Bózala batangi ya esengo ya mokanda ya emoniseli
“Esengo na ye oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe na baoyo bazali kotosa makambo oyo ekomami kati na yango.”—EMONISELI 1:3, NW.
1. Ntoma Yoane azalaki na esika nini mpe na ezalela nini ntango akomaki mokanda ya Emoniseli, mpe mpo na nini akomaki bimonaneli yango?
“NGAI Yoane . . . nazalaki na esanga ebyangami Patamo mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” (Emoniseli 1:9) Ntoma Yoane azalaki na esika wana mpe na ezalela wana ntango akomaki mokanda ya Emoniseli. Ekoki kozala ete batindaki ye na Patamo ntango Amperɛrɛ Domitien azalaki mokonzi na Loma (81-96 T.B.). Domitien asalaki ete bato bámipesa mingi na kosambela amperɛrɛ mpe akómaki konyokola baklisto. Ntango Yoane azalaki na Patamo, azwaki bimonaneli mingi mpe akomaki yango nyonso. Akomaki yango mpo na kobangisa baklisto ya ekeke ya liboso te, kasi mpo na kopesa bango makasi, kobɔndisa bango, mpe kolendisa bango mpo na minyoko oyo bazalaki kokutana na yango mpe oyo ezalaki liboso na bango.—Misala 28:22; Emoniseli 1:4; 2:3, 9, 10, 13.
2. Mpo na nini baklisto ya mikolo oyo basengeli kotalela malamu makambo oyo Yoane na bandeko na ye baklisto bakutanaki na yango?
2 Makambo oyo esalemaki ntango bakomaki mokanda ya Emoniseli ezali na ntina mingi mpo na baklisto lelo oyo. Yoane azalaki konyokwama mpo azalaki motatoli ya Yehova mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Yoane na baklisto mosusu bayinamaki mpamba te baboyaki kosambela amperɛrɛ, atako bazalaki kosala nyonso oyo mwanamboka ya malamu asalaka. (Luka 4:8) Lelo oyo, na mikili mosusu baklisto ya solo bazali kokutana na makambo ya ndenge wana. Na mikili yango, Leta amipesi lotomo ya kokata makambo nini “ebongi mpo na losambo.” Yango wana, maloba ya ebandeli ya mokanda ya Emoniseli ezali mpenza kobɔndisa. Elobi boye: “Esengo na ye oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe na baoyo bazali kotosa makambo oyo ekomami kati na yango; mpo ete elaka ekómi pene.” (Emoniseli 1:3, NW) Ya solo, bato oyo bazali kotánga na likebi mpe bazali kotosa makambo oyo ekomami na Emoniseli bakoki kozwa bolamu ya solosolo mpe mapamboli mingi.
3. Emoniseli oyo Yoane amonaki eutaki mpenzampenza epai ya nani?
3 Mokanda ya Emoniseli ezali na maloba ya nani, mpe asalelaki banani mpo na koyebisa yango? Vɛrsɛ ya liboso elobi na biso boye: “Oyo emoniseli ya Yesu Klisto, epesaki Nzambe ye mpo na kotalisa baombo na ye makambo makobima noki. Atindi anzelu na ye mpo na koyebisa Yoane, moombo na ye, yango.” (Emoniseli 1:1) Na maloba ya polele, mokanda ya Emoniseli euti epai ya Yehova Nzambe; apesaki yango na Yesu, mpe Yesu atindaki anzelu moko ayebisa yango Yoane. Soki tokɔti mwa moke na bozindo, tokomona ete Yesu asalelaki mpe elimo santu mpo na kopesa nsango na masangá mpe lisusu mpo na kolakisa Yoane bimonaneli.—Emoniseli 2:7, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22; 4:2; 17:3; 21:10; talá Misala 2:33.
