“Bósanzola Yah, bino bato na ye!”
“Tiká ete nyonso na mpema básanzola [Yehova].”—NZEMBO 150:6.
1, 2. (a) Na meko nini lisangá ya boklisto ekólaki na ekeke ya liboso? (b) Likebisi nini bantoma basilaki kopesa uta kala? (c) Lolenge nini lipɛngwi ebandaki?
YESU abongisaki bayekoli na ye ete bázala kati na lisangá ya boklisto, oyo ekólaki mingi na ekeke ya liboso. Atako bato ya mangomba batɛmɛlaki bango makasi, ‘nsango malamu esilaki kosakolama epai na bato nyonso na nsé na Likoló.’ (Bakolose 1:23) Kasi na nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu Klisto, na mayele mabe nyonso, Satana akólisaki lipɛngwi.
2 Bantoma basilaki liboso kopesa likebisi na ntina na yango. Na ndakisa, Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese ete: “Bókeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etongá mobimba oyo [elimo santu esili NW] kotya bino bakɛngɛli na yango; bózala babateli na [lisangá, NW] ya Nzambe oyo asombaki na makila na [Mwana na] ye mpenza. Ngai nayebi ete na nsima na kolongwa na ngai bankɔi na yauli bakokɔta kati na bino, mpe bakotika etongá te. Kati na bino mpenza mpe mibali bakotɛlɛma kolakisa mateyo na kokosa ete bábenda bayekoli nsima na bango.” (Misala 20:28-30; talá mpe 2 Petelo 2:1-3; 1 Yoane 2:18, 19.) Na yango, na ekeke ya minei, boklisto ya lipɛngwi ebandaki kosangana elongo na Boyangeli ya Loma. Mwa bikeke moke na nsima, Boyangeli bosantu ya Loma, na boyokani elongo na pápa wa Loma, bakómaki koyangela eteni monene ya mokili. Na nsima, Mbongwana ya Baprotestá etombokaki mpo na kolekisa ndelo ya Lingomba ya Katolike na oyo etali kosɛnga mosolo mpo na kolimbisama ya masumu na bango, kasi elóngaki te kozongisa boklisto ya solo.
3. (a) Ntango nini mpe lolenge nini nsango malamu esakolamaki epai na bato nyonso? (b) Makambo nini oyo mazelamaki, oyo mazwaki mobɔkɔ na yango kati na Biblia, makokisamaki na 1914?
3 Nzokande, wana nsuka ya ekeke ya 19 ezalaki kobɛlɛma, etuluku moko ya sembo ya bayekoli ya Biblia bamipesaki lisusu mingi kati na mosala ya kosakola mpe ya kopesa elikya ya ‘nsango malamu epai na bato nyonso na nsé na Likoló.’ Na lisalisi ya boyekoli na bango ya bisakweli ya Biblia, etuluku wana elobelaki makambo oyo masengelaki kobima nsima ya bambula koleka 30, elingi koloba na 1914, ete esengelaki kotya nsuka na “bilaka na mabota,” eleko ya “ntango nsambo,” to bambula 2 520, oyo ebandaki na kobebisama ya Yelusaleme na 607 L.T.B. (Luka 21:24; Danyele 4:16) Makambo oyo bamizelaki na yango makokanaki, 1914 ezalaki mobu oyo mbongwana monene ekɔtaki kati na makambo ya bato awa na mabelé. Makambo minene mabimaki mpe na likoló. Ezalaki na ntango yango nde Mokonzi na seko afandisaki Mokonzi mosalani elongo na ye, Yesu Klisto, na kiti ya bokonzi na likoló, mpo na kolɛngɛla kolongolama ya mabe nyonso awa na mabelé mpe kozongisama ya Paladiso.—Nzembo 2:6, 8, 9; 110:1, 2, 5.
Talá Mokonzi Masiya!
4. Lolenge nini kati na bomoi na ye Yesu akokisaki ndimbola ya nkombo na ye Mikaele?
4 Na 1914 Mokonzi Masiya wana, Yesu, abandaki mosala na ye. Biblia ebéngi ye mpe Mikaele, oyo elimboli “Nani akokani na Nzambe?,” mpamba te mokano na ye ezali bongo ya kolóngisa boyangeli ya Yehova. Lokola ekomami kati na Emoniseli 12:7-12, ntoma Yoane alobelaki kati na emonaneli na ye makambo oyo masengelaki kobima: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele na baanzelu na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona abundani, na baanzelu na ye, nde balóngaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nsé, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.” Babwakamaki mpenza na nguya nyonso!
5, 6. (a) Na nsima ya 1914, kosakolama nini ya kobenda likebi esalemaki uta na likoló? (b) Lolenge nini likambo yango eyokani na Matai 24:3-13.
5 Na nsima mongongo moko makasi eyokanaki uta na likoló elobaki ete: “Sasaipi lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya; mpo ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe butu na moi, asili kobwakama. Bango baleki ye zambi na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomoi na bango te, ata kino kufa.” Yango elimboli lobiko mpo na bato oyo babatelaka bosembo na bango, baoyo bazali na kondima kati na mbeka ya lisiko ya motuya mingi oyo Yesu Klisto apesaki.—Masese 10:2; 2 Petelo 2:9.
6 Mongongo makasi na likoló ekóbaki na kolobáká ete: “Bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” “Mawa” yango oyo esakolamaki mpo na mabelé oyo emonanaki mpenza na ntango bitumba ya mokili mobimba bibimaki, nzala, maladi, koningana ya mabelé, mpe ezaleli ya kotyola mibeko oyo ezali kopesa mpasi awa na mabelé na ekeke oyo. Lokola Matai 24:3-13 eyebisi yango, Yesu asakolaki ete yango esengelaki kozala eteni moko ya ‘elembo na nsuka na ekeke.’ Na kokokana na esakweli yango, uta 1914 bato awa na mabelé bazali komona mpasi oyo emonanaki naino liboso te kati na lisoló ya bato.
7. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali kosakola na etingya nyonso?
7 Na eleko oyo Satana azali kopesa bato mpasi, bato bakoki kozwa elikya mpo na mikolo mizali koya? Ee, mpamba te Matai 12:21 elobi na ntina na Yesu: “Mabota na bapaya makolikya na nkombo na ye”! Ezaleli ya makambo ya mpasi oyo ezali kati na mabota ezali te bobele komonisa ‘elembo na nsuka na ekeke oyo’ kasi ezali mpe komonisa ‘elembo na [kozala ya Yesu, NW]’ lokola Mokonzi na Bokonzi ya Masiya. Na nsima, Yesu alobaki na ntina ya Bokonzi yango ete: “Mpe Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Libota nini awa na mabelé bazali lelo oyo kosakola elikya kitoko ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe? Ezali bongo Batatoli ya Yehova! Na etingya nyonso, bazali kosakola epai na bato banso mpe na ndako na ndako ete etikali moke Bokonzi ya boyengebene mpe ya kimya ya Nzambe etambwisa makambo ya bato awa na mabelé. Ozali kosangana kati na mosala yango? Libaku mosusu oyo eleki yango ezali te!—2 Timoté 4:2, 5.
Lolenge nini “nsuka ekoya?”
8, 9. (a) Lolenge nini kosambisama ebandaki “na Ndako na Nzambe”? (b) Lolenge nini baklisto ya nkombo mpamba babukaki mitindá ya Liloba ya Nzambe?
8 Mokili mosili kokɔta kati na eleko ya kosambisama. Biblia eyebisi biso kati na 1 Petelo 4:17 ete kosambisama ebandaki “na Ndako na Nzambe”—kosambisama ya mangomba oyo emitángaka ete ezali ya baklisto, oyo emonanaki polele kobanda na ntango oyo “mikolo na nsuka” mibandaki na kobomama ya ebele ya bato kati na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba uta 1914 kino 1918. Boklisto ya nkombo mpamba elóngaki liboso na kosambisama wana? Tótalela naino etɛlɛmɛlo oyo mangomba makamataki na kokɔtáká na bitumba uta 1914. Bakonzi ya mangomba babebisami na “makila na bato na sembo” oyo bango batindaki kati na bitumba, boye te?—Yilimia 2:34.
9 Engebene Matai 26:52, Yesu alobaki ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” Liloba yango lizali kokokana mpenza kati na bitumba oyo bizali kosalema na boumeli ya ekeke oyo! Bakonzi ya mangomba batindaki bilenge mibali ete bákende koboma bilenge mibali mosusu, ata mpe baoyo ya lingomba na bango moko—Bakatolike babomaki Bakatolike mpe Baprotestá babomaki Baprotestá. Bolingi-ekólo etombolamaki mingi koleka Nzambe mpe Klisto. Esili koleka kala mingi te, kati na bikólo mosusu ya Afrika, bokangami na etúlúká etyamaki liboso na mitindá ya Biblia. Na Rwanda, epai kuna eteni monene ya bafandi ya mboka yango bazali Bakatolike, soko katikati na milió moko ya bato babomamaki na boumeli ya bitumba kati na bitúlúká. Kati na zulunalo moko ya Vatican, L’Osservatore Romano, pápa andimaki ete: “Oyo ezali koboma eleki monene, oyo, na mawa nyonso, ata Bakatolike mpe basanganaki kati na yango.”—Kokanisá na Yisaya 59:2, 3; Mika 4:3, 5.
10. Ekateli nini Yehova akokweisa likoló na lingomba ya lokuta?
10 Lolenge nini Mokonzi na seko atalelaka mangomba oyo mapusaka bato ete bábomana to oyo masalaka eloko moko te wana basangani na yango bazali kobomana? Na ntina na Babilone monene, ebongiseli ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, Emoniseli 18:21, 24 eyebisi biso ete: “Anzelu moko makasi akamati libangá lokola etuteli monene, mpe abwaki yango na mai monene, mpe alobi ete, Bongo Babilone, mboka monene, ekobwakama na makasi, mpe ekozwama lisusu soko moke te. Kati na ye makila na basakoli, na bapɛtwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.”
11. Makambo nini ya nsɔ́mɔ mazali kosalema kati na bokilsto ya nkombo mpamba?
11 Na kokokisama ya esakweli ya Biblia, makambo na nsɔ́mɔ mazali kosalema kati na boklisto ya nkombo mpamba. (Kokanisá na Yilimia 5:30, 31; 23:14.) Mingi mpenza ezali kosalema mpo na ezaleli oyo bakonzi ya mangomba bazali komonisa ya kokanga miso liboso na mabe, basangani na bango bamipesi na misala ya mbindo. Na États-Unis, ekólo oyo etángami ete ezali ya boklisto, soko katikati ya mabala nyonso mazali kosuka na kokabwana. Bilenge bazali kokumba zemi mpe kosangisa nzoto mibali na mibali ezali kosalema mingi mpenza kati na basangani ya lingomba. Basángó bazali kobebisa bana mike na kosangisáká na bango nzoto na makasi—mpe yango ezali kosalema mingi mpenza. Elobamaki ete kosambisama ya makambo yango liboso na bisambiselo esɛngaki ete Lingomba ya Katolike na États-Unis ebimisa miliare moko ya badolare na boumeli ya eleko ya bambula zomi. Boklisto ya nkombo mpamba etalelaki na motuya te likebisi ya Paulo oyo ezwami na 1 Bakolinti 6:9, 10: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bómizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakɛmbi na nsɔ́ni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulelá mpe balángi masangá mpe batuki mpe babotoli bakosangola bokonzi na Nzambe te.”
12. (a) Mokonzi na seko akosala nini likoló na Babilone monene? (b) Na bokeseni na boklisto ya nkombo mpamba, mpo na ntina nini basaleli ya Yehova bayembaka “Aleluya?”
12 Etikali moke, Mokonzi na seko, Yehova, oyo azali kosala mosala na nzela ya Mokonzi monene ya basodá ya likoló, Yesu Klisto, akopesa nzela ete bolɔ́zi monene ebanda. Ya liboso, boklisto ya nkombo mpamba mpe biteni nyonso mosusu ya Babilone monene ekozwa etumbu mpo na kosambisama ya Yehova. (Emoniseli 17:16, 17) Bamimonisaka ete babongi te kozwa lobiko oyo Yehova azali kopesa na nzela ya mbeka ya lisiko ya Klisto. Basili kotyola nkombo mosantu ya Nzambe. (Kokanisá na Ezekiele 39:7.) Na botyoli monene mpenza, bazali koyembayemba “Aleluya” kati na bandakonzambe na bango oyo etongami na biloko ya motuya mingi! Balongoli nkombo ya ntina mingi ya Yehova kati na mabongoli ya ba Biblia na bango, kasi emonani ete bazali komikundola te ete “Aleluya” elimboli “Sanzolá Yah”—“Yah” ezali ebéngeli ya mokuse ya nkombo ya “Yehova.” Na lolenge lobongi, Emoniseli 19:1-6 eyebisi ete etikali moke “Aleluya” ekoyembama mpo na kokumisa kokokisama ya bikateli ya Yehova likoló na Babilone monene.
13, 14. (a) Makambo nini minene makobima na nsima? (b) Likambo nini ya esengo ekozala mpo na bato oyo babangaka Nzambe?
13 Na nsima, ekozala bongo ‘koya’ ya Yesu mpo na kosakola ekateli likoló na mabota mpe kokokisa yango. Ye moko asakolaki ete: “Ekoya Mwana na moto [Yesu Klisto] na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti [na kosambisa] na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotika bampate na lobɔkɔ na ye na mobali nde bantaba na lobɔkɔ na ye na mwasi. Bongo mokonzi akoloba na bango na lobɔkɔ na ye na mobali ete, Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.” (Matai 25:31-34) Molɔngɔ́ 46 (NW) ekóbi na koyebisáká ete kelasi ya bantaba “bakolongolama mpo na libela, mpe bayengebene bakozwa bomoi ya seko.”
14 Búku ya Biblia oyo ebéngami Emoniseli ezali kolobela lolenge nini “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankóló,” Nkolo na biso ya likoló, Yesu Klisto, akobunda etumba na Armagedon, kobomáká bongo biloko mibale oyo ya ebongiseli ya Satana: politiki mpe mombongo. Na bongo, Klisto akosopa “nkɛlɛ na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” likoló na ebongiseli mobimba ya Satana oyo ezali awa na mabelé. Wana ‘makambo yango ya kala makosila koleka,’ bato oyo babangaka Nzambe bakokɔtisama kati na mokili ya sika ya nkembo epai kuna Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.”—Emoniseli 19:11-16; 21:3-5.
Oyo ezali ntango ya kokumisa Yah
15, 16. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete tólanda maloba ya esakweli ya Yehova? (b) Basakoli mpe bantoma bamonisaki ete tosengeli kosala nini mpo na kobika, mpe yango ekoki kolimbola nini mpo na ebele ya bato na mikolo na biso?
15 Mokolo yango ya kokokisa ekateli ya Yehova ebɛlɛmi! Na yango, ekozala malamu ete tólanda liloba na esakweli ya Mokonzi na seko. Epai na baoyo bakangami naino kati na mateya mpe mimeseno ya lingomba ya lokuta, mongongo mouti na likoló moyebisi ete: “Bino bato na ngai bósangana na masumu na ye te, bóbima na ye, ete bózwa moko na malɔ́zi na ye mpe te.” Kasi babimi yango basengeli kokende wapi? Solo ekoki kozala bobele moko, na yango lingomba ya solo mpe ezali bobele moko. (Emoniseli 18:4; Yoane 8:31, 32; 14:6; 17:3) Likoki na biso ya kozwa bomoi ya seko etaleli likoki na biso ya komona lingomba yango mpe kotosa Nzambe na yango. Biblia elakisi biso ye kati na Basauma (Nzembo) Nz. 83:18, oyo elobi ete: “Boyo bo akuki kuiba Yo moko, kombo na Yo YEHOVA, Azi Motu na Likoló Nyoso na mokili nyoso.”—Biblia Uele.
16 Nzokande, tosengeli te bobele kosuka na koyeba nkombo ya Mokonzi na seko. Tosengeli koyekola Biblia mpe koyekola bizaleli mpe mikano na ye minene. Na bongo, tosengeli kosala mokano na ye mpo na ntango oyo, lokola emonisami kati na Baloma 10:9-13. Ntoma Paulo azongelaki maloba mapemami ya basakoli mpe asukisaki ete: “Mpe moto na moto oyo [akobelela] nkombo na [Yehova] akobika.” (Yoele 2:32; Sefania 3:9) Akobika? Ee, mpamba te lelo oyo bamilió ya bato oyo bazali na kondima kati na ebongiseli ya lisiko oyo Yehova asali na nzela na Klisto bakobikisama na bolɔ́zi monene oyo ezali koya, wana kosambisama ekokokisama likoló na mokili ya Satana oyo esilá kobeba.—Emoniseli 7:9, 10, 14.
17. Elikya nini monene esengeli kopusa biso ete tósangana sikawa na koyembama ya loyembo na Mose mpe ya Mwana na mpate?
17 Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na baoyo bazali na elikya ya kobika? Ete tósangana uta sikawa na koyemba loyembo na Mose mpe na Mwana na mpate, kokumisáká bongo Mokonzi na seko wana ezali biso kozela na esengo nyonso bolóngi na ye. Tozali kosala yango na koyebisáká epai na bato mosusu mikano na ye ya nkembo. Wana ezali biso kokóla kati na bososoli ya Biblia, tozali kopesa bomoi na biso epai na Mokonzi na seko. Yango ekokamba biso ete tózwa bomoi ya seko kati na ebongiseli oyo Mokonzi wana ya nguya alobeli, lokola ezwami kati na Yisaya 65:17, 18: “Zambi talá, nazali kotonga lola na sika [Bokonzi ya Masiya Yesu] mpe mokili na sika [libota ya sika ya bato ya boyengebene]; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga.”
18, 19. (a) Maloba ya Davidi oyo mazwami kati na Nzembo 145 masengeli kopusa biso na kosala nini? (b) Tosengeli na elikya nyonso kozela nini epai na Yehova?
18 Davidi mokomi na nzembo alobaki maloba oyo na ntina na Mokonzi na seko: “[Yehova] azali monene monene, abongi na kosanzolama mingi; monene na ye ekoki koyebana te.” (Nzembo 145:3) Bonene na ye ekoki koyebana te, lokola mpe bandelo ya etando mpamba mpe ya boseko ekoki komonana te! (Baloma 11:33) Wana ezali biso kokóba kozwa boyebi ya Mozalisi na biso mpe boyebi ya ebongiseli na ye ya lisiko oyo asalaki na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, tokolinga kokumisa Mokonzi na seko na biso mingi mpe mingi lisusu koleka. Tokolinga kosala lokola Nzembo 145:11-13 emonisi yango: “Bakoloba mpo na nkembo na bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na ye na nguya mpe nkembo na bokonzi na yo. Bokonzi na ye ezali bokonzi na seko, mpe nguya na yo ekoumela na mabota na mabota.”
19 Tokoki komizela na elikya nyonso ete Nzambe na biso akokokisa maloba maye: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.” Mokonzi na seko akokamba biso na boboto nyonso kino nsuka mpenza ya mikolo oyo ya nsuka, mpamba te Davidi alendisi biso ete: “[Yehova] akobatela baoyo nyonso bakolinga ye.”—Nzembo 145:16, 20.
20. Lolenge nini okoyanola na libyangi ya Mokonzi ya seko, lokola elobami kati na nzembo mitano ya nsuka?
20 Loyembo mokomoko ya nzembo mitano ya nsuka kati na Biblia ebandi mpe esuki na libyangi oyo ete “Aleluya.” Na yango, Nzembo 146 epesi biso libyangi oyo ete: “Aleluya! Molimo na ngai, sanzolá [Yehova]. Nakosanzola [Yehova] ntango nyonso ezali ngai na bomoi.” Okoyanola na libyangi yango? Ya solo, tosengeli mpenza kolinga kosanzola ye! Tiká ete ozala kati na baoyo balobelami kati na Nzembo 148:12, 13: “Bilenge mpe baseka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo na [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe lola.” Tiká ete tóyanola na motema na biso mobimba na libyangi oyo ete: “Bósanzola Yehova, bino bato na ye! Biso nyonso elongo, tiká ete tósanzola Mokonzi na seko!”
Okoyanola lolenge nini?
◻ Bantoma ya Yesu bapesaki likebisi na ntina na likambo nini?
◻ Makambo nini minene masalemaki kobanda na 1914?
◻ Bikateli nini Yehova akokokisa yango mosika te?
◻ Mpo na nini oyo ezali ntango ebongi mpenza koleka bantango nyonso mosusu mpo na kosanzola Mokonzi na seko?
[Etanda na lokasa 19]
Ntango oyo ya mpasi mpe ya yikiyiki
Bato mingi bandimi likambo oyo ete ntango moko ya mpasi ebandaki na ebandeli mpenza ya ekeke ya 20. Na ndakisa, na maloba ya ebandeli ya búku pandaemonium, oyo moto moko ya sénat ya États-Unis, Daniel Patrick Moynihan, abimisaki na 1993, ndimbola moko epesamaki na ntina na “likámá ya 1914” elobaki ete: “Etumba eyaki mpe mokili mobongwanaki—na lolenge ya nsɔ́mɔ mpenza. Lelo oyo ezali bobele na bikólo mwambe awa na mabelé oyo ezalaki na 1914 mpe kino sikawa lolenge ya biyangeli na bango ebongwani te mpo na mobulu. . . . Mpo na bikólo 170 mosusu oyo etikali, mikili misusu miuti bobele kosalema kala mingi te mpe misili kozwa bopusi ya yikiyiki ya mikolo oyo.” Ya solo, makámá masili kosalema mingi mpenza uta na eleko oyo ebandaki na 1914!
Búku Out of Control—Global Turmoil on the Eve of the Twenty-First Century ebimisamaki mpe na 1993. Mokomi na yango ezalaki bongo Zbigniew Brzezinski, mokambi ya kala ya lisangani oyo ekotalaka makambo ya libateli na États-Unis. Akomaki ete: “Na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, makambo mingi malobamaki mpo na kokumisa yango lokola ebandeli ya solosolo ya Eleko ya Bososoli. . . . Na bokeseni na elaka yango, ekeke ya ntuku mibale ekómaki eleko oyo bato batangisaki makila mpe bayinanaki koleka bikeke nyonso mosusu, ekeke ya politiki oyo etondi na bandɔ́tɔ mpamba mpe ya koboma ya nsɔ́mɔ. Ezaleli ya kosala bato mabe na kokanela nyonso ekóli mingi koleka, koboma ebongisamaki mpo na kotya nsuka na bomoi ya ebele ya bato. Bokeseni kati na likoki oyo bato ya siansi bazali na yango mpo na kosala malamu mpe motema mabe ya bato ya politiki oyo emonanaki mpenza polele ezali kopesa mawa. Ata na eleko moko te kati na lisoló ya bato koboma esilá kopalangana na motindo oyo, esilá naino te kokamata bomoi ya ebele ya bato na motindo oyo, esilá naino te komonana ete kobomama ya bato esalema na molende makasi mpo na mikano mizangi ntina ya bato ya lolendo.” Yango ezali mpenza solo!
[Elilingi na lokasa 17]
Mikaele abwakaki Satana mpe mampinga na ye na mabelé na 1914