Totondo jehovah bokonzi na masiya esili kobanda koyangela
“E Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, . . . totondi yo mpo okamati nguya na yo monene mpe osili kokóma mokonzi.”—EMONISELI 11:17.
1. Prézidá ya la Société alobaki nini nsima wana asalaki mobembo moko na Mpoto na mobu 1911?
NA EBANDELI ya mobu 1911, charles Russell, prézidá ya la Société Watch Tower, asalaki badiskur mingi kati na bamoko na bingumba minene ya Mpoto. Tala oyo La Tour de Garde ya 15 mai 1911 (ebimeli ya lifalanse ya Janvier 1912) ekomaki na ntina na mobembo yango: “Tokamwaki na komona bilembo mingi ya bokoli na bisika nyonso . . . Batangi na biso bayebi ete esili koleka mwa bambula tozalaki komizela na komona nsuka na libota oyo na eleko ya mpasi eleki mpenza monene mpe tondimi ete ekobebisama na mobulu nokinoki nsima na Octobre ya mobu 1914, elaka mpo na nsuka ya ‘ntango na mabota,’ elaka epesamaki na bikonzi nyonso ya mokili na yango tokoki kokanga ntina na Makomami. Nsima wana nde bokonzi na Masiya ekobanda koyangela.” Elikya wana ekokisamaki?
2. Likambo nini libebisaki kimya na 1914, mpe yango ebimisaki makambo nini na mawa?
2 Na ndambo na liboso ya mobu 1914, emonanaki lokola ete mokili mobatelamaki na bitumba. Kasi kimya ebebisamaki na pwasa na le 28 Juin 1914 wana moto na Serbie abomaki mosangoli na bokonzi ya Autriche. Na yango, nsima mwa moke, lisangani ya mboka Autriche-Hongrie ebundisaki Serbie. Na le ler Août, Alemanye abundisaki Russie, mboka oyo ekotelaki Serbie, mpe, abundisaki France na le 3 Août. Na le 4 Août, Grande-Bretagne abundisaki Alemanye; na le 7 Août Monténégro abundisaki Autriche-Hongrie; na le 23 Août, Japon abundisaki Alemanye; na le 28 Août Autriche-Hongrie abundisaki Belgique. Mingi bakanisaki ete etumba ekoumela te, kasi ekomaki makasi mpenza koleka matata nyonso oyo masila kosalama kino ntango wana. Bamboka mosusu 19 emikotisaki na etumba yango oyo esopaki makila mingi na etando nyonso ya mokili mpe ebomaki bato koleka bamilió 13 kati na basoda mpe basivile, mpe bato koleka bamilió 21 bakómaki bibosono mpe bazokaki.
3, 4. Likambo nini lisalemaki na biro ya la Societé na ntongo ya Vendredi le 2 Octobre ya mobu 1914?
3 Na ntongo ya Vendredi le 2 Octobre 1914, charles Russell alobaki na basangani na biro ya la Société Watch Tower ya Brooklyn (Etats-Unis) ete: “Ntango na Bapakano esili, elaka na bakonzi ekoki.” Na Béthel, “ndako na Nzambe,” maloba wana mayambamaki na esengo mingi.
4 Bantina nini charles Russell mpe baninga na ye bazalaki na yango mpo na kozala na esengo na ntongo wana ya octobre? Liloba “ntango na Bapakano” lizwami wapi? Nini emonisi ete ntango yango esilaki na octobre ya mobu 1914? Likambo yango etali yo na nini?
Yelusaleme mpe ntango na Bapakano
5. Liloba “ntango ya Bapakano” lizwami wapi?
5 Liloba “ntango na Bapakano,” to “elaka na mabota,” lizwami na esakweli ya ntina mingi na Yesu oyo esakoli kobebisama na Yelusaleme. (Luka 21:5-36) Mikolo mibale liboso na kosala esakweli wana, Yesu amimonisaki lokola Masiya epai na bafandi na Yelusaleme. Wana amataki na likoló na mwana-na-mpunda na komikitisa nyonso, azalaki kokende epai na engumba, mpe bibele na Bayuda bazalaki kokumisa ye lokola oyo Zakaria 9:9 esakolaki. Bangangaki ete: “Masanzoli na Mokonzi oyo azali koya na nkombo na Jéhovah!”—Luka 19:28-40.
6, 7. Koboma nini ya mpasi esalemaki na bato na Yudea ya ekeke na liboso, mpe yango ebimisaki makambo nini?
6 Kasi, Yesu ayebaki ete mosika te likanisi na bibele likobongwana mabe epai na ye mpo na koyina makasi oyo emonisamaki na bakonzi ya mangomba na Yelusaleme, baoyo bapusamaki na tata na bango, Diable. (Genese 3:15; Yoane 8:44) Na yango, nsima mwa moke, na le 14 Nisan, ebele na Bayuda bangangaki mpo na kosenga liwa na Yesu. Balobaki na mokonzi moloma oyo azalaki kokakatana ete: “Tika ete makila na ye mazala likoló na biso mpe likoló na bana na biso.” (Matai 27:24, 25) Na esika na kondima Yesu lokola Mokonzi Masiya, banganga minene balobaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.” (Yoane 19:15) Masiya na solo abomamaki, kobakisamaka likoló na nzete na mpasi nsima wana bafundaki ye na lokuta ete azalaki kopengola bato na bokonzi ya Roma mpe atukaki Nzambe na Bayuda.—Malako 14:61-64; Luka 23:2; Yoane 18:36; 19:7.
7 Koboma wana ya mpasi mingi ebendaki nkanda na Nzambe likoló na bafandi na Yuda. Yelusaleme, elongo na temple na yango kitoko, ekokaki kobengama lisusu te “mboka na Mokonzi monene”, Jéhovah. (Matai 5:35; Luka 13:33-35) Mwa mikolo liboso na liwa na Yesu, bayekoli na ye bakamwaki mpo na kitoko na temple ya engumba yango. Mpo na koyanola, Yesu asakolaki ete: “Mpo na biloko oyo bizali bino kotala, mikolo mikoya wana ekotikala libanga moko na likoló na libanga mosusu te.”—Luka 21:5, 6.
8. Ntango Yesu apesaki “elembo” ya makambo oyo masengelaki komema kino kobebisama na Yelusaleme, likambo nini mosusu asakolaki na nsima?
8 Kokámwáká, bayekoli batuni Yesu ete: “Molakisi, makambo oyo makobima ntango nini?” (Luka 21:7) Mpo na koyanola, Yesu asakolaki makambo ya sikisiki oyo masengelaki kobima kino na kobebisama na Yelusaleme, mpe abakisaki maloba oyo na ntina monene ete: “Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka bilaka na mabota.” (Luka 21:8-24) Bongo, Yesu asakolaki likambo moko lisengelaki kosalema nsima na kobebisama na Yelusaleme likambo oyo likobima te liboso “ete ntango na Bapakano ekoka.” Na ntina na “elembo”, Yesu alobaki ete: “Wana ekomona bino makambo oyo nyonso kobima, boyeba ete Bokonzi na Nzambe ebelemi.” (Luka 21:31) Na yango, elembo esengelaki kokokisama mbala mibale. Ya liboso, na etando moke, esengelaki komonisa ete ‘kobebisama na Yelusaleme ebelemi.’ (Luka 21:20) Ya mibale, kokokisama oyo eleki monene, esengelaki kosalema nsima na nsuka na ntango na Bapakano, mpe esengelaki komonisa ete “bokonzi na Nzambe ebelemi.”—Tala Matai 24:3.
Engumba kitoko esalemi na esika na Yelusaleme ya mabelé
9. Ntango nini Yelusaleme ya mabelé ebungisaki etelemelo na yango malamu liboso ma Nzambe, mpe bakitanaki yango na nini?
9 Na kolobaka ete “Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka bilaka na mabota,” Yesu amonisaki wana ete engumba yango ya mabelé ekozwa lisusu ngolu na Nzambe? Te. Nsima na kobomama ya Mwana molingami na Nzambe, Yelusaleme abungisaki mpo na libela etelemelo na yango mpe bakitanaki yango na engumba eleki kitoko, “Yelusaleme na likoló, mboka na Nzambe na bomoi.”—Baebele 12:22; Matai 23:37, 38; 27:50, 51.
10. Liloba “Yelusaleme na likoló” emonisi nini?
10 Kati na Biblia, liloba “Yelusaleme na likoló” emonisi Bokonzi ya likoló bokobebisama te oyo na yango baklisto bapakolami babyangami mpo na koyangela.a (Baebele 11:10; 12:22, 28) Ntango ntoma Paulo akomaki maloba oyo, Bayuda bazalaki bobele kosepela mingi na Yelusaleme ya mabelé elongo na temple na yango. Akundolaki bongo na baklisto Baebele ete: “Tozali na mboka na seko awa te, kasi tozali koluka mboka elingi koya.”—Baebele 13:14.
Yelusaleme na likoló
11. Yelusaleme ya mabelé emonisaki eloko nini kino ntango abungisaki ngolu na Jéhovah?
11 Uta ntango molai, Yelusaleme ezalaki mboka-mokonzi na libota na Yisraele, epai bakonzi bazalaki ‘kofanda na kiti na Jéhovah.’ (1 Ntango 29:28) Epai mosusu, Jéhovah asalaki kondimana elongo na Davidi ete bokonzi ekotikala na libota na ye mpo na libela. Lokola na eleko na biso, bamboka-mikonzi to capitales na ndakisa Washington, Moscou, canberra mpe Pretoria ezali komonisa bikonzi oyo bizali koyangela wana, bobele bongo, kati na Biblia, Yelusaleme ezali komonisa bokonzi na Davidi.—2 Samwele 7:16; Luka 1:32.
12. Ndenge nini tosengeli kolimbola liloba “ntango ya Bapakano”?
12 Bokonzi na Davidi esukaki bobele na ndelo oyo Nzambe apesaki na Yisraele na kala. Na bongo, Yelusaleme ya mabelé ezalaki bobele elilingi ya Bokonzi na Masiya na solo oyo longwa na likoló, akoyangela mabelé mobimba (Nzembo 2:2, 7, 8; Danyele 7:13, 14; 2 Timote 4:18) Yango wana mokanda Le temps est proche (angl.), oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower na 1889, elobaki polele mpenza ete: “Nkolo na biso akokisaki liloba ‘Ntango na Mabota’ (note na nsé na lokasa: to mpe Ntango ya Bapakano) na ntango oyo eleki katikati na kokweisama na bokonzi na Yisraele oyo ezalaki bokonzi na elilingi na Nzambe (Ezekiele 21:25-27), mpe ebandeli, mpe kotyama na oyo na ntango na biso, Bokonzi na Nzambe na solo.”
Boumeli na ntango ya Bapakano
13. Ntango ya Bapakano ebandaki na eleko nini? Limbola eyano na yo.
13 Bokonzi na Nzambe ya elilingi ekweisamaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso, na Nebukadanezare, mokonzi na Babilone. Na sanza ya nsambo na manaka ya Bayuda, pene na katikati na Octobre, mboka esundolamaki.b (2 Mikonzi 25:8, 9, 22, 25, 26) Mpo na komonisa ete makambo yango masalamaki na lotomo na ye, Jéhovah Nzambe asalaki ete Nebukadanezare alota ndoto oyo kati na yango, mokonzi wana amonaki nzete oyo ekatamaki nde mobimbi na yango etikalaki ete etoa nsima na “ntango nsambo.” Ndoto wana ezwaki kokokana na yango ntango Nebukadanezare azongaki na bokonzi nsima na kozwa ligboma.—Danyele 4:10-17, 28-36.
14. Likanisi nini ya ntina limonisami na ndoto ya Nebukadanezare?
14 Nzokande, ndoto ya Nebukadanezare emonisaki ete ekokokisama mpenzampenza likoló na bokonzi na elilingi na Nzambe, oyo mokonzi wana, Mopakano, azwaki ndingisa ete ‘akweisa’ yango. Mpamba te, ndoto Na yango, ndoto esilaki na maloba oyo: “Bayeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi na bato, mpe apesi yango na ye oyo elingi ye, mpe atii likoló na yango moto oyo azali na nsima na bato nyonso.”—Danyele 4:17.
15. Mpo na nini Yesu Klisto abengaki mpenza na kobengama “moto oyo azali nsima na bato nyonso”? (Matai 11:29)
15 Bobele moto moko nde abongi na makambo nyonso ete abengama “oyo azali nsima na bato nyonso”: Mwana na likinda na Nzambe oyo atikaki nkembo na ye na likoló na bolingo na ye mpenza ete abotama lokola moto. Ezali bongo, Yesu, oyo abomamaki na maboko na Satana na liwa ya nsoni mpe ya mpasi mingi. (Bafilipi 2:3, 5-11) Nsima na kosekwisama mpe nsima wana azongaki lisusu na nkembo na ye na likoló, Yesu azelaki ete ntango nsambo ya Bapakano esila liboso ete atyama lokola Mokonzi na Masiya likoló na bato.—Baebele 10:12, 13.
16. Mituya nini mipesami na mokanda ya Emoniseli, esalisi baklisto na koyeba eleko oyo ntango nsambo esilaki?
16 Kasi ndenge nini Ba Témoins de Jéhovah bayebaki boumeli ya ntango sambo? Biblia emonisi ete “ntango moko (to ntango 1), mpe bantango (to ntango 2), mpe ndambo na ntango,” elingi koloba ntango misato na ndambo ekokani na mikolo 1260. (Emoniseli 12:6, 14) Na yango, biteni mibale, elingi koloba ntango sambo, ekokani na mikolo 2520. Na kolanda lilako na esakweli oyo eyebisi ete “mokolo moko mpo na mbula moko,” ntango nsambo ekokani na mibu 2520. (Mituya 14:34; Ezekiele 4:6) Mituya wana mipesi nzela na koyeba ete ntango ya Bapakano, oyo ebandaki na Octobre 607 liboso na ntango na biso, esukaki nsima na mibu 2520, elingi koloba na Octobre ya mobu 1914.
17. Nsango nini ya esengo esengelaki kosakolama na 1914?
17 Na Octobre 1914, Jéhovah Nzambe afandisaki Nkolo Yesu Klisto, Mwana molingami na ye, na kiti na Bokonzi na likoló. Na ntango wana, emonaneli ya Emoniseli na ntoma Yoane ebandaki kokoma solo mpe maloba oyo malandi makokaki bongo kosakolama, ete: “Bokonzi ya mokili esili kokoma Bokonzi na Nkolo (Jéhovah) na biso mpe Klisto na ye, mpe (Jéhovah) akozala Mokonzi libela na libela.” (Emoniseli 1:10; 4:1; 11:15) Oyo nde nsango kitoko, mpe esengo monene mpo na basangoli na Bokonzi elongo na Klisto mpe bato nyonso na Bokonzi!—Emoniseli 11:17.
18. Mpo na nini mokili ezali na mpasi mingi uta 1914?
18 Solo mpenza, uta 1914 ebele na bato bazali na esengo te. Kasi, makambo na mawa oyo mazali kosalema na mabelé mazali elembeteli ete boyangeli na Satana ekomi na nsuka na yango. Ndenge nini toyebi yango? Mokanda ya Emoniseli emonisaki ete kotyama ya Bokonzi na Nzambe esengelaki kobimisa etumba na likoló. Satana mpe bademo na ye basengelaki kobwakama longwa na likoló kino zingazinga na mabelé. Nsima na kotala elonga wana kati na emonaneli ya esakweli, Yoane ayokaki mongongo makasi molobaki ete: “Bosepela, E likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, wana eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”—Emoniseli 12:1-12.
19. Mpo na nini baklisto ya solo bazali na esengo mingi na kobika na eleko na biso?
19 Makambo ya mokili oyo mazali sé kobeba uta 1914, mamonisi ete emonaneli na Yoane ekomi mpenza solo mpe ete nsuka ya bato baboyi komitya na nsé na boyangeli na Nzambe ebelemi na likama mpenza. (Luka 21:10, 11, 25-32) Ezali likambo na esengo mpenza na kobika na eleko kitoko oyo Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akosukisa ntembe monene na ntina na boyengeli na ye awa na mabelé. Na nsima, mabelé makobongwana paradis kitoko, mpe bayengebene bakokoma na ezalela na kokoka. Ata bakufi mpe bakosekwa, mpe bakopesamela likoki ya komimonisa bato babongi na bomoi na seko.—Emoniseli 20:1-3, 12, 13; 21:3-5.
Ntina na kosembolama na eleko na biso
20. a) Banani bamonanaki ete bazalaki basaleli ya solo na Jéhovah liboso na mobu 1914? b) Bosembo nini baklisto bapakolami bamilengelaki ete basala yango?
20 Na boumeli ya mibu 38 oyo mizalaki liboso na 1914, Bayekoli na Biblia, nkombo bazalaki kobengela ba Témoins de Jéhovah kala, basakolaki ete ntango ya Bapakano esengelaki kosuka na mobu wana. Likambo yango limonisaki polele ete bazalaki basaleli ya solo na Jéhovah. Kasi, lokola basaleli na Nzambe ya ekeke na liboso, bango mpe bazalaki na bilikya mabe. Na ndakisa, bazalaki kobanza ete etuluku mobimba ya baklisto bapakolami esengelaki konetwa na likoló na 1914. Bandimaki lisusu ete etumba ebimaki na 1914 esengelaki komema mpenza kino nsuka ya mokili na Satana.
20 Na boumeli ya ntango, baklisto bapakolami bakangaki ntina ete bazalaki na mosala monene wana na mabelé.c Kolendendela na bango mpo na kopesa litatoli ya boumeli na Etumba na Liboso ya mokili mobimba, ebotelaki bango minyoko makasi na bakonzi ya politike baoyo bapusamaki na bakonzi ya boklisto na lokuta. (Nzembo 2:1-6) Mosala ya baklisto na solo mobebisamaki na Etats-Unis na le 21 Juin 1918, wana esambiselo ekatelaki bakambi ya la Société Watch Tower mbula 20 ya boloko na ntina na bifundeli ya lokuta.
21. Baklisto ya solo bazwaki kobongisama nini na boumeli ya Etumba na Liboso ya mokili mobimba?
21 Na pwasa, Etumba na Liboso ya mokili mobimba esilaki na Novembre 1918. Mwa ntango moke na nsima, na le 25 Mars 1919, batikaki bakambi ya la Société Watch Tower. Esambiselo elongisaki bango na bifundeli nyonso wana. Eleko ya kimya oyo bamizelaki na yango te, emonanaki epai na baklisto bapakolami, likambo oyo likundwelaki bango makoki mapesamaki na bayekoli ya liboso na Klisto nsima wana elimo santu epesaki bango nguya na mobu 33.—Misala 2:17-21, 41.
22, 23. a) Baklisto bapakolami na sembo bazali kosala nini uta 1919, mpe yango ezwi matomba nini mibale? b) Nini emonisami na Yelusaleme ezangi bosembo na eleko na biso?
22 Uta 1919, liboke ya baklisto bapakolami na sembo bazali kotosa na molende na etinda oyo emonani na maloba na Yesu makomami na Matai 24:14 ete: “Nsango malamu na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Ezwi matomba nini? Pene na bamilió minei na “bampate mosusu” na Klisto bamipesi na Jéhovah mpo na kosalela ye na bomoko elongo na baklisto bapakolami. (Yoane 10:16) Nde boklisto na lokuta ezali sé kolanda koboya nsango na Bokonzi wana epusami na bakonzi na yango. Na komipesáká na mikano ya bato na politike mpe na konyokoláká Ba Témoins de Jéhovah, boklisto na lokuta ezali komekola bato na Yuda ya ekeke na liboso, baoyo banyokolaki Klisto. Motindo moko lokola asalaki yango mpo na Yelusaleme, Jéhovah akokweisa mpe nkanda na ye likoló na Yelusaleme na elilingi ezangi bosembo, yango boklisto na lokuta. Mpe ndenge moko lokola libota oyo liyokaki nsango na Klisto na kokweisa emonaki kobebisama oyo ye asakolaki, motindo moko mpe na eleko na biso, libota ya 1914 “likoleka te” liboso ete “bolozi monene” eya.—Matai 24:21, 22, 34.
23 Tosengeli kosala nini mpo na kobika na bolozi monene mpe kokota kati na mokili ya sika na Nzambe? Atako bilikya mabe oyo tozalaki na yango, tosengeli kosenzela ete tolala mpongi te mpo na oyo etali mikumba na biso ya boklisto. (Habakuku 2:3; 1 Batesaloniki 5:1-6) Baoyo bamonaki makambo oyo masalemaki uta 1914 bazali sé kosila. Tozala na bokengi; tozali na ntango na kobebisa te. (Matai 24:42) Baoyo nyonso balingi kobika na nsuka ya mokili na Satana basengeli uta sikawa kozala na boyokani elongo na maloba na Nzambe oyo mapemami ete: “E Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya Nyonso . . . totondi yo mpo okamati nguya na yo monene mpe osili kokóma Mokonzi.”—Emoniseli 11:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala La Tour de Garde ya 15 Juin 1983, page 22.
b Mpo na kozwa ndimbola molai likolo na ntina mpo na yango ntango ya Bapakano ebandaki na date wana, tala Mokapo 14 ya mokanda “Que ton royaume vienne!” ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
c Kati na zulunalo Le scrutateur de la Bible (The Bible Examiner) ya Octobre 1876, charles Russell abimisaki lisolo moko ma titre ete “Ntango ya Bapakano ekosila na eleko nini?” Tokoki kotanga boye kati na lokasa 27 ete: “Ntango nsambo ekosila na 1914.”
Bozongeli?
◻ Yelusaleme ya kala ezalaki komonisa nini, kasi mpo na nini ebungisaki etelemelo na yango ya kozwa ngolu na Nzambe?
◻ Ntango ya Bapakano ebandaki na eleko nini? Esilaki ntango nini, mpe ebimisaki makambo nini?
◻ Kobebisama na Yelusaleme ezangi bosembo esakoli likambo nini?
◻ Ndenge nini toyebi ete bolozi monene ebelemi, mpe tosengeli kosala nini mpo na kobika na yango?
24. Tosengeli kosala nini mpo ete tobika mpe tokota kati na mokili ya sika molakami na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 16]
Yelusaleme mpe temple na yango ebungisaki etelemelo na yango kitoko, kasi Nzambe alandaki kopambola Mwana na ye, Masiya, kino kolobana na ye mpenza longwa na likolo