Yoká oyo elimo ezali koloba!
“Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.”—EMONISELI 3:22.
1, 2. Toli nini ezongelami na mokomoko ya makambo oyo Yesu atindelaki masangá nsambo oyo elobelami na mokanda ya Emoniseli?
BASALELI ya Yehova basengeli koyoka maloba oyo elimo etindaki Yesu Klisto aloba na masangá nsambo oyo elobelami na mokanda ya Emoniseli. Kutu, mokomoko ya makambo yango ezali na toli oyo: “Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.”—Emoniseli 2:7, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22.
2 Tosilaki kotalela makambo oyo Yesu atindelaki baanzelu, to bakɛngɛli ya Efese, Similina, ná Pelegame. Litomba nini tokoki kozwa na makambo oyo, na lisalisi ya elimo santu, Yesu atindelaki masangá mosusu minei?
Epai ya anzelu ya Tyatila
3. Tyatila ezalaki wapi, mpe biloko nini ezalaki kosalema kuna oyo esalaki ete engumba yango eyebana mingi?
3 “Mwana ya Nzambe” apesaki lisangá ya Tyatila longonya, kasi apamelaki mpe yango. (Tángá Emoniseli 2:18-29.) Tyatila (lelo oyo Akhisar) ezalaki pembeni ya mongala moko ya Ebale Gediz (na ntango ya kala Hermus) na wɛsti ya Asie Mineure. Mboka yango eyebanaki mpo na misala ndenge na ndenge ya mabɔkɔ. Bato oyo bazalaki kosala langi bazalaki kosalela mosisa ya nzete ya garance mpo na bilamba ya motane-moindo oyo eyebanaki mingi. Lidia, mwasi moko oyo akómaki moklisto ntango Paulo alekaki na Filipi na Grèce, azalaki “motɛkisi ya bilamba ya motane-moindo, moto ya engumba ya Tyatila.”—Misala 16:12-15.
4. Yesu apesaki lisangá ya Tyatila longonya mpo na makambo nini?
4 Yesu apesaki lisangá ya Tyatila longonya mpo na misala malamu, bolingo, kondima, ezaleli ya koyika mpiko, mpe makasi na mosala ya kosakola. Kutu, ‘misala na bango ya sika ezalaki mingi koleka oyo ya kala.’ Nzokande, atako tosilá kosala makambo mingi ya malamu, tosengeli ntango nyonso kokeba na etamboli na biso.
5-7. (a) “Mwasi oyo Yezabele” ezalaki nani mpe esengelaki kotalela makambo na ye ndenge nini? (b) Maloba oyo Klisto ayebisaki lisangá ya Tyatila ezali kosalisa basi oyo babangaka Nzambe na kosala nini?
5 Lisangá ya Tyatila ezalaki kokanga miso liboso ya losambo ya bikeko, mateya ya lokuta, pite mpe ekobo. Na lisangá yango bazalaki na “mwasi oyo Yezabele”; oyo ekoki kolimbola etuluku moko ya basi oyo bazalaki na makambo lokola mwasi mabe Yezabele, mwasi ya mokonzi moko ya Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi. Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete ‘basakoli-basi’ ya Tyatila bazalaki koluka kokɔtisa baklisto na losambo ya banzambe mpe banzambe-basi ya moziki ya bato ya misala ya mabɔkɔ mpe kotinda bango na kosangana na bafɛti oyo bazalaki kolya bilei oyo epesami na banzambe ya bikeko. Lelo oyo, tosengeli kotika te ete mwasi moko oyo azali komibenga mosakoli ayangela makanisi ya bato mosusu na kati ya lisangá ya boklisto!
6 ‘Etikalaki moke Klisto abwaka mwasi yango Yezabele na mbeto ya mobɛli, mpe apesa baoyo bazalaki kosala na ye ekobo bolɔzi monene, soki babongoli mitema te na misala na bango.’ Bakɛngɛli basengeli komeka ata moke te kolanda mateya mpe makanisi mabe motindo wana, mpe moklisto moko te asengeli koluka kosala pite na elimo to na nzoto to kosambela bikeko, mpo ayeba ete “makambo mozindo ya Satana” ezali mpenza mabe. Soki toyoki likebisi ya Yesu, ‘tokosimba makasi eloko oyo tozali na yango,’ mpe lisumu ekofanda na kati na biso te. Lokola bapakolami babwakaki misala ya mabe, makambo ya mbindo, mpe mikano ya mabe, na lisekwa na bango bakozwa “bokonzi likoló ya bikólo” mpe bakosangana na Klisto mpo na kobukabuka bikólo yango. Lelo oyo, masangá ezali na minzoto ya elilingi, mpe ntango bapakolami bakosekwa mpo na kokende na likoló, bakozwa “monzoto ya ntɔngɔ oyo mongɛngaka,” Mobali ya libala, Yesu Klisto.—Emoniseli 22:16.
7 Klisto akebisaki lisangá ya Tyatila endima te makambo mabe ya basi bapɛngwi. Lelo oyo, maloba oyo Klisto atindelaki lisangá yango esalisaka basi oyo babangaka Nzambe na kotikala na esika na bango. Basi yango balukaka te kozala bakonzi ya mibali to mpe balɛngolaka bango te mpo na kosala na bango pite na elimo to na nzoto. (1 Timote 2:12) Nzokande, basi yango bapesaka ndakisa na misala ya malamu mpe na mosala mpo na kokumisa Nzambe. (Nzembo 68:11; 1 Petelo 3:1-6) Soki lisangá ebateli eloko oyo ezali na yango, elingi koloba mateya mpe bizaleli ya pɛto mpe mosala ya Bokonzi oyo ezali na motuya mingi, na esika Klisto apesa yango etumbu, akoya nde na mbano kitoko.
Epai ya anzelu ya Saladi
8. (a) Saladi ezalaki wapi, mpe wapi mwa makambo toyebi mpo na engumba yango? (b) Mpo na nini esengelaki ete lisangá ya Saladi esalisama?
8 Lisangá ya Saladi esengelaki kosalisama nokinoki mpamba te ekufaki na elimo. (Tángá Emoniseli 3:1-6.) Saladi ezalaki engumba moko ya bozwi mingi oyo ezalaki na sudi ya Tyatila, na ntaka ya kilomɛtrɛ 50. Engumba yango ekómaki na bozwi mingi mpo na misala ya mombongo, mabelé ya malamu, bilamba ya nsuki ya meme mpe batapi oyo bazalaki kosala kuna; na eleko moko bato bakómaki soki 50 000 na engumba yango. Josèphe, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete na ekeke ya liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Bayuda ebele bazalaki kofanda na Saladi. Na esika oyo engumba yango ezalaká, tokokuta bandako nyonso ekweá mpe tokomona ete moko na yango ezalaká sinagoga mpe mosusu ezalaká tempelo ya Alatemisi, nzambe-mwasi ya Efese.
9. Esengeli kosala nini soki tosalaka mosala ya Nzambe kaka mpo na kosala?
9 Klisto ayebisaki anzelu ya lisangá ya Saladi boye: “Nayebi misala na yo, oyebani ete ozali na bomoi, nzokande okufá.” Ezali boni soki tozali komonana ete tozali kolala mpɔngi te na elimo, kasi tolingaka kozwa mikumba te na lisangá ya boklisto, tosalaka misala kaka mpo na kosala mpe “tozali pene ya kokufa” na elimo? Boye tosengeli ‘kokanisa ntango nyonso ndenge tozwaki mpe ndenge toyokaki’ nsango ya Bokonzi, mpe tosengeli kozongela milende na biso na mosala ya bosantu. Na ntembe te tokobanda na momeseno ya kopesa mpenza biyano na makita ya lisangá. (Baebele 10:24, 25) Klisto akebisaki lisangá ya Saladi ete: “Soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba soki moke te na ngonga nini nakobimela yo.” Ezali boni na mikolo na biso? Etikali moke, Yesu akotuna biso.
10. Ata soki makambo ezali lokola na Saladi ya kala, nini ekoki komonana epai ya mwa ndambo ya baklisto?
10 Ata soki makambo ezali ndenge oyo ezalaki na Saladi, ekoki kozala na mwa bato oyo ‘bakómisi bilamba na bango ya likoló mbindo te mpe bazali kotambola elongo na Klisto na bilamba ya mpɛmbɛ mpamba te babongi na yango.’ Bazali kobatela bizaleli na bango ya boklisto, bazali na mbindo te, mpe na litɔnɔ te ya bizaleli ya mokili mpe losambo na yango. (Yakobo 1:27) Yango wana, Yesu ‘akoboma nkombo na bango soki moke te na buku ya bomoi, kasi akondima nkombo na bango liboso ya Tata na ye mpe liboso ya baanzelu.’ Lokola Klisto alobi ete akoki kotambola na mwasi na ye, to lisangá mobimba ya bapakolami, mwasi yango akolata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, oyo ezali elilingi ya misala ya boyengebene ya basantu ya Nzambe. (Emoniseli 19:8) Mikumba malamu oyo bakozwa na likoló ezali kopesa bango makasi ya kolonga mokili. Bato oyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé bakozala mpe na ebele ya mapamboli. Nkombo na bango mpe ekomami na buku ya bomoi.
11. Tosengeli kosala nini soki tokómi kolala mpɔngi na elimo?
11 Moko te kati na biso akoki kolinga abeba na elimo lokola lisangá ya Saladi. Kasi, tosengeli kosala nini soki tomoni ete tokómi kolala mpɔngi na elimo? Tosengeli kobongisa makambo nokinoki. Na ndakisa, soki tokómi kobendama na makambo ya mabe to tokómi na bolɛmbu mpo na koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Na ntango wana tosengeli kobondela makasi mpo na koluka lisalisi ya Yehova. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola Makomami ná mikanda ya “kapita ya sembo” ekosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo. (Luka 12:42-44) Soki tosali bongo, tokozala lokola bato ya Saladi oyo Klisto andimaki, mpe tokosalisa baninga na biso bandimi.
Epai ya anzelu ya Filadelefia
12. Makambo ya losambo ezalaki ndenge nini na Filadelefia?
12 Yesu apesaki lisangá ya Filadelefia longonya. (Tángá Emoniseli 3:7-13.) Filadelefia (lelo oyo Alasehir) ezalaki engumba moko ya bozwi na etúká moko na wɛsti ya Asie Mineure epai bazalaki kosala vinyo. Kutu, nzambe-mokonzi ya engumba yango ezalaki Dionysus, nzambe ya vinyo. Emonani ete Bayuda ya Filadelefia balukaki kondimisa Bayuda oyo bakómaki baklisto oyo bazalaki kofanda kuna ete bákangama kaka na makambo mosusu ya Mibeko ya Moize to bázongela yango, kasi balongaki te.
13. Ndenge nini Klisto asalelaki “fungola ya Davidi”?
13 Klisto ‘azali na fungola ya Davidi,’ mpe azwi mokumba ya kobatela matomba nyonso ya Bokonzi mpe ya kotambwisa ndako ya kondima. (Yisaya 22:22; Luka 1:32) Yesu asalelaki fungola yango mpo na kopesa baklisto ya Filadelefia ya kala mpe ya bamboka mosusu mikumba mpe mabaku malamu ya mosala ya Bokonzi. Kobanda 1919 afungoleli “kapita ya sembo” “ekuke monene” oyo moto moko te akoki kokanga, oyo ezali kopesa ye nzela ya kosakola Bokonzi. (1 Bakolinti 16:9; Bakolose 4:2-4) Kasi, ekuke yango ekangami mpo na bato ya “sinagoga ya Satana,” mpamba te bazali Bayisalaele ya elimo te.
14. (a) Yesu apesaki lisangá ya Filadelefia elaka nini? (b) Ndenge nini tokoki kobatelama mpo tókwea te na “ngonga ya komekama”?
14 Yesu apesaki baklisto ya Filadelefia ya kala elaka oyo: “Lokola obatelaki liloba na ngai na oyo etali ezaleli ya koyika mpiko, ngai nakobatela yo mpe na ngonga ya komekama, oyo esengeli koya na mabelé mobimba oyo efandami.” Kosakola esɛngaka ezaleli ya koyika mpiko lokola oyo Yesu azalaki na yango. Atikaki nzela te ete banguna bázongisa ye nsima, kasi azalaki ntango nyonso kosala mokano ya Tata na ye. Yango wana, Klisto asekwaki mpo na kozwa bomoi oyo ekoki kokufa te na likoló. Soki tobateli ekateli na biso ya kosambela Yehova mpe tozali kosakola nsango malamu mpo na komonisa ete toponi Bokonzi ya Nzambe, tokobatelama mpo tókwea te na ntango ya komekama oyo ezali sikoyo, oyo ebengami “ngonga ya komekama.” ‘Tokosimba makasi oyo tozali na yango,’ oyo Klisto apesi biso soki tozali kokolisa matomba ya Bokonzi. Soki bapakolami bazali kosala bongo, bakozwa motole ya motuya monene na likoló; nzokande baninga na bango ya sembo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé.
15. Nini esɛngami na baoyo bakozala ‘makonzí na tempelo ya Nzambe’?
15 Klisto abakisaki ete: “Oyo alongi—nakokómisa ye likonzí na kati ya tempelo ya Nzambe na ngai, . . . mpe nakokoma likoló na ye nkombo ya Nzambe na ngai mpe nkombo ya engumba ya Nzambe na ngai, Yelusaleme ya sika oyo ezali kokita uta na likoló longwa epai ya Nzambe na ngai, mpe nkombo na ngai ya sika.” Bapakolami oyo bazali bakɛngɛli basengeli kosimba losambo ya solo. Basengeli kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kotikala pɛto na elimo mpo bámonana ete babongi kozala bato ya “Yelusaleme ya sika.” Yango ezali na ntina mingi soki balingi kozala makonzí na tempelo ya likoló oyo ezali na nkembo mpe soki balingi kolata nkombo ya engumba ya Nzambe, elingi koloba kozala basitwayɛ ya likoló mpe kozwa nkombo ya Klisto lokola mwasi na ye. Lisusu, basengeli mpe kozala na matoi ya ‘koyoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’
Epai ya anzelu ya Laodikia
16. Toyebi mwa makambo nini mpo na Laodikia?
16 Klisto apamelaki lisangá ya Laodikia oyo ezalaki komimona ete ekoká. (Tángá Emoniseli 3:14-22.) Laodikia ezalaki na ɛsti ya Efese na ntaka ya kilomɛtrɛ 150, na esika oyo banzela minene ya bato ya mombongo ekutanaki, na kati ya lobwaku ya mabelé malamu ya Ebale Lycus; baizini mpe babanki ezalaki na engumba yango ya bozwi mingi. Bilamba oyo bazalaki kosala na nsuki moindo ya meme na etúká yango eyebanaki mingi. Lokola eteyelo moko ya lokumu ya mosala ya monganga ezalaki na Laodikia, ekoki kozala ete bazalaki kosala nkisi ya miso oyo bazalaki kobenga mputulu ya Phrygie na engumba yango. Asclépios, nzambe ya misala ya monganga, azalaki moko ya banzambe minene ya engumba yango. Emonani ete Bayuda mingi bazalaki kofanda na Laodikia, mpe bamosusu kati na bango bazalaki bato ya bozwi.
17. Mpo na nini bapamelaki bato ya Laodikia?
17 Yesu, “motatoli ya sembo mpe ya solo, ebandeli ya bozalisi ya Nzambe,” atombolaki mpenza mongongo ntango alobaki na lisangá ya Laodikia na nzela ya “anzelu” na yango. (Bakolose 1:13-16) Apamelaki bato ya Laodikia mpo bazalaki “mpiɔ te mɔtɔ mpe te” na elimo. Lokola bazalaki mpiɔ te mɔtɔ te, Klisto alingaki kosanza bango. Ezalaki mpasi te mpo bákanga ntina ya maloba oyo asalelaki. Engumba Hiyelapolisi oyo ezalaki mosika te na Laodikia ezalaki na mitó ya mai ya mɔtɔ, mpe Kolose ezalaki na mai ya mpiɔ. Nzokande, lokola esengelaki kobenda mai na batiyo banda mwa mosika mpo ekóma na Laodikia, na ntembe te mai yango ezalaki mɔtɔ te mpiɔ te ntango ekómi na engumba yango. Na bisika mosusu, bazalaki kolekisa mai yango na batelase. Soki ekómi pembeni ya Laodikia, mai yango ezalaki koleka na mabanga minene oyo batɔbɔlá na kati mpe bakangisá yango na simá.
18, 19. Lelo oyo, ndenge nini baklisto oyo bazali lokola baklisto ya Laodikia bakoki kozwa lisalisi?
18 Lelo oyo, baoyo bazali lokola bato ya Laodikia bazali mɔtɔ te mpo na kolendisa basusu, bazali mpe mpiɔ te mpo na kokitisa bango motema. Yango wana, bakosanza bango lokola basanzaka mai oyo ezali mɔtɔ te mpiɔ te! Yesu alingi te ete bato ya ndenge wana bázala balobeli na ye, elingi koloba bapakolami oyo bazali “baambasadɛrɛ na esika ya Klisto.” (2 Bakolinti 5:20) Soki babongwani te, bakobungisa libaku malamu na bango ya kozala basakoli ya Bokonzi. Bato ya Laodikia bazalaki koluka bozwi ya mokili mpe ‘bayebaki te ete bazali bato ya mpasi mpe bato ya mawa mpe babola mpe bato bakufá miso mpe bolumbu.’ Mpo moto oyo azali lokola bango alongwa na bobola ya elimo, afungwama miso, mpe abomba bolumbu na ye, asengeli kosomba epai ya Klisto kondima oyo emekami lokola ‘wolo oyo epɛtolami’; bosembo oyo ezali “bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ,” mpe “nkisi ya miso” oyo esalisaka moto amona na elimo. Bakɛngɛli baklisto bazalaka na esengo ya kosalisa bato ya ndenge wana báyeba mposa na bango ya elimo mpo bákóma “bato ya bomɛngo na kati ya kondima.” (Yakobo 2:5; Matai 5:3) Lisusu, bakɛngɛli bazali pene ya kosalisa bango na kotya “nkisi ya miso” ya elimo, elingi koloba kondima mpe kosalela mateya, toli, ndakisa, mpe makanisi ya Yesu. Yango nde nkisi mpo na kolonga “mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela.”—1 Yoane 2:15-17.
19 Yesu apamelaka moto nyonso oyo ye alingaka mpe apesaka ye disipilini. Bakɛngɛli oyo ye azali kokamba basengeli mpe kopamela na boboto lokola ye. (Misala 20:28, 29) Bato ya Laodikia basengelaki kozala na ‘molende mpe kobongola motema,’ elingi koloba kobongola makanisi mpe bomoi na bango. Ezali nde na bato mosusu na kati na biso oyo bakómi na momeseno ya kozongisa nsima mosala ya bosantu oyo tozali kosalela Nzambe? Boye, ‘tósomba nkisi ya miso epai ya Yesu’ mpo tókoka komona ntina ya komonisa molende mpo na koluka libosoliboso Bokonzi.—Matai 6:33.
20, 21. Lelo oyo, banani bazali koyanola na ndenge esengeli ntango Yesu azali “kobɛta kɔkɔkɔ,” mpe bilikya nini bazali na yango?
20 Klisto alobi ete: “Talá! Natɛlɛmi na ekuke mpe nazali kobɛta kɔkɔkɔ. Soki moto ayoki mongongo na ngai mpe afungoli ekuke, nakokɔta na ndako na ye mpe nakolya bolei ya mpokwa elongo na ye mpe ye elongo na ngai.” Mbala mingi, Yesu azalaki koteya makambo ya elimo na ntango azalaki kolya elongo na bato. (Luka 5:29-39; 7:36-50; 14:1-24) Sikoyo, azali kobɛta kɔkɔkɔ na ekuke ya lisangá oyo ezali na makambo lokola lisangá ya Laodikia. Soki bato ya lisangá yango bayanoli ntango ye azali kobɛta kɔkɔkɔ, bazongeli bolingo oyo bazalaki na yango mpo na ye, bayambi ye na kati na bango, mpe batiki ye ateya bango, Klisto akolya na bango elongo mpe bakozwela yango litomba monene na elimo.
21 Lelo oyo, “bampate mosusu” bazali koyamba Yesu na ndako na ndenge ya elilingi, mpe kosala bongo ezali komema bango na bomoi ya seko. (Yoane 10:16; Matai 25:34-40, 46) Yesu akopesa mopakolami mokomoko oyo akolonga libaku malamu ya ‘kofanda elongo na ye na kiti na ye ya bokonzi, ndenge ye mpe alongaki mpe afandi elongo na Tata na ye na kiti na Ye ya bokonzi.’ Ya solo, Yesu alaki kopesa bapakolami oyo bakolonga mbano ya kofanda na kiti ya bokonzi elongo na ye na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye na likoló. Bampate mosusu oyo bakolonga bazali na elikya ya kozala na esika malamu awa na mabelé oyo Bokonzi ekoyangela.
Mateya mpo na biso nyonso
22, 23. (a) Matomba nini baklisto bakoki kozwa na maloba oyo Yesu atindelaki masangá nsambo? (b) Mokano nini tosengeli komityela?
22 Tomoni mpenza ete baklisto nyonso bakoki kozwa matomba mingi na maloba oyo Yesu atindelaki masangá nsambo ya Asie Mineure. Na ndakisa, lokola bankulutu ya bolingo bamoni ete Yesu apesaki longonya oyo ebongi, bango mpe bazali kopesa longonya epai ya bato mpe masangá oyo ezali malamu na elimo. Na ntango oyo baninga na bango bandimi bakómi na bolɛmbu, bankulutu basalisaka bango básalela toli ya Biblia lokola nkisi. Biso nyonso tokoki kokoba kozwa matomba na toli ndenge na ndenge oyo Yesu apesaki masangá nsambo soki tozali kosalela yango elongo na mabondeli mpe na kozanga kozela.a
23 Mikolo ya nsuka oyo ezali te ntango ya komimona ete tokoká, to komipesa na koluka biloko ya mokili, to mpe na makambo mosusu oyo ekotinda biso tókóma kosalela Nzambe kaka bongobongo. Yango wana, tiká ete masangá nyonso ekoba kongɛnga lokola bitɛlɛmiseli-ya-miinda oyo Yesu atye na bisika na yango. Lokola tozali baklisto ya sembo, tómityela mokano ya kofungola matoi ntango Klisto azali koloba mpe koyoka oyo elimo ezali koloba. Na bongo, tokozala na esengo ya libela lokola bamemi-pole mpo na nkembo ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Emoniseli 2:1–3:22 elimbolami mpe na mokapo 7 tii mokapo 13 ya buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• “Mwasi oyo Yezabele” ezalaki nani, mpe mpo na nini basi oyo babangaka Nzambe balandaka ndakisa na ye te?
• Makambo nini ezalaki na Saladi, mpe tokoki kosala nini mpo tókóma te lokola baklisto mingi oyo bazalaki kofanda kuna?
• Yesu alakaki lisangá ya Filadelefia makambo nini, mpe ndenge nini etaleli mpe mikolo na biso?
• Mpo na nini bapamelaki bato ya Laodikia, kasi bilikya nini bapesi baklisto ya molende?
[Elilingi na lokasa 16]
Tosengeli koboya makambo mabe ya “mwasi oyo Yezabele”
[Bililingi na lokasa 18]
Yesu afungoli “ekuke monene” oyo ezali kopesa nzela na mikumba ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 20]
Ozali koyamba Yesu mpe koyoka ye?