Toyikisana mpiko awa emoni biso ete mokolo yango ezali kobelema
“(Boyikisana) mpiko, awa emoni bino ete mokolo yango ezali kobelema.”—BAEBELE 10:25.
1, 2. Mokolo nini esili kobelema, mpe likambo nini basaleli na Nzambe basengeli kosala yango?
BATO oyo, na eleko na biso, bazali koloba ete: ‘Yaka komela mai na bomoi elongo na biso’ bazali kofanda bango moko te. Lokola mokolo monene na bolongi na Jéhovah ekomi penepene bazali kolanda toli oyo ya Biblia: “Totalanaka ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu, kasi toyikisana mpiko. Bosala boye na koleka, awa emoni bino ete mokolo yango ezali kobelema.”—Baebele 10:24,25, MN.
2 Bisakweli na Biblia bizali kolobela “mokolo” yango lokola “mokolo na Jéhovah.” (2 Petelo 3:10) Lokola Jéhovah azali Ye Oyo-Aleki-likoló, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mokolo moko mosusu te mokoki kolela mokolo na Ye. (Misala 2:20) Na mokolo yango oyo ezali koya, mokolo oyo mozali na ntina monene koleka, bokonzi na Nzambe ekoyebana kati na molongo mobimba.
3. Na ndimbola nini, mpo na baklisto ya ekeke na liboso, mokolo na Jéhovah ezalaki kobelema, bongo ezali boni mpo na biso lelo?
3 Na ekeke ya liboso na ntango na biso, ntoma Paulo alobaki epai na baklisto ete mokolo na Jéhovah ezalaki kobelema. Bayekoli basepelaki na likanisi oyo ete mokolo yango ekoya, kasi bikeke koleka 19 bikabolaki eleko na bango na likambo yango. (2 Batesanoliki 2:1-3) Atako bongo, Paulo asengelaki kolendisa bango mpamba te mokolo yango esengeli kozanga te mpo na koya; na bongo soki baklisto babateli makasi elikya na bango, bakokota kati na mokolo yango oyo epambwami. (2 Timote 4:8) Na ekeke ya liboso, mokolo yango emonaneli ete esili kobelema; lelo tokoki koloba ete mokolo na Jéhovah ekomi mpenza pene. Bisakweli nyonso ya Biblia oyo bizali kokokisama malamu mpenza na eleko na biso bizali elembeteli moko ya kosepelisa. Mosika te, nkombo na Nzambe na biso, Jéhovah, ekosantisama mpo na libela.—Luka 11:2.
Tozwa elendiseli kati na nkombo na Nzambe
4. Engebene Emoniseli 19:6, nani asengeli kotya bokonzi na ye, mpe na liloba nini tozali kokuta nkombo na ye?
4 Libota mobimba na bato esengeli kosepela na Nkombo na Nzambe. Tala lolenge La Bible en français courant ezali kobongola mokapo moko ya Emoniseli: “Bokumisa Nzambe! Mpamba te Nkolo, Nzambe na biso mozwi-na-nguya-nyonso, asili kotya bokonzi na ye!” (Emoniseli 19:6) Kati na libongoli wana ya sika, ezali likambo na Nkolo, Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso. Motindo moko na mabongoli mingi ya sika, libongoli oyo ezali koyebisa te nkombo na Nzambe oyo asengelaki kotya bokonzi na ye. Nzokande, nkombo na Nzambe ezwami kati na liloba “Aleluya!” (“Bokumisa Yah” to “Bokumisa Jéhovah”) oyo tozali kokuta kati na ba Biblia nyonso ya Lingala, na Emoniseli 19:6 (Na Lifalanse tala la Traduction œcuménique; Bible Osty mpe Bible de Jérusalem.) Na boumeli ya eteni monene na ntango na biso, mabongoli na Biblia matyaki nkombo na Nzambe pembeni. Nzokande, lokola tokomona yango, nkombo yango ezalaki mpenza elendiseli monene mpo na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala ata mpe mpo na baoyo ya ntango na biso.
5, 6. (a) Mpo na nini Moise azalaki na mposa na koyeba nkombo na Nzambe oyo ye azalaki komonisa? (b) Liyoki nini Bayisraele bazalaki na yango ntango Moise ayebisaki bango nkombo na Nzambe?
5 Tozali komikundola ete ntango Moise atindamaki na Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso epai na Bayisraele, wana ezalaki bango baombo na mokili na Ezipite, bamitunaki na mitema na bango nani atindi ye. Moise ayebaki ete libota oyo anyokolami balingaki kotuna nkombo na Nzambe oyo ye azalaki komonisa. Totangi na ntina yango kati na Exode 3:15 ete: “Nzambe alobelaki Moise lokola ete: ‘Lobela bato na Yisraele boye ete : “(Jéhovah), Nzambe na Abrahame mpe Nzambe na Yisaka mpe Nzambe na Yakobo atindi ngai epai na bino. Oyo ezali nkombo na ngai lobiko na lobiko.”
6 Bayisraele balendisamaki makasi mpenza na maloba wana. Mpamba te ete kosikolama na bango esimbamaki na Nzambe bobele moko na solo, Jéhovah! Lisusu, basepelaki makasi na likanisi oyo ete bakokaki koyeba Nzambe; na esika ete amibomba na lolendo nyonso, Jéhovah amonisaki polele ndimbola ya nkombo na ye.—Exode 3:13; 4:29-31.
7. (a) Ndenge nini toyebi ete bayekoli na Yesu bayebaki nkombo na Nzambe? (b) Ndenge nini nkombo na Nzambe ezongaki nsima?
7 Bayekoli na Yesu Klisto, bango mpe balendisamaki makasi na nkombo na Nzambe, Jéhovah, mpe na oyo yango ezali komonisa. (Yoane 17:6, 26) Tokoki mpenza koloba te ete, na boumeli ya mosala na ye na mabelé, Yesu atyaki pembeni nkombo na Nzambe mpo na lokumu ya nkombo na ye moko. Ezali bobele nsima na ebandeli na lipengwi oyo eyebisamaki liboso, kopengwa na kondima ya solo ya boklisto, nde nkombo na Nzambe ezongaki nsima mpe ebungaki na monoko na baklisto. (Misala 20:29, 30) Nsima wana epesaki bango motuya monene na nkombo na Mwana koleka na oyo ya Tata, losambo oyo baklisto ya nkombo mpamba bazalaki kopesa epai na Tata ekomaki se ya bongo na bongo, mpe kozanga boyokani ya penepene na ye, mpe ezalaki mpenza na elendiseli makasi te.
8. Kino sikawa kosalelama na nkombo Témoins de Jéhovuh ebimisi likambo nini epai na basaleli na Nzambe?
8 Ezali bongo na esengo monene nde na 1931 Bayekoli na Biblia baoyo bazalaki kosala na boyokani na la Société Watch Tower bazwaki nkombo Témoins de Jéhovah. Ebongiseli wana ememelaki bango bobele esengo te, kasi lisusu elendiseli moko monene. Tala ntina oyo, nsima na kozwa nkombo yango, bayekoli na Biblia bayikisanaki mpiko. Tala Yisaya 43:12.
9. Likambo nini baklisto ya solo bamoni malamu kosala yango?
9 Na yango, lelo oyo, baklisto ya solo bazali komona malamu koyebisa nkombo na Nzambe oyo, na boyokani na bisakweli, bango bazali Batemwe na ye. Ezali yango nde Yesu Klisto, Motambwisi na bango, asalaki ntango azalaki awa na mabelé. (Emoniseli 1:1, 2) Bazali kosakola ete azali bobele Ye oyo nkombo na ye ezali Jéhovah.—Nzembo 83:18.
Batondi na esengo mpe na elimo santu
10-12. (a) Bopusi nini bokasi na mosala na Nzambe ezali na yango likoló na bayekoli na Yesu? (b) Ndenge nini basaleli na esengo na Jéhovah bazali komitambwisa bamoko liboso na bamosusu?
10 Liboso ete atika bantoma na ye, Yesu alobaki na bango ete: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai koleka bino. Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.”—Matai 28:19, 20.
11 Tomoni ete nsima na kozwa mateya, bayekoli basengelaki kobatisama na nkombo na elimo santu. Elimo santu yango ezali moto te, kasi bokasi na Nzambe mpo na mosala, oyo azali kosalela nsima na Yesu. Na Pantekote, na nzela na Klisto, Jéhovah asopaki bokasi yango oyo ekosalaka mosala likoló na bayekoli na Yesu oyo basilaki komipesa. (Misala 2:33) Bayekoli yango batondaki bongo na elimo santu, oyo moko na ba mbuma na yango ezali bongo esengo. (Bagalatia 5:22, 23; Baefese 5:18-20) Esengo epesaka elendiseli. Bayekoli na Klisto basengeli kotonda na esengo oyo elimo santu ezali kopesa bango. Ntoma Paulo asambelaki mpe na ntina na likambo oyo: “Tika ete Nzambe na elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso kati na kondima, kino na nguya na elimo santu, botonda na elikya.”—Baloma 15:13.
12 kotondaka na elimo yango oyo ezali kopesa esengo, ba Témoins de Jéhovah, bakisa “ebele monene,” bazali komiyoka ete babendami mpenza na koyikisama mpiko kati na mokili oyo koyinana ezali kongala. Bazali kosalela ezaleli ya “koyikisana mpiko” oyo ntoma Paulo alobelaki.—Emoniseli 7:9, 10; Baloma 1:12; 14:17.
Ebele na maziba ya elendiseli
13. Maziba nini na elendiseli mpe bantina nini ya koyikisama mpiko tozali na yango?
13 Awa ezali bango na bomoi kati na mokili oyo ekelamu oyo azali kotemela makambo nyonso na sembo azali mpenza nkolo na yango, mpe nzambe na yango, baklisto bazali koyikisana mpiko kati na lisangá ya mokili mobimba, oyo elimo santu na Jéhovah Nzambe ezali kati na yango. (Baebele 10:24, 25; Misala 20:28) Tozali na maziba mingi ya elendiseli, Boyebi na solo oyo tozali na yango mpo na Jéhovah, mpo na Mwana na ye mpe mpo na bokasi na mosala oyo bazali kosalela, elimo santu, ezali kopusa biso kozala na botondi mingi na mitema na biso. Tokoleka kotondo bango mpo ete basili kopesa biso elikya kitoko boye! Na lisalisi ya mapamboli wana, tokoki kosambela Jéhovah na motema na esengo. Ntoma Paulo elobaki epai na baklisto oyo etindelaki bango mokanda ete basengeli koyikisana mpiko mpe kolendisana kati na kondima na bango ye bulee. Mpe basengeli kosala yango ‘awa emoni bango, na elobeli na elilingi, ete mokolo yango ezali kobelema.’ Lisusu, ntango bakonzi na politike na mokili bakoboma mangomba oyo mazali bobele na baklisto ya nkombo mpamba, bakisa mpe mangomba nyonso mosusu ye lokuta, baklisto ya solo bakosengela lisusu koyikisana mpiko makasi koleka.
14. Nani asengeli kokendisa moninga mpe yango ekoki kosalema ndenge nini?
14 Ezali solo ete bankulutu basengeli kozala bato ya liboso mpo na koyikisa etonga mpiko; nzokande, ezali likambo ya baklisto banso na koyikisana mpiko bamoko mpe bamosusu, lokola tokoki kotanga yango kati na Baebele 10:25. Ezali wana etinda oyo epesameli bango. Soki ozali kati na lisangá na boklisto, opesaka baninga elendiseli yango? Mbala mosusu ozali komituna eloko nini okoki kosala mpo na yango. Ya liboso, baninga na yo nyonso baklisto balendisami mpo na komonana na yo kati na makita mpe na lolenge oyo esimbaka bibongiseli nyonso bikamatami, lokola yo mpe olendisamaka mpenza ntango ozali komona bango koyangana na makita yango. Ndakisa na yo ya koyika mpiko ekoki mpe kozala elendiseli mpo na bango. Na kokobaka mosala na yo ya moklisto atako mikakatano mpe mitungisi ya bomoi mizali, okoki kozala mpo na bazalani ndakisa moko ya koyikisa mpiko.
Totika nzela na Diable te ete alɛmbisa biso
15. Mpo na nini Diable azali na “nkanda makasi”, mpe epai na banani nkanda yango epelisami?
15 Tozali bobele biso moko te na koyeba ete mokolo na Jéhovah ekomi pene. Satan le Diable ye mpe ayebi yango. Emoniseli 12:12 elobi na biso ete mabelé ezwi mpasi lelo, ‘mpamba te Diable akiteli biso na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse. Lokola Emoniseli 12:17 elobi yango, Satana ayeisi nkanda na ye mingi epai ’’na baoyo bazali kotosa malako na Nzambe mpe bazali na mosala na kopesa litatoli na ntina na Yesu.’’ Ntembe ata moke ezali te: Diable alingi kolembisa biso. Mpe ayebi mpenza lolenge nini akoki kolonga kati na likambo yango. Ayebi bolembu na biso mpe mikakatano na biso, mpe azali kosalela yango.
16. Mpo na nini Satana asalelaka kolemba na motema?
16 Mpo na nini Diable azali koluka kolembisa biso na motema? Mpamba te mbala mingi yango ezalaka motambo moko makasi. Ata moto oyo ayikaki mpiko liboso na botemeli to monyokoli akoki kozwama na motambo ya kolemba kati na motema. Satana alingi kotumola Jéhovah Nzambe mpe komeka komonisa ete akoki kopengwisa basaleli na Ye longwa na Ye. (Masese 27:11; tala Yobo 2:4, 5; Emoniseli 2:10.) Soki alongi kolɛmbisa yo kati na motema, mbala mosusu okokitisa mosala na yo mpo na Nzambe; mbala mosusu mpe okosuka kino na kotika yango mpe kokoma bongo inactif kati na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—2 Bakolinti 2:10, 11; Baefese 6:11; 1 Petelo 5:8.
17. Ndenge nini matomba mabe ya kolemba na motema mamonisamaki polele na eleko na Moise?
17 Likambo oyo ekomelaki Bayisraele, kati na Ezipite ya kala, emonisi polele makama ya kolemba na motema. Nsima na lisolo na ye elongo na Moise, Farao abakisaki mpenza bozito na Bayisraele mpe anyokolaki bango mingi lisusu koleka. Nzambe alobaki na Moise ete akende kokutana na Bayisraele mpo na kopesa bango elikya ete Akosikola bango, ete Akokomisa bango libota na Ye, ete Akobikisa bango mpe ete Akokumba bango na Mabelé na ndaka. Moise ayebisaki maloba yango epai na Bayisraele. Kasi, tala oyo tokoki kotanga kati na Exode 6:9: “Nde bayokaki Moise te na ntina na bolembu na mitema na bango mpe na mpasi na boombo.” Liboso na ezalela motindo wana, Jéhovah alobaki epai na mosaleli na ye mpo na kolendisa ye mpe koyikisa ye mpiko, mpamba te Moise, ye mpe alembaki kati na motema, alingaki lisusu kozonga epai na Farao te, lokola Jéhovah atindaki ye yango.—Exode 6:1013.
18. Mpo na nini basaleli na Nzambe basengeli mpenza kobundisa kolemba na motema oyo euti epai na Diable?
18 Satan le Diable ayebi malamu matomba mabe oyo kolemba na motema ekoki kobimisa epai na basaleli na Nzambe. Na Masese 24:10, tozali kotanga ete: “Soko okosenzwa (kolemba) na mokolo na mpasi, nguya na yo ekozala bobele moke.” Ntango na nsuka oyo tozali kobika kati na yango ekomi mpenza mosika; yango wana esengeli na biso kozala makasi mpe na nguya kati na elimo. Tozali mpenza na makambo mingi ya kosala mpo na kolonga bolembu na biso mpe mabunga na biso, oyo ekoki kolɛmbisa bokoli na biso; kasi, koyebaka ete Satana azali komeka kosalela bolembu wana ya bomoto na biso, tomoni ete tozali na mposa na lisalisi.
Tozala na elikya ya kokoka kati na mbeka na Klisto
19. Nini ekoki kosalisa biso na kobundisa kolemba na motema, mpe mpo na nini?
19 Na likambo yango, lisiko oyo Jéhovah apesaki na nzela na Yesu Klisto ezali mpenza lisalisi monene mpo na biso. Soki tozali na elikya ya kokoka kati na lisiko yango, tokoki kolonga kati na momekamo. Ekozala likama mpenza komeka kotyola ntina ya ebongiseli yango; mpamba te lokola tokozala naino bato bazangi kokoka, tokozala se kosala masumu. Nzokande, tosengeli te kolemba kati na motema mpe kotika, kokanisaka ete elikya ezali lisusu te; soki tokosala bongo, tokokwea kati na motambo ya Satana. Toyebi ete mbeka ya kokoka epesamaki mpo na lisumu. Ee, lisiko ekoki kolongola masumu. Soki tozali kati na “ebele monene,” tokoki kosukola “bilamba” na biso mpe kongalisa yango mpembe kati na makila na Mwana na Mpate; ezali wana elaka kati na yango tosengeli kozala na kondima mpe elikya ya kokoka.—Emoniseli 7:9, 14.
20. Ndenge nini, engebene Emoniseli 12:11, tokoki kolonga Diable, ye oyo azali koluka kolembisa biso na motema?
20 Emoniseli 12:10, Satana abengami “mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe butu na moi.” Ndenge nini tokoki kolonga mofundi oyo mabe, elima oyo azali koluka kolembisa biso kati na motema? Verset 11 ya mokapo moko wana epesi biso eyano: “Bango balongi ye mpo na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomoi na bango te, ata kino kufa.” Basaleli na Jéhovah basengeli kobatela elikya ya kokoka kati na makila ya Mwana na Mpate, elingi koloba kati na mbeka oyo apesaki mpo na kosikola biso. Na bongo, tika ete tolanda kozwa elendiseli mozindo kati na “litatoli” na biso, na kosakolaka ntango nyonso nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe epai na bato banso.
21. Ndenge nini tokoki, kozanga ete toyeba yango, kosalelama epai na Diable mpe kobanda kolembisa bandeko na biso?
21 Ekoki kokoma ete, kozanga mpenza ete toyeba yango, Diable akomi kosalela biso mpe tobandi kolembisa bandeko na biso. Ndenge nini? Na kosalelaka matóngi, to na kosengisaka makambo mingi epai na bamosusu to na kozalaka moyengebene koleka ndelo. (Mosakoli 7:16) Biso banso, tozali na mabunga mpe na bolembu. Tomekola Diable te: toluka te kongalisa mabunga ya bamosusu. Nkutu, tozala nde na maloba na koyikisa mpiko epai na baninga na biso, mpe epai na libota mpe na lisangá na Jéhovah. Tolingi kokoba, na kolembisa bandeko na biso na motema te, kasi na koyikisana mpiko.
Toyikisana mpiko awa emoni biso ete mokolo yango ezali kobelema
22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete bobele bankulutu nde bazali na mokumba ya koyikisa mpiko na bandeko mosusu? (b) Ndenge nini tokoki kolendisa bakengeli baklisto?
22 Lokola mokolo ezali kobelema, tozwa ekateli makasi ya kozala ntango nyonso bato na koyikisa baninga mpiko. Tokoki kolendisa bazalani na biso na kopesaka ndakisa na bosembo mpe na maloba na kobundisa. Kati na likambo yango tomekola Jéhovah mpe Nkolo Yesu Klisto. Tokanisa te ete bobele bankulutu ya lisangá nde bazali na mokumba ya koyikisa mpiko epai na bandeko mosusu. Mpo na koloba solo, bango mpe bazali na mposa ya koyikisama mpiko. Lokola bampate nyonso mosusu na etonga, bazali mpe na bolembu, mpe bazali kokutana na bampasi motindo moko mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango kati na mokili oyo esili konuna. Lisusu, bankulutu bazali kooka likambo oyo Paulo abengi yango motema likoló na ntina na masangá. (2 Bakolinti 11:28, 29) Na kotalela mokumba monene oyo bazali kokokisa, bazali mpenza na mposa ya bilendiseli na biso.
23 Tokoki kolendisa mingi baoyo bazali na mokumba ya kosenzela likoló na lisangá ya boklisto na kosalaka na bolingo nyonso elongo na bango. Na bongo tokolanda toli oyo ezwami kati na Baebele 13:17: “Botosa bango bakokambaka bino mpe bomikitisa liboso na bango. Mpamba te bazali kokengelaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.”
24. Na eleko na biso oyo ya kolemba na motema, tosengeli kosala nini, mpe mpo na nini?
24 Tozali na bomoi na eleko moko ya kolemba na motema. Lokola Yesu asakolaki yango, kobanga mpe kokanisa na makambo makobima na mokili ezali kolembisa mitema na bato. (Luka 21:25, 26) Ebele na bampasi oyo tozali kokutana na yango ekoki mpenza kotungisa makanisi mpe kolembisa motema; na yango, ‘toyikisana mpiko, awa emoni biso ete mokolo yango ezali kobelema.’ Tolanda toli malamu oyo Paulo apesi kati na 1 Batesaloniki 5:11: “Bongo, bolendisanaka bino mpenza mpe bosungana pelamoko ezali bino kosala.”
Bozongeli
◻Mpo na nini, koleka liboso, baklisto basengeli koyikisana mpiko?
◻Koyeba nkombo na Nzambe epesi elendiseli nini epai na basaleli na Jéhovah?
◻Ndenge nini tokoki kolendisana bamoko na bamosusu?
◻Mpo na nini tosengeli te kozala lokola esaleli na maboko na Diable mpo na kolembisa bandeko na biso?
[Elilingi na lokasa 17]
Bankulutu bazali kopesa ndakisa na koyikisa mpiko epai na etonga