4. Tii lelo oyo, Yehova azali kosalela banani mpo na kotambwisa bato na ye awa na mabelé?
4 Tii lelo oyo, Yehova asalelaka Mwana na ye, “mokonzi ya lisangá,” mpo na koteya basaleli na ye awa na mabelé. (Baefese 5:23, NW; Yisaya 54:13; Yoane 6:45) Yehova asalelaka mpe elimo na ye mpo na koteya bato na ye. (Yoane 15:26; 1 Bakolinti 2:10) Se ndenge Yesu asalelaki “moombo na ye Yoane” mpo na kopesa bilei ya elimo na masangá ya ekeke ya liboso, lelo oyo azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba “bandeko” na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé mpo na kopesa basaleli na ye mpe baninga na bango “bilei [ya elimo] na elaka na yango.” (Matai 24:45-47; 25:40) Baoyo bazali koyeba moto oyo azali kopesa ‘makabo malamu,’ elingi koloba bilei ya elimo oyo tozali kozwa mpe bato oyo Ye azali kosalela mpo na kopesa yango, bazali na esengo.—Yakobo 1:17.
Masangá oyo Klisto azali kotambwisa
5. (a) Bakokanisi masangá ya baklisto na bakɛngɛli na yango na nini? (b) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, makambo nini ekoki kopesa biso esengo?
5 Na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Emoniseli, bamonisi masangá ya baklisto lokola bisika oyo batyaka miinda. Bongo bakɛngɛli ya masangá yango bakokanisi bango na baanzelu (bamemi-nsango) mpe na minzoto. (Emoniseli 1:20)a Mpo na ye moko, Klisto ayebisaki Yoane akoma boye: “Oyo azali kosimba minzoto yango nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpe azali kotambola na kati na bitɛmɛlo na mwinda na wolo yango nsambo, alobi boye.” (Emoniseli 2:1) Bansango oyo batindaki na masangá nsambo ya Azia emonisi ete na ekeke ya liboso T.B., masangá na bankulutu na yango bazalaki na makambo malamu, kasi bazalaki mpe na bolɛmbu na bango. Lelo oyo mpe ezali se ndenge yango. Yango wana, mpo tózala na esengo mingi, tosengeli kobosanaka te ete Klisto, Mokonzi na biso, azali na kati ya masangá. Ayebi malamu mpenza makambo nyonso oyo ezali koleka na masangá. Ntango balobi ete bakɛngɛli bazali “na lobɔkɔ na ye ya mobali,” ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa ete azali komona bango, azali kotambwisa bango mpe akosambisa bango na ndenge oyo bazali kobatela masangá.—Misala 20:28; Baebele 13:17.
6. Eloko nini emonisi ete Klisto akosambisa kaka bakɛngɛli te?
6 Kasi, tómikosa te na kokanisa ete Klisto akosambisa kaka bakɛngɛli na makambo oyo bazali kosala. Na moko ya bansango na ye, Klisto alobaki boye: “[Masangá, NW] nyonso bakoyeba ete ngai moluki kati na makanisi na mitema, mpe nakopesa bino lokola ebongi na misala na moto na moto.” (Emoniseli 2:23) Maloba yango ezali kokebisa mpe kolendisa mbala moko. Ezali kokebisa ete Klisto ayebi makanisi oyo ezali na kati ya mitema na biso; ezali mpe kolendisa mpamba te ezali kondimisa biso ete Klisto azali komona milende oyo tozali kosala mpe akopambola biso soki tozali kosala oyo tokoki mpenza.—Malako 14:6-9; Luka 21:3, 4.
7. Ndenge nini baklisto ya Filadelefi ‘babatelaki liloba ya Yesu’ mpo na koyika mpiko?
7 Nsango oyo Klisto atindelaki lisangá ya Filadelefi na etúká ya Ludia ezali na maloba ya kopamela te. Kasi, alakaki likambo moko oyo esengeli mpenza kosimba mitema na biso. “Mpo ete obateli maloba na mpiko na ngai, ngai mpe nakobatela yo na ntango ya komekama oyo elingi kobimela mokili mobimba, mpo na komeka bango bazali kofanda na mokili.” (Emoniseli 3:10) Maloba ya Greke oyo ebongolami na “obateli maloba na mpiko na ngai” ekoki mpe kolimbola “obateli makambo oyo nalobaki na likambo etali koyika mpiko.” Vɛrsɛ 8 emonisi ete baklisto ya Filadelefi batosaki mibeko ya Klisto mpe lisusu, balandaki toli oyo apesaki bango ete báyika mpiko na bosembo nyonso.—Matai 10:22; Luka 21:19.
8. (a) Yesu alakaki baklisto ya Filadelefi likambo nini? (b) Lelo oyo banani bazali na “ntango ya komekama”?
8 Yesu alobaki lisusu ete akobatela bango na “ntango ya komekama.” Toyebi te soki maloba yango elingaki mpenza koloba nini mpo na baklisto ya ntango wana. Atako minyoko ekitaki mwa moke nsima ya liwa ya Domitien na mobu 96 T.B., minyoko engalaki lisusu na boyangeli ya Trajan (98-117 T.B.), ekoki kozala ete mpasi ebakisamaki lisusu. Kasi “ntango ya komekama” monene ezali nde na “mokolo ya Nkolo” na “ntango ya nsuka,” oyo tozali sikoyo. (Emoniseli 1:10; Danyele 12:4, NW) Baklisto bapakolami na elimo bamekamaki makasi ntango oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki kosalema mpe nsima ya etumba yango. Kasi, “ntango ya komekama” esuki naino te. Komekama yango ezali kozwa “mokili mobimba,” na ebele monene, baoyo bazali na elikya ya kobika na bolɔzi monene. (Emoniseli 3:10; 7:9, 14, NW) Tokozala na esengo soki ‘tobateli maloba ya Yesu mpo na mpiko.’ Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”—Matai 24:13.
Bazali kotosa bokonzi ya Yehova na esengo
9, 10. (a) Emonaneli ya kiti ya bokonzi ya Yehova esengeli kotinda biso na kosala nini? (b) Ndenge nini botángi ya Emoniseli ekoki kopesa biso esengo?
9 Ndenge oyo mokapo 4 na mokapo 5 elobeli emonaneli ya kiti ya bokonzi ya Yehova mpe tribinale na ye kuna na likoló esengeli mpenza kokamwisa biso. Ebele ya bikelamu ya nguya oyo bazali kuna na likoló bazali kosanzola Yehova mpe bazali kotosa bokonzi na Ye ya sembo na esengo nyonso, makambo yango esengeli mpenza kosimba mitema na biso. (Emoniseli 4:8-11) Tosengeli kosangisa mingongo na biso na oyo ya baoyo bazali koloba ete: “Na mofandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate, masanzoli, na nkembo, na makasi, libela na libela.”—Emoniseli 5:13.
10 Yango elingi koloba ete tosengeli mpenza kotosa Yehova na makambo nyonso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soko bokoloba nini, soko bokosala nini, bósalaka nyonso na nkombo na Nkolo Yesu, kopesáká Nzambe Tata matɔndi mpo na ye.” (Bakolose 3:17) Tokozala na esengo mingi ntango tozali kotánga mokanda ya Emoniseli soki na makanisi mpe na mitema na biso tozali kondima bokonzi ya Yehova, mpe soki tozali kotalela mokano na ye na makambo nyonso oyo tozali kosala na bomoi na biso.
11, 12. (a) Ndenge nini ebongiseli ya Satana awa na mabelé ekoningana mpe ekobomama? (b) Na kolanda Emoniseli mokapo 7, nani “akotɛlɛma” na ntango wana?
11 Mpo moto moko to mpe bato nyonso bázala na esengo, basengeli kotosa bokonzi ya Yehova na esengo. Etikali moke, koningana ya mabelé ekoningisa mokili ya Satana mpe ekoboma yango. Bato oyo baboyi kotosa Bokonzi ya Klisto, elembo ya boyangeli ya Nzambe, bakozanga esika ya kobombama. Esakweli elobi boye: “Bakonzi na mokili, na bato minene, na mikóló na bakapitene, na bazwi, na bato makasi, na bato nyonso, baombo mpe bansomi, bamibombi na kati na madusu, na mabanga na ngomba, koloba na ngomba mpe na mabanga ete, Kweá na likoló na biso, mpe bombá biso na miso na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe na nkɛlɛ na Mwana ya Mpate, mpo ete Mokolo Monene na nkɛlɛ na ye eyei, mpe nani akoki kotɛlɛma?”—Emoniseli 6:12, 15-17.
12 Na motuna oyo, na mokapo oyo elandi, ntoma Yoane alobi ete ebele monene oyo babiki na bolɔzi monene “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana ya Mpate.” (Emoniseli 7:9, 14, 15) Lokola batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe, elakisi ete bazali kondima kiti ya bokonzi yango mpe bazali kotosa bokonzi ya Yehova. Yango wana, Yehova azali kondima bango.
13. (a) Bato mingi oyo bafandi na mokili bazali kosambela nini, mpe elembo na elongi mpe na lobɔkɔ na bango elimboli nini? (b) Mpo na nini ekosengela tóyika mpiko?
13 Lisusu, mokapo 13 elobi ete bato mosusu oyo bazali awa na mabelé bazali kosambela nyama ya yauli: elingi koloba ebongiseli ya politiki ya Satana. Bazali kozwa elembo na “elongi” to na “lobɔkɔ,” yango ezali kolakisa ete bazali kondima ebongiseli yango na makanisi mpe na misala na bango. (Emoniseli 13:1-8, 16, 17) Na nsima, mokapo 14 ebakisi ete: “Soko moto moko akosambela Nyama, na ekeko na ye, mpe akokamata elembo na elongi na ye soko na lobɔkɔ na ye, ye mpe akomela vinyo na kongala na Nzambe, oyo etyami bobele yango, na mai te, kati na kɔpɔ na nkɛlɛ na ye . . . Oyo awa ntina na mpiko na bapɛtwi, baoyo bakotosaka malako na Nzambe mpe kondima na Yesu.” (Emoniseli 14:9, 10, 12) Lokola mikolo ezali kokende, motuna oyo ekozala se kotunama: Ozali na ngámbo ya nani? Ozali na ngámbo ya Yehova mpe bokonzi na ye to na ngámbo ya ebongiseli ya politiki oyo emonisami na elilingi ya nyama ya yauli? Baoyo bazali koboya kozwa elembo ya nyama mpe bazali kotosa bokonzi ya Yehova na bosembo nyonso bakozala na esengo.
14, 15. Nsango nini ekati Emoniseli oyo ezali kolobela Armagedon, mpe yango elimboli nini mpo na biso?
14 Bakonzi ya “mokili mobimba” bazali kolɛngɛla etumba mpo na kowela boyangeli ya mokili mobimba na Yehova. Etumba yango ekozala na Armagedon, “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, 16) Ntango Yoane azali kotala emonaneli ya bakonzi ya mokili oyo bazali koyangana mpo na etumba na Yehova, likambo moko ya kokamwa esalemi. Mbala moko, Yesu amonani mpe alobi ete: “Talá! Nakoya lokola moyibi. Esengo na oyo akɛngɛli mpe abateli bilamba na ye, ete atambola bolumbu te mpe amona nsɔni te.” (Emoniseli 16:15) Likambo yango ekoki kotinda biso na kokanisa Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla tempelo. Soki bakuti moko na bango alali na ntango oyo asengeli kokɛngɛla, bazalaki kolongola ye bilamba mpe koyokisa ye nsɔni na miso ya bato nyonso.
15 Ezali polele ete soki tolingi kobika na Armagedon, tosengeli kolala mpɔngi ya elimo te mpe tosengeli kobatela bilamba na biso ya elilingi oyo ezali kolakisa biso lokola Batatoli ya sembo ya Yehova Nzambe. Tokozala na esengo soki tozali ntango nyonso makasi na elimo mpe soki tozali ntango nyonso na molende mpo na kosakola “nsango malamu ya seko” ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali sikoyo koyangela.—Emoniseli 14:6.
‘Esengo na moto nyonso oyo azali kobatela maloba yango’
16. Mpo na nini mikapo ya nsuka ya Emoniseli esengeli mpenza kosepelisa biso?
16 Batangi ya mokanda ya Emoniseli bakosepela mingi na botángi ya mikapo ya nsuka oyo elobeli elikya malamu oyo tozali na yango: likoló ya sika na mabelé ya sika, elingi koloba bokonzi ya sembo oyo ekoyangela bato ya sika mpe ya pɛto, nyonso mpo na lokumu ya “Yehova Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 21:22) Nsima ya bimonaneli yango ya kokamwa, anzelu ayebisaki Yoane boye: “Maloba oyo mazali sembo mpe solo. Nkolo Nzambe [ya maloba oyo elimo santu epesi basakoli, NW] atindi anzelu na ye kotalisa baombo na ye makambo makoki na yango kobima noki. Talá! Nakoya noki. Esengo na oyo akotosaka maloba na kosakola na mokanda oyo.”—Emoniseli 22:6, 7.
17. (a) Elikya nini bapesi biso na Emoniseli 22:6? (b) Tosengeli kokebaka ete tóboya likambo nini?
17 Batangi ya esengo ya mokanda ya Emoniseli bakobosana maloba yango te, yango ekokani na maloba oyo elobamaki na ebandeli ya “rulo.” (Emoniseli 1:1, 3, NW) Maloba yango ezali kondimisa biso ete “makambo” nyonso oyo esakolami na mokanda ya nsuka na Biblia ‘makobima noki.’ Ntango ya nsuka esili koumela mpe tozali komona ete etikali moke makambo oyo esakolami na mokanda ya Emoniseli ebanda kosalema mpe kolandana nokinoki. Yango wana, tómikosa te na kolala mpɔngi soki tomoni ete makambo esali lokola kobonga na mokili ya Satana. Motangi oyo azali na ekɛngɛ akobosana te makebisi oyo batindelaki masangá nsambo ya Azia mpe akokeba ete akwea te na makambo lokola kolinga biloko ya mokili, losambo ya bikeko, pite mpe ekobo, kokóma mpiɔ na elimo, mpe kolanda bato oyo bateyaka lipɛngwi.
18, 19. (a) Yesu asengeli koya naino mpo na kosala nini, mpe Yoane alobelaki elikya nini oyo tozali na yango? (b) Yehova ‘akoya’ naino mpo na nini?
18 Na mokanda ya Emoniseli, Yesu alobi mbala mingi ete: “Nazali koya noki.” (Emoniseli 2:16; 3:11; 22:7, 20a) Kasi, akoya mpo na kopesa etumbu libosoliboso na Babilone Monene, na ebongiseli ya politiki ya Satana mpe na bato nyonso oyo baboyi kotosa bokonzi ya Yehova, oyo ezali komonisama sikoyo na Bokonzi ya Masiya. Biso mpe, lokola ntoma Yoane, tolobi ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.”—Emoniseli 22:20b.
19 Yehova ye moko alobi boye: “Talá! Nakoya noki, mpe libonza na ngai ezali na ngai, mpo na kopesa na moto na moto lokola ekoki na mosala na ye.” (Emoniseli 22:12) Ntango tozali kozela libonza monene ya bomoi oyo ezangi nsuka, ezala na “likoló ya sika” to na “mabelé ya sika,” tózala na molende mpo na kobenga bato nyonso ya mitema sembo ete: “Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Tiká ete bango mpe bázala batangi ya esengo ya mokanda ya Emoniseli oyo ekomami na lisalisi ya elimo ya Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, na nkasa 28-29, 136 (maloba na nse ya lokasa).
Bozongeli
◻ Yehova asalelaki banani mpo na kopesa Emoniseli, mpe yango ezali koteya biso nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kosepela kotánga bansango oyo batindelaki masangá nsambo ya Azia?
◻ Ndenge nini tokoki kobatelama na “ntango ya komekama”?
◻ Bolamu nini tokozwa soki tobateli maloba ya rulo oyo ezali na Emoniseli?
[Elilingi na lokasa 15]
Esengo na baoyo bazali koyeba Mopesi ya nsango ya esengo
[Elilingi na lokasa 18]
Esengo na ye oyo azali kolala mpɔngi te