Boklisto ekɔti na Asie Mineure
NA SIƐKLƐ ya liboso, masangá ya boklisto ekómaki mingi na Asie Mineure (mingimingi na teritware oyo ezali lelo ekólo Turquie). Ebele ya Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu bandimaki nsango malamu. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Longola na Palestine mpe na Syrie, Asie Mineure ezalaki esika mosusu oyo boklisto ebandaki kokola mpe kopalangana.”
Tokomona ndenge oyo boklisto epalanganaki na Asie Mineure soki tosangisi makambo oyo tokoki kozwa na mikanda ndenge na ndenge. Tótalela ndenge oyo makambo yango ekoki kosalisa biso.
Baklisto ya liboso ya Asie Mineure
Likambo ya liboso ya ntina mingi oyo ekɔtisaki boklisto na Asie Mineure esalamaki na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ntango bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge, kati na bango Baprozelite mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu, bayanganaki na Yelusaleme mpo na Fɛti ya Pantekote. Bantoma ya Yesu basakwelaki bapaya yango nsango malamu. Biblia elobi ete bato yango mosusu bautaki na Kapadosi, na Ponti, na etúká ya Azia,a na Filigia, mpe na Pamofilia—bitúká oyo ezwi eteni monene ya Asie Mineure. Bato soki 3 000 bandimaki nsango malamu mpe bazwaki batisimo. Ntango bazongaki na bamboka na bango, bakómaki koteya makambo oyo bayekolaki.—Misala 2:5-11, 41.
Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso ezali lisolo ya Biblia oyo elobeli mibembo ya misionɛrɛ oyo ntoma Paulo asalaki na Asie Mineure. Na mobembo na ye ya liboso, kati na mobu 47 mpe 48 T.B., Paulo akɔtaki na masuwa elongo na baninga na ye longwa na Sipele tii na Asie Mineure, balekaki na Pelega na etúká ya Pamofilia. Na engumba Antiokia ya Pisidia, Bayuda bayokelaki bango zuwa mpe batɛmɛlaki bango mpo bato mingi bandimaki nsango malamu. Ntango Paulo akendaki na sudi-ɛsti tii na Ikoniumu, Bayuda mosusu balingaki kosala ye mabe. Na Lisitala, engumba oyo ezalaki pembeni, ntango bato bamonaki likamwisi oyo Paulo asalaki, balobaki ete azali nzambe. Nzokande, ntango Bayuda oyo batɛmɛlaki bango na Antiokia mpe Ikoniumu bakómaki na Lisitala, bandimisaki bato mpe babambaki Paulo mabanga, etikalaki moke báboma ye! Nsima na yango, Paulo ná Balanabasi bakendaki na Delebe, engumba moko ya etúká ya Galatia, oyo bato na yango bazalaki koloba monɔkɔ ya Likaonia. Bafungolaki masangá mpe baponaki bankulutu. Na yango, tomoni ete mbula soki 15 nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., boklisto efandaki mpenza na Asie Mineure.—Misala 13:13–14:26.
Na mobembo na ye ya mibale, kati na mobu 49 mpe 52 T.B., Paulo ná baninga na ye bakendaki na nzela ya mokili tii na Lisitala mpe mbala mosusu balekaki na mboka na ye Talasi, na etúká ya Silisia. Nsima ya kozongela bandeko ya Lisitala, Paulo akendaki na nɔrdi mpe amekaki ‘koloba liloba’ na etúká ya Bitinia mpe ya Azia. Kasi, elimo santu epekisaki ye. Ntango ekokaki naino te mpo nsango malamu esakolama na bisika yango. Na nsima, Nzambe atambwisaki Paulo na nɔrdi-wɛsti ya Asie Mineure tii na Toloasi, engumba oyo ezalaki na bokula. Nsima na yango, na nzela ya emonaneli moko, Paulo azwaki etinda ete akende kosakola nsango malamu na Mpoto.—Misala 16:1-12; 22:3.
Na mobembo ya misato oyo Paulo asalaki lokola misionɛrɛ kati na mobu 52 mpe 56 T.B., alekaki lisusu na Asie Mineure mpe akómaki tii na Efese, engumba monene ya Azia oyo ezalaki na libongo. Na mobembo na ye ya mibale, alekaki na engumba yango. Paulo ná baninga na ye bakutaki etuluku moko ya baklisto ya molende na engumba yango, mpe balekisaki elongo na bango mbula soki misato. Na boumeli ya ntango yango, bakutanaki na mikakatano mpe makama mingi; moko na yango ezali mobulu oyo basali ya biloko ya palata ya Efese babimisaki mpo na kobatela mombongo na bango ya kotɛka biloko ya losambo.—Misala 18:19-26; 19:1, 8-41; 20:31.
Emonani ete mosala oyo Paulo ná baninga na ye basalaki na Efese ebotaki mpe mbuma na bisika mosusu. Misala 19:10 elobi boye: “Baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia bayokaki liloba ya Nkolo, ezala Bayuda mpe Bagrɛki.”
Bokoli na bingumba mosusu ya Asie Mineure
Liboso Paulo alongwa na Efese, akomelaki baklisto ya Kolinti boye: “Masangá ya Azia etindeli bino mbote.” (1 Bakolinti 16:19) Masangá nini Paulo alobelaki? Ekoki kozala lisangá ya Kolose, ya Laodikia, mpe ya Hiyelapolisi. (Bakolose 4:12-16) Buku moko (Paul—His Story) elobi boye: “Emonani ete masangá efungwamaki na Similina, Pelegame, Saladi mpe Filadelefia na nzela ya mosala oyo bamisionɛrɛ basalaki na Efese. . . . Engumba oyo elekaki mosika ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 192 longwa na Efese mpe ezalaki na banzela ya malamu.”
Na yango, mbula soki 20 nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ezalaki na masangá na sudi mpe na wɛsti ya Asie Mineure. Ezali boni mpo na bisika mosusu ya Asie Mineure?
Bato oyo Petelo akomelaki mikanda
Ntoma Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso mwa bambula na nsima, na mobu soki 62 mpe 64 T.B., atindelaki yango baklisto ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadosi, ya Azia, mpe ya Bitinia. Mokanda ya Petelo emonisi ete masangá ezalaki na bitúká yango, alendisaki bankulutu ya masangá yango ete ‘bábatela etonga.’ Masangá yango esalemaki ntango nini?—1 Petelo 1:1; 5:1-3.
Paulo asakolaki na bitúká mosusu oyo Petelo atindelaki mikanda; na ndakisa Azia mpe Galatia. Nzokande, asakolaki na Kapadosi mpe na Bitinia te. Biblia elobi te ndenge oyo boklisto ekɔtaki na bitúká yango; kasi ekoki kozala ete nsango malamu ekómaki kuna na nzela ya Bayuda mpe Baprozelite oyo bazalaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B. Ata soki ekɔtaki ndenge nini, emonani ete ntango Petelo akomaki mikanda na ye, mbula soki 30 nsima ya Pantekote, ndenge moto moko ya mayele amonisi yango, masangá “epalanganaki na Asie Mineure mobimba.”
Masangá nsambo ya Emoniseli
Botomboki ya Bayuda etindaki Baloma bábebisa Yelusaleme na mobu 70 T.B. Ekoki kozala ete baklisto mosusu ya Yudea bakendaki na Asie Mineure.b
Na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, Yesu Klisto akomelaki masangá nsambo ya Asie Mineure mikanda na nzela ya ntoma Yoane. Mikanda yango, oyo atindelaki lisangá ya Efese, ya Similina, ya Pelegame, ya Tyatila, ya Saladi, ya Filadelefia, mpe ya Laodikia, emonisi ete baklisto oyo bafandaki na bingumba yango ya Asie Mineure bazalaki na makama ya ndenge na ndenge, na ndakisa makambo ya mbindo, mwa mangomba, mpe lipɛngwi.—Emoniseli 1:9, 11; 2:14, 15, 20.
Kosala na bopɔlɔ mpe na molimo mobimba
Ya solo, kopalangana ya boklisto na siɛklɛ ya liboso esuki kaka te na makambo oyo totángaka na mokanda ya Misala ya Bantoma. Mokanda ya Misala elobeli mingimingi mosala ya Petelo mpe Paulo, bantoma oyo bayebani mingi; kasi ezalaki mpe na ebele ya basakoli mosusu oyo bazalaki koteya na bisika mosusu. Bokoli oyo esalamaki na Asie Mineure emonisi ete baklisto ya liboso batosaki etinda ya Yesu ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”—Matai 28:19, 20.
Ndenge moko mpe lelo oyo, toyebaka kaka masolo ya mwa ndambo ya Batatoli oyo bazali kosalela Yehova na bosembo. Ndenge moko na basakoli ya sembo na Asie Mineure, bandeko mingi oyo bazali kosakola nsango malamu lelo oyo, toyebi ata bankombo na bango te. Atako bongo, bango mpe bazali kosala mosala monene, bazali na bomoi ya ntina, mpe bazali na esengo mingi mpo bayebi ete bazali komipesa na kobikisa bamosusu ndenge wana mpo na kotosa etinda ya Biblia.—1 Timote 2:3-6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Makomami ya Grɛki ya boklisto mpe na lisolo oyo, “Azia” elimboli etúká ya Loma oyo ezalaki na wɛsti ya Asie Mineure, kasi kɔntina ya Azia te.
b Eusèbe, mokomi moko ya masolo ya kala (260-340 T.B.), alobi ete mwa moke liboso ya mobu 66 T.B., “bantoma bakimaki Yudea mpo bazalaki koluka koboma bango. Kasi, mpo na kosakola nsango malamu, batambolaki bipai nyonso na nguya ya Klisto.”
[Etanda na lokasa 11]
BOKLISTO EKƆTI NA BITINIA MPE NA PONTI
Bitinia mpe Ponti ezali bitúká mibale ya Asie Mineure oyo ezalaki na bokula ya Mer Noire. Toyebi makambo mingi ya bato oyo bazalaki kofanda na etúká ya Bitinia na lisalisi ya mikanda oyo guvɛrnɛrɛ Pline le jeune akomelaki Trajan, amperɛrɛ ya Loma.
Mbula soki 50 na nsima kobanda Petelo akomelaki masangá ya bitúká yango, Pline asɛngaki Trajan apesa ye makanisi mpo na kosukisa baklisto. Pline akomaki boye: “Naino nazala te esika bazali kosambisa baklisto. Yango wana, nayebi te bitumbu oyo, mbala mingi, bakatelaka bango. Bato ebele, basi mpe mibali, bazali kosambisama, mpe emonani ete likambo yango ekosila te. Lingomba wana mabe ekɔtaki kaka na bingumba te, kasi mpe na bamboka.”
[Etanda/Karte na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MIBEMBO YA PAULO
Mobembo ya liboso
SIPELE
PAMOFILIA
Pelega
Antiokia (ya Pisidia)
Ikoniumu
Lisitala
Delebe
Mobembo ya mibale
SILISIA
Talasi
Delebe
Ikoniumu
Antiokia (ya Pisidia)
FILIGIA
GALATIA
Toloasi
Mobembo ya misato
SILISIA
Talasi
Delebe
Lisitala
Ikoniumu
Antiokia (ya Pisidia)
Efese
AZIA
Toloasi
[Masangá nsambo]
Pelegame
Tyatila
Saladi
Similina
Efese
Filadelefia
Laodikia
[Bisika mosusu]
Hiyelapolisi
Kolose
LISIA
BITINIA
PONTI
KAPADOSI
[Elilingi na lokasa 9]
Antiokia
[Elilingi na lokasa 9]
Toloasi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2003 BiblePlaces.com
[Elilingi na lokasa 10]
Esika ya teyatre na Efese.—Misala 19:29
[Elilingi na lokasa 10]
Fondasyo ya etumbelo mpo na nzambe Zeusi na Pelegame. Baklisto ya engumba yango bafandaki “esika kiti ya bokonzi ya Satana” ezalaki.—Emoniseli 2:13
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.