Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 11. Yoane alobi nini mpo na kobotama na mwana yango, mpe mpo na nini abyangami “mwana mobali”?

      11 Ntango oyo mabota bayangelaki mokili kozanga ete Nzambe akata bango, ntango yango esukaki na 1914. (Luka 21:24) Na mbula wana, se na ntango oyo esilaki kokanama, mwasi abotaki: “Aboti mwana mobali, oyo akokengela mabota nyonso na lingenda na ebende, mpe mwana na ye akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye. Mwasi akimi na esobe, kuna ezalaki ye na esika ebongisami na Nzambe, ete aleisama wana mikolo nkoto moko na nkama mibale na ntuku motoba.” (Emoniseli 12:5, 6) Azali “mwana mobali.” Mpo na nini? Mpo na komonisa ete mwana wana azali na makoki mpe na nguya esengeli mpo na koyangela mabota. Emonisi mpe ete kobotama ya mwana wana ezalaki likambo monene mpe na esengo. Ezali na ntina monene mpo na oyo etali kokokisa libombami na bulee na Nzambe. Mpamba te, mwana mobali wana “akokengela mabota nyonso na lingenda na ebende.”

  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 13. Likambo oyo ete mwana yango ya mobali “akamatami na likoló epai na Nzambe mpe na kiti na ye na bokonzi” elimboli nini?

      13 Jéhovah akotika nzela soko moke te ete Satana alya mwasi na Ye to mwana na Ye oyo auti kobotama sika! Na kobotama na ye, mwana mobali “akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye.” Na motindo yango, atyami na nse na libateli mobimba ya Jéhovah, ye oyo akosenzela malamumalamu likoló na Bokonzi ebotami sika, esaleli na nzela na yango akokumisa nkombo na ye mosantu. Bobele na ntango yango, mwasi akimi na esika moko oyo Nzambe abongiselaki ye kati na esobe. Nde mpo na Satana, makambo nyonso mabebeli ye sikawa, mpamba te eloko monene elingi kosalema, oyo ekopekisa ye libela ete akanela lisusu Bokonzi kati na makoló te. Ezali eloko nini?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto