Tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso
“Biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”—MIKA 4:5.
1. Na mikolo ya Noa, bato bazalaki na bizaleli ya ndenge nini, mpe ndenge nini Noa akeseneki na bango?
MOTO ya liboso oyo Biblia elobeli ete atambolaki elongo na Nzambe ezali Enoka. Ya mibale ezali Noa. Biblia elobi boye: “Noa azalaki moto ya sembo mpe ya boyengebene kati na bato ya ntango na ye. Noa atambolaki na Nzambe [ya solo] elongo.” (Genese 6:9) Na ntango ya Noa, bato nyonso bapesaki losambo ya pɛto mokɔngɔ. Mabe ekómaki lisusu makasi ntango baanzelu bapɛngwi basangisaki nzoto na basi mpe babotaki bana oyo babengamaki banefilime, elingi koloba “bilombe,” to “bato ya lokumu,” ya ntango wana. Yango wana, mabelé etondaki mpenza na mobulu! (Genese 6:2, 4, 11) Atako bongo, Noa azalaki moto ya sembo mpe “mosakoli ya boyengebeni.” (2 Petelo 2:5) Ntango Nzambe alobaki na ye atonga masuwa mpo na kobikisa bomoi, na botosi nyonso, Noa “asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:22) Ya solo, Noa atambolaki elongo na Nzambe.
2, 3. Ndakisa nini kitoko Noa atikelá biso?
2 Paulo atángaki Noa na molongo ya Batatoli ya sembo ntango akomaki ete: “Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye; mpe na nzela ya kondima wana akweisaki mokili likambo, mpe akómaki mozwi-ya-libula ya boyengebene oyo ezali engebene kondima.” (Baebele 11:7) Oyo ndakisa kitoko! Lokola azalaki kotya motema ete maloba ya Yehova ekokokisama, Noa apesaki ntango, makasi mpe biloko na ye mpo na kosala makambo oyo Nzambe asɛngaki ye. Ndenge moko, bato mingi lelo oyo bazali koboya misala mosusu ya mokili oyo mpe bazali kopesa ntango, makasi mpe biloko na bango mpo na kotosa oyo Yehova asɛngi. Yehova azali komona kondima na bango mpe yango ekobikisa bango moko mpe bato mosusu.—Luka 16:9; 1 Timote 4:16.
3 Na ntembe te, ezalaki mpasi mpo na Noa mpe libota na ye komonisa kondima ndenge kaka ezalaki mpo na Enoka, nkɔkɔ ya Noa, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso. Na mikolo ya Noa mpe ya Enoka, basambeli ya solo bazalaki moke, elingi koloba kaka bato mwambe nde bazalaki sembo mpe babikaki na mpela. Noa ateyaki boyengebene na kati ya mokili ya mobulu mpe ya mbindo. Lisusu, ye ná libota na ye bazalaki kotonga masuwa moko monene mpo na komibatela na mpela oyo elingaki koya na mokili mobimba, atako moto moko te amonaki mpela ya ndenge wana liboso. Likambo yango esengelaki mpenza kokamwisa bato oyo bazalaki kotala bango.
4. Mabe nini ya bato ya mikolo ya Noa Yesu alobelaki?
4 Tósimba ete ntango Yesu alobelaki mikolo ya Noa, alobelaki te mobulu, losambo ya lokuta, to etamboli ya mbindo, atako makambo yango ezalaki mabe mingi. Alobelaki nde ndenge bato baboyaki koyoka likebisi oyo ezalaki kopesama. Alobaki ete bazalaki “kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa.” Mabe nini mpenza ezalaki na kolya, komɛla, kobala mpe kobalisa? Ezalaki kaka makambo oyo “moto asengeli kosala.” Kasi, mpela ezalaki koya, mpe Noa azalaki kosakola boyengebene. Maloba mpe etamboli na ye esengelaki kozala likebisi mpo na bango. Nzokande, “batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”—Matai 24:38, 39.
5. Bizaleli nini ezalaki na ntina mingi mpo na Noa ná libota na ye?
5 Soki tozongisi makanisi na ntango wana, tokomona ete Noa atambolaki na bwanya. Kasi, liboso ya mpela, ezalaki kosɛnga kozala na mpiko mpo na kokesana na bato mosusu. Esɛngaki ete Noa ná libota na ye bázala na kondima makasi mpo na kotonga masuwa monene wana mpe kotya na kati na yango banyama ya motindo na motindo. Kati na mwa bato yango ya sembo, bamosusu bakómaki nde na mposa ya kotika bomoi oyo bazalaki na yango mpo na kokóma kosala “makambo oyo bato nyonso bazalaki kosala?” Ata soki makanisi ya bongo ekokaki kokómela bango, bosembo na bango elɛmbaki te. Nsima ya mbula ebele, oyo moto moko te akoki kokokisa lelo oyo, kondima ya Noa esalisaki ye abika na mpela. Nzokande, Yehova abomaki baoyo nyonso oyo baboyaki kosala lokola Noa ná libota na ye mpe basimbaki ntina te ya ntango oyo bazalaki.
Mobulu ebandi lisusu konyokola bato
6. Nsima ya Mpela, makambo nini ekobaki kosalema?
6 Ntango Mpela esilaki, bato babandaki bomoi ya sika. Atako bongo, bato bazalaki kaka bato ya kozanga kokoka mpe “makanisi ya motema na moto” ekobaki kozala “mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Longola yango, atako bademo bakokaki lisusu te kolata nzoto ya bato, bazalaki kaka kosala makambo mabe. Mokili wana ya bato oyo bazalaki kobanga Nzambe te emonisaki ete “ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe” mpe, ndenge kaka mokili ya lelo ezali, basambeli ya solo basengeli kobunda na “mayele mabe ya Zabolo.”—1 Yoane 5:19; Baefese 6:11, 12.
7. Ndenge nini mobulu ekolaki makasi nsima ya Mpela?
7 Nsima ya Mpela, mingimingi na ntango ya Nimerode, mabelé etondaki lisusu na mobulu. Lokola bato bakómaki mingi mpe mayele ya siansi ekolaki, mobulu yango ekobaki. Na ebandeli, bazalaki kosalela mopanga, likɔnga, litimbo, mbanzi mpe likalo. Mwa moke pene ya ntango na biso, babimisaki mindoki lokola pupu, bakano, mindoki oyo elandisaka masasi ebele mpe mindoki mosusu ya nsɔmɔ oyo ebimaki na ekeke ya 20. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esali ete bibundeli ya nsɔmɔ koleka ebakisama, na ndakisa mpɛpɔ, otoblende, sous-marin, mpe bagazɛ. Na etumba yango, mindoki wana ebomaki bamilio ya bato. Makambo yango ebimaki mbalakaka? Te.
8. Ndenge nini Emoniseli 6:1-4 ekokisami?
8 Na mobu 1914, Yesu akómaki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mpe “mokolo ya Nkolo” ebandaki. (Emoniseli 1:10) Na emonaneli moko oyo ezali na mokanda ya Emoniseli, bamonisi Yesu lokola Mokonzi oyo abimi na kolonga mpe afandi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ. Bato mosusu oyo bazali mpe likoló ya mpunda bazali kolanda ye na nsima, mokomoko na bango azali komonisa mpasi moko oyo esengeli kokwela mokili. Moko na bango afandi na mpunda ya langi ya mɔtɔ mpe bapesaki ye nzela ya “kolongola kimya na mabelé mpo bábomana bango na bango; mpe bapesaki ye mopanga moko monene.” (Emoniseli 6:1-4) Mpunda yango ná moto oyo afandi likoló na yango bazali elilingi ya bitumba, mpe mopanga monene ezali komonisa bitumba ya lelo oyo ezali kosilisa bato mpe bibundeli na yango ya makasimakasi. Lelo oyo, na kati ya bibundeli yango tokokuta babombi ya nikleere, oyo mokomoko na yango ezali na likoki ya koboma bamilio ya bato; bamisile oyo ekoki komema babombi yango mosika mpenza, mpe mindoki mosusu ya mabemabe oyo ekoki koboma ebele ya bato mbala moko.
Totyaka likebi na makebisi ya Yehova
9. Ndenge nini mokili ya lelo ekokani na oyo ezalaki liboso ya Mpela?
9 Na mikolo ya Noa, Yehova abebisaki mokili mpo makambo mabe oyo bato mabe ná Banefilime bazalaki kosala elekaki ndelo. Ezali boni mpo na mikolo na biso? Mobulu oyo ezali lelo na mabelé ekokani te na oyo ezalaki na ntango ya Noa? Ezali bongo te. Kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, bato lelo oyo bazali komipesa na makambo na bango ya mokolo na mokolo, bazali kosala kaka oyo motema na bango elingi mpe koboya koyoka makebisi oyo ezali kopesama. (Luka 17:26, 27) Tokoki mpenza kotya ntembe ete Yehova akobebisa lisusu mokili? Te.
10. (a) Likebisi nini ezongelami mbala mingi na bisakweli ya Biblia? (b) Wapi etamboli kaka moko ya bwanya oyo ebongi lelo oyo?
10 Bankama ya bambula liboso ya Mpela, Enoka asakolaki libebi oyo esengelaki koya na mikolo na biso. (Yuda 14, 15) Yesu mpe alobelaki “bolɔzi moko monene” oyo esengelaki koya. (Matai 24:21) Basakoli mosusu mpe bapesaki makebisi mpo na ntango yango. (Ezekiele 38:18-23; Danyele 12:1; Yoele 2:31, 32) Mpe na mokanda ya Emoniseli, totángaka bililingi oyo ezali komonisa ndenge libebi yango ya nsuka ekosalema. (Emoniseli 19:11-21) Mokomoko na biso alandaka ndakisa ya Noa mpe biso nyonso tozali basakoli ya molende ya boyengebene. Totyaka likebi na makebisi ya Yehova mpe tosalisaka bazalani na biso na bolingo nyonso básala mpe bongo. Na yango, lokola Noa, tozali kotambola elongo na Nzambe. Ya solo, ezali na ntina ete moto nyonso oyo alingi bomoi akoba kotambola elongo na Nzambe. Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Nzambe atako tozali kokutana na mikakatano mokolo na mokolo? Tosengeli kozala na kondima makasi ete mokano ya Nzambe ekokokisama.—Baebele 11:6.
Tókoba kotambola elongo na Nzambe na ntango ya yikiyiki
11. Na lolenge nini tomekolaka baklisto ya ekeke ya liboso?
11 Na ekeke ya liboso, bazalaki koloba ete baklisto bapakolami bazali bato ya “Nzela.” (Misala 9:2) Makambo nyonso oyo bazalaki kosala na bomoi na bango emonisaki ete bazali na kondima epai na Yehova mpe Yesu Klisto. Bazalaki kolanda lokolo ya Nkolo na bango. Lelo oyo, baklisto ya sembo basalaka mpe bongo.
12. Likambo nini esalemaki ntango Yesu aleisaki ebele ya bato na ndenge ya kokamwa?
12 Ntina ya kozala na kondima emonanaki na likambo moko oyo esalemaki ntango Yesu azalaki kosakola. Mokolo moko, Yesu aleisaki na lolenge ya kokamwa bato soki 5 000. Bato bakamwaki mpe basepelaki. Talá ndenge makambo elekaki na nsima. Totángi boye: “Ntango bato bamonaki bilembo oyo asalaki, babandaki koloba ete: ‘Oyo azali solo mpenza mosakoli oyo asengelaki koya na mokili.’ Bongo Yesu, lokola ayebaki ete balingaki báya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki mpe akendaki lisusu na ngomba kaka ye moko.” (Yoane 6:10-15) Na butu wana kaka akendeki esika mosusu. Ekoki kozala ete bato mingi balɛmbaki nzoto ntango Yesu aboyaki bátya ye mokonzi. Kutu, amonisaki ete azali mpenza na bwanya ya kozala mokonzi mpe azalaki na nguya ya kokokisa bamposa ya mosuni ya bato. Kasi, ezalaki te ntango oyo Yehova atyaki mpo Yesu abanda koyangela lokola mokonzi. Longola yango, Bokonzi ya Yezu ezalaki ya likoló, kasi ya mabelé te.
13, 14. Bato mingi bamonisaki makanisi ya ndenge nini, mpe ndenge nini kondima na bango emekamaki?
13 Atako bongo, ndenge Yoane alobi, ebele wana ya bato balandaki Yesu mpe bakutaki ye na “ngámbo mosusu ya mbu.” Mpo na nini balandaki ye atako aboyaki bátya ye mokonzi? Mingi bamonisaki ete bazalaki na makanisi ya mosuni mpamba te bazalaki kolobela mingi kaka biloko oyo Yehova apesaki Bayisalaele na esobe na mikolo ya Moize. Bazalaki na likanisi ete Yesu akokoba kopesa bango biloko ya kolya. Lokola Yesu ayebaki makanisi mabe oyo bazalaki na yango, abandaki koteya bango makambo ya elimo oyo ekokaki kosembola makanisi na bango. (Yoane 6:17, 24, 25, 30, 31, 35-40) Bato mosusu bakómaki koimaima, mingimingi ntango apesaki lisese oyo: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi na kati na bino te. Moto oyo azali kolya mosuni na ngai mpe komɛla makila na ngai azali na bomoi ya seko, mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.”—Yoane 6:53, 54.
14 Bandakisa oyo Yesu azalaki kopesa ezalaki mbala mingi kotinda bato bámonisa soki balingi mpenza kotambola elongo na Nzambe to te. Ndakisa oyo mpe emonisi likambo yango. Ndakisa yango esilikisaki bato mingi. Totángi boye: “Mingi na kati ya bayekoli na ye, ntango bayokaki yango, balobaki ete: “Liloba oyo ezali ya kozokisa; nani akoki koyoka yango?” Yesu abandaki kolimbwela bango ete basengeli kotalela maloba na ye na ndenge ya elimo. Alobaki boye: “Elimo nde epesaka bomoi; mosuni ezali na ntina ata moke te. Maloba oyo nalobi na bino ezali elimo mpe ezali bomoi.” Nzokande, bato mingi balingaki koyoka ye te, mpe lisolo yango ekobi ete: “Mpo na yango, mingi na kati ya bayekoli na ye bazongelaki biloko ezalaki na nsima mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.”—Yoane 6:60, 63, 66.
15. Likanisi nini ya malamu bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki na yango?
15 Nzokande, bayekoli nyonso te ya Yesu nde bamonisaki makanisi yango. Ezali solo ete ata bayekoli ya Yesu ya sembo mpe basimbaki te ntina ya makambo nyonso oyo Yesu alobaki. Atako bongo, bazalaki kaka kotyela ye motema. Petelo, moko ya bayekoli yango ya sembo, amonisaki makanisi na bango nyonso oyo batikalaki sembo na maloba oyo: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoane 6:68) Oyo nde makanisi mpe ndakisa malamu!
16. Ndenge nini tokoki komekama, mpe likanisi nini tosengeli kozala na yango?
16 Lelo oyo, biso mpe tokoki komekama ndenge bayekoli ya Yesu ya liboso bamekamaki. Na ndakisa, tokoki komitungisa ete bilaka ya Yehova ekokisami noki te ndenge biso tolingaki. Tokoki mbala mosusu kokanisa ete bandimbola ya Biblia oyo ezali na mikanda na biso ezali mpasi. Etamboli ya ndeko moko moklisto ekoki kobɛtisa biso libaku. Ekozala mpenza malamu tótika kotambola elongo na Nzambe mpo na makambo oyo to mosusu? Soki moke te! Bayekoli oyo batikaki Yesu bamonisaki ete bazalaki na makanisi ya mosuni. Tosengeli te kosala lokola bango.
“Biso tozali te motindo ya bato oyo bazongaka nsima”
17. Nini ekoki kosalisa tókoba kotambola elongo na Nzambe?
17 Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Na kati ya Biblia, Yehova azali koyebisa biso polele ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) Kotosa Liloba ya Nzambe esalisaka biso ‘tókeba mpenza na ndenge tozali kotambola.’ (Baefese 5:15) Kotánga Biblia mpe komanyola na makambo oyo tozali koyekola epesaka biso makoki ya “kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoane 3) Ya solo, ndenge Yesu alobaki, “elimo . . . epesaka bomoi; mosuni ezali na ntina ata moke te.” Litambwisi kaka moko ya malamu oyo tozali na yango ezali oyo ya elimo, oyo eutaka na Liloba ya Yehova, na elimo na ye, mpe na ebongiseli na ye.
18. (a) Bato mosusu oyo bazangi bwanya basalaka nini? (b) Kondima ya ndenge nini tozali na yango?
18 Lelo oyo, baoyo balɛmbaka nzoto mpo na makanisi na bango ya mosuni to mpo makambo oyo bazalaki kozela ekokisami te, bakómaka mbala mingi koluka bisengo ya mokili oyo. Lokola bamonaka lisusu te ete mikolo etikali ya kotánga, bamonaka lisusu ntina te ya ‘kokɛngɛlaka,’ baponaka nde koluka matomba ya mosuni na esika ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 24:42) Kotambola lolenge wana ezali mpenza kozanga bwanya. Talá maloba ya ntoma Paulo oyo: “Tozali te motindo ya bato oyo bazongaka nsima mpo na libebi, kasi nde motindo ya bato oyo bazali na kondima mpo na kobatelama ya molimo na bomoi.” (Baebele 10:39) Ndenge moko na Enoka mpe Noa, tozali na ntango moko ya yikiyiki, kasi na ndakisa na bango, tozali kotambola elongo na Nzambe. Na yango, tozali kotya motema mobimba ete bilaka ya Yehova ekokokisama, ete mabe ekosila, mpe mokili ya boyengebene ekosalema. Oyo elikya kitoko!
19. Na maloba nini Mika alobeli etamboli ya basambeli ya solo?
19 Mosakoli Mika alobaki ete bato ya bikólo “bakotambola, moko na moko na nkombo na nzambe na ye.” Na nsima, alobaki mpo na ye moko mpe mpo na basambeli mosusu ya sembo boye: “Biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) Soki ozali na ekateli lokola oyo ya Mika, kangamá na Yehova ata soki makambo ekómi yikiyiki ndenge nini. (Yakobo 4:8) Tiká ete mokomoko na biso azala na mposa makasi ya kotambola elongo na Yehova Nzambe na biso sikoyo mpe libela na libela!
Okopesa eyano nini?
• Mikolo ya Noa ekokani na mikolo na biso na makambo nini?
• Ezaleli nini Noa ná libota na ye bazalaki na yango, mpe ndenge nini tokoki komekola kondima na bango?
• Makanisi nini ya mabe bayekoli mosusu ya Yesu bamonisaki?
• Baklisto ya solo bazali na ekateli ya kosala nini?
[Bililingi na lokasa 20]
Kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, bato lelo oyo bazali komipesa na makambo na bango ya mokolo na mokolo
[Elilingi na lokasa 21]
Biso basakoli ya Bokonzi “tozali te motindo ya bato oyo bazongaka nsima”