”Tika moyoki aloba ete: ‘yaka!”
Na boumeli nyonso ya mbula oyo ezali koya, kati na mikili mpe bisanga koleka 200, ba Témoins de Jéhovah bakosala na boyokani na mokapo na bango ya mbula 1991: ‘TIKA MOYOKI ALOBA ETE ”YAKA!”
’’Elimo mpe mwasi na libala balobi ete: ‘Yaka!’ Tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.’’—EMONISELI 22:17.
1. “Mai” nini oyo tobyangami mpo na koya komela?
“YAKA!” bazali koloba na yo, kasi mpo na kosala nini? Ezali bongo mpo na kosilisa mposa na yo ya komela. Nzokande, mai oyo bakopesa yo ekozala mai ya mpamba te lokola mai nyonso mosusu; ekozala mai oyo Yesu Klisto alobelaki yango, wana elobaki ye epai na mwasi Mosamalia, penepene na libulu na mai ete: “Nde ye oyo akomela mai makopesa ngai epai na ye, libela akoyoka mposa lisusu te; kasi mai makopesa ngai ye makokoma liziba na mai kati na ye kopunzwapunzwa kino bomoi na seko.” (Yoane 4:14) “Mai” wana Yesu azwaki yango epai wapi?
2. Liziba na “mai” wana ezali wapi, mpe nsima na makambo nun yango ebandaki kobima?
2 Liziba oyo epai “mai” wana mazalaki kouta elakisamaki epai na Yoane na emonaneli. Kosololaka mpo na libaku wana kitoko, ntoma alobi kati na Emoniseli 22:1 ete: “Atalisi ngai ebale na mai na bomoi, kitoko lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate.” Na yango, liziba na mai wana oyo ekokani na kulusatala, oyo ezali na biloko bikopesaka bomoi, ezali mosusu te bobele Mobandisi ya bomoi, Jéhovah ye moko, oyo azali kokabola yango na nsima na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. (Tala Emoniseli 21:6.) Liloba “kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate” emonisi ete mai na bomoi ebandaki kobima nsima na kosalema ya Bokonzi na Masiya, na 1914, elingi koloba nsima na ebandeli ya mokolo na Nkolo—Emoniseli 1:10.
3, 4. “Mai” oyo malimboli nini, mpe nani akoki komela yango?
3 Mai na bomoi mazali elilingi ya nini? Ezali elilingi ya bibongiseli bikamatami na Nzambe mpo ete bato bakoka kozala na bomoi libela, kati na kokoka, na mabelé oyo ekobongwana paradis. Mai na bomoi elakisi bongo bibongiseli bikamatami na nsima na Yesu Klisto na ntina na bomoi. Tokoki kozwa litomba na bibongiseli nyonso wana lelo? Te, mpamba te esengeli naino liboso ete Nzambe aboma libela mokili oyo mabe mpe akanga mokonzi na yango oyo azangi komonana, Satan le Diable. Nzokande, likoki ezali na biso na komela “mai” oyo mazali komonana na eleko na biso, na koyokaka nsango malamu na Bokonzi mpe na kotosaka, elingi koloba na koyokanisa bomoi na biso na makambo oyo tozali koyekola—Yoane 3:16; Baloma 12:2.
4 Nsima na kolakisa ye ‘ebale na bomoi,’ Yesu ayebisi na Yoane ntina mpo na yango atindaki anzelu na ye elongo na emonaneli. Na nsima Yoane ayoki kosakolama oyo: “Elimo mpe mwasi na libala balobi ete: ‘Yaka!’ Tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Tala ntina nini basaleli na Nzambe bazali kobyanga baoyo bazali na mposa na komela ete baya ‘komela’ na bibongiseli oyo Nzambe asili kokamata, na nsima na Mwana na Mpate, mpo na kopesa bango nzela na kozala na bomoi libela na libela na mabelé.—Yoane 1:29, 3
Mposa na mai na bomoi ekomi makasi koleka
5. Ndenge nini bato bakomaki kino kooka mposa ya kozala na ebongiseli oyo euti na Nzambe?
5 Likambo na mawa, baboti na biso ya yambo batikalaki te na nzela oyo ekokaki kopesa epai na bakitani na bango, libota mobimba na bato, likoki ya kofanda libela na libela katina paradis, mpe yango kati na kokoka. Mpo ete bato bakoka kosepela na bomoi na seko, esengelaki ete Adam, ekelamu na mayele, asalela Nzambe na botosi nyonso; ezalaki wana nde boponi oyo asengelaki kosala. Nzokande, na bopusi ya ekelamu moko ya elimo oyo akomaki motomboki, Eva atengemisaki nzela ya makambo nyonso na epai oyo esengelaki komemela bato liwa. Mobali na ye, moto na kokoka, aponaki kolanda ye kati na nzela na ye ya libebi. Na nsima Adam apesaki bomoi na mabota mosusu ya bato; ezali bongo ye nde moto akɔtisaki liwa kati na libota na bato. Tala ntina totongaka kati na Biblia ete: “Na bongo, mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Ezali bobele nsima na kokwea kati na lisumu nde Adam mpe Eva babandaki kobakisa basangani ya sika kati na libota na bato.—Nzembo 51:5.
6. Mpo na nini Jéhovah akamataki bibongiseli mpo ete bato bakoka komela “mai” oyo?
6 Makambo wana masengelaki mpenza kopekisa Nzambe libela mpo ete akokisa mokano na ye te, oyo ete mabelé makomi paradis etondi na bato ya kokoka? Biblia epesi mpenza eyano ete te. Na yango, mpo ete mokano wana ekoka kokokisama Jéhovah ezwaki ebongiseli moko etondi na bolingo oyo esengelaki kopesa nzela na kobongisa mbeba oyo libunga na Adam ekotisaki. Ebongiseli yango eyokani mpenza na boyengebene mpe na bosembo, oyo Nzambe azali momonisi na yango ya solo mpe ya kokoka. Na nzela na “ebale na mai na bomoi,” Jéhovah akopesa bomoi ya kokoka epai na bato na bomoi, baoyo, na ntina na libunga na Adam, bazangi lotomo ya kobelema pene na Liziba na bomoi. Ebale yango ekotyola mpenzampenza na boumeli ya Boyangeli na mbula nkoto na Yesu Klisto. Na boumeli nyonso ya eleko wana, bato nyonso, bakisa basekwi, basengeli komela na “ebale na mai na bomoi.”—Ezekiele 47:1-10; Misala 24:15, 7
7. Ebongiseli etali “mai” yango etongami likoló na nini?
7 Jéhovah alingaka bomoi, mpe ezali kosepelisa ye kopesa bomoi ya bososoli epai na bato mpe na bikelamu na ye mosusu. Bibongiseli oyo akamataki na ntina na bomoi bitongami likoló na mbeka na lisiko na Yesu. (Malako 10:45; 1 Yoane 4:9, 10) Na yango esengeli kobakisa Liloba na Nzambe, oyo Biblia ezali kobenga yango mbala mosusu ete “mai.” (Baefese 5:26) Na bongo Jéhovah Nzambe akoki koloba: “Yaka!” epai na bikelamu na ye ya bomoto baoyo babungisaki mbano ya bibongiseli bikamatamaki na ebandeli na ntina na babalani ya liboso kati na bato, Adam mpe Eva.
Kelasi na mwasi na libala elobi ete: “Yaka!”
8. Ntango nini mpe na nani “mai” oyo mapesamaki liboso?
8 Baoyo bazali bato na liboso mpo na koloba ete: “Yaka!” ezali baklisto oyo basali bongo mwasi na elilingi na Mwana na Mpate, mobotami ya liboso kati na bana na Jéhovah na elimo. (Emoniseli 14:1, 3, 4; 21:9) Mwasi na Klisto na elimo azali komiloba na ye moko te ete: “Yaka!”, elingi koloba na bato oyo Jéhovah Nzambe asengelaki lisusu koyanganisa mpo ete basangani 144 000 na kelasi na mwasi na libala bakoka bango nyonso. Maloba oyo mazali nde kolobama epai na bato oyo bazali na elikya ya kokoma na bomoi na kokoka awa na mabelé nsima na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Uta 1914, mbula oyo mikolo na nsuka na biloko na ntango oyo ebandaki, bato bakokaki koyoka libyangi oyo euti na “mwasi na libala,” elongo na elimo santu na Nzambe.
9. Ndenge nini toyebi ete “mai” wana mazali bobele mpo na mwa ndambo moke na bate te?
9 Kati na mokanda ya nsuka ya Biblia, tozali koyoka na esengo nyonso ete “ebele monene oyo moto akoki kotanga motuya na bango te” bakondima kosakolama ya nsango malamu na Nzambe mpe bakozwa ekateli makasi mpo na kokotela boyangeli yango. (Emoniseli 1:9, 10, 16, 17) Ozali kati na ebele monene wana? Soki ee, “tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!”
Elimo mpe mwasi na libala balobi ete: “Yaka!”
10. Mai na elilingi mazali kouta wapi, mpe mpo na nini tokoki koloba bongo?
10 Kasi, mpo na nini balobeli Nzambe te mpe mobali na libala te kati na Emoniseli 22:17? Toyeba, liboso mpenza ete, atako mokapo eyebisi sikisiki te na litambwisi ya nani elimo ezali kosala, nzokande lokola elobelami mpo na elimo, yango etindi biso kokanisa na Jéhovah Nzambe. Lokola azali mpenza Liziba ya elimo santu, Tata azangi esika te kati na esakweli wana. Na nsima, lokola alobi yango ye moko, Mwana azali kosala mpenza elongo na Tata na ye: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala.” (Yoane 5:19) Lisusu, atako “Yaka!” wana ezali liloba lipemami oyo euti mpenza epai na Jéhovah Nzambe, bato bakoki kozwa litambwisi na Nzambe, “maloba mapemami,” na nzela na Yesu Klisto, “Liloba.” (Emoniseli 22:6; tala 22:17, Traduction du monde nouveau, ebimeli na Anglais oyo ezali na ba références, 1984, note na nse na lokasa ete: “elimo to maloba mapemami;” Yoane 1:1.) Na yango, ebongi mpenza ete tokotisa Klisto, Mobali na libala, kati na libyangi wana. Tokoki bongo kondimisama ete, na kosalelaka elimo, Tata na Mobali na libala, Jéhovah Nzambe, mpe Mobali na libala ye moko, Yesu Klisto, bamitii esika moko na “mwasi na libala” mpo na koloba ete: “Yaka!”
11, 12. (a) Nini emonisaki uta ebandeli ete libyangami ya Emoniseli 22:17 esengelaki kopesama na bato mosusu? (b) Ndenge nini yango ekomaki polele koleka na boumeli ya bambula?
11 Na boumeli ya mibu mingi, libyangi yango epesamaki epai na bato oyo bazalaki na mposa na “mai na bomoi.” Uta 1918, kelasi na mwasi na libala ebandaki kosakola nsango oyo etalaki mpenza bato babyangami mpo na kofanda na mabelé. Nsango yango, esakolamaki na nzela na diskur moko oyo motó na likambo na yango ezalaki “Bamilió na bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te,” ezalaki kopesa elikya oyo ete: ebele na bato bakobika na Armagedon mpe na nsima, bakopesamela likoki ya kozwa bomoi na seko kati na Paradis na mabelé, na nse na boyangeli na Bokonzi na Masiya na Nzambe. Kasi, nsango yango ezalaki koyebisa na sikisiki te eloko nini basengelaki kosala mpo na kobika, bobele likambo litali kosalela boyengebene.
12 Mpo ete ebele na bato bayoka libyangi yango, na 1922, toli oyo eyebisamaki epai na baoyo nyonso balingaki kosalela Nzambe ete: “Bosakola Mokonzi mpe Bokonzi.” Na 1923, kelasi na mwasi na libala ekangaki ntina ete “bampate” mpe “bantaba” oyo lisese na Yesu ezwami kati na Matai 25:31-46 ezali kolobela, basengelaki komonana liboso na Armagedon. Na nsima, na 1929, ekokaki kokangama kati na La Tour de Garde ya 15 mars, ebimeli na Anglais, lisolo moko oyo ezalaki na motó na likambo ete “Libyangi na boboto.” Lisolo wana etongamaki likoló na mokapo ya Emoniseli 22:17 mpe ezalaki komonisa ete ezalaki mokumba na kelasi ya mwasi na libala na koloba ete: “Yaka!”—Nkasa 87-89.a
Bampate mosusu basangani elongo na baoyo bazali koloba ete: “Yaka!”
13, 14. Bingengiseli nini mosusu bipesamaki kati na ba mibu 1930 mpo na likambo oyo ete bato mosusu basengelaki komela mai na elilingi?
13 Lisusu, kobanda 1932, La Tour de Garde ezalaki komonisa ete “bampate mosusu” bazali mpe na mokumba ya koloba ete: “Yaka!” (Yoane 10:16) Ekokaki kotangama kati na nimero ya ler Août, na ebimeli ya Anglais, na lokasa 232, paragrafe 29 ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazali sikawa na molende lokola Yehu mpe basengeli kolendisa kelasi na Yonadabe (bampate mosusu) na kosangana esika moko na bango mpo na kosakola epai na bato ete Bokonzi na Nzambe ebelemi.” Mokapo ya Emoniseli 22:17 etangamaki, mpe na nsima elobamaki ete: “Tika ete bapakolami balendisa baoyo nyonso bakosangana na mosala ya kosakola nsango malamu ya bokonzi. Bato yango bazali na mposa te ete bapakolama na Nkolo mpo na kosakola nsango na ye. Ezali elendiseli makasi mpenza mpo na ba Témoins de Jéhovah na koyeba uta sikawa ete ndingisa epesameli bango mpo na komema mai ya bomoi na kelasi moko ya bato oyo bakoki kobika na Armagedon mpe kozwa bomoi na seko awa na mabelé, mpo na boboto mingi na Jéhovah.”b
14 Kobanda na 1934, batikali na bapakolami bayebisaki ete bampate mosusu basengeli komipesa na Nzambe mpe komonisa polele likabo ya bomoto na bango na kozwaka batisimo, mpe na nsima kosangana na kelasi ya mwasi na libala mpo na koloba ete: “Yaka!” epai na bato mosusu oyo bazali na mposa na komela. Libyangi wana ya polele mpe ya sikisiki esakolami na kelasi ya mwasi na libala ezalaki na mokano ya koyanganisa bampate mosusu kati na “etonga bobele moko,” na nse na litambwisi ya “mobateli na mpate bobele moko,” Yesu Klisto. (Yoane 10:16) Na 1935, na ntango ya assemblée moko monene, batikali bapakolami basepelaki mingi na koyoka ete kelasi na “bampate” oyo bango bazalaki kobyanga ete: “Yaka!” ezalaki nde “ebele monene” oyo balobelami kati na Emoniseli 7:9-17. Tala likambo oyo epesaki elendiseli makasi na mosala ya kosakola.
15. Mokumba nini “elimo” ekokisaki kati na libyangami oyo lizwami na Emoniseli 22:17?
15 Na kolobaka ete: “Yaka!”, kelasi na mwasi na libala ezalaki kosala na bomoko elongo na elimo santu na Nzambe. Ya solo, ezali na nzela na elimo na ye nde Jéhovah azalaki koyebisa ndimbola ya bisakweli bizwami kati na Lilob na ye, likambo oyo epusaki batikali na kelasi na mwasi na libala na kosakola libyangi wana. Epai mosusu, bisakweli oyo likoló na yang libyangi wana ezwaki moboko na yango epemamaki na elimo santu na Nzambe. Na yango, ezalaki mpenza elimo na Nzambe oyo, kosalaka na nzela na Klisto mpe ya mwasi na libala ezalaki koloba ete: “Yaka!” epai na ebele monene ya bampate.—Emoniseli 19:10.
16. Mpo na oyo etali libyangami liyebisami kati na Emoniseli 22:17, boyokani nini bozali kati na elimo mpe mwasi na libala?
16 Lelo lisusu, elimo mpe mwasi na libala, oyo emonisami na batikali, ’’bazali koloba ntango nyonso ete: ‘Yaka!’’’ Batikali bazali kolendisa bampate mosusu ete baloba: “Yaka!” epai na bato mosusu; mpamba te bampate basengeli kobatela mpo na bango moko te “mai na bomoi” oyo mazali komonana lelo. Basengeli kotosa na etinda oyo ya “elimo mpe (ya) mwasi na libala”: “Tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!’” Baoyo bazali koya komela mpo na kosilisa mposa na bango basengeli kosakola libyangi epai na bato banso mpe na bisika nyonso, kozanga koponapona loposo, ekolo, lokota to lingomba ya bato oyo bakokutana na bango. Kozanga kosenga lifuti, ba Témoins de Jéhovah bazali kobyanga mpe kosalisa bato ya bikolo nyonso na komela “mai na bomoi” oyo ezali komonana na eleko na biso.
17. “Mai” nini mapesameli biso lelo?
17 Na yango, awa na mabelé mobimba, Mwana na Mpate, Yesu Klisto, azali kokamba ebele monene “epai na mitó na mai na bomoi.” (Emoniseli 7:17) Na esika ete ebebisama, mai wana na peto, na mpio mpe ezali kopesa bolamu mazwami mpenzapenza na Liziba. Koleka boyebi na solo ya Biblia, mai wana ya elilingi malimboli bibongiseli nyonso oyo Nzambe asili kokamata na nsima na Yesu Klisto mpe oyo, uta sikawa, etye ebele monene kati na nzela ya bomoi na seko kati na kokoka mpe na bisengo.
Oyo ezali ntango ya kosangana esika moko na baoyo bazali koloba ete: “Yaka!”
18. Na molende nini libyangami esakolami lelo?
18 Ebele monene bazali uta lelo bamilió mingi, kati na mabelé mobimba oyo bato bafandi, mpe bazali kokoba kosakola na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi. Sanza na sanza, bato yango bazali kopesa rapport ya mosala oyo bazali kosala kati na mikili mpe bisanga 212. Ntango nyonso oyo Jéhovah Nzambe, Nkolo ya ntango akozala na motema petee mpe motema molai na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka ya biloko mabe, bakokoba kosakola nsango malamu na Bokonzi. Wana ngonga ekokoka, Nzambe akoyeba ete ntango ekomi mpo na ye ete okokisa elaka na ye, oyo ezongelamaki mbala mingi kati na bisakweli na Biblia: akolakisa epai na bato nyonso ete azali Jéhovah.—Ezekiele 36:23; 38:21-23; 39:7.
19. Mpo na nini tokoki koloba ete “mai” yango makabolami ofelé?
19 Na yango, lokola ntango ezali naino, ebele monene bazali kosangana na esengo nyonso elongo na batikali na mwasi na libala mpo na koloba ete: ‘Yaka komela mai na bomoi elongo na biso, kozanga kofuta eloko!’ Basakoli ya nsango malamu oyo na ‘lobiko bazali kokokisa mosala na bango kozanga kosenga lifuti: bazali kosenga mosolo te mpo na mosala oyo bazali kokokisa na kopalanganisa nsango ya Bokonzi kati na mokili mobimba.
20. Lokola “mai” wana makoki kozwama na bisika nyonso, yango ekozala na bopusi nini?
20 Lelo oyo mai na bomoi mazali komonana na mabelé mobimba, na boye ete baoyo balingi komela bakoki komela mpo na kosilisa mposa na bango, mpe kozwa lobiko. Mpamba te, bato basikolami bakozala na bomoi na seko na mabelé mabongwani paradis, likambo oyo ekokokisa mokano kitoko na Jéhovah. Nzambe na biso akelaki mabelé mpamba te, kasi mpo ete ekoma elanga monene, Edene moko to Paradis ya bisengo efandami na bato ya kokoka, baoyo bazalisami na lolenge mpe na elilingi na ye.
21. Ndenge nini mokano na Nzambe na ntina na mabelé ekokokisama?
21 Oyo nde lokumu monene mpe esengo mingi koleka mpo na kozala na bomoi kati na mokili wana ya sika! Mokumba oyo Nzambe apesaki epai na babalani ya liboso kati na bato ekokokisama na mobimba na yango mpenza. (Genese 1:27, 28) Atako mpasi ezwaki libota na bato, nzokande lisalisi monene na Jéhovah ekopesa nzela ete mabelé eyangelama, elingi koloba ekoma paradis, mpe etonda na bato ya kokoka. Nzambe akomona biloko nyonso oyo akelaki mpe tala ete yango ekozala malamu mingi. Okozala wana na eleko yango? Soki yango ezali mposa na yo, esengeli na yo uta sikawa komonisa boyambi na yo mpo na nsango malamu na kokamataka mai ya bomoi, kozanga lifuti. “Yaka!” balobi na yo, mpo ete omela malamu mpe osilisa mposa na yo ya mai wana na bomoi oyo esili kobanda kotyola mpe ekotyola lisusu mingi koleka na boumeli ya boyangeli na Mbula Nkoto. Tika ete moto nyonso oyo akoyoka libyangi oyo ya elengi mingi aloba ete: “Yaka!”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na makambo mosusu, tala oyo ekokaki kotangama kati na lisolo yango: “Solo esakolama naino boye te na boumeli ya mibu oyo ya nsuka . . . Batikali bazali komemela bango nsango yango ya kosepelisa mpe bazali koloba na bango ete: ‘Tika moto na mposa na komela aya, oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.’ Elobami na bango ata bakoki uta sikawa kozwa ekateli mpo na Nkolo mpe kotelemela Diable, mpe bakozwela yango matomba malamu. Ezali kelasi na bato wana nde bazali lelo na likoki ya koluka bopolo mpe boyengebene, ete babatelama na mokolo oyo akomonisa nkunda na ye, mpe ete bantina Armagedon mpo na kozala na bomoi libela na libela. kozanga kokufa. (Sof. 2:3) . . . Kelasi na batikali na sembo ezali na bomoko mpe na kosakola libyangi oyo na boboto mpe koloba ete: ‘Yaka!’ Nsango yango esengeli kosakolama mpo na baoyo bazali koluka boyengebene mpe solo. Ezali na eleko na biso nde yango asengeli kosakolama.”
b La Tour de Garde ya 15 Août 1934, ebimeli ya Anglais, ezalaki koyebisa mpe mokumba ya bampate mosusu mpe elobaki, na lokasa 249, na paragrafe 31 ete: “Kelasi na Yonadabe ezali kati na baoyo ‘bazali koyoka’ nsango na solo mpe baoyo basengeli koloba na moto nyonso oyo akoki koyoka yango ete: “‘Yaka!” Tika moyoki aloba ete: “Yaka!” Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.’ (Emon. 22:17) Atako bazali ba Témoins de Jéhovah bapakolami na elimo te, basangani na kelasi na Yonadaba basengeli kosalisa elimo oyo bazali kati na kelasi ya elilingi na Yehu, elingi koloba bapakolami, mpe kosakola nsango ya Bokonzi.”
Bozongeli
◻ “Mai” nini malobelami kati na Emoniseli 22:17?
◻ Liziba na “mai” yango ezali nini?
◻ Mpo na nini bato bazali na mposa ya “mai” yango, mpe ebandaki kotyola ntango nini?
◻ Kati na Emoniseli 22:17, kolobelama na ntina na “elimo” emonisi nini, mpe mokumba nini “mwasi na libala” azali kokokisa?
◻ Nani akoki komela “mai” yango, mpe bopusi na yango ezali nini?