Toluka koyeba libombami Mosantu ya bizaleli ya moto na Nzambe
“Ntina ete bobiangami mpo na bongo mpamba te Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete balanda matambe na ye.’’—1 PETELO 2:21.
1. Jéhovah asɛnzɛlaki na likambo nini mpo na oyo etali “libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe’?
“LIBOMBAMI mosantu wana ya bizaleli na moto na Nzambe” ezali lisusu sekele te. (1 Timoté 3:16) Oyo likeseni nini na mabombami ya mangomba na lokuta, na ndakisa lokola oyo ya Trinité, oyo ezali ntango nyonso mabombami! Moto moko te akoki koyeba yango. Nzokande, Jéhovah asenzelaki na boye ete libombami mosantu oyo elobamaki na ntina na Yesu Klisto ekoka mpenza koyebana epai na bato mingi koleka. Yesu ye moko, mpo na molende na ye kati na kosakolama ya Bokonzi na Nzambe, akomaki ndakisa monene. Lokola tokomona yango sikawa, tokoki kozwa mateya mingi kati na nsango na ye mpe na lolenge na ye ya kosakola.
2. Mpo na nini mosala na Yesu etiami liboso na lisiko? (Matai 20:28)
2 Tozonga na eteni ya liboso: Yesu, “amonisamaki polele kati na nzoto“. (1 Timote 3:16) Kati na Matai 20:28, tozali kotanga ete Yesu “ayaki mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi”. Tala likambo oyo etie mosala na ye liboso ya lisiko. Mpo na nini bongo? Mpamba te na Edene ekelamu moko oyo emibombaki, Nyoka, aboyaki kondima lotomo oyo Jéhovah azali na yango mpo na koyangela bato, mpe alobaki ete misala na Nzambe mizali malamu te mpe moto ata moko te, kati na komekama, akoki kotikala sembo epai na Oyo-Aleki Likoló. (Yobo 1:6-12; 2:1-10) Mosala malamu mpenza na Yesu, moto na kokoka mpe “Adam na nsuka”, emonisaki ete matumoli Satana azali mokosi mabe. (1 Bakolinti 15:45) Lisusu, Yesu amonisaki na lolenge ya polele ete akokaki mpenza mpo na kozala, kati na maboko na Nzambe, “Mokonzi mpe Mobikisi”, ye oyo asengeli “kosambisa mokili mobimba”, mpo ete bokonzi na Jéhovah endimama.—Misala 5:31; 17:31.
3. Yesu asalaki nini mpo na kokweisa libela efundeli oyo Satana abimisaki?
3 Yesu akweisaki mpenza efundeli mabe oyo Satana abimisaki Kati na Lisolo mobimba ya bato, moto moko te asalelaki Nzambe na bizaleli motindo wana ya kobanga Nzambe, mpe nyonso wana kati na minyokoli na nzoto mpe kobundisama na maloba, kobetama na fimbo mpe kofingama. Lokola azalaki Mwana na Nzambe, Klisto ayikelaki nsoni mpe mafinga mpiko. Kati na bolozi nyonso wana, mpe ata liboso na liwa ya nsomo mpe ya nsoni, atikalaki ngwi kati na bosembo na ye epai na Tata na ye. Na Bafilipi 2:8, 9, Paulo akomaki ete, mpo ete Yesu amonisaki botosi na ye ‘kino na kufa, ee, kino kufa na nzete. Yango wana Nzambe atomboli ye mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo mosusu nyonso’. Yesu amonisaki ete Satana azali mokosi mabe.
4. Mpo na nini Yesu akokaki koloba na Pilate ete ayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na ntina na solo?
4 Yango wana, bobele nsima na mwa mibu ya mosala monene ya kosakola, Yesu akokaki kondima na molende nyonso liboso ya Ponce Pilate ete: “Yo ozali koloba ete ngai mokonzi. Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo. Moto na moto oyo azali na mposa na solo akoyokaka mongongo na ngai.” (Yoane 18:37) Elongo na bizaleli ya moto na Nzambe oyo bileki nyonso, Yesu asakolaki solo ya Bokonzi kati na Palestine mobimba. Abongisaki bayekoli mpo ete bango mpe bazala basakoli ya molende. Ndakisa na ye ebendi biso te na kolanda matambe na ye?
Topesa nzela na Ndakisa na ye ete eteya biso
5. Likambo nini tokoki koyekola likoló ma bizaleli ya moto na Nzambe na ntango tozali kotalela Yesu?
5 Soki tozali kokokisa mokano ya Nzambe kati na bizaleli ya moto na Nzambe, biso mpe tokoki komonisa ete Diable azali mokosi. Ata nini ezali mikakatano na biso, ekokokana ata soki moke te na mpasi mpe na mafinga oyo Yesu ayikelaki yango mpiko. Na bongo topesa nzela na Oyo azali Ndakisa na biso ete ateya biso. Baebele 12:1, 2 epesi biso toli na kopota na etingya na “kotalaka Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima na biso”. Kokesenaka na Adam, oyo bizaleli ya moto na Nzambe bityamaki na komekama mpe akweaki mpenza, Yesu azalaki moto bobele moko awa na mabelé oyo alongaki mpenza komekama nyonso. Amonisaki kino liwa ete azalaki ’’sembo, asalaki ata mabe moko te, na litono te, oyo atangolami na bato na masumu”. (Baebele 7:26.) Lokola atikalaki na bosembo moko makasi, akokaki koloba epai na banguna na ye: “Nani kati na bino akokweisa ngai na ntina na lisumu?” Azongiselaki Satana ntembe na ye, kolobaka ete: “Mokolo na mokili azali . . . na eloko kati na ngai te.” Mpe, kosukisaka diskur ya nsuka oyo asalaki liboso na bayekoli na ye liboso ete atekama mpe akangama, alobaki na bango ete: “Boyika mpiko, ngai nasili kolonga mokili.”—Yoane 8:46; 14:30; 16:33.
6. a) Mpo na nini Yesu ayebi bolamu oyo bato bazali na yango mposa? b) Kino na meko nini kobanga ya botosi ekatelaki Yesu?
6 Ntango azalaki na mabelé kati na nzoto ya mosuni, “akitisamaki mwa moke na nse na baanzelu”, Yesu azwaki ekspérianse ya bomoi na bato. (Baebele 2:7) Ayekolaki koyeba bolembu ya moto; na ntina yango, azali mpenza na makoki mpo na kozala Mokonzi mpe Mosambisi ya bato mpo na mibu nkoto. Mwana wana na Nzambe, oyo alobaki: “Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino”, ayebi elendiseli nini oyo bato bazali na yango mposa. (Matai 11:28) Baebele 5:7-9 ezali koyebisa biso ete: “Na mikolo na bomoi na ye, atombolaki mabondeli mpe malombo na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokami mpo na kotosa na ye malamu. Ata azalaki Mwana, ayekoli kotosa mpo na koyoka mpasi, mpe esili ye kobongisama mobimba (mpo na oyo etali botosi), akomaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.” Yesu ayikaki mpiko kino koyoka mpasi na etubeli ya liwa ya bato, kozwaka bongo ‘mpota na litindi’ oyo eutaki na Nyoka mabe; atako bongo, azongaki nsima te. (Genese 3:15) Na ndakisa ya Yesu, tika ete nsomo ya Nzambe ezala ntango nyonso kati na biso, kino na liwa soki yango esengeli, kozalaka na elikya ete Jéhovah Nzambe akoyoka mabondeli na biso mpe akopesa biso bomoi.
‘Azalaki na bomoi mpo na boyengebene’
7. Engebene 1 Petelo 2:21-24, ndakisa nini Klisto atikelaki biso, mpe bopusi nini etamboli na ye esengeli kozala na yango likoló ma biso?
7 Wana emonisamaki ye polele kati na nzoto, Yesu amimonisaki sembo na koyebisaka libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe. Tozali kotanga kati na 1 Petelo 2:21-24: “Ntina ete bobaingami mpo na bongo, mpamba te Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bolanda matambe na ye. Ye asalaki lisumu moko te; bokosi moko ezwami kati na monoko na ye mpe te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo. Ye moko akumbaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza kuna na nzete, ete awa esili biso kokufela masumu, tozala na bomoi mpo na boyengebene.” Tokanisa likoló na etambweli na Yesu, mpe tokolendisama mingi na kolona bizaleli ya moto na Nzambe, na kotikala sembo mpe na kozala na bomoi, lokola ye moko azalaki na yango, mpo na boyengebene.
8. Ndenge nini, na ndakisa na Yesu, tokoki kozala na bomoi mpo na boyengebene
8 Yesu azalaki solo na bomoi mpo na boyengebene. Tozali kokuta kati na Nzembo 45:7 esakweli oyo na ntina na ye: “Yo olingi boyengebene mpe oyini mabe.” Kokokisaka maloba wana na Yesu, ntoma Paulo alobi na Baebele 1:9: “Olingi boyengebene mpe oyini kilikili.” Na boyokani na boyebi na biso na ntina etali libombami mosantu wana ya bizaleli ya moto na Nzambe, tika ete, na ndakisa na Yesu, tolingaka ntango nyonso makambo oyo mazali sembo mpe koyina makambo oyo mazali mabe! Ezala kati na makambo matali bizaleli na boklisto, oyo lelo ebebisami makasi kati na mokili ya Satana, to kati na makambo ndenge na ndenge oyo matali boyokani na biso elongo na baninga na biso, na kati lokola mpe na libanda ya lisangá na Nzambe, tozala na ekateli ya kozala na bomoi mpo na boyengebene na kolongisaka mitinda kitoko ya Jéhovah. Lisusu, tika ete tosepela ntango nyonso na Liloba na Nzambe, mpo na kozwa mayele ya Nzambe oyo ekopesa biso nzela na kolonga Diable mpe mayele na ye mabe!
9. Likambo nini mosusu epusaki Yesu na kozala na molende kati na mosala na ye, mpe eloko nini asengelaki kosala mpo na bakonzi ma ya mangomba?
9 Likambo mosusu mpe epusaki Yesu na kozala na molende kati na mosala na ye. Ezali nini? Kati na Matai 9:36 totangi: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” Lisusu, Yesu “abandaki koteya bango makambo mingi”. (Malako 6:34.) Mpo na yango, esengelaki na ye komonisa polele mabe ya bakonzi na mangomba babateli mabe na mpate, batioli na mibeko. Tala nkutu oyo Yesu alobáká epai na bamosusu kati na bango, engebene Matai 15:7-9: “Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete, Bato oyo bakotosaka ngai na minoko, kasi mitema na bango mizali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisaka malako mazali mibeko na bato.”
Libombami ya mawa
10. Lelo na etuluku nini ya bato “libombami wana ya botioli mibeko” ezali kokokana mpe mabe nini ezali na etuluku yango?
10 Lokola Yesu atemelaki bakonzi na mangomba ya ntango na ye, bobele bongo lelo tozali koyoka mawa mpo na libombami moko oyo ekeseni makasi elongo na libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe. Kati na 2 Batesalonike 2:7, Paulo azali kobenga yango “libombami na botioli na mibeko” (Traduction du Monde nouveau). Na ekeke ya liboso, ezalaki libombami, mpamba te esengelaki kobimisama bobele bikeke mingi nsima na liwa ya bantoma. Lelo, ezali bongo bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili, oyo bazali kotia motema mingi na makambo ya politike na esika ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na sembo na Nzambe. Bokosi ezali mingi kati na yango. Bapastere ya lingomba ya misioni oyo bazali koleka na televizio bazali mpenza ndakisa moko oyo ezali kopesa mpasi na motema. Bazali bakosi oyo bazali koyiba basambeli na bango, bazali komikomisa na bozwi mingi, bazali baninga ya basi na pite, bazali kotangisa mai na miso ya lokuta ntango bakangi bango mpe bazali kokoba kosengasenga mbongo, ntango nyonso se mbongo mingi. Vatican ezali komonisa mpe elilingi ya mabe koleka, kati na boyokani na yango kozanga nsoni elongo na bakonzi ya politike, bozwi na yango oyo ezali kobɛtisa bato libaku mpe kozanga kolongobana na misolo na yango na Banque.
11. Likambo nini ekokomela bakonzi ma mangomba ya boklisto na mokili oyo mpe Babilone Monene kati na mobimba na yango?
11 Likambo ya kokamwa ezali te ete kelasi ya bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo ezali “moto na lofundo oyo akotiolaka mibeko”. (2 Batesalonike 2:3.) Eteni na nguya wana ya mwasi na pite Babilone Monene ekomonisama nyonso ete ezali mabe mpe ekobomama, bakisa mpe biteni mosusu ya losambo na lokuta. Engebene makambo oyo tozali kotanga kati na Emoniseli 18:9-17, bakonzi na politike mpe bato na mimbongo (elongo na babombi na misolo) bakoloba mpenza na kolelaka: “Mawa, mawa mpo na mboka yango monene!” Babilone Monene mpe mabombami na yango ekotondolama mpo na kotikala bolumbu; ekomonisa likeseni monene elongo na libombami mosantu ya bizaleli ya bato na Nzambe mpe makambo oyo mazali kopesa kongenga yango.
12. Yesu asalaki nini mpo na bolingo ya boyengebene?
12 Bolingo na boyengebene mpe koyina mabe to botioli ya mibeko, yango nde etindaki Yesu na kobunda makasi mpo na losambo ya solo. Mbala ya liboso oyo akendaki na Yelusaleme lokola Mwana na Nzambe, mopakolami, abenganaki libanda na tempelo batekisi mpe baoyo basenzaka misolo, kolobaka ete: “Longola awa biloko oyo! Botika kozalisa ndako na Tata na ngai esika na zando!” (Yoane 2:13-17) Mikolo mingi na nsima, ezwamaki ye lisusu na tempelo, Yesu alobaki na Bayuda oyo bazalaki koyina ye ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atelemi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te. Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki na lokuta mpe tata na yango.” (Yoane 8:44) Yesu azalaki mpenza na molende mpo na koloba liboso na bakonzi mabe wana ya mangomba ete bazalaki bakosi mpe bana ya Diable.
13. a) Epai wapi koyina na Yesu mpo na botioli ya mibeko elobelami malamu mpenza? b) Mpo na nini bakonzi na mangomba ya eleko na biso bazangi bosembo babongi kozwa lisambisi ya motindo moko na oyo Yesu ayebisaki mpo na bakɔmeli mpe Bafalisai?
13 Koleka bisika nyonso mosusu, ezali kati na Matai mokapo 23, nde kuna Yesu amonisaki ete ayini mpenza mabe to botioli mibeko, epai oyo azali kokweisa na nguya nyonso bakomeli mpe Bafalisai, kobengaka bango banyoka. kati na mokapo yango, atangi liloba “mawa” mbala nsambo mpe akokanisi bakonzi wana na mangomba na “mayita mpembe”, kobakisaka ete ‘batondi na bosoto ya motindo nyonso, na bokosi mpe na botioli na mibeko’.Yesu alingaki mpenza kosikola bato oyo bazalaki kozwa mpasi ya botioli wana na mibeko. Angangaki boye: “Yelusaleme, Yelusaleme!mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo lokola nsoso akoyanganisaka bana na ye na nse na mapapu na ye, nde bolingaki te. Tala ndako na bino etikali mpamba.” (Versets 37, 38) Bakonzi na mangomba ya eleko na biso, oyo botioli na mibeko ezali komonana polele, babongi kozwa lisambisi ya motindo moko. Na yango, na boyokani na oyo ekoki kotángama kati na 2 Batesalonike 2:12, ‘bandimi makambo na solo te kasi basepeli kati na mabe’. Botioli na bango ya mibeko ezali mpenza na boyokani te na bizaleli ya moto na Nzambe oyo Yesu amonisaki na bosembo nyonso ntango azalaki na mabelé.
Tosakola bikateli na Nzambe
14.Lokola tozali kopesa motuya monene na libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe yango esengeli kopusa biso na kosala nini?
14 Motuya monene oyo tozali kopesa epai na libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe esengeli kopusa biso ntango nyonso na kolanda pembeni matambe na Yesu. Na ndakisa na ye, esengeli na biso kosakola na molende makambo oyo Yisaya 61:2 ezali koyebisa lokola “mbula na boboto na Jéhovah mpe mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso.” Lisusu, tika ete tosala na molende mpo na “kobondisa baoyo nyonso bazali kolela”! Motindo moko lokola na eleko na Yesu, esengeli mpe molende na eleko na biso mpo na kosakola bikateli na Jéhovah; bakisa mpe nsango na nguya oyo Mosenzeli ezali kobimisa oyo ekolobaka polelepolele, mpe La Revelation—le grand dénouement est proche!. Tosengeli kosakola na molende mpe mayele to takte, mpe kozala na maloba “na elengi na mongwa”, oyo bato balingi boyengebene bakosepela na yango. (Bakolose 4:6) Tozwa liteya na ndakisa ya bizaleli na moto na Nzambe oyo Yesu atikaki; na bongo, na ntango ebongi, tokokoka koloba ete tosilisi mosala oyo Jéhovah apesaki biso mpo na kosala!—Matai 24:14; Yoane 17:4.
15. Likambo nini elekaki kobenda 1914 na ntina na libombami mosantu ya Nzambe?
15 Emonanaki ye kati na nzoto, Yesu azalaki ndakisa malamu mingi. Ntembe ata moke ezali te ete libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe ekokanaki na ye. Na molende nyonso, akumisaki nkombo na Jéhovah, mpe Tata na ye apesaki ye mbano ya bosembo na ye na motindo moko ya kokamwisa Nzokande, libombami mosantu ya Nzambe esuki bobele wana te. Kobanda 1914, tozali kobika na “mokolo ya Nkolo”. (Emoniseli 1:10) Lokola ezali koyebisa yango Emoniseli 10:7, ezali eleko moko oyo ‘libombami mosantu na Nzambe esengeli kokokana, engebene nsango malamu’. Mingongo ya likoló misakolaki: “Bokonzi na mokili oyo esili kokoma bokonzi ya Nkolo na biso (Jéhovah) mpe ya Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.” (Emoniseli 11:15) Jéhovah esili kofandisa Mokonzi Masiya Yesu Klisto likoló na kiti na ye ya nkembo mpo ete ayangela elongo na ye.
16. Mpo na nini tokoki koloba ete Mokonzi Yesu Klisto, oyo afandisami sika na kiti ya bokonzi, amonisaki nokinoki ete azalaki kosɛnzɛla ete bizaleli ya moto na Nzambe bisalelama kuna na likoló?
16 Mpo ete azali koyangela elongo na Nzambe kati na Bokonzi oyo esalemi sika, Yesu abengami mpe lisusu Mikaele (oyo elimboli “Nani azali lokola Nzambe?”) Monguna moko te ya Jéhovah akoki kozala lokola Nzambe, oyo Mokonzi amonisaki, nokinoki nsima ya kofandisama na kiti ya bokonzi, na kokweisaka na mabelé Nyoka ya kalakala, Satana, mpe baanzelu na ye. (Emoniseli 12:7-9) Na yango, motindo moko lokola asalelaki bizaleli ya moto na Nzambe na ntango ya bomoi na ye awa na mabelé, ndenge moko mpe Yesu azali kosenzela ete bizaleli ya moto na Nzambe esalelama kuna na likoló. Yesu Klisto, oyo akembisami sikawa, akopema bobele soki alimwisi mangomba nyonso ya lokuta bakisa mpe biteni mosusu ya lisangá ya Satana oyo ezali komonana mpe oyo ezangi komonana.
17. Likambo nini ezali kosalema uta 1914 na kokokisama ya Matai 25:31-33?
17 Uta 1914, kokokisama ya esakweli na Yesu oyo ekomami kati na Matai 25:31-33 engengisaki makasi libombami mosantu ya Nzambe. Yesu alobi boye: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba Mpe akotika bampate na loboko na ye na mobali nde bantaba na loboko na ye na mwasi.” Uta na esika na ye malamu kuna na likoló, Mokonzi wana na lokumu, Mosambisi mpe Mobundi mpo na bizaleli ya moto na Nzambe akoyeisa kobukanisa, liboso naino likoló na motioli na mibeko mpe na nsima likoló na mangomba mosusu ya Babilone Monene, mpe likoló na lisangá mabe mobimba ya Satana bakisa mpe “bantaba”, oyo bazali kopesa yango maboko. Na bongo Satana akobwakama kati na libulu mozindo (Emoniseli 20:1.3) Mpo na “bayengebene”, “bampate”, bakozwa bomoi na seko. (Matai 25:46) Tika ete toluka bizaleli ya moto na Nzambe mpe tozwama kati na bato wana ya sembo!
18. Mpo na oyo etali libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe, libaku nini kitoko tozali na yango?
18 Emoniseli 19:10 ezali kolendisa biso na ‘kosambela Nzambe’. Mpo na nini? Maloba malandi ya mokapo malobi ete: “Mpo ete bisakweli bipemami mpo na kopesa litatoli na ntina na Yesu.” Bisakweli bizali mingi oyo bipemamaki kala oyo bizali kopesa litatoli mpo na Yesu! Lokola bisakweli yango bikokanaki, libombami mosantu na Nzambe ekomi nyonso polele. Na yango, tozali kosepela na koyeba ete libombami mosantu ya bizaleli wana ya bato na Nzambe emonisamaki na bomoto na Yesu. Ezali libaku monene mpo na biso, baministres ya Bokonzi na Nzambe, na kolanda na kosokema nyonso matambe na ye. Ee, Ezali lokumu monene mpo na koyeba mpe kosakola, kati na mobimba na yango, libombami mosantu ya Nzambe engebene nsango malamu.
Bozongeli
◻ Mateya nini tokoki kozwa mpo na ndakisa ya bizaleli ya moto na Nzambe oyo Yesu atikaki?
◻ Ndenge nini, na ndakisa na Yesu, tokoki kozala na bomoi mpo na boyengebene?
◻ Libombami nini ya mawa ekeseni makasi na libombami mosantu ya bizaleli ya moto na Nzambe?
◻ Lokola tozali kopesa motuya monene na libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe, yango esengeli kopusa biso na kosala nini?
[Elilingi na lokasa 16]
Lokola azalaki mobundi mpo na bizaleli ya moto na Nzambe mpe mosakoli ya molende ya Bokonzi, Yesu akokaki koloba na Pilate: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.”
Yesu amonisaki bizaleli ya moto na Nzambe ntango apamelaki bakomeli mpe Bafarisai.