Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Nani abongi mpo na kofungola mokanda?”
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 14. (a) Bikelamu na bomoi minei mpe mikóló 24 basali nini ntango Yesu akamati mokanda? (b) Ndenge nini makambo mayebisami na Yoane na ntina na mikóló 24 mamonisi soki bazali banani mpe nini ezali etelemelo na bango?

      14 Bamosusu oyo batelemi liboso na kiti na bokonzi na Jéhovah basali nini na ntango yango? “Wana esili ye kokamata mokanda yango, bikelamu na bomoi yango minei mpe mikóló yango ntuku mibale na minei, bakwei liboso na Mwana na Mpate, mpe bazalaki moko moko na nzenze mpe na mbeki na wolo etondi na malasi oyo ezali mabondeli na babulami.” (Emoniseli 5:8) Lokola bikelamu na bomoi minei, elingi koloba bacheribɛ minei oyo batelemaka liboso na kiti na bokonzi na Nzambe, mikóló 24 bangumbami liboso na Yesu, komonisaka bongo ete bandimi bokonzi na ye. Kasi bobele bankulutu yango nde bazali na nzenze mpe na mbeki na malasi.a Mpe bobele bango nde bayembi sikawa loyembo na sika. (Emoniseli 5:9) Bakokani bongo na babulami 144 000 ya “Yisraele na Nzambe,” mpo ete bango mpe bazali na nzenze mpe bazali koyemba loyembo ya sika. (Bagalatia 6:16; Bakolose 1:12; Emoniseli 7:3-8; 14:1-4) Epai mosusu, mikóló 24 balakisami ete bazali kosala mosala ya bonganga kuna na likoló. Mosala yango elakisamaki na elilingi na mosala oyo banganga ya kala ya Yisraele bazalaki kosala, oyo bazalaki kotumba malasi liboso na Jéhovah kati na tabernakle—mosala yango esukaki na mabelé ntango Nzambe alongolaki mibeko na Moïse na kobakisaka yango na nzete esika moko na Yesu. (Bakolose 2:14) Tokosukisa nini na nyonso oyo? Boye ete eteni oyo elobeli balongi bapakolami na elimo bazali kokokisa mosala mosili kopesamela bango, oyo ya ‘banganga na Nzambe mpe na Klisto, oyo bakoyangela na ye elongo mbula nkoto.’—Emoniseli 20:6.

  • “Nani abongi mpo na kofungola mokanda?”
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • Loyembo na sika

      17. (a) Loyembo nini ya sika mikóló 24 bazali koyemba? (b) Na ndimbola nini liloba “loyembo na sika” esalelami mingimingi kati na Biblia?

      17 Sikawa loyembo moko kitoko eyembami mpo na kokumisa Mwana na Mpate. Eyembami na mikóló 24, banganga oyo bakosala na ye mosala elongo: “Bayembi loyembo na sika ete: ‘Obongi na kokamata mokanda yango mpe na kofungola bilembo na yango, mpo ete obomami mpe na makila na yo osikoli mpo na Nzambe bato na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso mpe na mabota nyonso.’” (Emoniseli 5:9) Liloba “loyembo na sika” emonani mbala mingi kati na Biblia. Ezalaka mingimingi mpo na kokumisa Jéhovah na ntina na misala na ye ya nguya mpo na kobikisa bato na ye. (Nzembo 96:1; 98:1; 144:9) Loyembo ezali ya sika mpamba te moyembi akoki sikawa kosakola misala kitoko mpe ya sika ya Jéhovah mpe komonisa limemya makasi mpo na nkombo na Ye ya nkembo.

      18. Mpo na bantina nini mikóló 24 bazali kokumisa Yesu na loyembo na bango ya sika?

      18 Nzokande, awa mikóló 24 bazali koyemba loyembo ya sika liboso na Yesu, kasi liboso na Jéhovah te. Ata bongo libongwani mpenza ezali te. Bazali kokumisa Yesu mpo na makambo ya sika oyo asali mpo na bolamu na bango, na motindo na ye ya Mwana na Nzambe. Na nzela na makila na ye, asalaki mosala ya moyokanisi ya kondimana ya sika mpe akokaki bongo kobimisa libota ya sika oyo ezali mpo na Jéhovah mpenza. (Baloma 2:28, 29; 1 Bakolinti 11:25; Baebele 7:18-25) Basangani na libota oyo ya sika ya elimo bauti na mabota mingi, kasi Yesu ayanganisi bango na lisangá se moko, na libota se moko.—Yisaya 26:2; 1 Petelo 2:9, 10.

      19. (a) Lipamboli nini libota na Yisraele na mosuni bazwaki te mpo ete bazangaki botosi? (b) Lipamboli nini libota ya sika ya Jéhovah ezali bongo na lotomo ya kozwa?

      19 Ntango Jéhovah abongisaki Bayisraele lokola libota na mikolo na Moïse, asalaki kondimana elongo na bango mpe alakaki bango ete soki bakobatela kondimana yango, bakozala mpo na ye bokonzi na banganga. (Exode 19:5, 6) Kasi Bayisraele bazalaki na botosi te; yango wana bamonaki te kokokisama na elaka oyo. Nzokande, libota ya sika oyo esalami na nzela na kondimana ya sika oyo Yesu azali moyokanisi na yango, ezali ntango nyonso sembo. Basangani na yango bakoki bongo koyangela mabelé mpe kozala banganga, kosalisaka bato ya sembo ete bayokana elongo na Jéhovah. (Bakolose 1:20) Ezali yango mpenza oyo loyembo ya sika emonisi na maloba oyo: “Mpe ozalisi bango bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.” (Emoniseli 5:10) Oyo nde esengo mpo na mikóló oyo 24 na koyemba loyembo oyo ya sika mpo na kokumisa Yesu oyo asili kokembisama!

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto