Mokapo 11
Nkombo na yo ezali kati na buku na bomoi?
SALADESI
1. Ezalela ya elimo ya lisangá ya Saladesi ezali boni, mpe na maloba nini Yesu abandi kolobela bango?
KOLONGWA na mboka Akhisar (kala ezaláká mboka Tiyatire), kotambola na epai na ngele to sud, nsima na kilometre 48 okokoma kino esika ezaláká lisangá ya kala ya Saladesi, lisangá oyo Yesu nsima na kosekwa na ye, atindelaki bango mokanda oyo tokotalela sikawa. Na ekeke ya motoba liboso na ntango na biso, mboka yango ezaláká kapitale ya lolendo ya bokonzi ya kala ya Ludia mpe ya mokonzi Crésus, oyo azaláká na bozwi mingi. Na ntango na Yoane, Saladesi esilaki kokwea na nse mpenza, mpe bonzenga na yango ya kala na nse na bokonzi na Crésus etikalaki se lisolo. Bobele bongo, lisangá ya boklisto ya Saladesi ekomaki na bobola na elimo. Mpo na mbala ya liboso, Yesu abandi mokanda na makumisi te. Alobi nde boye: “Komélá anzelu na lisangá na Saladesi ete, Oyo azali na elimo nsambo na Nzambe, na myoto yango nsambo, alobi boye ete, ‘nayebi misala na yo ete nkombo ezali na yo ete ozali na bomoi, nde okufi.’”—Emoniseli 3:1.
2. (a) Likambo oyo ete Yesu azali na “elimo yango nsambo” elimboli nini mpo na baklisto ya Saladesi? (b) Lisangá ya Saladesi ezali na lokumu nini, nzokande ezaleli na ye ya solosolo ezali nde nini?
2 Mpo na nini Yesu amibengi ete “ye oyo azali na elimo yango nsambo”? Ezali mpo ete elimo yango mbala nsambo elakisi elimo santu na Jéhovah na kokoka na mobimba na yango nyonso, wana ekosalaka yango mosala. Mwa mosika, Yoane abengi yango lisusu “miso nsambo,” yango emonisi malamumalamu nguya makasi ya komona oyo epesami na Yesu na nzela na elimo santu na Nzambe. (Emoniseli 5:6) Na motindo yango, azali na likoki ya komona likambo nyonso oyo ezali kotambola malamu te mpe kozwa ekateli mpo na yango. (Matai 10:26; 1 Bakolinti 4:5) Lisangá ya Saladesi ezali na lokumu ete ezali na bomoi, ezali kosala mosala, nde Yesu amoni yango ete esili kokufa na elimo. Emonani ete mingi kati na bandeko na lisangá yango bazongelaki bizaleli bazalaki na yango liboso na kokoma baklisto.—Baefese 2:1-3; Baebele 5:11-14.
3. (a) Mpo na nini “anzelu na lisangá na Saladesi” asengelaki mpenzampenza kobosana te ete Yesu azali na “myoto yango nsambo”? (b) Toli nini makasi Yesu apesi yango na lisangá ya Saladesi?
3 Yesu akundoli epai na “anzelu na lisangá na Saladesi” ete Ye azali ye oyo “asimbi myoto yango nsambo.” Asimbi bankulutu oyo ya lisangá kati na loboko na ye ya mobali, elimboli ete azali na bokonzi mpo na kotambwisa bango kati na mosala na bango ya babateli na mpate. Bankulutu yango basengeli kotya motema na bango likoló na etonga ‘mpo na koyeba motindo na etonga.’ (Masese 27:23) Ebongaki ete batya likebi na maloba malandi ya Yesu: “Okengela, mpe pesa nguya na oyo etikali, oyo elingi kokufa. Mpo ete nazwi misala na yo ete misili kokoka na miso na Nzambe na ngai te. Na bongo kanisa lisusu liteya liyambaki yo mpe liyokaki yo, batela yango mpe bongola motema. Soko nde okokengela te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te soki nakobimela yo ntango nini.”—Emoniseli 3:2, 3.
4. Ndenge nini maloba na Petelo masengelaki kosalisa lisangá na Saladesi na ‘kolendisa biloko bitikali naino’?
4 Ebongi ete bankulutu ya Saladesi bamikundola esengo ezalaki na bango ntango bayokaki solo mpe mapamboli oyo bazwaki na ntango wana! Nde sikawa bazali bakufi mpo na oyo etali misala na elimo. Mwinda na lisangá na bango ezali kopela lisusu malamu te mpo ete misala na kondima mizali te. Bambula mingi na liboso, ntoma Petelo akomaki epai na masangá na Asia (tokanisi ete lisangá ya Saladesi ezalaki mpe na kati); ntoma Petelo akomelaki bango mpo na kolamusa epai na bango botondi mpo na nsango malamu kitoko oyo baklisto bayambaki yango mpe oyo esakolamaki “mpo na elimo santu oyo etindami longwa na likoló,” elimo yango elakisamaki na elimo nsambo oyo Yoane amonaki na emonaneli. Petelo akundolaki mpe epai na baklisto wana na Asia ete ‘bazali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami, ete bayebisa malamu na oyo abiangi bango kobima na molili kokota na moi na ye na kokamwisa.’ (1 Petelo 1:12, 25; 2:9) Soki bakokanisa likoló na solo wana ya elimo, lisangá ya Saladesi mbele ebongoli motema mpe mbele ‘elendisi biloko bitikali naino.’—Tala 2 Petelo 3:9.
5. (a) Tokoki koloba boni mpo na botondi ya baklisto na lisangá ya Saladesi? (b) Nini ekokomela bango soki bazangi kotosa toli na Yesu?
5 Nde mpo na sikawa, botondi na bango mpe bolingo na bango mpo na solo ekokani na móto oyo esili kozimama. Bobele mwa makala moke na móto ezali naino kopela. Yesu ayikisi bango mpiko ete bangalisa lisusu móto yango, babongola motema na masumu basalaki mpo na bopoto na bango mpe bazongela kozala lisangá oyo ezali na bomoi na elimo. (Tala 2 Timote 1:6, 7.) Soki bongo te, ntango Yesu akoya na mokolo moyebani te, “lokola moyibi,” mpo na kopesa bitumbu engebene ekateli esili kozwama, lisangá na Saladesi ekokoka kotelema te.—Matai 24:43, 44.
Akoya “lokola moyibi”
6. Ndenge nini Yesu ayaki “lokola moyibi” na 1918, mpe na ezalela nini akutaki baoyo bazalaki komibenga ete bayekoli na ye?
6 Likebisi oyo Yesu apesaki ete akoya lokola “moyibi” etali mpe eleko na biso oyo. Ekokanaki mingimingi likoló na baklisto oyo bazalaki naino na bomoi na mokolo na Nkolo. Mwa bambula nsima na 1914, esakweli elandi ya Malaki ekokanaki: “Nkolo oyo bino bozali koluka ye akoya pwasa na tempelo na ye; ntoma na kondimana oyo bino bozali kosepela mpo na ye, tala azali koya! Jéhovah na bibele alobi bongo.” (Malaki 3:1; Emoniseli 1:10) Na motindo na ye na “ntoma na kondimana,” Yesu ayaki kotala mpe kosambisa baoyo bazalaki komibenga ete bayekoli na ye. (1 Petelo 4:17) Na eleko yango, elingi koloba na 1918, boklisto ya mokili oyo esilaki komikotisa na makambo na kosopa makila na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe ezalaki solo mokufi na elimo. Ata baklisto ya solo oyo basakolaki na molende mingi liboso na etumba, bakutanaki na eleko moko na boumeli na yango balembaki na elimo. Batambwisi na misala na bango bakangamaki na boloko mpe mosala ya kosakola ekufaki. Ntango elimo ya Jéhovah elamusaki baklisto yango na mbula elandaki, bango nyonso bamilengelaki te. Lokola mpo na miseka bilema oyo Yesu alobelaki kati na lisese moko, ezalaki na baoyo baselingwaki te na elimo mpo na kosalela Jéhovah. Nde na esengo, na ndakisa na miseka na mayele, mingi batyaki likebi na maloba oyo na Yesu: “Bokengelaka mpo ete boyebi mokolo te soko ntango te.”—Matai 25:1-13.
7. Mpo na nini lelo oyo baklisto basengeli kokengelaka?
7 Ntina ya kokengela mpo na moklisto esukaki te bobele na ebandeli na mokolo na Nkolo. Kati na esakweli na ye monene likoló na “elembo ekomonisa ete makambo oyo nyonso malingi kokoka,” Yesu apesi likebisi oyo na nguya: “Mpo na mokolo yango mpe na ntango yango, moto moko ayebi te . . . bokeba mpe bosenzelaka, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini. Oyo mpe nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, bokengelaka.” (Malako 13:4, 32, 33, 37) Ee, kino lelo, moko na moko kati na biso, ata azala mopakolami to moko kati na ebele monene, asengeli kokengelaka ntango nyonso mpe koboya kolala na elimo. Ntango mokolo na Jéhovah ekoya pwasa, “lokola moyibi na kati na butu,” tika ete ekuta biso tozali kokengelaka, mpo ete tokoka kondimama!—1 Batesalonike 5:2, 3; Luka 21:34-36; Emoniseli 7:9.
8. Ndenge nini kelasi na Yoane bazali lelo kolendisa libota na Nzambe mpo ete bazala ntango nyonso na bomoi na elimo?
8 Lelo oyo kelasi na Yoane babosani te mokumba na bango ya kolendisa basaleli na Nzambe mpo ete bazala ntango nyonso na bomoi na elimo. Mpo na kokokisa mokumba yango, bazali kobongisa makita minene na mokili mobimba mpe mbala mingi na mbula. Kala mingi te, mpo na makita 2 981, assemblées de district na mbula moko, motuya na bayangani ekomaki kino 10 953 744, mpe bandimi ya sika 122701 bazwaki batisimo. Uta koleka ekeke moko, kelasi na Yoane bazali kosalela zulunalo La Tour de Garde (Mosenzeli) mpo na kosakola nkombo mpe mokano na Jéhovah. Mpo na minyoko makasi oyo bazwaki na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba, La Tour de Garde epesaki epai na ba Témoins de Jéhovah elendiseli makasi na nzela na masolo na yango lokola oyo: “Esengo ezali na baoyo bakobanga te” (1920), “Libyangami mpo na mosala” (1926), mpe “Monyoko ekolonga te” (1942, na Lingelesi).
9. (a) Baklisto nyonso basengeli komituna mituna nini? (b) Mpiko nini ezwami na nzela na Mosenzeli?
9 Lokola mpo na baklisto na lisangá na Saladesi, baoyo na masangá na lelo basengeli mpe komitalela ntango nyonso. Banso basengeli komituna ntango nyonso: ‘Misala na biso mizali ya kokoka mpenza’ liboso ya Nzambe na biso? Kozanga kosambisa bamosusu, tolonaka biso mpenza elimo na kozanga koluka matomba na biso mpe totyaka molende na kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba? Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosenzeli ezali koyikisa biso mpiko mpo na yango na nzela na masolo lokola oyo: “Bókoba kotala soki bozali ndenge nini?” mpe “Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te.”a Na nzela na zulunalo wana oyo ezali kolimbola Biblia, totalela makanisi na biso maleki mozindo mpe totya molende kotambola na kosokema mpenza mpe na libondeli kati na bosembo liboso na Jéhovah.—Nzembo 26:1-3; 139:23, 24.
“Mwa nkombo mosusu”
10. Maloba nini ya mpiko Yesu alobeli yango lisangá ya Saladesi, mpe na nini yango esengeli kosimba biso?
10 Maloba malandi oyo Yesu alobeli yango lisangá ya Saladesi mazali maloba na elendiseli mingi. Ye alobi boye: “Kasi ozali na mwa nkombo mosusu kati na Saladesi, bato babebisi bilamba na bango mbindo te, mpe bakotambola na ngai elongo na bilamba mpembe, mpo ete bazali babongi. Mpo na molongi, ye akolatisama bongo na bilamba mpembe, mpe nakoboma nkombo na ye na buku na bomoi te, nde nakoyambola nkombo na ye na miso na Tata na ngai mpe na miso na baanzelu na ye.” (Emoniseli 3:4, 5) Nsango oyo ezali solo elendiseli mpe ezali kokembisa biso ete totikala ntango nyonso sembo. Soki lisangani ya bankulutu bazali na bopoto, yango ekoki kokotisa lisangá mobimba kati na mpongi na elimo. Nzokande ekoki kozala ete mwa bamoko na basangani na lisangá batie molende na kobatela na mpiko nyonso bizaleli na bango ya boklisto kozanga litono, kobatelaka bongo nkombo kitoko liboso na Jéhovah.—Masese 22:1.
11, 12. (a) Ata na eleko ya lipengwi, ndenge nini bamoko bamitambwisaki lokola “mwa bankombo” oyo ezalaki na Saladesi? (b) Motindo nini baklisto bakokani na mbuma malamu to blé babikisamaki na boumeli na mokolo na Nkolo?
11 “Bilamba” yango nde bizali komonisa ete moto boye azali moklisto, moyengebene. (Tala Emoniseli 16:15; 19:8) Ezalaki esengo mpo na Yesu na komona ete atako mingi bazalaki na bopoto, nzokande “mwa nkombo,” elingi koloba mwa baklisto bapakolami na Saladesi, bazalaki naino kotya molende ya kobatela bizaleli na bango ya boklisto. Bobele bongo, wana ete baoyo bazalaki komibenga baklisto bamelamaki na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, na boumeli ya bikeke ya lipengwi, ezalaki ntango nyonso na mwa bato oyo bazalaki kotya molende na kosala mokano ya Jéhovah atako bazalaki kotemela bango. Bato yango bazalaki bayengebene bakokani na mbuma malamu to blé oyo ebombamaki katikati na ebele na mangomba ya lokuta makokani na matiti mabe.—Emoniseli 17:3-6; Matai 13:24-29.
12 Yesu alakaki ete akozala penepene na baklisto wana bakokani na mbuma malamu “mikolo nyonso kino nsuka na mokili.” Ayebi bango malamu mpe ayebi ete bazali na nkombo ya lokumu. (Matai 28:20; Mosakoli 7:1) Kanisa esengo ezalaki na “mwa” basembwi wana oyo bazalaki naino na bomoi ntango mokolo na Nkolo ekokaki! Bautaki kobima na mangomba na boklisto na mokili oyo esili kokufa na elimo, mpe basilaki koyanganisama kati na lisangá ya sembo ekokani mpenza na oyo ya Sumuluna ya kala.—Matai 13:40-43.
13. Mapamboli nini mazali kozela baklisto bapakolami oyo ‘babebisi bilamba na bango te’?
13 Baklisto ya Saladesi oyo batikalaki sembo kino na nsuka mpe babebisaki bizaleli na bango ya boklisto te bazwaki mbano kitoko na kokokisama na elikya na bango. Mpamba te, nsima na kosalama na Bokonzi na Masiya na 1914, bango basekwisamaki mpo na bomoi na elimo, mpe lokola bazali balongi, balatisamaki bilamba mpembe mpo na komonisa elembo na boyengebene na bango oyo ezangi litono mpe ezangi libebi. Lokola batambolaki na nzela moke oyo ezali komema na bomoi, mbano na bango ekozala ya seko.—Matai 7:14; tala mpe Emoniseli 6:9-11.
Bakomami nkombo mpo na libela kati na buku na bomoi
14. “Buku na bomoi” ezali nini, mpe nkombo ya banani ekomami kati na yango?
14 “Buku na bomoi” ezali nini mpe nkombo ya banani ekomami kati na yango? Buku na bomoi ezali mpo na misala na basaleli na Jéhovah oyo bazali na elikya ya kozwa likabo ya bomoi ya seko. (Malaki 3:16) Awa, na kati na Emoniseli, elobelami mpenzampenza mpo na nkombo ya baklisto bapakolami. Kasi nkombo na baoyo bazali kolikya kozwa bomoi ya seko na mabelé ekomami mpe kati na buku yango. Epai mosusu, ezali na bankombo oyo ekoki ‘kolongolama’ na buku yango. (Exode 32:32, 33) Nzokande, baoyo kati na kelasi na Yoane oyo nkombo na bango ekotikala kati na buku na bomoi kino na kufa na bango bakozwa bomoi ya seko kati na makoló. (Emoniseli 2:10) Ezali bankombo wana nde Yesu akoyambola to akondima yango na miso na Tata na ye mpe na miso na baanzelu na Ye. Oyo nde mbano kitoko mingi!
15. Ndenge nini nkombo ya basangani ya ebele monene ekokomama libela kati na buku ya bomoi?
15 Ebele monene oyo nkombo na bango ekomami mpe kati na buku na bomoi bakobika na bolozi monene. Soki bakozala na kondima na boumeli na Bokonzi na mbula nkoto na Yesu mpe na boumeli na komekama ya nsuka oyo ekolanda yango, bakozwa mbano ya bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé. (Danyele 12:1; Emoniseli 7:9, 14; 20:15; 21:4) Wana nkombo na bango ekotikala libela kati na buku na bomoi. Koyebaka makambo oyo malakisami epai na biso na nzela na elimo santu, ekoki solo ete totosa mpenza maloba oyo Yesu azongeli yango mbala mingi: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá!”—Emoniseli 3:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2005 mpe ya 15 Marsi 2005.
[Elilingi na lokasa 57]
Tika ete nkombo na yo ekomama mpo na libela na buku ya bomoi