-
Biblia ezali na nsango ya NzambeSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
2. Biblia ezali mpo na banani?
Liloba ya Nzambe elobi: “Bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso” bakoki kozwa bolamu na nsango malamu oyo ezali na Biblia. (Tángá Emoniseli 14:6.) Lelo oyo, Biblia ezali na minɔkɔ ebele koleka babuku mosusu nyonso. Bato mingi bazali na Biblia, ezala bafandaka na ekólo nini to balobaka monɔkɔ nini.
-
-
Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
4. Baanzelu basalisaka bato báyeba makambo ya Yehova
Baanzelu ya Nzambe bakendaka te na baporte ya bato mpo na kosakwela bango nsango malamu. Kasi, bakoki kosalisa basaleli ya Nzambe bakutana na bato oyo balingi koyeba makambo ya Nzambe. Tángá Emoniseli 14:6, 7, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Mpo na nini tozali na mposa ya lisalisi ya baanzelu na mosala ya kosakola?
Koyeba ete baanzelu bakoki kosalisa yo okutana na bato oyo bazali na mposa ya koyoka nsango ya Biblia, elendisi yo? Mpo na nini?
-