Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova asepelaka na mosala na yo mosalami na molimo mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Sanza ya 10
    • 5. Na lolenge nini ndakisa ya bantoma ezali komonisa ete bato nyonso basengeli kosala lolenge moko te kati na mosala ya kosakola?

      5 Kosala na molimo mobimba elingi nde koloba ete biso nyonso tosengeli kosala ndenge moko kati na mosala ya kosakola? Ezali bongo te, mpamba te bizalela mpe makoki ekeseni engebene moto na moto. Tótalela bantoma ya sembo ya Yesu. Bango nyonso bazalaki na likoki ya kosala ndenge moko te. Na ndakisa, toyebi bobele mwa makambo moke na ntina na bantoma mosusu, lokola Simona moto na Kanana mpe Yakobo mwana na Alafai. Mbala mosusu misala na bango lokola bantoma ezalaki mingi te. (Matai 10:2-4) Na bokeseni, Petelo azalaki na likoki ya kondima mikumba minene​—na ntina yango, Yesu apesaki ye kútu “mafungola ya bokonzi”! (Matai 16:19) Nzokande, Petelo atombolamaki likoló ya basusu te. Ntango Yoane azwaki emonaneli ya Yelusaleme ya sika kati na Emoniseli (soko na mobu 96 T.B.), amonaki mabanga 12 ya moboko mpe likoló na yango ‘nkombo na bantoma zomi na mibale’ ekomamaki.a (Emoniseli 21:14) Yehova atalelaki mosala ya bantoma nyonso na motuya, atako emonani polele ete bamoko bazalaki na likoki ya kosala mingi koleka basusu.

  • Yehova asepelaka na mosala na yo mosalami na molimo mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Sanza ya 10
    • a Lokola Matia akitanaki Yuda Mokeliota lokola ntoma, ezali nkombo na ye nde​—kasi oyo ya Paulo te—​ebimaki kati na oyo emonanaki likoló na mabanga 12 ya moboko. Atako Paulo azalaki ntoma, kasi azalaki moko ya ba 12 te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto