Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I
NTANGO azalaki mokangami na esanga Patimosi, Ntoma Yoane, oyo akómaki mobange, azwaki bimonaneli 16. Amonaki makambo oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto basengelaki kosala na mokolo ya Nkolo—eleko oyo ebandaki na 1914, ntango Bokonzi ya Nzambe etyamaki mpe ekosila na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Mokanda ya Emoniseli, oyo Yoane akomaki na mobu soki 96 T.B., ezali na masolo kitoko ya bimonaneli yango.
Tótalela naino makanisi ya ntina oyo ezali na Emoniseli 1:1–12:17, oyo elobeli bimonaneli nsambo ya liboso oyo Yoane azwaki. Bimonaneli yango esengeli kobenda likebi na biso lelo oyo mpamba te etaleli makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo mpe emonisi ndenge oyo Yehova akozwa makambo na mabɔkɔ mosika te. Na ntembe te, soki totángi masolo ya bimonaneli yango na kondima, tokobɔndisama mpe tokolendisama.—Ebe. 4:12.
“MWANA-MPATE” AFUNGOLI BILEMBO MOTOBA KATI NA BILEMBO NSAMBO
Ya liboso, Yoane amonaki Yesu Klisto na kati ya nkembo na ye mpe azwaki bansango oyo asengelaki ‘kokoma na kati ya rulo mpe kotinda yango na masangá nsambo.’ (Emon. 1:10, 11) Na nsima, azwaki emonaneli ya kiti ya bokonzi na likoló. Na lobɔkɔ ya mobali ya Ye oyo afandi na kiti ya bokonzi yango, ezali na rulo moko oyo ekangamá na bilembo nsambo. Ye oyo amonanaki ete “abongi mpo na kofungola rulo” ezali “nkɔsi ya libota ya Yuda,” to “mwana-mpate . . . [oyo] azalaki na maseke nsambo mpe miso nsambo.”—Emon. 4:2; 5:1, 2, 5, 6.
Na emonaneli ya misato, Yoane amonaki makambo oyo esalemaki ntango “Mwana-Mpate” azalaki kofungola mokomoko ya bilembo motoba ya liboso. Ntango afungolaki elembo ya motoba, mabelé eninganaki makasi mpe mokolo monene ya nkanda eyaki. (Emon. 6:1, 12, 17) Kasi, na emonaneli oyo elandaki, amonaki ‘baanzelu minei basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabelé’ tii ntango ba 144 000 nyonso bakotyama elembo. Amonaki “ebele ya bato” oyo batyamaki elembo te “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.”—Emon. 7:1, 9.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:4; 3:1; 4:5; 5:6—Maloba “bilimo nsambo” emonisi nini? Motángo nsambo elimbolaka oyo ezali ya kokoka na miso ya Nzambe. Na yango, nsango epai ya “masangá nsambo” etaleli libosoliboso basaleli nyonso ya Nzambe, oyo bazali lelo na masangá koleka 100 000 na mabelé mobimba. (Emon. 1:11, 20) Lokola Yehova apesaka elimo santu na kotalela likambo oyo alingi kokokisa, maloba “bilimo nsambo” emonisi ete bososoli mpe mapamboli oyo apesi na baoyo bazali kotya likebi na esakweli yango, ezali ya kokoka. Emonanaka lokola nde mokanda ya Emoniseli elobeli makambo nsambonsambo. Motángo nsambo elimboli oyo ezali ya kokoka, mpe na ntembe te, mokanda yango elobeli ndenge oyo “sɛkɛlɛ mosantu ya Nzambe” “ekokóma mpenza na nsuka.”—Emon. 10:7.
1:8, 17—Bibengeli “Alfa mpe Omega” mpe “Moto ya liboso mpe Moto ya Nsuka” esalelami mpo na nani? Ebengeli “Alfa mpe Omega” esalelami mpo na kolobela Yehova; emonisi ete kaka ye nde azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Azali “ebandeli mpe nsuka.” (Emon. 21:6; 22:13) Atako Emoniseli 22:13 ebengi Yehova “ebandeli mpe nsuka” mpo moto moko te aleki ye, bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga ya mokapo ya liboso ya Emoniseli emonisi ete “Moto ya Liboso mpe Moto ya Nsuka” oyo balobeli awa ezali Yesu Klisto. Yesu azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokóma elimo oyo akoki kokufa te mpe azali moto ya nsuka oyo Yehova ye moko asekwisi.—Kols. 1:18.
2:7—“Paladiso ya Nzambe” ezali nini? Lokola maloba yango etali baklisto bapakolami, na ntembe te, na vɛrsɛ yango liloba paladiso elimboli paladiso ya likoló—esika Nzambe azalaka. Baklisto bapakolami oyo bakotikala sembo bakolya “nzete ya bomoi.” Bakozwa bomoi ezangi kufa.—1 Kol. 15:53.
3:7—Ntango nini Yesu azwaki “fungola ya Davidi,” mpe ndenge nini azali kosalela fungola yango? Ntango azwaki batisimo na mobu 29 T.B., Yesu akómaki Mokonzi oyo aponamaki na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Davidi. Nzokande, Yesu azwaki fungola ya Davidi na mobu 33 T.B., ntango atyamaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe na likoló. Na ntango yango, azwaki lotomo nyonso ya Bokonzi ya Davidi. Kobanda wana, Yesu azali kosalela fungola yango mpo na kopesa bato libaku ya kosala misala oyo etali Bokonzi. Na 1919, Yesu apesaki “fungola ya ndako ya Davidi” epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” na ndenge atyaki ye “likoló ya biloko na ye nyonso.”—Yis. 22:22; Mat. 24:45, 47.
3:12—‘Nkombo ya sika’ ya Yesu ezali nini? Nkombo yango ezali mosala mpe mikumba ya sika ya Yesu. (Filp. 2:9-11) Moto moko te akoki koyeba nkombo yango ndenge Yesu ayebi yango; atako bongo, Yesu akokoma nkombo yango likoló ya bandeko na ye ya sembo kuna na likoló, elingi koloba bakokóma na boyokani makasi na ye. (Emon. 19:12) Kutu, akokokisa mikumba na ye elongo na bango.
Mateya mpo na biso:
1:3. Lokola “ntango oyo etyamá [mpo Nzambe apesa mokili ya Satana etumbu] ekómi pene,” tosengeli mpenza kokanga ntina ya nsango oyo ezali na mokanda ya Emoniseli mpe kosalela makambo yango.
3:17, 18. Mpo na kozala bato ya bomɛngo na elimo, tosengeli kosomba epai ya Yesu “wolo oyo epɛtolami na mɔtɔ.” Elingi koloba, tosengeli kosala makasi mpo tózala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza. (1 Tim. 6:17-19) Tosengeli mpe kolata “bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ,” oyo emonisaka ete tozali bayekoli ya Klisto; tosengeli mpe kosalela “nkisi ya miso,” na ndakisa batoli oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpo tózala na bososoli ya elimo.—Emon. 19:8.
7:13, 14. Bankulutu 24 ezali ba 144 000 na nkembo na bango ya likoló, epai bazali kosala lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. Bamonisamaki na banganga-nzambe oyo bazalaki na Yisalaele ya kala, oyo Mokonzi Davidi akabolaki na bituluku 24. Moko na bankulutu yango ayebisaki Yoane soki ebele monene ezali banani. Na yango, tokoki koloba ete lisekwa ya baklisto bapakolami ebandaki mwa moke liboso ya 1935. Mpo na nini? Mpamba te na mbula yango, basaleli ya Nzambe oyo bapakolami na elimo bayebaki polele soki ebele ya bato ezali banani.—Luka 22:28-30; Emon. 4:4; 7:9.
KOFUNGOLAMA YA ELEMBO YA NSAMBO EPESAKI NZELA NA KOBƐTAMA YA BAKELELO NSAMBO
Mwana-Mpate afungolaki elembo ya nsambo. Baanzelu nsambo bazwaki bakelelo nsambo. Baanzelu motoba babɛtaki bakelelo na bango, oyo ezalaki kosakola kosambisama ya “moko ya bandambo misato” ya bato, elingi koloba mangomba ya boklisto. (Emon. 8:1, 2, 7-12; 9:15, 18) Yango nde makambo oyo Yoane amonaki na emonaneli ya mitano. Yoane mpe asanganaki na makambo oyo esalemaki na emonaneli oyo elandaki, alyaki rulo moko ya moke mpe azwaki mezire ya esika mosantu ya tempelo. Ntango kelelo ya nsambo ebɛtaki, mingongo makasi elobaki ete: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na ye.”—Emon. 10:10; 11:1, 15.
Emonaneli ya nsambo ekei tii na makambo oyo elobelami na Emoniseli 11:15, 17. Elembo moko monene emonanaki na likoló. Mwasi ya likoló abotaki mwana moko ya mobali. Zabolo abwakamaki awa na mabelé. Lokola azalaki na nkanda mpo na mwasi ya likoló, akendaki “kobunda etumba ná bato ya momboto ya mwasi yango oyo batikalaki.”—Emon. 12:1, 5, 9, 17.
Biyano na mituna ya Biblia:
8:1-5—Mpo na nini likoló ekómaki nyɛɛ, mpe na nsima nini ebwakamaki na mabelé? Likoló ekómaki nyɛɛ na ndenge ya elilingi mpo ‘mabondeli ya basantu’ oyo bazali awa na mabelé eyokama. Likambo yango esalemaki na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Baklisto bapakolami bakendaki na likoló te na nsuka ya Ntango ya Mabota, ndenge bato mingi bazalaki kokanisa. Bakutanaki na makambo ya mpasi na boumeli ya etumba yango. Yango wana, babondelaki na etingya mpo na kosɛnga litambwisi. Lokola eyano na mabondeli na bango, anzelu abwakaki mɔtɔ ya elilingi awa na mabelé, oyo epesaki baklisto bapakolami molende. Atako bazalaki mingi te, bakómaki kosakola Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba, nsango ya ntina mingi oyo epelisaki mɔtɔ na kati ya mangomba ya boklisto. Basakolaki makebisi ya Biblia oyo ezalaki lokola nkake, bayebisaki mateya ya solo, oyo ezali lokola miinda, mpe mangomba ya lokuta eninganaki makasi, ndenge bandako milai eninganaka ntango mabelé eningani.
8:6-12; 9:1, 13; 11:15—Ntango nini baanzelu nsambo bamilɛngɛlaki mpo na kobɛta bakelelo na bango; ntango nini mpe ndenge nini makɛlɛlɛ ya kelelo eyokanaki? Eleko ya komilɛngɛla mpo na kobɛta bakelelo nsambo esangisi eleko oyo litambwisi epesamaki epai ya baklisto bapakolami oyo bazongelaki molende na bango awa na mabelé kobanda na 1919 tii na 1922. Na nsima, baklisto bapakolami bamipesaki na kobongisa mosala ya kosakola mpe na kotonga bisika ya kobimisa mikanda. (Emon. 12:13, 14) Kobɛtama ya kelelo elimboli mosala oyo basaleli ya Nzambe bazali kosala na litambwisi ya baanzelu, mpo na kosakola na mpiko bitumbu oyo Yehova akopesa mokili ya Satana. Kutu, yango ebandaki na 1922, na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point, na Ohio mpe ekokende tii na bolɔzi monene.
8:13; 9:12; 11:14—Na ndenge nini kobɛtama ya bakelelo misato ya nsuka ebimisaki “mawa”? Kobɛtama ya bakelelo minei ya liboso emonisaki ete mangomba ya boklisto ezali ya kokufa na elimo; kobɛtama ya bakelelo misato ya nsuka ebimisaki mawa mpamba te elobelaki makambo ya sikisiki. Kelelo ya mitano etalelaki kobimisama ya basaleli ya Nzambe na “lobwaku mozindo,” na 1919 mpe mosala na bango ya kosakola na molende, oyo ekómaki lokola bolɔzi oyo ezalaki kotungisa mangomba ya boklisto. (Emon. 9:1) Kelelo ya motoba etaleli limpinga ya bafandi na mpunda oyo emonaná naino te mpe mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo ebandaki na 1922. Kelelo ya nsuka etaleli kotyama ya Bokonzi ya Masiya.
Mateya mpo na biso:
9:10, 19. Bandimbola ya Biblia oyo ezali na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali nsango oyo ezali lokola mbeli. (Mat. 24:45) Nsango yango ekokani na mikila ya mayoyo oyo ezali na “bitubeli lokola bankotó” mpe ekokani na bampunda, oyo “mikila na yango ezali lokola banyoka.” Mpo na nini? Mpamba te mikanda yango ezali kokebisa mpo na “mokolo ya kobukanisa [ya Yehova].” (Yis. 61:2) Tosengeli kokabolaka mikanda yango na mpiko mpe na molende.
9:20, 21. Bato mingi ya mitema sembo oyo bazali kofanda na bikoló oyo bato balobaka ete ezali ya baklisto te, bandimi nsango oyo tozali kosakola. Kasi, tomizelaka te ete ebele ya bato ya bikólo yango, oyo Emoniseli ebengi “bato oyo batikalaki,” bákóma baklisto. Atako bongo, tolendendelaka na mosala ya kosakola.
12:15, 16. “Mabelé,” elingi koloba bibongiseli ndenge na ndenge ya mokili ya Satana, to bikonzi ya mikili ndenge na ndenge, ezali kopesa bato bonsomi ya losambo. Kobanda na 1940, bikonzi yango “emɛlaki ebale [ya minyoko] oyo dalagona asanzaki na monɔkɔ na ye.” Ya solo, soki Yehova alingi, akoki kotinda bakonzi ya mokili bákokisa mokano na ye. Yango wana, Masese 21:1 elobi boye: “Motema ya mokonzi kati na lobɔkɔ ya [Yehova] ezali lokola bitima na mai; akobongola yango na epai na epai elingi ye.” Yango esengeli kolendisa kondima na biso epai ya Nzambe.