Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nsango malamu mpo na bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Sanza ya 1
    • “NAMONAKI anzelu mosusu kopumbwa na nzanga, mpe azalaki na nsango malamu na seko mpo na mabota nyonso, mikili nyonso, na minoko nyonso, bikolo nyonso.” (Emoniseli 14:6) Na maloba wana, ntoma Yoane oyo akomaki mokóló, akomi emonaneli na esakweli oyo ezali kokokana na mikolo na biso. Awa koboma, kobeba na mopepe, mobulu, bitumba mpe bongolabongola kati na makambo ya nkita ezali se kokola, biso tozwi esengo na koyeba ete, nsango malamu ezali. Kasi, nsango nini oyo ekoki kozala mwa malamu oyo esengeli ete anzelu moko asakola yango, mpe mpo ete esakolama na mabota nyonso mpe bikolo mpe minoko mpe bibele nyonso?

  • Nsango malamu mpo na bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Sanza ya 1
    • Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Yesu akokisaki bisakweli mingi biyokanaki na mokano oyo Nzambe azwaki na ntina na ye, kasi, akómaki Mokonzi na eleko wana te. Lokola Mosenzeli ezongelaki koyebisa yango mbala mingi, likambo yango esalemaki na 1914. Kokokisama ya bisakweli emonisi ete Bokonzi etyamaki na makóló na mbula yango. (Emoniseli 12:10, 12) Atako 1914 emonisamaki na nsango moko ya mabe, mpo ezali na mbula wana nde matata ya liboso ya mokili mobimba ebimaki, kobotama ya Bokonzi na Nzambe, mpo na yango, ezalaki nsango oyo eleki malamu. Yango wana Yesu asakolaki esakweli oyo etali eleko na biso: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo na nsima nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

      Esakweli wana na Yesu esilaki kokokana? Ya solo mpenza! Emonaneli na esakweli na Yoane mpe ekokani lokola. Ezali solo ete tokoki komona anzelu oyo ye alobelaki te. Nzokande, moto nyonso akoki komona ba Témoins de Jéhovah, kosakola nsango malamu oyo epesamelaki na anzelu yango epai na “na mabota nyonso, mikili nyonso mpe minoko nyonso, mpe bikolo nyonso.” Mongongo ya baklisto yango ezali koyokama na mikili 212 mpe bisanga mpe ebele na bato bazali koyamba nsango yango na esengo. Oyo ekómaki na bato mosusu, emonisi ete mpo na bango nsango na ntina na Bokonzi na Nzambe ezalaki nsango malamu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto