Makambo mazali koleka na mokili
“Eloko eleki likama”
Likambo mosusu ezali kotungisa bibombelo na makila, ezali kofunda oyo bafundamaki na bato oyo bazwaki maladi ya liwa mpo bazongisaki bango makila na nzoto. Na katikati ya mobu 1989, balobi ete, bifundeli koleka 300 bisalemaki mpo na bisika yango na Etats-Unis. Gilbert clark, motambwisi ya Lisangá na ba amerika mpo na oyo etali kobomba makila, andimaki ete ”bato balingi mpenza makila oyo ezangi likama”, nde na mawa bakoki kopesa bango yango te.
Na likanisi motindo moko, zulunalo Parade Magazine ezali koyebisa ete engebene moto moko ya mayele oyo akoyokelaka makambo matali makila, monganga charles Huggins,esengeli koyeba ete makila “ezali mpenza na likama oyo ekoki kopengolama te’’. Alobeli yango lokola “Eloko eleki likama oyo esalelami kati na médécine”. Uta ebandeli ya 1989, ntalo ya maladi mabe oyo ezwamaka na nzela ya moto mosusu oyo ezali komonana na lisalisi ya ba ekzame kati na bisika ya kobomba makila, ekomi lolenge mitano (HTLV-l, yango ezali kopesa leucémie de de lymphocytes T; syphilis to kasende; hépatite B; Slda hépatite c). Nzokande, soki tondimeli mokambi ya croix-Rouge américaine, Gerald Sandler, “ekoki kozala ete mosika te tokomona maladi mosusu mabe koleka epesama na nzala na kozongisa makila na nzoto”, Atako likama wana ya liwa, bazali kokanisa ete na 1990 penepene na bato 4 milió bakozongisama makila na Amérique du Nord. Engebene mokomi moko na nsango oyo azali lisusu monganga Gifford-Jones, babali mingi balobelaka mpenza te likambo litali kozongisa makila na nzoto”.
Uta mibu mingi, na bosembo nyonso, ba Temoins de Jéhovah bazali koboya makila’ ezala na motindo nini, engebene mobeko oyo mopesamaki na Liloba na Nzambe kati na Misala 15:28, 29 mpe 21:25. Libateli oyo etelemelo wana ezali kopesa liboso na maladi mabe oyo mapesami na nzela na kozongisa makila na nzoto ezali mpenza komonisa ntina monene ya botosi na bango na mibeko na Jehovah Nzambe.
Kolimwa na yango ekoyebana na bato te?
Kardinal Joachim Meisner, oyo kotyama na ye na teritware ya cologne (Allemagne) ebimisaki matata na Février 1989, alobaki kala mingi te ete kobanga na ye monene ezali ete mokolo moko Lingomba “ekolimwa mpe ete mbala mosusu yango, ekoyebana epai na bato te”. Zulunalo ya Alemanye Rheinische Post “ezali koyebisa maloba na ye: “Nazali koyoka mawa mingi ete bato babandi kotalela Lingomba lokola eloko mpamba.” Abakisaki, soki ezali bongo, mbala mosusu ezali mpo ete “tolobelaka mingi mpo na mabelé kasi mingi te mpo na likoló, tolobelaka mingi makambo ya sikawa kasi tolobelaka moke mpo na bomoi ya seko’’.
Na kosalaka boyokani elongo na bato na politike mpe na bato na mimbongo ya mokili na esika ya kotya konfianse na bango na Bokonzi ya likoló mpo na kosilisa mikakatano ya mokili, mangomba ya boklisto na mokili bazali komonisa ete bazali kolongisa te matomba na Nzambe ata bazali koloba makambo mosusu. Bakozwa mpasi monene. Biblia ezali koyebisa mpo na yango ete mosika te mangomba nyonso ya lokuta makolimwa. Likambo yango ekobombana te, mpamba te “mikonzi na mokili’ mpe “bato na mimbongo na mokili’ bakolela mangomba yango. Bato oyo bazali na mposa ya boyengebene basengeli bongo kolanda libyangi oyo: ’’Bobima (kati na mangomba na lokuta) . . . soki bolingi kosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”—Emoniseli 18:4. 9, 11.
Nsuka ebelemi
“Kosasa esalemi na Leta.” Ezali boye nde bazulunalo mosusu ezali koloba mpo na ndenge biyangeli to masangá oyo nabatelami epai na biyangeli yango mazali koboma bato. Engebene Gerry O‘Connel, molobeli ya Amnesty lnternational, na 1988 ”batangaki kobakisama makasi ya botyoli na lotomo ya moto, kobakisama oyo elandanaki kino na 1989’’. Abakisaki ’’Ntalo ya bobomi oyo esalemaki na kotyolaka mibeko oyo mindimami kati na mokili mobimba ekomi na ndelo moko oyo eleki nyonso.”
Rapport ya nsuka mbula ya Amnesty azali koyebisa mituya ya nsomo: Na 1988, kati na mikili 29, pene na bato 50 000 mpe 100 000 babomamaki liboso na bakonzi oyo basepelaki na likambo yango. Kati na bato yango ezalaki na bana mike, mibange mpe basi, oyo ngambo bango bakumbaki bobele mpo bazwamaki kati na bituluku mike ya politike to ya ekólo, to mpo balandaki na barégió epai kuna batomboki bazalaki kobunda. Kati na babandisi ya bobomi yango ezali na mampinga ya basoda, batomboki, batekisi na drogue na bituluku misusu oyo bizali koboma bato mpo na kokokisa mikano na bango ya politike. “Mbala mingi, Leta yango moko emibombaka nsima na bituluku oyo bizali na bibundeli mpo na koboma banguna na yango mpe bato oyo bazali kotya nkaka’’, ndenge zulunalo La Repubblica elobi.
Ezali na ntina mpenza nde Liloba lipemami na Jéhovah lizali kokokisa biyangeli na bato na “nyama na yauli’’. (Emoniseli 13:2) Nzokande, bonyama ya bibongiseli wana ya politike bokoumela seko te, mpamba te tozali kotanga kati na Nzembo 92:7 ete: “Ata bato mabe bakoli pelamoko matiti: ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balongi malamu, nde ezali mpo ete bakobomama bobele kobomama.” Bokonzi na likoló ya Nzambe oyo epesami na Yesu Klisto, “Mokonzi na kimya”, akosala na motindo ete mokapo oyo ekokana—Yisaya 9:6; Danyele 2:44.