Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Somba wolo oyo esili kopetolama na mɔ́to
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 2 Lelo oyo, okokuta mboka ya kala ya Laodikia penepene na mboka Denizli (na mokili ya Turquie), oyo ekabwani na ntaka ya 90 kilometre na mboka Alasehir epai ya sud-est. Na ekeke ya liboso, Laodikia ezalaki mboka na bonzenga mpe na bozwi. Lokola ezalaki mboka oyo banzela mingi ekutanaki wana, ezalaki centre monene ya mosolo mpe mombongo. Kati na biloko oyo bazalaki koteka mpo na kozwa mosolo mingi, ezalaki na mafuta moko ya kopakola na miso lokola nkisi, mpe mafuta yango ezalaki na lokumu mingi; epai mosusu, mboka Laodikia ezalaki mpe na lokumu mingi mpo na bilamba kitoko mingi oyo bazalaki kotonga wana uta na mika ya moindo ya mpate. Mpasi makasi ezalaki na bango se mpo bazangaki mai, kasi nzela emonanaki mpo na kosilisa mokakatano yango, mpamba te batimolaki terase moko oyo ezalaki kozwa mai ya mɔ́to mazalaki kobima mwa mosika mpo na komema yango kino na kati na mboka.

  • Somba wolo oyo esili kopetolama na mɔ́to
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 6. (a) Yesu alobi nini mpo na ezalela ya elimo ya lisangá ya Laodikia? (b) Ndakisa nini malamu mingi Yesu apesaki kasi baklisto ya Laodikia balandaki yango te?

      6 Nsango nini Yesu alingi kotindela baklisto ya Laodikia? Akumisi bango te; na bosolo nyonso, alobi na bango: “Nayebi misala na yo ete yo mpio te, yo mɔ́to mpe te. Mposa na ngai ete ozala mpio soko mɔ́to! Bongo awa ezali yo mwa mɔ́to moke, nde na mɔ́to te, na mpio mpe te, etikali moke nakosanza yo na monoko na ngai.” (Emoniseli 3:15, 16) Mbele okoyamba ndenge nini nsango motindo oyo euti na Nkolo Yesu Klisto? Mbele ekolamusa yo te mpe mbele ekopusa yo te na komisosola? Na ntembe te baklisto na Laodikia basengeli kolamuka, mpamba te bazali kolala na elimo, kokanisaka ete oyo basili kozwa ekotikala se bongo. (Tala 2 Bakolinti 6:1.) Basengelaki komekola Yesu lokola baklisto, mpamba te Yesu azali ntango nyonso na mɔ́to mozali kopela mpo na Jéhovah mpe mpo na mosala na ye. (Yoane 2:17) Epai mosusu, basokemi bazali ntango nyonso komona ye ete azali na bolingo mpe na bopolo, moto na maloba na kokitisa motema lokola kopo ya mai ya mpio na mokolo na moi makasi. (Matai 11:28, 29) Nzokande, baklisto na Laodikia bazali na mɔ́to te, na mpio mpe te, motindo moko na mai oyo mazali kokoma na mboka na bango. Mpo ete bazali lisusu na mɔ́to te, Yesu akani ete ‘akosanza bango longwa na monoko na ye.’ Mpo na biso, na ndakisa na Yesu, totya ntango nyonso molende ya kozala liziba na mai na mpio na elimo mpo na bazalani na biso.—Matai 9:35-38.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto