Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 22, 23. (a) Engebene Yoane, makambo nini masalemaki nsima wana dalagona abwakamaki na nse? (b) Ndenge nini dalagona azali konyokola ‘mwasi oyo aboti mwana mobali’?

      22 Uta Satana abwakamaki na nse, bandeko na Klisto oyo bazali naino na mabelé banyokwamaki mpo na nkanda na ye. Yoane alobi: “Wana emonaki dalagona ete abwakami na mokili, anyokoli mwasi oyo aboti mwana mobali yango. Kasi mapapu mibale na mpongo monene mapesami na mwasi ete apombwa na esobe na esika na ye, kuna aleisami mbula misato na ndambo, mpo na kokima nyoka yango.”—Emoniseli 12:13, 14.

  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 24. Likambo nini ekokani na kobikisama na Bayisraele na mokili na Ezipito Bayekoli ya Biblia bakutanaki na yango?

      24 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bandeko na Yesu balandaki na bosembo nyonso kopesa litatoli na ndenge ekokaki na bango kosala. Basalaki mosala yango atako Satana mpe basaleli na ye bayinaki bango makasi mpe banyokolaki bango. Kasi ekomaki na ntango oyo mosala ya kosakola polele, oyo Bayekoli na Biblia bazalaki kosala, mosala wana ekatanaki. (Emoniseli 11:7-10) Ezalaki ntango bakutanaki na makambo lokola Bayisraele na Ezipito, oyo bazwaki mpe monyoko makasi. Na ntango yango Jéhovah amemaki bango mbangu, lokola na mapapu na mpongo, na esika ya libateli, kuna na esobe ya Sinaï. (Exode 19:1-4) Bobele bongo, nsima na monyoko makasi na 1918-1919, Jéhovah abikisaki batemwe na ye, oyo bazalaki bamonisi na mwana na ye, mpe amemaki bango na ezalela na elimo oyo ezalaki libateli mpo na bango, motindo moko lokola esobe ezalaki libateli mpo na Bayisraele. Ezalaki lokola eyano na mabondeli na bango.—Tala Nzembo 55:6-9.

      25. (a) Jéhovah abimisaki nini na 1919, ndenge asaláká yango kala mpo na Bayisraele kati na esobe? (b) Libota yango esalami na banani, mpe basili kokota wapi?

      25 Kati na esobe, Jéhovah abongisaki Bayisraele ete bazala libota mobimba to nation, kokokisáká mposa na bango ya elimo mpe ya mosuni. Bobele bongo, kobanda na 1919 Jéhovah akomisaki libota ya mwasi libota (nation) ya elimo. Yango ekeseni na Bokonzi na Masiya oyo ezali koyangela na makóló uta 1914. Mpamba te libota oyo ya sika esalami nde na batikali na batemwe bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, oyo basili kokota kati na esika moko ya kitoko mingi na elimo uta 1919. Lokola babandaki kozwa “bilei na bango na ntango ekoki,” baklisto oyo bapakolami balendisamaki mpo na kokokisa mosala oyo ezalaki liboso na bango.—Luka 12:42; Yisaya 66:8.

      26. (a) Wapi boumeli na eleko na ntango oyo elobelami na Emoniseli 12:6, 14? (b) Ntina na eleko wana na mbula misato na ndambo ezalaki nini, ebandaki ntango nini mpe esukaki ntango nini?

      26 Ezalela oyo eumelaki ntango boni mpo na libota na mwasi na Nzambe? Emoniseli 12:6 elobi mikolo 1260. Emoniseli 12:14 ebengi eleko yango ete mbula misato na ndambo. Nyonso mibale ezali se na boumeli moko, elingi koloba mbula misato na ndambo. Na mikili ya Mpoto, kotangáká yango na eleko ya printemps 1919, esukaki na eleko ya automne 1922. Ezalaki eleko ya kolamuka, ya kolendisama mpe ya kobongisama lisusu mpo na kelasi na Yoane, oyo etelemaki lisusu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto