Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 17, 18. (a) Engebene Yoane, eloko nini elekaki na makoló ntango babenganaki Satana? (b) Mongongo makasi oyo Yoane ayoki, emonani ete ekoki kozala ya nani?

      17 Yoane alobi mpo na esengo oyo kokwea monene ya Satana ebimisaki na likoló; yoka maloba na ye: “Nayoki mongongo makasi kati na likoló koloba ete, Sikawa lobiko, na nguya, na bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya; mpo ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe butu na moi, asili kobwakama. Bango balongi ye mpo na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomoi na bango te, ata kino na kufa. Na bongo bosepela, e likoló, mpe bino bofandi wana!”—Emoniseli 12:10-12a.

  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 20. Ndenge nini baklisto ya sembo basili kolonga Satana?

      20 Baklisto bapakolami oyo batangami bayengebene “mpo na makila na Mwana na Mpate” balandi kopesa litatoli na Nzambe mpe na Yesu Klisto atako bazali konyokwama. Uta mibu koleka 120, kelasi ya Yoane ezali kobenda likebi ya bato nyonso likoló na makambo minene oyo masengelaki kobima na nsuka na ntango na Bapakano na 1914. (Luka 21:24, Crampon 1905) Mpe ebele monene bazali sikawa kosala mosala na bosembo nyonso esika moko na bango. Kati na bato oyo ya sembo, moko te azali kobanga “baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te,” lokola esili yango komonisama mbala na mbala na makambo oyo ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na yango na ntango na biso. Na maloba mpe na etamboli na bango malamu ya boklisto, basili kolonga Satana, komonisáká ete azali ntango nyonso mobuki na lokuta. (Matai 10:28; Masese 27:11; Emoniseli 7:9) Kanisa esengo ya baklisto oyo bapakolami na ntango bazali kosekwa na likoló: Satana azali wana lisusu te mpo na kofunda bandeko na bango! Ntango ekoki solo mpo na limpinga na baanzelu ete bayanola na esengo nyonso na libyangami oyo: “Bosepela, e likoló, mpe bino baoyo bofandi wana!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto