Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basimbi nkombo na Yesu makasi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • ‘Mana masili kobombama mpe libanga mpembe’

      17. Mbano nini ezali kozela baklisto bapakolami oyo ‘balongi,’ mpe baklisto ya Pelegame basengeli kolonga makambo nini?

      17 Mbano monene ezali liboso na baoyo nyonso bazali kotosa toli oyo Yesu apesaki na kotambwisama na elimo santu ya Jéhovah. Yoka! “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá ete, Mpo na molongi, nakopesa ye mana masili kobombama, mpe nakopesa ye libanga mpembe. Na likoló na libanga yango esili kokomama nkombo na sika oyo moto mosusu ayebi te, bobele mozwi na yango ayebi.” (Emoniseli 2:17) Na motindo yango, baklisto ya Pelegame lokola baoyo ya Sumuluna bayikisami mpiko na ‘kolonga.’ Mpo na kokoka kolonga, baklisto ya Pelegame, esika kiti na bokonzi na Satana ezali, basengeli kobwaka losambo ya bikeko, pite mpe mikabwano esika moko na lipengwi lokola ezaláká na likambo na Balake, na Balame mpe na lingomba na Banikolaiti. Soki bakosala bongo, baklisto oyo bapakolami nde babengami na kolya mana masili kobombama. Yango elimboli nini?

      18, 19. (a) Mana oyo Jéhovah apesaki na Bayisraele ezalaki nini? (b) Mana nini ebombamaki? (c) Kolya mana masili kobombama elakisi nini?

      18 Na ntango na Moïse, Jéhovah apesaki mana mpo na koleisa Bayisraele kati na esobe. Mana wana ezalaki ya kobombama te, mpamba te ntongo nyonso, longola bobele mokolo na sabata, mana ezalaki kokwea na ekamwiseli, lolenge na yango ezalaki lokola matandala na mbinga mingi te. Na nzela na ebongiseli oyo eutaki na Nzambe, bomoi ya Bayisraele ebatelamaki. Mpo na kokanisa yango, Jéhovah atindaki Moïse ete “Kamata mbeki moke mpe tia [ndambo] moko na mana kati na yango, mpe tia yango liboso na Jéhovah ete ebatelama mpo na mabota na bino.” Etyamaki bongo na kati na sanduku ya bulee ya kondimana.—Exode 16:14, 15, 23, 26, 33; Baebele 9:3, 4.

      19 Oyo ezali solo elembo ebongi! Mana yango ebombamaki kati na Esika-Eleki-Bosantu na tabernakle, epai kuna kongenga ya ekamwiseli oyo ezalaki kongenga likoló na ezipelo na Sanduku ezalaki elilingi ete Jéhovah ye moko azali kati na esika yango. (Exode 26:34) Moto moko te apesamelaki ndingisa na kokota na esika wana ya bosantu mpo na kolya mana masili kobombama. Nzokande, Yesu alobi ete bayekoli na ye bapakolami mpe balongi bakolya “mana masili kobombama.” Lokola Klisto liboso na bango, bakozwa libaku ya kokota ‘na esika na bulee etongami na maboko te, yango elilingi na oyo na solo, kasi kati na likoló mpenza.’ (Baebele 9:12, 24) Nsima na kosekwa bazwi nzoto ekoki kobeba te mpe bomoi bokoki kosuka te, ebongiseli kitoko mingi euti na Nzambe, oyo emonisami na elilingi oyo ete bapesi bango “mana masili kobombama,” bilei bikoki kobeba te. Oyo nde libaku malamu mpo na etuluku oyo moke ya balongi!—1 Bakolinti 15:53-57.

      20, 21. (a) Kozwa libanga mpembe elakisi nini mpo na baklisto bapakolami? (b) Lokola mabanga mpembe mazali bobele 144 000, elikya nini ebele monene bazali na yango?

      20 Bango bazwi lisusu “libanga mpembe.” Na batribinale ya Baromé, bazalaki kosalela libanga mpo na kokata likambo.b Libanga mpembe elimbolaki ete moto alongi na esambiseli, nzokande libanga mwindo elimbolaki ete moto akweisami na kozwa etumbu, mbala mingi etumbu ya liwa. Lokola Yesu apesi “libanga mpembe” epai na baklisto ya Pelegame, yango elakisi ete azwi bango na likambo te mpe bazali mpeto. Kasi maloba na Yesu makoki mpe kozala na ndimbola mosusu. Epai ya Baromé, mabanga mazalaki mpe kosalelama lokola ticket mpo na kokota na milulu minene. Na motindo yango, libanga mpembe ekoki kolimbola eloko moko ya ntina mingi mpo na moklisto mopakolami oyo alongi: nzela epesameli ye na kokota mpe kozwa esika ya lokumu kati na makoló mpo na libala na Mwana na Mpate. Bobele mabanga 144 000 ya motindo yango nde masili kokabolama.—Emoniseli 14:1; 19:7-9.

      21 Ezali boni mpo na ebele monene, baninga ya baklisto bapakolami? Bango mpe bazali na mbano na bango. Ata bazwi libanga mpembe te mpo na kokota na makolo, soki bakoyika mpiko, bakobika na bolozi monene mpe kosangana na esengo ya kozongisa Paradis na mabelé. Basekwi ya sembo bakoya kosangana na bango, basembwi ya kala liboso ya eleko ya boklisto mpe baoyo, kati na bampate mosusu, basili kokufa kala mingi te. Na nsima, basekwi nyonso mosusu basikolami bakozala na esengo ya kozongisama na bomoi na mabelé oyo masili kobongwana Paradis.—Nzembo 45:16; Yoane 10:16; Emoniseli 7:9, 14.

      22, 23. Nkombo ekomami likoló na libanga epesami na baklisto bapakolami elimboli nini, mpe esengeli koyikisa bango mpiko na kosala nini?

      22 Nkombo ya sika ekomami likoló na libanga yango elimboli nini? Nkombo ezali na ntina mpo na kobenga moto mpe kokesenisa ye na bato mosusu. Baklisto wana bapakolami bazwi libanga nsima na kosukisa bomoi na bango na mabelé lokola kurse oyo balongi kati na yango. Na bongo, ezali polele ete nkombo likoló na libanga ekangani na libaku malamu ezali na bango ya kosangana elongo na Yesu kati na makoló; bandimami na mosala ya bokonzi, libaku malamu mpenza epesameli bobele batuki na libula na Bokonzi ya likoló. Na yango, ezali nkombo to koponama na mosala “oyo moto mosusu ayebi te, bobele mozwi na yango.”—Tala Emoniseli 3:12.

      23 Oyo ezali solo elendiseli mpo na kelasi na Yoane ete ‘bayoka yango elobi elimo na masanga’ mpe basalela yango! Mpo na baninga na bango ebele monene, bango mpe balendisami ete basala mosala na sembo esika moko na bango, awa bazali naino na mabelé, mpe basakola Bokonzi ya Jéhovah elongo na bango.

  • Basimbi nkombo na Yesu makasi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • [Elilingi na lokasa 45]

      Mana ebombamaki kati na sanduku na kondimana. Na elobeli na elilingi, kozwa mana mabombami elimboli kozwa bomoi bokoki kosuka te mpo na baklisto bapakolami oyo bakolonga

      [Elilingi na lokasa 45]

      Libanga mpembe ezali mpo na baoyo bandimami na libala na Mwana na Mpate

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto