Mokapo 23
Mawa na mibale: Bibele na bafandi na mpunda
1. Eloko nini esalamaki atako boklisto ya lokuta esalaki molende mpo na kosilisa mayoyo, mpe mawa mibale mosusu oyo esakolami emonisi nini?
KOBANDA na 1919, bakonzi ya mangomba bazali kotungisama na mayoyo na elilingi, oyo ekoteli boklisto ya lokuta. Bazali komeka kosilisa yango, kasi ezali bobele kosopana, mingi mpenza koleka. (Emoniseli 9:7) Mpe ezali bobele yango te! Yoane akomi ete: “Mawa moko esili. Tala mibale makoya nsima na makambo oyo.” (Emoniseli 9:12) Boklisto ya lokuta ekonyokwama na bitumbu mosusu.
2. (a) Nini ekomi ntango anzelu na motoba abeti kelelo? (b) “Mongongo moko kobima na maseke na etumbelo na wolo” ezali komonisa nini? (c) Mpo na nini baanzelu minei nde batangami?
2 Nani akobimisa mawa na mibale? Yoane apesi eyano: “Mpe anzelu na motoba abetaki kelelo. Mpe nayokaki mongongo moko kobima na maseke minei na etumbelo na wolo oyo ezali liboso na Nzambe, koloba na anzelu ya motoba, oyo azalaki na kelelo: ‘Fungola baanzelu minei oyo bakangami penepene na ebale monene Efrate.’” (Emoniseli 9:13, 14) Baanzelu bafungolami mpo na koyanola mongongo mobimi na maseke na etumbelo na wolo. Etumbelo oyo elobelami awa ezali etumbelo na wolo na mpaka na malasi. Nzokande, na mbala mibale tosili komona ete, mpaka na malasi oyo ezali kati na bambeki na wolo oyo ezwami na etumbelo esangani na mabondeli ya basantu. (Emoniseli 5:8; 8:3, 4) Na yango, mongongo oyo moko ezali komonisa mabondeli oyo basantu bazali kosala na bomoko na mabelé. Bazali kosenga ete basikolama mpo na kolanda kosala na molende lokola “bamemi nsango” ya Jéhovah, engebene ndimbola ya liboso ya liloba “anzelu” na monoko ya greke ndenge esalelami awa. Mpo na nini ezali baanzelu minei nde bazali wana? Motuya oyo na elilingi ezali komonisa lokola ete bakobongisama malamu mpo ete mokili mobimba bayokamela bango.—Emoniseli 7:1; 20:8.
3. Elimboli nini likambo oyo ete baanzelu minei “bakangamaki penepene na ebale monene Efrate”?
3 Na ndimbola nini baanzelu yango “bakangamaki penepene na ebale monene Efrate”? Na ntango ya kala, Efrate emonisaki ndelo na nord-est ya mboka oyo Jéhovah alakaki epai na Abrahame. (Genese 15:18; Deteronome 11:24) Na yango baanzelu bakangamaki na ndelo ya mboka, to esika, oyo Nzambe alakisaki bango mpo na kosala mosala na mabelé. Bapekisamaki ete bamipesa te na mosala oyo Jéhovah abongisaki ete bakokisa yango. Efrate eyebanaki mpenza mpo na bosangani na yango na engumba ya Babilone. Nzokande, nsima na kokwea ya Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso, Bayisraele ya mosuni batikalaki bakangami na Babilone mbula 70, “bakangamaki penepene na ebale monene Efrate.” (Nzembo 137:1) Na 1919, Bayisraele na elimo, bango mpe bazalaki ya kokangama. Kati na mpasi, babondelaki mpo ete batambwisama na Jéhovah.
4. Mosala na baanzelu minei ezali nini, mpe ndenge nini bakokisaki yango?
4 Na esengo mpenza, tala oyo Yoane akoki sikawa koloba: “Mpe baanzelu yango minei bafungolami, baoyo babongisamaki mpo na ngonga mpe na mokolo mpe na sanza mpe na mbula, mpo ete baboma ndambo na misato na bato.” (Emoniseli 9:15) Jéhovah azali ntango nyonso kokokisa likambo na kolandaka mpenzampenza ngonga oyo atyaki. Azali na manaka mpe azali kotosa yango. Na yango, bamemi nsango yango bafungolami na ntango ekoki oyo etyamaki mpo ete bakokisa mokumba na bango. Kanisa na esengo oyo bayokaki ntango bafungolamaki na 1919, wana bamilengelaki mpo na kobanda mosala! Bazali bobele na mokumba ya konyokola te, kasi lisusu ya “koboma ndambo na misato na bato.” Mokumba yango ekokani na bitumbu bisakolamaki na kobetama na kelelo minei ya liboso, bitumbu oyo bibetaki ndambo na misato na mokili, ndambo na misato na mai monene, na bikelamu na bomoi kati na mai monene, ndambo na misato na maziba na mai mpe bibale, mpe na moi, sanza mpe minzoto. (Emoniseli 8:7-12) Baanzelu minei basali likambo mosusu koleka. Bazali ‘koboma,’ na boye ete bazali kobimisa polele ezalela na kufa ya elimo oyo boklisto ya mokili oyo ezali na yango. Bazali kosala yango na nzela ya kosakola oyo ekokani na kobetama ya kelelo, kosakola yango esalemi uta 1922 mpe elandani koyokama kino mikolo na biso.
5. Mpo na oyo etali boklisto ya mokili oyo, ndenge nini kobetama na kelelo na 1927 eyokanisamaki?
5 Tobosana te ete anzelu na motoba auti kobeta kelelo na likoló. Mpo na koyanola na yango, assemblée internationale ya mbula na mbula ya Bayekoli na Biblia oyo ya motoba esalamaki na Toronto (Canada). Programme oyo epesamaki dimanche 24 juillet 1927 elekisamaki na ba stations 53 ya ba radio, lolenge monene ya koyebisa nsango na nzela ya radio oyo naino esalamaki te na ntango wana. Nsango yango epesami na monoko mbala mosusu eyokanaki na bamilió ya bato. Na yambo, likatami makasi emonisaki polele ete boklisto ya mokili oyo esili kokufa na elimo mpe epesaki libyangami oyo: “Na ntango oyo na kokakatana, Nkolo Jéhovah alendisi bato batika, batika libela ‘boklisto ya mokili oyo,’ kopesa ye mokongo libela . . . , kasi na kotosa na motema mobimba Jéhovah Nzambe, kotosa Mokonzi oyo ye aponi mpe bokonzi na ye.” Nsima, Joseph Rutherford asalaki diskur piblike na motó na likambo “Kosikolama na mabota.” Azalaki koloba na lolenge na ye ya koloba na mɔ́tomɔ́to, oyo ekokani malamu na “mɔ́to,” na “milinga” mpe na “sufulu” oyo Yoane amonaki nsima na emonaneli na ye.
6. Na maloba nini Yoane amonisi bibele na bafandi na mpunda na etumba oyo amoni nsima?
6 “Mpe motuya na bibele na bafandi na mpunda na etumba ezalaki makiasi kiasi mbala mibale: nayokaki mpo na motuya na bango. Mpe tala ndenge namonaki bampunda na emonaneli, mpe baoyo bafandaki likoló na yango: balataki bilamba na bibende na ntolo, motane lokola mɔ́to, mpe ya langi ya bulé lokola safire, mpe ya langi ya mosaka lokola sufre; mpe mitó na bampunda mizalaki lokola mitó na bankosi; mpe na minoko na bango ebimaki mɔ́to na milinga na sufulu. Ndambo na misato na bato babomamaki na malozi oyo misato, na mɔ́to, na milinga mpe na sufulu oyo ezalaki kobima na minoko na bango.”—Emoniseli 9:16-18.
7, 8. (a) Nani azali kotambwisa limpingá oyo na bafandi na mpunda na etumba, oyo ebelemi na lokito na nkake? (b) Bokokani nini ezali kati ya limpingá oyo na bafandi na mpunda na etumba elongo na mayoyo oyo mabimaki liboso na yango?
7 Na ndenge emonani, ezali na litambwisi na baanzelu minei nde limpingá na bampunda na etumba oyo ezali kokende liboso kati na lokito na nkake. Oyo nde likambo ya kokamwisa! Kanisa naino. Okokaki koyoka ndenge nini soki limpingá na bampunda na etumba motindo oyo ezali kokanela yo. Komona ya pamba ekoki kolengisa yo. Kasi omoni ete limpingá ya bampunda oyo ezali na bokokani na mayoyo oyo mabimaki liboso na yango? Mayoyo mazalaki lokola bampunda; kati na limpingá oyo bampunda mpe bazali. Na nyonso mibale, ezali komonisa etumba moko ya téokratike. (Masese 21:31) Mayoyo mazalaki na mino lokola mino na bankosi; bampunda na limpingá oyo bazali na mitó lokola mitó ya nkosi. Na yango, bakokisami na Nkosi ya molende oyo ebimi na libota na Yuda, Yesu Klisto, oyo azali Motambwisi na bango, Mokonzi mpe Ndakisa.—Emoniseli 5:5; Masese 28:1.
8 Ezala mayoyo to limpingá na bampunda, bango nyonso basangani na mosala ya kosambisa oyo Jéhovah apesi bango. Mayoyo mabimaki kati na milinga oyo ezalaki elembo na mawa mpe na mɔ́to na kobebisa boklisto ya mokili oyo; minoko na bampunda ezali kobimisa mɔ́to, milinga mpe sufulu. Mayoyo mazalaki na kazaka na ebende na ntolo, elilingi ya bokangami na bango makasi na boyengebene oyo ezali kobatela motema na bango; limpingá na bafandi na mpunda balati kazaka na ebende ya motane, ya langi ya bulé mpe ya langi ya mosaka oyo ezali komonisa mɔ́to, milinga mpe sufulu, yango nsango na kokweisa na liwa, oyo ezali kobima na minoko na bampunda. (Tala Genese 19:24, 28; Luka 17:29, 30.) Mayoyo mazalaki na mikondo lokola mikondo na bankotó mpo na konyokola; bampunda bazali na mikondo lokola oyo na banyoka mpo na koboma. Ezali komonana ete mosala oyo ebandaki na mayoyo esengeli kokoba lisusu na nguya mingi koleka kino limpingá na bafandi na mpunda bakosilisa yango.
9. Limpingá na bafandi na mpunda na etumba ezali elilingi ya nini?
9 Bongo limpingá na bafandi na mpunda na etumba ezali elilingi ya nini? Lokola na kobetama na kelelo, kelasi na Yoane oyo epakolami na elimo babandaki kosakola bikateli na Nzambe, nkanda na ye, na nguya ya ‘koswa’ mpe ya ‘kopesa mpasi’ likoló na boklisto ya lokuta. Tokoki bongo komizela ete bobele etuluku ya bato yango, oyo ezali lelo na bomoi esalelama mpo na ‘koboma,’ elingi koloba koyebisa ete boklisto ya mokili oyo mpe bakonzi na yango basili mpenza kokufa na elimo, baboyami na Jéhovah mpe bazali pene na kobwakama na “fulu ya mɔ́to,” yango kobebisama ya libela. Ntembe te, Babilone monene na mobimba na yango esengeli kobomama. (Emoniseli 9:5, 10; 18:2, 8; Matai 13:41-43) Kasi liboso, kelasi na Yoane ezali kosalela “mopanga na elimo, Liloba na Nzambe” mpo na komonisa polele ezaleli ya kufa ya boklisto ya mokili oyo. Baanzelu minei mpe limpingá ya baoyo bamati likoló na bampunda batambwisi kobomama ya elilingi ya “ndambo na misato na bato.” (Baefese 6:17; Emoniseli 9:15, 18) Yango emonisi ete ntango etuluku na kokamwisa ya basakoli na Bokonzi emikotisi na etumba, yango esili kobongisama malamu mpe ezali kozwa litambwisi ya téokratike na nsé na bokengeli na Nkolo Yesu Klisto.
Makiasikiasi mbala mibale
10. Na ndimbola nini motuya na bibele na bafandi na mpunda ezali makiasikiasi mbala mibale?
10 Na ndimbola nini motuya na bibele na bafandi na mpunda oyo ezali makiasikiasi mbala mibale? Lokola likiasi moko ezali 10 000, makiasikiasi mbala mibale ekosala 200 milió (bifuku nkama mibale, Biblia Liloba lya Nzambe).a Sikawa basakoli na Bokonzi bazali bamilió, yango ezali kosepelisa, kasi bazali mosika na kozala bankama na bamilió! Ata bongo tomikundola maloba na Moïse oyo makomamaki na Mituya 10:36: “E Jéhovah, zonga epai na makiasi kiasi mpe nkoto na nkoto na Yisraele!” (Tala Genese 24:60.) Elimbolaki boye: ‘Zonga epai na bamilió zomi na zomi na Yisraele.’ Nzokande, libota na Yisraele ezalaki bobele na motuya soko ya milió mibale to misato ya bato na mikolo na Moïse. Bongo Moïse alingaki koloba nini? Na ntembe te akanisaki ete na esika ya kotangama, Bayisraele bakozala mingi koleka mpe motuya na bango ekokaki kotangama te “lokola minzoto na makoló mpe lokola zelo na libongo na mai.” (Genese 22:17; 1 Ntango 27:23) Na yango, asaleli liloba oyo ebongoli “makiasikiasi” mpo na komonisa motuya monene, kasi nde ezali sikisiki te. Ezali mpo na yango Traduction Œcuménique de la Bible ebongoli verset oyo boye: “NKOLO zonga! . . . Yisraele azali nkoto na nkoto, bakoki kotangama motuya te!” Libongoli oyo ekokani na ndimbola ya mibale ya liloba oyo ebongolami na “makiasikiasi” engebene ba dictionnaires ya monoko ya greke mpe hebreu ete: “ebele oyo motuya motangami te,” “ebele monene.”—Dictionnaire grec-français ya Bailly; Lexique hébreu na anglais ya Ancien Testament ya Gesenius, traduction ya Edward Robinson.
11. Eloko nini ekozala ntina mpo ete kelasi na Yoane ekoma makiasikiasi, ata na ndimbola ya elilingi?
11 Ezala ndenge nini, basangani ya kelasi na Yoane oyo bazali naino na mabelé bakokisi motuya ya 10 000 te, na elobeli mosusu bakokisi ata motuya ya likiasi moko te. Na bongo ndenge nini bakoki kokokisama na motuya etangami te ya bifuku na bifuku ya bampunda baoyo basali limpingá? Bakozala na mposa ya lisalisi na bato mosusu te mpo na kokóma makiasikiasi ata na ndimbola ya elilingi? Ya solo mpenza, na nzela ya ngolu na Jéhovah bazwaki lisalisi na bato yango! Bautaki wapi?
12, 13. Kobanda 1918 kino 1935, makambo nini mamonisaki epai wapi bato oyo bakosalisa kelasi na Yoane basengeli kouta?
12 Kobanda 1918 kino 1922, kelasi na Yoane ebandaki koyebisa na mokili oyo na mpasi elikya kitoko ete “bamilió na bato bazali lelo na bomoi bakokufa te.” Na 1923, emonisamaki lisusu ete bampate oyo balobelami na Matai 25:31-34 bakozwa libula na bomoi na mabelé na nsé na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe. Elikya bobele yango emonisamaki kati na mokanda moke Liberté pour les peuples, oyo ebimaki na assemblée internationale oyo esalamaki na 1927. Na ebandeli ya ba 1930, bato na sembo oyo na kelasi ya Yonadabe, mpe ‘bato oyo bazali kokimela mpe kolela’ mpo na ezalela mabe ya elimo na boklisto ya lokuta, bayebanaki ete bango nde “bampate” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé. (Ezekiele 9:4; 2 Mikonzi 10:15, 16) Na kokambaka bato yango na “mboka na kobombama” na ntango na biso, La Tour de Garde ya le 15 novembre 1934 elobaki boye: “Basangani na kelasi ya Yonadabe bayokaki mongongo ya kelelo na Nzambe mpe batyaki matoi na makebisi; ezali mpo na yango nde bamibombaki kati na lisangá ya Nzambe mpe basanganaki na libota na ye; basengeli kofanda wana.”—Mituya 35:6.
13 Na 1935, basangani na kelasi ya Yonadabe babengamaki mpo na koyangana na assemblée ya Ba Témoins de Jéhovah oyo esalamaki na Washington (Etats-Unis). Mokolo na mitano 31 Mai, Joseph Rutherford asalaki diskur na ye ya lokumu: “Ebele monene,” kati na yango amonisaki polele ete kelasi ya Emoniseli 7:9 ezali bobele yango moko na oyo ya bampate elobelami kati na Matai 25:33: kelasi yango esalami na bato baoyo bamipesi epai na Nzambe mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé. Lokola mbuma na liboso, Batemwe ya sika 840 bazwaki batisimo na assemblée yango, mingi kati na bango bazalaki bato ya ebele monene.b
14. Ebele monene ekokaki kosangana na mokumba ya limpingá na bafandi na mpunda na etumba oyo na elilingi, mpe ekateli nini ezwamaki na 1963?
14 Ebele monene yango esanganaki na mokumba ya limpingá na bafandi na mpunda oyo ebandaki na 1922 mpe ezwaki bopusi ya sika na assemblée ya Toronto na 1927? Ezali bongo, mpe ezalaki na litambwisi ya baanzelu minei, elingi koloba baklisto bapakolami oyo basali kelasi na Yoane. Na ba assemblées internationales “Nsango malamu ya seko” oyo ebongisamaki na 1963, ebele monene yango esanganaki na kelasi na Yoane mpo na kondima ekateli moko ya kosimba motema. Likatami yango esakolaki ete mokili “mokozala na ntango moko ya mobulu oyo ekokani na koningana na mabelé oyo naino emonani te, mpe masangá nyonso ya politike mpe lingomba ya Babilone ya lelo ekoningisama makasi mpe ekokwea.” Batemwe bayebisaki ekateli oyo: “Tokolanda kosakola epai na bato nyonso kozanga koponapona ‘nsango malamu ya seko’ oyo etali Bokonzi na Masiya na Nzambe. Tokosakola mpe bikateli na Nzambe, oyo ezali lokola malozi mpo na banguna na ye, kasi kokokisama na yango ekosikola bato nyonso oyo balingi kosalela Mozalisi na elimo mpe na solo kati na losambo oyo ekosepelisa ye.” Likatami oyo ezwamaki na mótô mpenza na ba assemblées 24 oyo esalamaki na mokili na bayangani 454 977, baoyo kati na bango 95 % bazalaki eteni ya ebele monene.
15. (a) Ebele monene ya basaleli nyonso ya Jéhovah, ezalaki na pursantaze nini na 2005? (b) Kati na libondeli na ye oyo ekomami na Yoane 17:20, 21, na maloba nini Yesu alobelaki bomoko, oyo ya ebele monene mpe kelasi na Yoane?
15 Ebele monene ezali sé kolanda kosakola bomoko na yango makasi elongo na kelasi na Yoane, na kosopáká malozi likoló na boklisto ya mokili oyo. Na 2005, na basali nyonso oyo Jéhovah asalelaki kati na elanga bango balekaki 99,8 %. Ebele monene oyo bazali na bomoko na motema mobimba elongo na kelasi ya Yoane, mpo na bango Yesu alobaki kati na libondeli ekomami na Yoane 17:20, 21: “Nazali kobondela bobele mpo na bango te kasi mpo na bato nyonso oyo bakoyoka mateya na bango mpe bakondima ngai, ete bango nyonso bazala moko, pelamoko yo, Tata ozali kati na ngai mpe ngai kati na yo, mpo ete bango mpe bazala na bomoko elongo na biso, na ntina ete mokili endima ete yo otindaki ngai.” Wana kelasi na Yoane, oyo epakolami na elimo, ezali kopesa ndakisa na nse na litambwisi na Yesu, ebele monene bazali kosangana na molende pembeni na bango na mokumba ya limpingá na bafandi na mpunda oyo ezali mpenza kobebisa lokola emonanaki naino liboso te.c
16. (a) Na maloba nini Yoane amonisi minoko mpe mikondo na bampunda na elilingi? (b) Ndenge nini monoko na basali na Jéhovah ebongisami mpo na mosala? (c) Liloba oyo “mikondo na bango mizali lokola banyoka” elimboli nini?
16 Limpinga oyo na bafandi na mpunda ezali na mposa ya bisaleli mpo na etumba. Jéhovah akokisaki mposa na yango na lolenge ya kokamwisa. Na yango Yoane alobi boye: “Mpo ete nguya na bampunda ezali na minoko na bango mpe na mikondo na bango; mpo ete mikondo na bango mizali lokola banyoka, mpe mizali na mitó, mpe na yango bakozokisaka.” (Emoniseli 9:19) Jéhovah apesaki etinda na ba ministres na ye baoyo bamipesaki epai na ye mpe bazwaki batisimo mpo bakokisa mosala oyo. Na nzela na Eteyelo na mosala ya Nzambe, makita mosusu ya lisangá mpe biteyelo ndenge na ndenge, ateyaki bango lolenge ya kosakola liloba na ye. Bazali bongo na makoki ya koloba “monoko na bato balakisami.” Atyaki maloba na ye na minoko na bango mpe atindaki bango bayebisa bikateli na ye ‘polele mpe na ndako na ndako.’ (2 Timoté 4:2; Yisaya 50:4; 61:2; Yilimia 1:9, 10; Misala 20:20) Kelasi na Yoane mpe ebele monene basakolaki nsango ya koswa, oyo ekokani na “mikondo” ya bampunda, oyo ezwami kati na ebele na ba Biblia, mikanda, mikanda mike mpe bazulunalo oyo bakabolaki na boumeli ya bambula. Mpo na banguna na bango, baoyo bakebisami na “mabe” oyo Jéhovah akosala bango, bibele na bafandi na mpunda bazali solo komonana na banguna na bango lokola ete bazali makiasi kiasi mbala mibale.—Tala Yoele 2:4-6.
17. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosangana na mokumba ya limpingá na bafandi na mpunda na etumba kati na bamboka oyo bakoki te kokabola mikanda mpo na kopekisama na mosala na bango? Limbola eyano na yo.
17 Etuluku mosusu na molende ya limpingá oyo na bafandi na mpunda esalami na ba Témoins de Jéhovah oyo bafandi kati na mikili epai kuna mosala na bango epekisami. Lokola bampate kati na nkoi, basengeli kozala na “mayele lokola banyoka, kasi na bopolo lokola bibenga.” Na botosi epai na Jéhovah, bakoki kotika koloba te mpo na makambo oyo basili komona mpe oyo basili koyoka. (Matai 10:16; Misala 4:19, 20; 5:28, 29, 32) Lokola bazali bobele na mikanda moke to bazali na yango te mpo na kokabola epai na bato, tokoki kokata ete bazali kosangana te na mokumba ya limpingá na bafandi na mpunda? Soko moke te! Bakoki kosalela minoko na bango, mpe Jéhovah apesi bango nzela ya kosala bongo mpo na koyebisa solo ya Biblia. Ezali yango nde bazali kosala na kobombama, kasi na lolenge moko ya kondimisa, yango ezali kosalisa bango mpo na kobanda boyekoli na Biblia mpe ‘komema ebele na bato epai na boyengebene.’ (Danyele 12:3) Ya solo, bakoki koswa na mikondo na bango ya elilingi te na kotikáká nsima na bango mikanda oyo mizali konyokola. Atako bongo, mɔ́to, milinga mpe sufulu na elilingi ezali kobima na minoko na bango wana ezali bango kopesa litatoli na mayele mpe na bwanya na ntina etali mokolo na Jéhovah oyo ebelemi, mokolo oyo akomilongisa.
18. Na minoko boni mpe mikanda boni limpingá yango na bafandi na mpunda na etumba epanzaki nsango na nzela ya mikanda?
18 Na bisika mosusu, mikanda mpo na Bokonzi mizali sé kolanda komonisa polele mateya mpe banzela ya boklisto na lokuta oyo euta na Babilone, kopesáká ye mpasi na elilingi oyo ebongi na ye. Na kosalela mitindo ya sika ya konyata mikanda, na boumeli na mbula 68 oyo ezalaki liboso na mobu 2005, limpingá oyo na bato mingi elongaki kokabola na minoko koleka 450 bamilio ya ba Biblia, babuku, bazulunalo mpe mwa babuku, mbala mingi makiasi kiasi mbala mibale ya mikanda. Oyo nde mpasi na koswa ebimisami na mikondo yango!
19, 20. (a) Atako nsango yango ezali mpenzampenza mpo na boklisto ya mokili oyo, kasi ezalela nini bamosusu bazali kolakisa kati na bamboka oyo ezali libanda na boklisto ya mokili oyo? (b) Na maloba nini Yoane amonisi ezalela ya bato lokola lisangá?
19 Mokano na Jéhovah ezali ete nsango yango na koswa ‘eboma ndambo na misato na bato.’ Na yango ezali mpenzampenza mpo na boklisto ya lokuta nde nsango yango epesami. Kasi ezali kokoma na bamboka oyo ezali libanda na boklisto na lokuta mpe na yango mingi bayebi malamu bokosi na mangomba oyo mazali komiloba ete ezali ya boklisto. Bafandi na bamboka yango babelemaki epai na Jéhovah na komonaka bolozi kokwea likoló na lisangá oyo ya lingomba ebeba? Mingi babelemaki na Jéhovah. Bato mingi na komikitisa mpe na motema malamu baoyo bazali kofanda libanda na bisika oyo bopusi na boklisto na lokuta ezali makasi babelemaki nokinoki epai na Jéhovah. Kasi, Yoane amonisi ezalela ya bato lokola lisangá, na kolobaka: “Bato oyo batikalaki, baoyo babomamaki na malozi oyo te, babongolaki mitema na bango te mpo na kotika misala na maboko na bango te, mpe batiki te kosambela bilimu mabe na bikeko na wolo, na palata, na ebende, na mabanga na mabaya, oyo bikoki komona te, soko koyoka te, soko mpe kotambola te; babongoli mitema mpe te na ntina na koboma na bango, na makambo ya ndoki na bango, na pite na bango, na moyimi na bango.” (Emoniseli 9:20, 21) Tokomona te ete bato oyo nyonso bakoka kobongola mitema. Baoyo nyonso bakangami na banzela na bango ya mabe basengeli kozwa etumbu longwa na Jéhovah na mokolo na ye monene oyo nkombo na ye ekokumisama. Kasi, “oyo akobelela nkombo na Jéhovah akobika.”—Yoele 2:32; Nzembo 145:20; Misala 2:20, 21.
20 Makambo oyo touti kotalela mazali eteni na mawa na mibale. Ndenge tokomona yango na mikapo milandi, makambo mosusu masengeli naino kobima liboso ete mawa yango ekoka kosila.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na liloba “makiasikiasi mbala mibale,” tala oyo ekoki kotangama kati na Commentaire sur la Révélation (Angl.) ya Henry Barclay Swete: “Ntina na motuya oyo epekisi biso koluka kokokisama na yango na ndenge ekomami; makambo oyo malandi mandimisi likanisi oyo.”
b Tala nkasa 119 kino 126 ya mokanda oyo, mpe tome III ya mokanda Justification (Angl.), ebimisamaki na 1932 na Batatoli ya Yehova, nkasa 83 mpe 84.
c Na bokeseni na mayoyo, bibele na bafandi na mpunda oyo Yoane amoni balati te na “mitó na bango lokola mitole na motindo na wolo.” (Emoniseli 9:7) Yango eyokani na likambo oyo ete ebele monene, oyo bazali lelo eteni eleki monene ya limpingá na bafandi na mpunda, bazali na elikya te na koyangela kati na Bokonzi na Nzambe na likoló.
[Elilingi na lokasa 149]
Kobetama na kelelo na motoba ebandisi mpasi na mibale
[Bililingi na lokasa 150]
Baanzelu minei bazali kotambwisa limpinga eleki monene na bafandi na mpunda na Lisolo na bato
[Bililingi na lokasa 153]
Limpinga monene ya bafandi na mpunda basili kokabola bamilió mingi na mikanda mikolimbolaka Biblia
[Bililingi na lokasa 154]
Bato oyo batikali babongoli mitema te