Biblia elobi te ete bobele mwa ndambo oyo bazalaki liboso kasi “baoyo bapalanganaki bakei epai na epai kosakoláká Nsango Malamu.” Mibu soko 30 na nsima, ntoma Paulo akokaki bongo kokoma ete nsango malamu esilaki “kosakolama epai na bato nyonso na nsé na Likoló.”—Misala 2:41; 4:4; 8:4; Bakolose 1:23.
Paulo abongolaki bato te, na motindo oyo bapalanganisi nsango ya Televizyó basalaka, na kolobáká ete: ‘Ndimá Yesu sikawa, mpe okobikisama mpo na libela.’ Azalaki mpe te na endimiseli oyo ya mokonzi moko ya lingomba na mboka États-Unis oyo akomaki ete: “Wana ezalaki ngai naino mwana moke, . . . nasilaki kobikisama.” Mibu koleka 20 nsima wana Yesu ye moko asilaki kopona Paulo mpo na komema nsango epai na bato na mabota, ntoma wana oyo amipesaki mingi na mosala akomaki ete: “Nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.”—1 Bakolinti 9:27; Misala 9:5, 6, 15.
Kobikisama ezali likabo oyo Nzambe azali kopesa na lisombi te. Ekoki kozwama na lisombi mpe te. Nzokande, ezali kosɛnga ete tósala milende mpo na kobikisama. Soki moto moko akabeli yo eloko moko ya motuya mingi mpe soki omonisi mpenza botɔ́ndi te ya kozwa yango mpe komema yango, kozanga botɔ́ndi na yo ekoki mbala mosusu kopusa mopesi ete akaba yango na moto mosusu. Makila ya Yesu Klisto oyo masopamaki mazali mpenza na motuya monene? Yango ezali likabo oyo lipesami na lisombi te, kasi tosengeli komonisa botɔ́ndi ya mozindo mpo na yango.
Baklisto ya solo bazali na etɛlɛmɛlo ya bato babikisami na boye ete basili kondimama liboso na Nzambe. Lokola etuluku, kobikisama na bango ezali likambo ya solo. Moko moko na bango asengeli kokokisa masɛngami ya Nzambe. Nzokande, tokoki kokwea, mpamba te Yesu alobaki ete: “Soko nani akoumela kati na ngai te, akobwakama lokola etape mpe akokauka.”—Yoane 15:6.
‘Liloba ya Nzambe lizali na bomoi’
Bosololi oyo ezali na ebandeli ya lisoló ya liboso esalemaki esili koleka penepene na mibu 60. Johnny azali kino lelo kondima ete kobikisama ekoya bobele na nzela ya Yesu Klisto, kasi ayebi ete tosengeli koluka yango. Andimisami mpenza makasi ete Biblia ezali komonisa eutelo bobele moko ya elikya mpo na bato mpe ete tosengeli koyekola búku wana ya kokamwa, kopusama na yango, mpe kotika yango ekamba biso na misala ya bolingo, ya kondima, ya boboto, ya botosi mpe ya mpiko. Asili kobɔkɔla bana na ye ete bándima mpe makambo yango, mpe sikawa azali na esengo mingi ya komona bango kobɔkɔla mpe bana na bango na lolenge yango. Mposa na ye ezali ete bato nyonso bázala na kondima motindo moko, mpe azali kosala nyonso ekoki na ye mpo na kokɔtisa yango na mitema mpe makanisi ya bato mosusu.
Wana apemamaki na Nzambe, ntoma Paulo akomaki ete “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopotu koleka mimpánga nyonso mipeli bipai mibale.” (Baebele 4:12) Yango ekoki kobongola bomoi ya bato mingi. Yango ekoki kopusa na misala ya sembo oyo misalemi na bolingo, na kondima mpe na botosi. Kasi osengeli te kosuka bobele na “kondima” na makanisi oyo Biblia ezali koloba. Yekolá yango mpe tiká ete ezala na bopusi likoló na motema na yo. Tiká ete mayele na yango matambolisa yo. Batatoli ya Yehova ya bolingo malamu soko 5000000 na bamboka koleka 230 bazali komipesa mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na bandako na bato kozanga kosɛnga lifuti. Mpo na komona oyo okoki kozwa kati na boyekoli yango, tindá nkomá epai na babimisi ya zulunalo oyo. Kondima mpe elendiseli oyo okozwa ekosepelisa yo mingi!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na búku na ye The Nazi State and the New Religions: Five Case Studies in Non-Conformity, Dr. Christine E. King ayebisi ete: “Moko kati na Batatoli [ya Yehova] mibale ya mboka Allemagne akangamaki na bolɔ́kɔ, moko likoló na minei abungisaki bomoi na ye.”
[Etanda na lokasa 7]
Mpo na nini “Tosengeli kobunda makasi mpo na kondima”?
Mokanda ya Yuda etindamaki epai na “babyangami . . . , babatelami mpo na Yesu Klisto.” Ezali koloba ete lokola basilaki ‘kondima Yesu,’ kobikisama na bango ezwamaki libela? Te, Yuda ayebisaki na baklisto motindo yango na “kobundela bindimeli.” Apesaki bango bantina misato mpo na kosala bongo. Ya liboso, Nzambe “abikisi bato na mokili na Ezipito,” kasi na nsima, mingi kati na bango batangwaki mosika. Ya mibale, ata baanzelu batombokaki mpe bakómaki bademó. Ya misato, Nzambe abomaki Sɔdɔmɔ mpe Gɔmɔla na ntina na misala ya mbindo oyo mizalaki kosalema kati na yango. Yuda amonisi masoló wana ya Biblia lokola “elakiseli ya kokebisa.” Ee, ata bandimi “babatelami mpo na Yesu Klisto” basengeli kokeba ete bámitangola te mosika na kondima.—Yuda 1-7.
[Etanda na lokasa 8]
Oyo wapi nde ezali solo?
Biblia elobi ete: “Moto akolónga mpo na kondima, akolónga mpo na misala na Mibeko te.” Yango elobi lisusu ete: “Moto akolónga mpo na misala na ye mpe bobele mpo na kondima te.” Oyo wapi nde ezali solo? Tozali kolóngisama na nzela ya kondima to na nzela ya misala?—Baloma 3:28; Yakobo 2:24.
Eyano oyo eyokani na Biblia ezali ete makanisi yango nyonso mibale mazali sembo.
Na boumeli ya bikeke mingi Mobeko oyo Nzambe apesaki na mabɔkɔ ya Mose mozalaki kosɛnga na basambeli ya Nzambe Bayuda ete bápesa bambeka mpe makabo ya sikisiki, bákumisa mikolo ya bilambo, mpe bátosa masɛngami matali bilei mpe makambo mosusu. “Misala ya Mibeko” lolenge yango, to na mokuse “misala,” mizalaki lisusu na ntina te nsima wana Yesu apesaki mbeka ya kokoka.—Baloma 10:4.
Kasi likambo oyo ete mbeka ya Yesu oyo ezalaki na motuya monene ekitanaki misala wana oyo misalemaki na nsé ya Mibeko ya Mose elingaki koloba te ete tosengeli kobosana mitindá ya Biblia. Yango elobi ete: “Na koleka mpenza, makila na Klisto, . . . makopɛtɔla lisosoli na biso longwa na misala na kufa kino mosala kosalela Nzambe na bomoi.”—Baebele 9:14.
Lolenge nini tozali “kosalela Nzambe na bomoi mosala”? Biblia eyebisi biso makambo oyo tosengeli kobundisa; misala ya nzoto, kotɛlɛmɛla mbindo ya mokili, mpe kopɛngola mitambo na yango. Yango elobi ete: ‘Tóbundaka etumba malamu na kondima,’ tólongola “bipekiseli nyonso ya masumu mazali kokanga biso,” mpe “tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima.” Mpe Biblia ezali kolendisa biso na ‘kozala pɛtɛpɛtɛ te to na bolɛmbu te kati na milimo na biso.’—1 Timoté 6:12; Baebele 12:1-3; Bagalatia 5:19-21.
Tokosombitinya te likoki na biso ya kobikisama na kosaláká makambo wana, mpamba te moto moko te akoki kosala makambo oyo makokani na motuya ya mapamboli ya kokamwa motindo wana. Nzokande, tokobonga te kozwa likabo ya nkembo wana, soki tozangi komonisa bolingo mpe botosi na biso na kosaláká makambo oyo Biblia elobi ete Nzambe mpe Klisto balingi ete tósala yango. Soki misala mimonisi te kondima na biso, tokokoka te komonisa ete tozali kolanda Yesu, mpamba te Biblia elobi polele ete: “Bongo na kondima, soki ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza.”—Yakobo 2:17.
[Elilingi na lokasa 7]
Yekolá Biblia mpe tiká ete yango ezala na bopusi likoló na yo