Okotosa likebisi na Nzambe?
MBALA mingi bato batosaka te makebisi oyo makoki kobikisa bomoi na bango. Bafandi mingi ya Pompéi batyaki likebi te na makelele makasi ya Ngomba Vésuve. Bobele bongo, bato mingi lelo balingi te kotosa makebisi na ntina na likama oyo lizali koya na mokili mobimba. Kasi mpo na baoyo balingi komona makambo yango, likebisi ezali lokola mikalikali mpe mɔ́tɔ oyo ezalaki kobima na Ngomba Vésuve na ekeke ya liboso. Bitumba mibale ya mokili mobimba, bankama ya bitumba mikemike, nzala, koningana minene ya mabelé, bamaladi mabe, kobomana mpe mobulu ntango nyonso, mpe mosala ya kosakola kati na mokili mobimba, makambo nyonso wana mazali likebisi makasi limonisi ete libota na bato lizali kobelema nokinoki na likama monene.
Biblia esakolaki na sikisiki ete: “Ekozala na bolozi monene lokola emonana naino longwa na ebandeli na mokili te kino sikawa, mpe ekobima boye lisusu te.” (Matai 24:21.) Lokola ezalaki mpo na likambo oyo ebimaki na Pompéi, ekozala na baoyo bakobika—“ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango, bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikólo nyonso mpe na minoko nyonso,” bakobika; ezali bango nde “babimi na bolozi monene.”—Emoniseli 7:9, 14.
Motuna mozali kotunama ezali oyo: Ntango nini kobomama wana ekoya? Tozali na ntina makasi na kondima ete bolozi monene ebelemi. Mpo na koyeba ntango nini makambo wana makosalema, bayekoli na Yesu batunaki ete: “Elembo ya koya na yo mpe nsuka ya biloko ya ntango oyo ekozala nini?” (Matai 24:3, MN) Totalela eyano oyo Yesu Klisto apesaki bango.
Bitumba—Likambo ya ntina ya Elembo yango
Yesu asakolaki te bobele likambo moko ya ntina. Kasi alobelaki molongo ya makambo oyo, nyonso elongo, makomonisa likebisi na Nzambe—elembo ya nsuka ya biloko ya ntango oyo. Likambo ya liboso lisakolamaki lilobelami na Matai 24:7 ete: “Libota moko likotemela libota mosusu mpe bokonzi moko bokotemela bokonzi mosusu.” Kati na esakweli mosusu ekokani na oyo na Emoniseli 6:4, Biblia esakolaki ete ‘kimya esengeli kolongolama na mokili.’ Yango elimboli ete bitumba minene bikozala lokola emonanaki liboso te.
Lisoló na bato liyebisi biso ete esakweli wana etali bitumba kati na mokili mobimba ebandaki kokokana uta 1914, mbula oyo tokoki kobosana yango te. Mokanda Les aventures américaines (Lingelesi) elobi na ntina na bambula oyo ezalaki liboso na 1914 ete: “Ba Américains mingi bakotaki na ekeke ya sika oyo etondaki na bilikya. Yango ezalaki ‘eleko malamu’ mpe eumelaki kino bambula zomi na mwa ndambo na ekeke ya ntuku mibale. . . . Na nsima, na le 28 Juillet 1914, ezalela wana ebongwanaki na oyo ebengami na liloba moko ete: etumba.” Ezali motindo yango nde Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, oyo eumelaki kobanda 1914 kino 1918 mpe ebengamaki na bato mosusu ete “etumba oyo ekotya nsuka na bitumba nyonso.” Bikólo ntuku mibale na mwambe bikotaki na etumba yango. Mpe soki tosangisi mikili oyo mizalaki na nse ya boyangeli na mikili yango, mabota oyo makotaki na etumba mazalaki soko 90 % ya bafandi nyonso ya mokili na ntango wana.
Etumba ya Liboso ya mokili mobimba emonaki lisusu kosalelama ya biloko ya sika oyo bikoki koboma na bitumba, lokola mitrailleuse, ba gaz mabe, ebwakeli ya mɔ́tɔ (lance-flammes), mituka, mpepo, mpe masuwa oyo makotambolaka na nse ya mai. Soko bamilió zomi ya basoda babomamaki—koleka basoda nyonso babomamaki kati na bitumba minene bisalemaki na bambula 100 oyo ezalaki liboso! Basoda pene na bamilió 21 bazokaki. Ya solo, ezalaki etumba ya mokili mobimba, oyo emonisaki 1914 lokola ebandeli ya “mikolo na nsuka.” (2 Timoté 3:1) Atako bongo, bitumba bizalaki bobele moko na makambo mazali kati na elembo oyo Yesu apesaki.
Makambo mosusu ya Elembo yango
Yesu abakisaki ete: “Nzala mpe koningana na mokili ekozala na esika na esika. Makambo oyo nyonso mazali bobele ebandeli ya mpasi.” (Matai 24:7, 8) Luka 21:11 ebakisi ete “maladi mabe” ekozala kati na molongo yango. Yambo ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esuka, grippe espagnole epalanganaki nokinoki na mabelé. Emonani ete yango ebomaki bato koleka bamilió 20, koleka baoyo nyonso babomamaki kati na etumba.
Na boumeli mpe na nsima ya etumba, bamilió mosusu bakufaki na nzala. Koningana ya mabelé mpe ebomaki bato mingi. Na 915, bato koleka 30 000 bakufaki na Italie; na 1920 pene na bato 200 000 bakufaki na Chine; na 1923 soko bato 143 000 bakufaki na Japon. Nzokande, lokola Yesu amonisaki yango, makambo nyonso wana mazalaki bobele ebandeli ya bolozi. Diksionere moko elimboli “bolozi” lokola “monyokoli, mpasi ya nsomo.” Mokili oyo eningisamaki bongo na mpasi ya nsomo oyo ezali se kobakisama kobanda 1914. Na ndakisa, mbula 21 nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eyaki, yango ebomaki bamilió 50 ya bato mpe ekotisaki bato kati na eleko ya nikleere.
Na bambula oyo euti koleka kala mingi te, balobelaki mingi na ntina na mpasi mosusu: kobebisama ya ezingelo na moto. Atako Yesu alobelaki mpenza yango te kati na esakweli na ye, Emoniseli 11:18 emonisi ete liboso ete nsuka eya, moto “akobebisa mabelé.” Bilembeteli oyo bimonisi ete kobebisama wana esili kosalema bizali mingi. Norman Myers, mopesi na toli na ntina na ezingelo, oyo atangami kati na mokanda Ezalela ya mokili na mobu 1988 (Lingelesi), ayebisi likambo oyo ya mawa: “Ezali na libota moko te kati na mabota oyo mazalaki kala oyo ezalaki na likama ya kobomama mingi boye ntango yango ezalaki naino na bomoi. Ezali na libota moko te na mikolo mizali koya oyo ekolónga mokakatano oyo: soki libota oyo ezali sikawa esali eloko moko te, libebi ekoya mpe ‘libaku ya mibale’ ekozala te.”
Totalela rapport epesamaki na le 17 Février 1992 kati na zulunalo Newsweek na ntina na kobebisama ya liboke ya mopepe babengi ozone kati na etando. Spécialiste moko ya mwasi Alexandra Allen, mosangani ya Greenpeace (lisangá ya mokili mobimba mpo na kobatela ezingelo) atangamaki lokola moto oyo akebisaki ete kosila ya ozone “ezali lelo likama mpo na bomoi na mikolo mizali koya na mabelé.”—Tala encadré oyo ezali awa na likoló mpo na bilembeteli mingi mosusu bimonisi kobebisama ya ezingelo na mabelé.
Esika ekozanga biso mpo na kolobela makambo nyonso matali esakweli ya Yesu. (Tala tablo oyo ezali na lokasa 5 mpo na komona makambo mosusu matali esakweli yango.) Nzokande, ezali na likambo mosusu oyo tokoki kobosana yango te oyo elobelami na Matai 24:14: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Ntembe ezali te mpo na koyeba nani azali kokokisa mosala oyo ya kosakola. Ba Témoins de Jéhovah kati na mikili 229 basalaki ngonga koleka miliare moko kati na mosala wana bobele na mobu 1992. Na bongo, mosala na bango wana ezali elembo mosusu emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka.
Tozimbisama te!
Basusu bakoki koloba ete, atako bongo, kolobaloba na ntina na “mikolo ya nsuka” ezali kobebisa esengo mpe elikya ya bato. Bazali kotuna: ‘Ezali boni mpo na kokwea ya communisme oyo euti kosalema kala mingi te na Europe de l’Est, to mpo na milende oyo banguya minene ya mokili bazali kosala mpo na kotya kimya? Ezali wana bilembeteli bimonisi ete makambo mazali kotambola malamu, boye te?’ Soko moke te. Toyeba ete Yesu alobaki te ete mokili mobimba esengeli ntango nyonso kozala kati bitumba, koningana ya mabelé, mpe nzala na boumeli ya mikolo na nsuka. Mpo ete nsango malamu esakolama na mokili mobimba, esengeli kozala na bileko oyo bikozala na mwa kimya.
Tomikundola lisusu ete Yesu akokanisaki mikolo ya nsuka na mikolo mizalaki liboso ya Mpela na eleko ya Noa. Na ntango yango, bato bamipesaki mingi na kolya, komela, mpe kobala—makambo oyo bato bameseni kosala. (Matai 24:37-39) Yango ezali komonisa ete, atako ezalela ya makambo na boumeli ya mikolo na nsuka ekozala mpasi mingi, makambo masengeli te kobima na motindo boye ete bomoi ya mokolo na mokolo ezanga. Lokola ezalaki na mikolo na Noa, bato mingi bazali bobele komipesa na makambo ya mokolo na mokolo na boye ete bazali komona te ete ntango oyo tozali kobika na yango ezali ntango ya likama.
Yango wana, ekozala likama na kozanga kotalela elembo, bobele mpo ete mbongwana mosusu na makambo na politike emonisi lokola ete mokili ekómi kobonga. (Tala 1 Batesaloniki 5:3.) Bilembeteli bimonisi polele ete esakweli na Yesu ezali kokokisama sikawa—ezali likebisi ete kobomama ebelemi!
Makambo kitoko makolanda na nsima
Kobebisama ya Pompéi ememaki liwa mpe mawa mingi. Nzokande, nsuka ya ebongiseli ya lelo ekofungola nzela oyo ekomema na bomoi ya seko na paradis kitoko na mabelé. (Emoniseli 21:3, 4) Biyangeli ya bato oyo bizali komema bokabwani bikozala lisusu te mpo na kobebisa mabelé na bitumba. Moto moko te akobanga lisusu likama ya kobomama na nzela ya bibundeli ya nikleere. Bakompanyi oyo ezali kobimisa mipepe mabe kati na ezingelo ekozala lisusu te.—Danyele 2:44.
Moto na moto oyo akozala na bomoi na ntango yango akolinga boyengebene mpe akozala moninga malamu, oyo akozala na botosi mingi na nse ya Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 37:10, 11) Lopitalo, bakompanyi ya kokunda bibembe, mpe mayita ekozala makambo ya kala. Koboma libala, kokabwana, maladi ya makanisi, mpe kobebisa bana, yango mpe ekozala lisusu te.—Yisaya 25:8; 65:17.
Olingi kobika na mikolo na nsuka mpe kozala na bomoi mpo na komona mokili kitoko ya sika ya Nzambe? Na yango, “bosenzela, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini.” (Malako 13:33) Nzokande, makambo mazali koleka na mokili mazali komonisa ete elaka yango ebelemi—likama monene libelemi mpo na bato mingi. Ntango ya kobungisa ezali te. Na yango, kamata bibongiseli mpo na kobikisa bomoi na yo, mpe luka baoyo bazali kotya likebi na bilembo nyonso ya mikolo na nsuka. Bato yango bayebani malamu, mpo ete bobele bango nde bazali kotosa etinda na Yesu oyo etali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba. Wana ezali yo elongo na bato motindo oyo, tika ete ozwa etelemelo ya komitya na ngambo ya Mokonzi, Klisto Yesu, oyo mpo na ye elobami ete: “Mabota makolikya na nkombo na ye.”—Matai 12:18, 21.
[Etanda na lokasa 5]
Makambo ntuku mibale na minei mamonisi Elembo ya nsuka
1. Bitumba minene koleka—Matai 24:6, 7; Emoniseli 6:4
2. Koningana ya mabelé—Matai 24:7; Malako 13:8
3. Kozanga bilei—Matai 24:7; Malako 13:8
4. Maladi mabe—Luka 21:11; Emoniseli 6:8
5. Kobakisama ya ezaleli ya kotyola mibeko—Matai 24:12
6. Kobebisama ya mabelé—Emoniseli 11:18
7. Kozanga bolingo—Matai 24:12
8. Makambo na nsomo—Luka 21:11
9. Mposa makasi ya mbongo—2 Timoté 3:2
10. Kozanga botosi epai na baboti—2 Timoté 3:2
11. Bato bakolinga bisengo koleka Nzambe—2 Timoté 3:4
12. Bato bakolinga se malamu na bango mpenza—2 Timoté 3:2
13. Kozanga boboto bipai binso—2 Timoté 3:3
14. Bato bakozala batomboki—2 Timoté 3:3
15. Kozanga komipekisa bipai nyonso—2 Timoté 3:3
16. Kopalangana ya ezaleli ya koyina malamu—2 Timoté 3:3
17. Komonana ya baklisto mingi ya lokuta—2 Timoté 3:5
18. Kolekisa ndelo na kolya mpe na komela—Luka 21:34
19. Baseki bakoboya kondima elembo—2 Petelo 3: 3, 4
20. Basakoli mingi ya lokuta bakozala—Matai 24:5, 11; Malako 13:6
21. Kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe oyo esili
kotyama—Matai 24:14; Malako 13:10
22. Konyokwama ya baklisto ya solo—Matai 24:9; Luka 21:12
23. Na nsuka mpenza bato bakonganga ete kimya mpe kobatelama
ezali sikawa—1 Batesaloniki 5:3
24. Bato bakoyeba ntango likama ekoya te—Matai 24:39
[Etanda na lokasa 6]
Kobebisama ya Ezingelo—Elembo ya Mikolo na nsuka
◻ Ozone oyo ebatelaka mingi kati na bipai ya Hémisphère Nord ezali kosila nokinoki lokola bato na sianse bayebisaki yango esili koleka mwa bambula.
◻ Mitindo 140 ya banzete mpe banyama mizali kosila mokolo na mokolo.
◻ Lolenge dioxyde de carbone ezali kozwa molunge, ezali sikawa 26 % koleka ndenge ezalaki liboso ete bakompanyi minene esalema, mpe ezali ntango nyonso se komata.
◻ Etando ya mabelé ezalaki na molunge makasi na 1990 koleka bambula nyonso mpo ete rapport epesami ebandaki na katikati ya ekeke ya zomi na libwa; mbula motoba kati na bambula nsambo ya molunge makasi koleka ebandaki uta 1980.
◻ Zamba ezali kolimwa na bonene ya 17 milió ya ba hectares mbula na mbula, oyo ekokani penepene na bonene ya ndambo ya Finlande.
◻ Bafandi na mokili bazali kobakisama mbula na mbula bato 92 milió—yango ekokani na kobakisama ya bafandi ya Mexique mbula na mbula; kati na motango wana, 88 milió babakisami na mikili oyo mizali ya bobola.
◻ Bato 1,2 miliare bazali kozanga mai ya malamu mpo na komela.
Na kotalela mokanda “Ezalela ya Mokili na mobu 1992” (Lingelesi), ebimisami na Worldwatch Institute, nkasa 3, 4 W. W. Norton & Company, New York, London.
[Elilingi na lokasa 7]
Nsima na kobomama ya mokili oyo, mokili kitoko ya sika ya Nzambe ekoya