Mokapo 26
Libombami mosantu na Nzambe ekokani kati na nkembo!
1. (a) Na maloba nini Yoane alobeli biso ete libombami na bulee na Nzambe ezali kokokana? (b) Mpo na nini bibele na baanzelu bazali koloba na mongongo makasi?
BOZALI komikundola lisusu ndai oyo anzelu makasi akataki, ndai oyo ekomami na Emoniseli 10:1, 6, 7? Ye alobaki boye: “Elaka ekozala lisusu te. Kasi wana anzelu ya nsambo akobeta kelelo na ye, na mikolo yango, libombami na Nzambe likokokana lokola esakolaki ye na basakoli, baombo na ye.” Ntango oyo Jéhovah abongisaki esili kokoka mpo ete kelelo oyo ya nsuka ekoka kobetama. Kasi ndenge nini libombami mosantu ekokokana? Yoane alobeli biso yango na esengo monene. Akomi: “Anzelu na nsambo abetaki kelelo, mpe mingongo makasi kati na likoló milobi ete, Bokonzi na mokili oyo esili kokoma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.” (Emoniseli 11:15) Bibele oyo na baanzelu bazali na elonga na koloba na mongongo makasi, ata na mongongo na nkake, mpamba te eyambweli oyo monene etali mokili mobimba. Yango esimbi bomoi ya bikelamu nyonso.
2. Ntango nini mpe na likambo nini libombami na bulee na Nzambe ekokisami kati na kolonga?
2 Libombami na bulee ekokani na esengo nyonso! Na nkembo mpe bonzenga, ekokanaki na elonga nyonso na 1914, ntango Nkolo Jéhovah afandisaki Klisto lokola Mokonzi nsima na ye. Kosalaka bongo na nkombo ya Tata na ye, Yesu Klisto abandaki koyangela mokili esika banguna na ye bazali. Na motindo na ye ya Libota na ndaka, azwi nguya na bokonzi, mpo na koboma Nyoka mpe libota na ye, mpe kozongisa kimya na mabelé oyo ekobongwana paradis. (Genese 3:15; Nzembo 72:1, 7) Na motindo na ye na Mokonzi mpe Masiya, Yesu akokokisa Liloba ya Jéhovah mpe kolongisa Tata na ye, “Mokonzi na seko,” oyo akoyangela lokola Nkolo likoló na nyonso “libela na libela.”—1 Timote 1:17.
3. Mpo na nini Jéhovah Nzambe, atako azali ntango nyonso Mokonzi, apesaki nzela ete mitindo mosusu ya biyangeli ebima awa na mokili?
3 Kasi ndenge nini ‘bokonzi na mokili . . . esili kokóma bokonzi na Nkolo na biso,’ Jéhovah? Jéhovah Nzambe azalaki ntango nyonso Mokonzi te? Azali solo Mokonzi uta ntango nyonso, mpamba te Molevi Asafe ayembáká boye: “Nzambe azali Mokonzi na ngai longwa kalakala.” Mpe mokomi mosusu na nzembo alobáká: “Jéhovah azali Mokonzi! . . . kiti na yo na bokonzi etiamaki kalakala mpenza; longwa na ntango eyebani te.” (Nzembo 74:12; 93:1, 2) Nzokande, na mayele na ye, Jéhovah atikaki nzela ete mitindo mosusu ya bikonzi ebima awa na mokili. Na yango, ntembe oyo ebimaki na Edene, mpo na koyeba soki moto akoki komiyangela ye moko kozanga Nzambe, ntembe yango epesamelaki ntango mpenza mpo ekoka komonisa soki ezali solo. Bokonzi ya moto elongi soki moke te. Maloba malandi oyo mosakoli moko na Nzambe alobaki mazali solo: “O Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Uta lisumu ya baboti na biso ya liboso, mabelé mobimba eyangelami na “nyoka ya kalakala,” Satana. (Emoniseli 12:9; Luka 4:6) Ngonga ekoki mpo na kobongola makambo nyonso! Mpo na kolongisa etelemelo na ye, Jéhovah abandi kosalela bokonzi na ye na mabelé na lolenge ya sika, elingi koloba na nzela na Bokonzi oyo apesi na Masiya.
4. Ntango kelelo ebandaki kobetama na 1922, balobelaki mingimingi likoló na likambo nini? Limbola.
4 Ntango kelelo ya nsambo ebandaki kobetama na 1922, assemblée ya Bayekoli na Biblia oyo esalemaki na mboka Cedar Point (na Etats-Unis) elobelaki polele diskur ya Joseph Rutherford, diskur ezwamaki na eteni oyo ya Makomami: “Bokonzi na likoló esili kobelema.” (Matai 4:17) Diskur yango esukaki na maloba oyo: “Soki ezali boye, bozonga kati na elanga, e bino, bana na Nzambe oyo aleki likoló! Bolata molato na bino ya etumba! Bozala na bokatikati, bosenzela, bozala na molende, bozala mibali na mpiko! Bozala batatoli na solo mpe na sembo na Nkolo. Bokenda liboso kati na etumba kino Babilone ekotikala se mpamba. Bopalanganisa nsango na bisika nyonso. Mokili esengeli koyeba ete Jéhovah azali Nzambe mpe Yesu Klisto azali Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo. Oyo ezali mokolo eleki mikolo nyonso. Tala, Mokonzi azali koyangela! Bino bozali balobeli na ye. Yango wana: Bosakola, bosakola, bosakola Mokonzi mpe bokonzi na ye!” Bokonzi na Nzambe mpe na Klisto Yesu etyamaki liboso, mpe yango epusaki mosala ya kosakola Bokonzi, kati na yango ezalaki mpe na bikateli bisakolamaki ntango baanzelu nsambo babetaki kelelo.
5. Na 1928, eloko nini esalamaki na assemblée ya Bayekoli ya Biblia, oyo emonisaki polele kobetama na kelelo ya nsambo?
5 Kelelo oyo ebetamaki na anzelu ya nsambo ekokanaki na assemblée oyo Bayekoli ya Biblia basalaki na mboka Détroit (Etats-Unis) kobanda na le 30 Juillet kino le 6 Août 1928. Mpo na libaku yango, basalelaki ba stations ya radio 107 oyo ezalaki na boyokani kati na yango: zulunalo New York Times elobaki mpo na yango ete “ezali ekanganeli ya ba stations ya radio oyo eleki monene mpe eleki motuya (esengaki mosolo mingi) lokola emonanaki naino liboso te kati na lisolo ya bato.” Bayangani bandimaki na esengo nyonso ekateli moko makasi, oyo ezalaki na motó na likambo “Eyambweli mpo na kotelemela Satana mpe mpo na kokumisa Jéhovah”; eyambweli yango esakolaki ete na Armagedon, Satana mpe lisangá na ye mabe bakobomama, nzokande baninga nyonso na boyengebene bakosikwama. Bato na sembo oyo bandimelaki Bokonzi na Nzambe bazwaki na esengo nyonso mokanda ya nkasa 368 oyo ezalaki na motó ya likambo Gouvernement. Mokanda yango emonisaki polele mpenza ete “Nzambe asili kofandisa Mokonzi mopakolami na ye na kiti na ye ya bokonzi na 1914.”
Jéhovah akamati nguya na ye
6. Na maloba nini Yoane ayebisi motindo basakolaki kofanda ya Klisto na kiti ya bokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe?
6 Klisto asili kozalisama Mokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe. Oyo nde nsango ya esengo! Yoane alobi: “Mikóló yango ntuku mibale na minei, baoyo bafandi na kiti na bokonzi na bango na liboso na Nzambe, bakwei na bilongi na bango kosambela Nzambe. Balobi ete, E Jéhovah Nzambe, Mozwi na Nguya-Nyonso, Oyo azali mpe azalaki, totondi yo mpo ete okamati nguya na yo monene, mpe osili kobanda koyangela.”—Emoniseli 11:16, 17.
7. (a) Ndenge nini batikali na mikóló 24 ya elilingi oyo bazalaki naino na mabelé bakumisaki Jéhovah Nzambe? (b) Ndenge nini baoyo kati na mikóló 24 oyo basekwisamaki mpo na kozwa bisika na bango na likoló basalaki ndenge moko?
7 Mikóló 24 nde bazali bongo kokumisa Jéhovah Nzambe; bazali elilingi na bandeko na Klisto bapakolami kati na etelemelo na bango ya likoló. Kobanda na 1922, batikali kati na baklisto 144 000 bapakolami basanganaki na molende na mosala oyo ebandisamaki na kobetama na kelelo. Baklisto oyo bapakolami bakangaki ntina mpenza na elembo oyo ekomami kati na Evanzile ya Matai (24:3 kino 25:46). Nzokande, na ebandeli na mokolo na Nkolo, baninga na bango oyo basilaki ‘komimonisa sembo, ata kino na kufa’, basekwisamaki mpo na kozwa esika na bango na makolo, na motindo boye ete bakokaki komonisa etuluku mobimba ya ba 144 000 na kokweaka na bilongi na bango, mpo na kokumisa Jéhovah. (Emoniseli 1:10; 2:10) Bango nyonso bazali na botondi epai na Nkolo Moyangeli mpo ete aumisi te kokokisama na libombami na ye ya bulee!
8. (a) Kobetama na kelelo ya nsambo esali nini likoló na mabota? (b) Mabota basiliki epai na nani?
8 Mpo na mabota, kobetama na kelelo ya nsambo ememeli bango esengo moko te. Ntango ekoki mpo na bango ete bakoka kooka nkanda ya Jéhovah. Yoane alobi yango na maloba oyo: “Mabota bangalaki, nde nkele na yo eyaki, mpe elaka na kosambisa bakufi ekomi, mpe elaka na kopesa libonza na basakoli baombo na yo mpe na bapetwi mpe na bango babangi nkombo na yo, na bato mike na bato minene, mpe elaka na kobebisa babebisi na mokili.” (Emoniseli 11:18) Kobanda na 1914, mabota ya mokili bamonisaki nkele na bango makasi bamoko epai na bamosusu, mpe epai mosusu kotemelaka Bokonzi na Nzambe, mingimingi kotemelaka batatoli mibale ya Jéhovah.—Emoniseli 11:3.
9. Ndenge nini mabota babebisi mokili, mpe Nzambe akani ete asala nini na ntina yango?
9 Na boumeli ya lisolo ya bato, mabota babebisaki mokili na bitumba na bango oyo bizali kosila te mpe na motindo mabe oyo bazali kosalela biloko ya mokili. Nzokande, kobanda na 1914, mokili ebebisami makasi mpe na ndenge ya nsomo. Lokoso mpe libebi ezali ntina oyo zamba mingi na mokili esili, ebimisi esobe to déserts mpe mabele mingi oyo bakoki kolona bilanga ebebi. Mbula oyo esangani na acide mpe mapata oyo ezali na biloko ya nikleere na kati ebebisi zamba mingi. Ndunda mpe milona mosusu ebebisami. Mopepe mpe mai ebebisami. Biloko ya salité oyo bakompanyi ezali kobwaka ekomi likama mpo na bomoi ya bikelamu mingi awa na mabelé mpe na mai. Na ntango moko boye, mikili oyo bazali na bombe atomike bakanelaki kosilisa nyee bato nyonso awa na mokili. Nde na esengo, Jéhovah Nzambe “akobebisa baoyo bazali kobebisa mokili”; akoboma bato oyo ya lolendo mpe ya mbindo, baoyo basili kobebisa etando na biso oyo. (Deteronome 32:5, 6; Nzembo 14:1-3) Na mawa oyo ya misato, Jéhovah asengi bongo na bato oyo ya mabe ete bazongisa monoko epai na ye.—Emoniseli 11:14.
Mawa na babebisi na mokili!
10. (a) Mawa ya misato ezali nini? (b) Na ndimbola nini mawa ya misato esuki bobele na mitungisi te?
10 Tala mawa na misato. Ezali koya noki! Na nzela na yango nde Jéhovah akoboma baoyo bazali kobebisa “etielo na makolo na ye,” mabelé kitoko oyo biso tofandi likoló na yango. (Yisaya 66:1) Mawa yango etumolami na Bokonzi na Masiya, libombami na bulee na Nzambe. Banguna na Nzambe, mpe mingimingi bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo, batungisamaki na mawa mibale ya liboso, mpenzampenza oyo elandaki bolozi na mayoyo mpe bibele na bafandi na mpunda; kasi mawa ya misato, oyo etumolami na Bokonzi ya Jéhovah ye moko ekosuka bobele na motungisi te. (Emoniseli 9:3-19) Ekoboma nde koboma, na kolimwisaka lisangá ya bato oyo bazali kobebisa mokili, elongo na batambwisi na bango. Ekozala Armagedon, esika oyo mokolo na Nkolo ekondongwana mpenza kondongwana. Ekozala lokola elobáká yango Danyele: “mpe na mikolo na mikonzi yango [batambwisi oyo bazali kobebisa mokili]; Nzambe na likoló akotelemisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa mikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala libela na libela.” (Tanga Danyele 2:35, 44.) Lokola ngomba monene mpe molai, Bokonzi na Nzambe ekoyangela mabelé oyo masili kokembisama, kolongisáká bongo bokonzi monene ya Jéhovah mpe komemáká esengo ya seko epai ya bato.—Yisaya 11:9; 60:13.
11. (a) Kolandana ya makambo nini ya esengo eyebisami kati na esakweli oyo? (b) Bolamu nini ekoki na biso te epesameli biso, na lolenge nini mpe nani apesi yango?
11 Mawa ya misadto ezali kolandana na ebele na makambo na esengo oyo makosalema mokemoke na boumeli ya mokolo ya Nkolo. Ntango ekoki mpo ete ‘bakufi bakoka kosambisama, mpe Nzambe akoka kopesa mbano epai na baombo na ye basakoli, mpe na babulami, mpe na baoyo bakobangaka nkombo na ye.’ Yango elimboli lisekwa kati na bakufi. Mpo na babulami, bapakolami, oyo basilaki kokufa, lisekwa na bango esalamaki na ebandeli na mokolo ya Nkolo. (1 Batesaloniki 4:15-17) Na ntango ekoki, batikali kati na babulami bazali kolanda bango na nzela na lisekwa nokinoki nsima na liwa. Bato mosusu mpe bakozwa mbano, bakisa baombo na Nzambe, basakoli ya ntango ya kala mpe bato nyonso mosusu oyo babangaki nkombo ya Jéhovah, bazála kati na ebele monene oyo bakobika na bolozi monene to na kati na “bakufi, minene mpe mike,” oyo bakozongisama na bomoi na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto. Lokola Mokonzi mpe Masiya oyo Nzambe aponi azali na bafungola ya liwa mpe ya Hadès, bokonzi na ye epesi ye likoki ya kokabola bomoi ya seko na baoyo nyonso bazali koluka likabo oyo ya motuya. (Emoniseli 1:18; 7:9, 14; 20:12, 13; Baloma 6:22; Yoane 5:28, 29) Ezala bomoi bokoki kosuka te kuna na makolo, to mpe bomoi ya seko na mabelé, likabo oyo ya bomoi ezali eloko oyo Jéhovah apesi biso, atako biso tokoki na yango te; mpo na yango, baoyo nyonso bazwi likabo yango basengeli kozala na botondi ya seko.—Baebele 2:9.
Botala sanduku na kondimana na ye!
12. (a) Engebene Emoniseli 11:19, Yoane amoni nini kati na makóló? (b) Sanduku na kondimana ezalaki elembo ya nini, mpe nini ekomelaki yango ntango Bayisraele bakendaki na boombo na Babilone?
12 Jéhovah azali koyangela! Na nzela na Bokonzi na ye oyo epesami na Masiya azali koyangela mokili na lolenge kitoko mingi. Ezali yango endimisami na emonaneli oyo ya Yoane: “Bongo tempelo na Nzambe, oyo kati na likoló, efungwami mpe sanduku na kondimana na ye kati na tempelo na ye emonani. Mikalikali mizalaki, na mingongo, na nkake, na matandala mingi.” (Emoniseli 11:19) Oyo ezali esika bobele moko epai sanduku na kondimana na Nzambe elobelami kati na Emoniseli. Sanduku ezalaki elembo mpo na komonisa ete Jéhovah azali wana katikati na libota na ye, Yisraele. Kati na tabernakle, mpe na nsima, kati na tempelo oyo etongamaki na Salomo, Sanduku ebatelamaki kati na Esika-Eleki-Bosantu. Nzokande, ntango Bayisraele bakendaki na boombo na Babilone na mobu 607 liboso na ntango na biso, Yelusaleme ebebisamaki mpe sanduku na kondimana elimwaki. Kobanda na ntango wana, bakitani na libota na Davidi batikaki ‘kofanda likoló na kiti ya bokonzi ya Jéhovah mpo na kozala mikonzi.’—1 Ntango 29:23.a
13. Likambo oyo ete sanduku na kondimana na Nzambe emonani kati na esika na bulee na Nzambe na likoló elimboli nini?
13 Tala sikawa, nsima na mibu 2 500, sanduku emonani lisusu. Kasi na kati ya emonaneli ya Yoane, sanduku oyo ezali kati na tempelo ya mabelé te. Ezali nde kati na esika ya bulee ya Nzambe kuna na likoló. Jéhovah azali koyangela na nsima na mokonzi moko na libota ya bokonzi ya Davidi. Kasi ya mbala oyo, Mokonzi Klisto Yesu afandi na kiti na bokonzi na Yelusaleme ya likoló, etelemelo ya kotombwama mpe epai akoki komona malamu mpo na kokokisa bikateli ya Jéhovah. (Baebele 12:22) Tokoyekola yango na mikapo misusu ya Emoniseli oyo mizali liboso.
14, 15. (a) Na Yelusaleme ya kala, bobele nani nde akokaki komona sanduku na kondimana, mpe mpo na nini? (b) Kati na tempelo [esika na bulee] na Nzambe, nani akoki komona sanduku na kondimana na ye?
14 Na Yelusaleme ya kala na mabelé, Sanduku ezalaki komonana na miso na Bayisraele te, mpe ata na miso na banganga oyo bazalaki kosala mosala kati na tempelo, mpamba te yango ezalaki kati na Esika-Eleki-Bosantu mpe na kati rido ezalaki wana, oyo ekabolaki esika wana na esika mosusu ebengamaki Esika ya Bosantu. (Mituya 4:20; Baebele 9:2, 3) Bobele nganga monene nde akokaki komona yango ntango azalaki kokota mbala moko na mbula kati na Esika-Eleki-Bosantu, na Mokolo na Kobondela mpo na Bolimbisi masumu. Nzokande, ntango tempelo efungwami kati na makoló, sanduku ya elilingi emonani bobele na miso na Yesu Klisto te, Nganga Monene na Jéhovah, kasi lisusu na miso na banganga mike, ba 144 000, sangisa Yoane.
15 Bato ya liboso oyo basekwisami kati na makoló bazali komona penepene sanduku oyo ya elilingi, mpamba te, lokola batangami na kati na mikóló 24, bazwi esika na bango zongazonga na kiti na bokonzi ya Jéhovah. Mpo na oyo etali kelasi na Yoane na mabelé, bango bangengisami na elimo ya Jéhovah mpo na komona na miso na bososoli ete Jéhovah azali wana kati na tempelo na Ye ya elimo. Ezalaki mpe na bilembo oyo bilamusaki likebi ya bato nyonso likoló na likambo oyo ya kokamwa. Kati na emonaneli na Yoane eyebisami ete mikalikali mizalaki, na mingongo, na nkake, na koningana na mabelé mpe matandala. (Tala Emoniseli 8:5.) Yango ezali elilingi ya nini?
16. Ndenge nini mikalikali mizalaki, na mingongo na nkake, na koningana na mabelé na matandala mingi?
16 Uta 1914, kobulungana monene esalemaki kati na makambo na losambo. Nde na esengo, “koningana na mabelé” oyo esalamaki nzela moko na mingongo emipesi epai na Nzambe, oyo mizali kosakola nsango ya polele mpenza likoló na Bokonzi na ye oyo esili kosalema. ‘Nkake na makebisi’ euti na Biblia esili kobeta. Mikalikali na kongenga misili kongenga, kopesaka bato mayele na Liloba na esakweli na Nzambe, “matandala” makasi oyo ezali elilingi na bikateli na Nzambe ebetibeti boklisto ya mokili oyo mpe mangomba nyonso mosusu ya lokuta. Nyonso wana mbele esengelaki kobenda likebi ya bato. Kasi mawa mingi, mpamba te motuya eleki monene kati na bango, na ndakisa ya bafandi ya Yelusaleme na eleko na Yesu, basosoli te kokokisama na bilembo oyo ya Emoniseli.—Luka 19:41-44.
17, 18. (a) Kelelo oyo baanzelu nsambo babetaki etiaki mokumba nini likoló na mapeka na baklisto oyo bamipesi na Nzambe? (b) Ndenge nini baklisto bazali kokokisa mokumba na bango?
17 Baanzelu nsambo bazali se kobeta kelelo na bango, kosakoláká makambo minene oyo mazali kobima lelo na mokili. Baklisto oyo bamipesi epai na Jéhovah bazali na mokumba monene ya kolanda kosakola nsango yango na mokili. Mpe bazali kosala yango na esengo mingi! Na ndakisa, talela mibu 20 oyo mileki, kobanda 1986 kino 2005: motuya na ngonga oyo balekisaka mbula na mbula kati na mosala ya kosakola ebakisamaki mbala soko mibale— kolongwa na 680 837 042 kino 1 278 235 504. Solo, “libombami na bulee na Nzambe, engebene nsango malamu,” esakolami “kino nsuka na mokili oyo bato bafandi.”—Emoniseli 10:7; Baloma 10:18.
18 Bimonaneli mosusu bizali kozela biso sikawa, mpamba te mikano na Bokonzi na Nzambe milandi komonisama.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokomi na Lisolo na bato na nkombo Tacite alobi ete ntango Yelusaleme elongamaki na mobu 63 na liboso na ntango na biso mpe ete Cneius Pompeius akotaki na esika eleki bosantu ya temple, amonaki ete ezalaki mpamba. Sanduku na kondimana ezalaki lisusu te.—Histoires, de Tacite, 5, 9.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 173]
Makambo na ntina na kosakolama na bikateli na Jéhovah to kobetama na kelelo
1. 1922, Cedar Point (Ohio, Etats-Unis): Ntembe etyami liboso na bakonzi na mikili oyo emibengaka ete ya boklisto, na makambo matali lingomba, politike mpe mombongo, kosengaka bango ete bandima kozanga kolonga na bango mpo na oyo etali kotya kimya, bolamu mpe esengo. Yango ekoya se na nzela na Bokonzi na Masiya.
2. 1923, Los Angeles (Etats-Unis): Diskur piblike oyo ezalaki na motó na likambo “Mabota nyonso mazali kokenda na Armagedon, kasi bamilió na bato bazali na bomoi lelo bakokufa te” ebyangi “bampate” oyo balingi kimya ete batika mai monene ya liwa oyo ezali bongo mokili.
3. 1924 Columbus (Etats-Unis): Bakonzi na mangomba oyo bazali komikumisa mpe baboi kosakola Bokonzi na Masiya bafundami. Baklisto na solo basengeli kosakola nkanda na Nzambe mpe kobondisa bato bazali na mpasi.
4. 1925, Indianapolis (Etats-Unis): Nsango na elikya, oyo ekeseni na molili na elimo kati na mangomba ya boklisto ya mokili, ezali kolaka kimya, bolamu, kolongono, bomoi, bonsomi mpe esengo ya libela, na nzela na Bokonzi.
5. 1926, Londres (Angleterre): Bolozi ekweli mangomba na mokili lokola mayoyo; emonisi ndenge baboi Bokonzi na Nzambe mpe esakoli kobotama na boyangeli na makoló.
6. 1927, Toronto (Canada): Libyangami moko epesamaki lokola soko eutaki na mampinga makomataka na mpunda, etindi bato na kotika mangomba na mokili mpe na komipesa na motema mobimba epai na Jéhovah Nzambe, na Mokonzi na ye mpe na Bokonzi na ye.
7. 1928, Detroit (Etats-Unis): Maloba makweisaki Satana mpe malongisaki Jéhovah mamonisi polele ete Mokonzi mopakolami na Jéhovah oyo afandisamaki na kiti na bokonzi na 1914 akoboma lisangá mabe ya Satana mpe akosikola mokili.
[Etanda na lokasa 175]
Ndenge mabelé mazali kobebisama
“Na ba secondes nyonso misato eteni ya zamba ekokani na bonene ya libanda na masano na motopi ezali kolimwa . . . Kosila ya zamba ya liboso ezali kobungisa nkoto mingi na mitindo na banyama mpe na banzete.”—Illustrated Atlas of the World (Rand McNally).
“Nsima na mibu 200 ya sivilizasio, [Bitima minene (ya Amerike)] bisili mpe kokoma bifandelo minene ya bosoto na mokili.”—The Globe and Mail (Canada).
Na Avril 1986, Centrale nikleere moko epanzanaki na Tchernobyl, na Union soviétique mpe na nsima moto ebimaki. Yango “ezalaki likambo monene kati na makambo ya nikleere uta babwakaki bombe na Hiroshima mpe na Nagasaki.” Ndenge “nkisi wana epanzanaki na mopepe, na mai mpe na mabelé elekaki mosika nkisi nyonso ya mabe oyo esila kokota na mopepe na mai to na mabelé na ntango bakomekaka babombe ya nikleere.”—JAMA; The New York Times.
Na Minamata (Japon), izine moko esopaki nkisi babengi méthylmercure kati na mai. Bato balyaki mbisi oyo ebebisamaki babandaki kozwa maladi ya sika oyo babengaki maladi ya Minamata, “mpasi ya motó ntango nyonso. . . . Na 1985, bato 2578 bazwaki maladi yango na Japon.”—International Journal of Epidemiology.
[Etanda na lokasa 176]
Maloba ya ntina mazwami kati na Emoniseli 11:15-19 mazali ebandeli ya bimonaneli bilandi. Emoniseli mokapo 12 ezongi nsima lisusu mpe elobeli na likambo mokomoko nsango minene oyo epesami kati na Emoniseli 11:15, 17. Mokapo 13 ezali moboko ya Emoniseli 11:18, mpamba te elobeli ebandeli mpe kokola ya lisangá na politike na Satana oyo ebebisi mabelé. Mikapo 14 mpe 15 elobeli lisusu malamumalamu bikateli ya Bokonzi oyo bisangani na kobetama na kelelo na nsambo mpe na mpasi na misato.
[Bililingi na lokasa 174]
Jéhovah “akoboma baoyo bazali kobebisa mokili”