Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Emoniseli mpe yo
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 15. Maloba na Yesu: ‘Ngai motatoli na makambo oyo,’ mpe “nakoya noki” malimboli nini?

      15 Yesu abakisi sikawa maloba na nsuka mpe ya kolendisa: “Motatoli na makambo oyo alobi ete: ‘Ee, nakoya noki.’” (Emoniseli 22:20a) Yesu azali “motatoli na sembo mpe na solo.” (Emoniseli 3:14) Soki atatoli bimonaneli ya Emoniseli, yango elingi koloba ete ezali solo. Ye, elongo na Jéhovah Nzambe balobeli makasi mpenza na bisika mingi ete bazali koya “nokinoki,” to mosika te; mpo na Yesu, oyo ezali mbala ya mitano oyo alobi bongo. (Emoniseli 2:16; 3:11; 22:7, 12, 20) Bazali ‘koya’ mpo na kopesa etumbu epai na ndumba monene, epai na “mikonzi” to batambwisi na politike, epai na banguna nyonso mosusu ya “bokonzi na Nkolo na biso [Jéhovah] mpe na Klisto na ye.”—Emoniseli 11: 15; 16:14, 16; 17:1, 12-14.

      16. Lokola oyebi ete Jéhovah Nzambe mpe Yesu bazali koya noki, likambo nini esengeli na yo kosala?

      16 Lokola oyebi ete Jéhovah Nzambe mpe Yesu bazali koya nokinoki, likambo yango esengeli kolendisa yo na ‘kozanga kobosana mokolo na Jéhovah.’ (2 Petelo 3:12) Kobonga nyonso ya likolólikoló ya mokili, oyo ezali biloko biyangelami na Satana, ezali bobele lokuta. Bolongi nyonso oyo makoló yango esili kozwa, elingi koloba batambwisi ya mokili na Satana, ezali bobele ya ntango moke. Makambo wana makoleka. (Emoniseli 21:1) Eloko moko te ekotikala libela, longola bobele Jéhovah, Bokonzi na ye botambwisami na Yesu Klisto mpe mokili ya sika oyo asili kolaka. Kobosana yango te!—1 Yoane 2:15-17.

  • Emoniseli mpe yo
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 19. Yoane, ntoma oyo asilaki kokoma mobange, asukisi Emoniseli na maloba nini, mpe maloba yango mazali kopusa yo na kosala nini?

      19 Tozali bongo kobondela elongo na Yoane: “Bobele bongo! Nkolo Yesu, oya.” Ntoma wana mobange abakisi: “Ngolu na Nkolo Yesu Klisto ezala na babulami!” (Emoniseli 22:20b, 21) Ezala mpe na bino banso baoyo bozali kotanga mokanda oyo. Tika ete bozala na kondima kati na kobelema ya kokokana monene na Emoniseli, mpo bokoka koloba na motema moko elongo na biso ete: “Amen!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto