-
Libombami mosantu na Nzambe ekokani kati na nkembo!Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
-
-
8. (a) Kobetama na kelelo ya nsambo esali nini likoló na mabota? (b) Mabota basiliki epai na nani?
8 Mpo na mabota, kobetama na kelelo ya nsambo ememeli bango esengo moko te. Ntango ekoki mpo na bango ete bakoka kooka nkanda ya Jéhovah. Yoane alobi yango na maloba oyo: “Mabota bangalaki, nde nkele na yo eyaki, mpe elaka na kosambisa bakufi ekomi, mpe elaka na kopesa libonza na basakoli baombo na yo mpe na bapetwi mpe na bango babangi nkombo na yo, na bato mike na bato minene, mpe elaka na kobebisa babebisi na mokili.” (Emoniseli 11:18) Kobanda na 1914, mabota ya mokili bamonisaki nkele na bango makasi bamoko epai na bamosusu, mpe epai mosusu kotemelaka Bokonzi na Nzambe, mingimingi kotemelaka batatoli mibale ya Jéhovah.—Emoniseli 11:3.
9. Ndenge nini mabota babebisi mokili, mpe Nzambe akani ete asala nini na ntina yango?
9 Na boumeli ya lisolo ya bato, mabota babebisaki mokili na bitumba na bango oyo bizali kosila te mpe na motindo mabe oyo bazali kosalela biloko ya mokili. Nzokande, kobanda na 1914, mokili ebebisami makasi mpe na ndenge ya nsomo. Lokoso mpe libebi ezali ntina oyo zamba mingi na mokili esili, ebimisi esobe to déserts mpe mabele mingi oyo bakoki kolona bilanga ebebi. Mbula oyo esangani na acide mpe mapata oyo ezali na biloko ya nikleere na kati ebebisi zamba mingi. Ndunda mpe milona mosusu ebebisami. Mopepe mpe mai ebebisami. Biloko ya salité oyo bakompanyi ezali kobwaka ekomi likama mpo na bomoi ya bikelamu mingi awa na mabelé mpe na mai. Na ntango moko boye, mikili oyo bazali na bombe atomike bakanelaki kosilisa nyee bato nyonso awa na mokili. Nde na esengo, Jéhovah Nzambe “akobebisa baoyo bazali kobebisa mokili”; akoboma bato oyo ya lolendo mpe ya mbindo, baoyo basili kobebisa etando na biso oyo. (Deteronome 32:5, 6; Nzembo 14:1-3) Na mawa oyo ya misato, Jéhovah asengi bongo na bato oyo ya mabe ete bazongisa monoko epai na ye.—Emoniseli 11:14.
Mawa na babebisi na mokili!
10. (a) Mawa ya misato ezali nini? (b) Na ndimbola nini mawa ya misato esuki bobele na mitungisi te?
10 Tala mawa na misato. Ezali koya noki! Na nzela na yango nde Jéhovah akoboma baoyo bazali kobebisa “etielo na makolo na ye,” mabelé kitoko oyo biso tofandi likoló na yango. (Yisaya 66:1) Mawa yango etumolami na Bokonzi na Masiya, libombami na bulee na Nzambe. Banguna na Nzambe, mpe mingimingi bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo, batungisamaki na mawa mibale ya liboso, mpenzampenza oyo elandaki bolozi na mayoyo mpe bibele na bafandi na mpunda; kasi mawa ya misato, oyo etumolami na Bokonzi ya Jéhovah ye moko ekosuka bobele na motungisi te. (Emoniseli 9:3-19) Ekoboma nde koboma, na kolimwisaka lisangá ya bato oyo bazali kobebisa mokili, elongo na batambwisi na bango. Ekozala Armagedon, esika oyo mokolo na Nkolo ekondongwana mpenza kondongwana. Ekozala lokola elobáká yango Danyele: “mpe na mikolo na mikonzi yango [batambwisi oyo bazali kobebisa mokili]; Nzambe na likoló akotelemisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa mikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala libela na libela.” (Tanga Danyele 2:35, 44.) Lokola ngomba monene mpe molai, Bokonzi na Nzambe ekoyangela mabelé oyo masili kokembisama, kolongisáká bongo bokonzi monene ya Jéhovah mpe komemáká esengo ya seko epai ya bato.—Yisaya 11:9; 60:13.
11. (a) Kolandana ya makambo nini ya esengo eyebisami kati na esakweli oyo? (b) Bolamu nini ekoki na biso te epesameli biso, na lolenge nini mpe nani apesi yango?
11 Mawa ya misadto ezali kolandana na ebele na makambo na esengo oyo makosalema mokemoke na boumeli ya mokolo ya Nkolo. Ntango ekoki mpo ete ‘bakufi bakoka kosambisama, mpe Nzambe akoka kopesa mbano epai na baombo na ye basakoli, mpe na babulami, mpe na baoyo bakobangaka nkombo na ye.’ Yango elimboli lisekwa kati na bakufi. Mpo na babulami, bapakolami, oyo basilaki kokufa, lisekwa na bango esalamaki na ebandeli na mokolo ya Nkolo. (1 Batesaloniki 4:15-17) Na ntango ekoki, batikali kati na babulami bazali kolanda bango na nzela na lisekwa nokinoki nsima na liwa. Bato mosusu mpe bakozwa mbano, bakisa baombo na Nzambe, basakoli ya ntango ya kala mpe bato nyonso mosusu oyo babangaki nkombo ya Jéhovah, bazála kati na ebele monene oyo bakobika na bolozi monene to na kati na “bakufi, minene mpe mike,” oyo bakozongisama na bomoi na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto. Lokola Mokonzi mpe Masiya oyo Nzambe aponi azali na bafungola ya liwa mpe ya Hadès, bokonzi na ye epesi ye likoki ya kokabola bomoi ya seko na baoyo nyonso bazali koluka likabo oyo ya motuya. (Emoniseli 1:18; 7:9, 14; 20:12, 13; Baloma 6:22; Yoane 5:28, 29) Ezala bomoi bokoki kosuka te kuna na makolo, to mpe bomoi ya seko na mabelé, likabo oyo ya bomoi ezali eloko oyo Jéhovah apesi biso, atako biso tokoki na yango te; mpo na yango, baoyo nyonso bazwi likabo yango basengeli kozala na botondi ya seko.—Baebele 2:9.
-
-
Libombami mosantu na Nzambe ekokani kati na nkembo!Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
-
-
[Etanda na lokasa 175]
Ndenge mabelé mazali kobebisama
“Na ba secondes nyonso misato eteni ya zamba ekokani na bonene ya libanda na masano na motopi ezali kolimwa . . . Kosila ya zamba ya liboso ezali kobungisa nkoto mingi na mitindo na banyama mpe na banzete.”—Illustrated Atlas of the World (Rand McNally).
“Nsima na mibu 200 ya sivilizasio, [Bitima minene (ya Amerike)] bisili mpe kokoma bifandelo minene ya bosoto na mokili.”—The Globe and Mail (Canada).
Na Avril 1986, Centrale nikleere moko epanzanaki na Tchernobyl, na Union soviétique mpe na nsima moto ebimaki. Yango “ezalaki likambo monene kati na makambo ya nikleere uta babwakaki bombe na Hiroshima mpe na Nagasaki.” Ndenge “nkisi wana epanzanaki na mopepe, na mai mpe na mabelé elekaki mosika nkisi nyonso ya mabe oyo esila kokota na mopepe na mai to na mabelé na ntango bakomekaka babombe ya nikleere.”—JAMA; The New York Times.
Na Minamata (Japon), izine moko esopaki nkisi babengi méthylmercure kati na mai. Bato balyaki mbisi oyo ebebisamaki babandaki kozwa maladi ya sika oyo babengaki maladi ya Minamata, “mpasi ya motó ntango nyonso. . . . Na 1985, bato 2578 bazwaki maladi yango na Japon.”—International Journal of Epidemiology.
[Etanda na lokasa 176]
Maloba ya ntina mazwami kati na Emoniseli 11:15-19 mazali ebandeli ya bimonaneli bilandi. Emoniseli mokapo 12 ezongi nsima lisusu mpe elobeli na likambo mokomoko nsango minene oyo epesami kati na Emoniseli 11:15, 17. Mokapo 13 ezali moboko ya Emoniseli 11:18, mpamba te elobeli ebandeli mpe kokola ya lisangá na politike na Satana oyo ebebisi mabelé. Mikapo 14 mpe 15 elobeli lisusu malamumalamu bikateli ya Bokonzi oyo bisangani na kobetama na kelelo na nsambo mpe na mpasi na misato.
-